Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tókeba na mitambo ya Zabolo!

Tókeba na mitambo ya Zabolo!

Tókeba na mitambo ya Zabolo!

‘Tólongwa na motambo ya Zabolo.’​—2 TIM. 2:26.

OKOPESA EYANO NINI?

Mituna nini osengeli komituna soki ozalaka na momeseno ya koloba mabe mpo na basusu?

Makambo oyo ekómelaki Pilate mpe Petro ekoki koteya yo nini na oyo etali kobanga bato mpe kokokisa mposa ya bato oyo bazali kotya yo mbamba?

Okoki kosala nini mpo otika komitungisa koleka ndelo mpo na masumu na yo ya kala?

1, 2. Mitambo nini ya Zabolo tokolobela na lisolo oyo?

 ZABOLO alandelaka basaleli ya Yehova. Mokano na ye ezalaka ntango nyonso te ya koboma bango, ndenge moto ya bokila abomaka nyama. Mingimingi, mposa na ye ezalaka ete akanga moto na bomoi mpo akóma kosala mokano na ye.​—Tángá 2 Timote 2:24-26.

2 Mpo na kokanga nyama na bomoi, moto akoki kosalela motambo. Akoki kosala ete nyama eya na esika oyo ezali polele mpo akanga yango na nsinga na nkingo to na lokolo. Akoki mpe kosalela motambo oyo ebombami mpo akanga nyama oyo ezali ekɛngɛ te. Zabolo mpe asalelaka mitambo ya ndenge wana mpo na kokanga basaleli ya Nzambe. Soki tolingi te Zabolo akanga biso, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe kotya likebi na bilembo oyo ekosalisa biso tóyeba ete motambo ya Satana ezali pene na esika oyo tozali. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki komibatela na mitambo misato oyo Zabolo alongaki kokanga na yango basaleli mosusu ya Nzambe. Mitambo yango ezali (1) kozanga kopekisa lolemo, (2) kobanga bato mpe kokokisa mposa ya bato oyo bazali kotya biso mbamba, mpe (3) komitungisa koleka ndelo mpo na masumu oyo osalá kala. Lisolo oyo elandi ekolobela mitambo mosusu mibale ya Satana.

TÓYEBA KOPEKISA LOLEMO NA BISO

3, 4. Nini ekoki kosalema soki tozali kopekisa lolemo na biso te? Pesá ndakisa.

3 Mpo na kobimisa banyama na bisika oyo ebombani, mobomi-nyama akoki kopelisa mɔtɔ na eteni moko ya zamba mpo akanga banyama oyo ezali koluka kokima. Ndenge moko mpe, Zabolo akoki koluka kopelisa mɔtɔ na kati ya lisangá ya bokristo. Soki alongi kosala yango, bandeko mosusu bakoki kotika lisangá mpe na ndenge yango akokanga bango. Makambo nini tokoki kosala oyo ekomonisa ete tozali kopesa Zabolo mabɔkɔ kozanga ete tóyeba yango, mpe na bongo kozwama na motambo na ye?

4 Moyekoli Yakobo alobaki ete lolemo ezali lokola mɔtɔ. (Tángá Yakobo 3:6-8.) Soki tolongi kopekisa yango te, tokoki kopelisa mɔtɔ na kati ya lisangá. Ndenge nini ekoki kosalema? Tózwa ndakisa oyo: Na likita moko ya lisangá, bapesi liyebisi ete ndeko mwasi moko akómi mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nsima ya likita, bandeko basi mibale bazali kolobela liyebisi yango. Moko alobi ete asepeli mingi mpe alingi ete ndeko yango asala mosala na ye malamu. Mosusu alobi ete ndeko yango asɛngi mosala ya mobongisi-nzela kaka mpo azali koluka lokumu. Kati na bandeko wana mibale, okolinga kozala moninga ya nani? Ezali mpasi te tómona ndeko oyo alingi kopelisa mɔtɔ na lisangá na maloba na ye.

5. Mituna nini tosengeli komituna mpo tópekisa lolemo na biso?

5 Tokoki kosala nini mpo tópekisa lolemo na biso? Yesu alobaki boye: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Na yango, tosengeli libosoliboso kotalela motema na biso. Toboyaka makanisi oyo etindaka moto akóma koloba mabe mpo na basusu? Na ndakisa, ntango toyoki ete ndeko mobali moko alingi kokokisa mokumba moko na lisangá, tomonaka ete ndeko yango alingi kosepelisa Yehova, to tokanisaka ete azali koluka nde matomba na ye moko? Soki mbala mingi tokanisaka ete ndeko asali boye to boye mpo na koluka matomba na ye moko, esengeli tóbosana te ete Zabolo alobaki bongo mpo na Yobo, mosaleli ya sembo ya Nzambe. (Yobo 1:9-11) Na esika tókanisela ndeko na biso mabe, tosengeli komituna mpo na nini tozali kokanisa bongo. Tozali mpenza na ntina ya kokanisela ye mabe? To motema na biso nde ezali lisusu na bolingo te ndenge ezali komonana mingi na mikolo oyo ya nsuka?​—2 Tim. 3:1-4.

6, 7. (a) Nini ekoki kotinda biso tóloba mabe mpo na basusu? (b) Tosengeli kosala nini soki bafingi biso?

6 Tótalela bantina mosusu oyo ekoki kotinda biso tóloba mabe mpo na basusu. Na ndakisa, mbala mosusu tolingi bato bámona nde makambo oyo biso tozali kosala. Ntango tozali koloba mabe mpo na basusu, ekoki kozala mpo tolingi komonisa ete biso toleki bango. Mbala mosusu mpe tozali koluka komilongisa mpo tosali te likambo oyo tosengelaki kosala. Ata soki ezali lolendo, likunya, to kobanga nde ezali kotinda biso tóloba mabe mpo na basusu, ezaleli wana ebotaka mbuma mabe.

7 Tokoki komona lokola ete tozali na ntina ya koloba mabe mpo na ndeko moko. Mbala mosusu alobaki likambo moko oyo esalaki biso mpasi. Soki ezali bongo, kozongisa mabe na mabe ekobongisa makambo te. Kosala bongo ezali kaka kobakisa mafuta na mɔtɔ, mpe ekokisaka nde mokano ya Zabolo, kasi ya Nzambe te. (2 Tim. 2:26) Na likambo ya ndenge wana, ebongi nde tómekola Yesu. Ntango bazalaki kofinga ye, “azalaki kozongisa kofinga te.” Kasi “azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.” (1 Pe. 2:21-23) Yesu azalaki na kondima ete Yehova akobongisa makambo na lolenge mpe na ntango oyo alingi. Biso mpe tosengeli kozala na kondima ya ndenge wana. Soki tozali kosalela lolemo na biso mpo na kolendisa basusu, tokobatela kimya mpe bomoko na lisangá.​—Tángá Baefese 4:1-3.

TÓKIMA MOTAMBO YA KOBANGA BATO MPE YA KOKOKISA MPOSA YA BAOYO BAZALI KOTYA BISO MBAMBA

8, 9. Mpo na nini Pilate akatelaki Yesu etumbu ya liwa?

8 Nyama oyo ekangami na motambo ezalaka lisusu na likoki te ya kokende esika oyo elingi. Ndenge moko mpe, soki moto azali kobanga to andimi kosala makambo oyo basusu bazali kotinda ye, ezali lokola azali kotika ete bátambwisa bomoi na ye. (Tángá Masese 29:25.) Tótalela ndakisa ya bato mibale oyo basalaki makambo oyo basusu batindaki bango mpe babangaki bato. Na nsima, tokotalela mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa yango.

9 Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma, ayebaki ete Yesu asalaki mabe moko te mpe emonani ete Pilate ye moko azalaki na mposa ya kosala ye mabe te. Kutu alobaki ete Yesu “asali eloko moko te oyo ebongi na liwa.” Atako bongo, akatelaki Yesu etumbu ya liwa. Mpo na nini? Mpamba te andimaki kosala likambo oyo ebele ya bato balingaki. (Luka 23:15, 21-25) Bato yango batyaki Pilate mbamba alanda makanisi na bango mpe bagangaki ete: “Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te.” (Yoa. 19:12) Mbala mosusu Pilate abangaki ete soki atiki Kristo, akobungisa bokonzi na ye, to mpe bakoboma ye. Na yango, alandaki makanisi ya bato oyo batyaki ye mbamba mpe akokisaki mokano ya Zabolo.

10. Mpo na nini Petro awanganaki Kristo?

10 Ntoma Petro azalaki moninga ya motema ya Yesu. Alobaki polele ete Yesu azali Masiya. (Mat. 16:16) Petro akangamaki kaka na Yesu ntango bayekoli mosusu basundolaki ye mpo bakangaki ntina te ya makambo oyo alobaki. (Yoa. 6:66-69) Mpe ntango banguna bayaki kokanga Yesu, Petro asalelaki mopanga mpo na kobatela Nkolo na ye. (Yoa. 18:10, 11) Kasi na nsima, Petro abangaki bato mpe awanganaki ete ayebi Yesu Kristo. Ntoma yango akweaki mwa ntango moke na motambo ya kobanga bato. Kobanga yango elongolaki ye mpiko ya kosala oyo ezali malamu mpe kokangama na Yesu.​—Mat. 26:74, 75.

11. Bato mosusu bakoki kotinda biso tósala makambo nini?

11 Biso bakristo tosengeli kotɛmɛla bato oyo bazali kotya biso mbamba mpo tósala makambo oyo ekosepelisa Nzambe te. Bapatrɔ bakoki kotinda biso tókosa, to bato mosusu bakoki kotinda biso tósala pite to ekobo. Soki ozali elenge, mbala mosusu baninga ya kelasi to bilenge mosusu batindaka yo oyiba biyano na ekzamɛ, otala pornografi, omɛla makaya to bangi, olangwa masanga to mpe osala pite. Na yango, nini ekoki kosalisa biso tókwea te na motambo ya kobanga bato mpe ya kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova te?

12. Makambo oyo ekómelaki Pilate mpe Petro ekoki koteya biso nini?

12 Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Pilate mpe Petro. Pilate ayebaki Kristo malamu te. Kasi, ayebaki ete Yesu asalaki likambo ya mabe te mpe amonaki ete azalaki lokola moto nyonso te. Kasi, Pilate azangaki komikitisa mpe azalaki kolinga Nzambe ya solo te. Yango wana, ezalaki mpasi te mpo akwea na motambo ya Zabolo. Petro ye azalaki na boyebi ya sikisiki mpe azalaki kolinga Nzambe. Kasi, na mabaku mosusu, abosanaki esika makoki na ye esuki, abangaki bato, mpe andimaki kosala makambo oyo basusu batindaki ye. Liboso bákanga Yesu, Petro abɛtaki ntolo ete: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku, kasi ngai te.” (Mrk. 14:29) Petro alingaki komibongisa malamu mpo na kolonga komekama soki atyelaki Nzambe motema lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki boye: “Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?” (Nz. 118:6) Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu azwaki Petro ná bantoma mosusu mibale mpe akendaki na bango na kati mpenza ya elanga ya Getesemane. Kasi na esika básɛnzɛla, Petro ná baninga ye balalaki mpɔngi. Yesu alamusaki bango mpe alobaki ete: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka, mpo bókwea na komekama te.” (Mrk. 14:38) Kasi Petro alalaki lisusu mpe na nsima akweaki na motambo ya kobanga bato.

13. Ndenge nini tokoki kolonga kotɛmɛla bato oyo balukaka kotya biso mbamba?

13 Makambo oyo ekómelaki Pilate mpe Petro ekoki koteya biso likambo mosusu ya ntina mingi: Mpo tólonga kotɛmɛla bato oyo bazali kotya biso mbamba, tosengeli kozala na boyebi ya sikisiki, komikitisa, koyeba esika makoki na biso esuki, kolinga Yehova, mpe kobanga ye, kasi bato te. Soki tozali na kondima oyo euti na boyebi ya sikisiki, tokozala na mpiko ya koteya makambo oyo tondimaka. Yango ekosalisa biso tótɛmɛla bato oyo balukaka kotya biso mbamba mpe tóbanga bato te. Tosengeli soki moke te kokanisa ete tozali makasi mingi. Tosengeli nde kozala na komikitisa mpe kondima ete tozali na mposa ya nguya ya Nzambe mpo tólonga kotɛmɛla bato oyo balukaka kotya biso mbamba. Tosengeli kosɛngaka elimo ya Yehova mpe kotika bolingo na biso mpo na ye etinda biso tófingisa nkombo na ye te mpe tótosa mibeko na ye. Longola yango, tosengeli komibongisa liboso komekama ebima. Na ndakisa, tosengeli kobondela elongo na bana na biso mpe kosalisa bango báyeba oyo basengeli kosala soki baninga na bango baluki kotya bango mbamba mpo básala likambo ya mabe.​—2 Ko. 13:7. a

TÓKIMA MOTAMBO OYO EFINAKA: KOMITUNGISA KOLEKA NDELO

14. Zabolo alingaka tókanisa nini mpo na masumu oyo tosalá kala?

14 Mpo na kokanga nyama, ntango mosusu bakangisaka eteni ya nzete to libanga moko ya kilo na nsinga likoló, na nzela oyo nyama elekaka mingi. Ntango nyama oyo ezali ekɛngɛ te ebendi nsinga yango, nzete to libanga yango ekokwela yango mpe ekofina yango. Komitungisa koleka ndelo mpo na masumu na yo ya kala ekoki kokóma lokola nzete to libanga ya kilo oyo efinaka. Ntango tozali kokanisa mabunga oyo tosalá kala, tokoki koyoka lokola ‘totutami koleka ndelo.’ (Tángá Nzembo 38:3-5, 8.) Satana alingaka tókanisa ete Yehova akoki soki moke te kolimbisa masumu oyo tosalá mpe ete tokokoka te kotosa mibeko ya Nzambe.

15, 16. Okoki kosala nini mpo okwea te na motambo ya komitungisa koleka ndelo?

15 Tokoki kosala nini mpo tókwea te na motambo ya komitungisa koleka ndelo? Soki osalá lisumu ya monene, osengeli koluka kobongisa boyokani na yo na Yehova sikoyo. Kende epai ya bankulutu mpe sɛngá bango básalisa yo. (Yak. 5:14-16) Salá nyonso oyo okoki mpo osembola makambo. (2 Ko. 7:11) Soki ozwi disiplini, kolɛmba nzoto te. Disiplini yango ekomonisa ete Yehova alingaka yo. (Ebr. 12:6) Zwá ekateli ya kozongela lisumu yango te mpe kosala lisusu te makambo oyo ememaki yo na lisumu yango. Soki obongoli motema mpe obongwani, zalá na kondima ete Yehova akolimbisa mabunga na yo na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo.​—1 Yoa. 4:9, 14.

16 Bato mosusu bakobaka komitungisa koleka ndelo mpo na masumu na bango oyo esilá kolimbisama. Soki yo mpe oyokaka bongo, kobosana te ete Yehova alimbisaki Petro ná bantoma mosusu atako basundolaki Mwana na ye Yesu na ntango oyo azalaki na mposa makasi ya lisalisi. Yehova alimbisaki mobali oyo abimisamaki na lisangá ya Korinti mpo azalaki kosala pite, kasi na nsima abongolaki motema. (1 Ko. 5:1-5; 2 Ko. 2:6-8) Biblia elobeli bato oyo basalaki masumu minene, kasi lokola babongolaki motema, Nzambe alimbisaki bango.​—2 Nta. 33:2, 10-13; 1 Ko. 6:9-11.

17. Lisiko ekoki kosala nini mpo na biso?

17 Yehova akolimbisa mpe akobosana mabunga na yo soki obongoli mpenza motema mpe ondimi ete akomonisela yo motema mawa. Kokanisa ata mokolo moko te ete mbeka ya lisiko ya Yesu ekokoka te kozipa masumu na yo. Soki ozali kokanisa bongo, okwei na motambo moko ya Satana. Ata soki Zabolo alingi okanisa nini, yebá ete lisiko ekoki kozipa masumu ya moto nyonso oyo akweaki na lisumu, kasi abongoli motema. (Mas. 24:16) Kondimela lisiko ekoki kosalisa yo otika komitungisa koleka ndelo mpo na masumu oyo osalá kala mpe ekoki kopesa yo makasi ya kosalela Nzambe na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.​—Mat. 22:37.

TOYEBI MALAMU MAYELE YA SATANA

18. Ndenge nini tokoki kokima mitambo ya Zabolo?

18 Satana akipaka te motambo nini ekweisi biso, mposa na ye ezalaka kaka ete akanga biso. Lokola toyebi malamu mayele ya Zabolo, tokoki kosala nyonso mpo akanga biso te. (2 Ko. 2:10, 11) Tokokwea na mitambo na ye te soki tozali kosɛnga Nzambe apesa biso bwanya mpo tóyikela komekama mpiko. Yakobo akomaki boye: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.” (Yak. 1:5) Mpo tómonisa ete tozali mpenza na mposa ya makambo oyo tozali kosɛnga na libondeli, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. Mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele esalisaka biso tóyeba mitambo ya Zabolo mpe ndenge ya kokima yango.

19, 20. Mpo na nini tosengeli koyina oyo ezali mabe?

19 Kobondela mpe koyekola Biblia esalisaka biso tólinga mingi makambo oyo ezali malamu. Kasi, ezali mpe na ntina tóyekola koyina oyo ezali mabe. (Nz. 97:10) Tokoboya koluka kaka bamposa na biso moko soki tozali kokanisa mbuma mabe oyo ezaleli yango ebimisaka. (Yak. 1:14, 15) Soki toyekoli koyina oyo ezali mabe mpe tozali mpenza kolinga oyo ezali malamu, mitambo oyo Satana asalelaka mpo na kokanga biso ekobenda biso te.

20 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Nzambe azali kosalisa biso mpo tókwea te na mitambo ya Satana! Yehova azali kosalela elimo santu na ye, Liloba na ye, mpe ebongiseli na ye mpo na kobikisa biso “na moto mabe.” (Mat. 6:13) Na lisolo oyo elandi, tokoyekola mitambo mosusu mibale ya Zabolo oyo ekweisaki basaleli mosusu ya Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Baboti bakoki kotalela elongo na bana na bango etanda Contre la pression du groupe na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nkasa 132-133. Bakoki kosala yango na Losambo na kati ya libota.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 21]

Kozanga kopekisa lolemo ekoki kopelisa mɔtɔ na kati ya lisangá

[Elilingi na lokasa 24]

Okoki kolongola kilo ya komitungisa koleka ndelo