Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna oyo elandi:

Makasi ya Samsone ezalaki nde kouta na nsuki na ye?

Makasi ya Samsone ezalaki mpenza kouta na nsuki na ye te. Nsuki yango ezalaki komonisa boyokani oyo azalaki na yango na Nzambe lokola azalaki Monaziri. Boyokani yango ebebaki ntango Delila akatisaki nsuki ya Samsone.​—15/4, lokasa 9.

Ndenge moko na motema na biso ya solo, wapi makambo misato oyo ekoki kobatela motema na biso ya elilingi?

(1) Kolya. Mpo motema na biso ezala malamu esɛngaka ete tólyaka bilei oyo etongaka nzoto; esengeli mpe tólyaka malamu na elimo. (2) Ngalasisi. Kozala molende na mosala ya kosakola ebatelaka motema na biso ya elilingi. (3) Baninga. Mitungisi na biso ekoki kokita soki tozali kolekisa ntango mingi elongo na bandeko na biso bakristo, oyo bamibanzabanzaka mpo na biso.​—15/4, lokasa 16.

Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo bákóma lisusu kotyelana motema soki moko na bango asalaki ekobo?

Basengeli (1) kolobana solo; (2) kopesana mabɔkɔ; (3) kotika bizaleli ya kala mpe kokóma na bizaleli ya sika; mpe (4) koyeba ntango nini kobosana nkanda mpe kozongisa konfianse.​—1/5, nkasa 12-15.

Mpo na nini ebongi te ete ndeko oyo azali kosala diskur ya bokundi ebembe asalela Nzembo 116:15 mpo na mowei?

Vɛrsɛ yango elobi boye: “Liwa ya bato ya sembo ya Yehova ezali likambo monene mpenza na miso na ye.” Yango elimboli ete Nzambe amonaka ete liwa ya basaleli na ye nyonso ezali likambo monene oyo akoki te kotika nzela ete esalema. Akotika nzela te ete basaleli na ye nyonso básila awa na mabele.​—15/5, lokasa 22.

Ba colporteurs bazalaki banani?

Liboso ya 1931, nkombo “colporteurs” ezalaki kosalelama mpo na bandeko oyo tobengaka lelo oyo babongisi-nzela.​—15/5, lokasa 31.

Wapi mwa makambo oyo ezali komonisa ete Biblia ezali te kaka buku oyo bato bakomá?

Biblia ezali na bisakweli mingi oyo ekokisamaki. Elobeli makambo oyo esalemaki mpenza, kasi masapo mpamba te. Siansi endimi makambo oyo Biblia elobi, mpe mikanda na yango nyonso ezali na boyokani. Esalisaka bato tii lelo oyo.​—1/6, nkasa 4-8.

“Makonzi oyo nyonso” oyo Danyele 2:44 elobeli ezali makonzi nini?

Vɛrsɛ yango elobeli makonzi oyo emonisami na biteni ndenge na ndenge ya ekeko oyo Danyele alimbolaki.​—15/6, lokasa 17.

Ntango nini bokonzi ya Anglo-américain ekómaki nguya ya nsambo ya mokili mobimba oyo bisakweli ya Biblia elobeli?

Nguya yango ya mokili mobimba oyo esangisi bikólo mibale ebandaki ntango Grande-Bretagne ná États-Unis esalaki makambo minene elongo na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.​—15/6, lokasa 19.

Na ndimbola nini Nzambe alimbisaka mpe abosanaka masumu ya bato oyo babongoli motema?

Yehova alobi boye mpo na bato oyo asepelaka na bango: “Nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Yehova akoki kolimbisa masumu na nzela ya lisiko. Soki Nzambe alimbisi moto, abosanaka na ndimbola oyo ete akanisaka lisusu masumu na ye te mpo na kopesa ye etumbu.​—1/7, lokasa 18.

Mpo na nini tokoki kondima ete makamwisi oyo Biblia elobeli esalemaki mpenza?

Mbala mingi, makamwisi yango ezalaki kosalema na miso ya bato nyonso, kasi na kobombana te. Ezalaki na makambo ya mindɔndɔ te. Ezalaki kosalema mpo na kopesa Nzambe nkembo, kasi bato te. Makamwisi ya ndenge na ndenge ezalaki kosalema, mpe banguna ya basaleli ya Nzambe na ntango wana bazalaki kotyela yango ntembe te. Bantina yango ezali kotinda biso tóndima ete makamwisi oyo Biblia elobeli esalemaki mpenza.​—1/8, nkasa 7-8.