Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mayangani ya bato oyo basalelaka Yehova na esengo

Mayangani ya bato oyo basalelaka Yehova na esengo

“Yanganisá bato, mibali, basi ná bana mike mpe mopaya oyo afandi na yo.”​—MIB. 31:12.

1, 2. Tokolobela makambo nini oyo etaleli mayangani?

BANDA kala mpenza Batatoli ya Yehova basalaka mayangani oyo esangisaka bato ya mikili ndenge na ndenge mpe mayangani ya etúká. Mingi kati na biso tokendaka na mayangani yango ya esengo mpe mbala mosusu banda bambula ebele.

2 Na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe mpe bazalaki kosala mayangani mosantu. Tokotalela mwa mayangani oyo Biblia elobeli, oyo esalemaká kala. Ntango tozali kotalela mayangani yango, tyá likebi na makambo na yango oyo ekokani na mayangani ya basaleli ya Yehova lelo oyo; na nsima tokolobela matomba ya kokende na mayangani.​—Nz. 44:1; Rom. 15:4.

MAYANGANI OYO ETIKÁ NSANGO​—NA NTANGO YA KALA MPE LELO OYO

3. (a) Likambo nini esalemaki na liyangani ya liboso ya basambeli ya Yehova oyo Biblia elobeli? (b) Bazalaki kosala nini mpo na koyanganisa Bayisraele?

3 Liyangani oyo esalemaki pene na Ngomba Sinai ezali liyangani monene ya liboso ya basaleli ya Nzambe oyo Biblia elobeli. Ezalaki mpenza likambo monene na lisolo ya basaleli ya Nzambe. Na libaku yango, Yehova amonisaki Bayisraele nguya na ye ntango apesaki bango Mibeko na ye; na ntembe te bato oyo bazalaki wana babosanaki ata mokolo moko te makambo oyo bamonaki. (Kob. 19:2-9, 16-19; tángá Kobima 20:18; Kolimbola Mibeko 4:9, 10.) Yango ezalaki ebandeli ya makambo ya sika na boyokani ya Nzambe ná ekólo Yisraele. Mwa moke na nsima, Yehova ayebisaki ndenge oyo basengeli kosalaka mpo na koyanganisa basaleli na ye. Ayebisaki Moize asala kelelo mibale ya palata, oyo esengeli kobɛtamaka mpo na kobenga “liyangani mobimba” mpo bákutana na “monɔkɔ ya hema ya kokutana.” (Mit. 10:1-4) Kanisá esengo oyo bato bazalaki koyoka na mabaku yango!

4, 5. Mpo na nini mayangani oyo Moize mpe Yosua basalisaki ezalaki na ntina mingi?

4 Na nsuka ya mobembo ya mbula 40 na esobe, na ntango moko ya ntina mingi mpo na ekólo yango oyo esalemaki sika, Moize ayanganisaki bandeko na ye Bayisraele. Etikalaki moke bákɔta na Mokili ya Ndaka. Ezalaki ntango oyo ebongi mpenza mpo Moize akundwela bango makambo nyonso oyo Yehova asalaki mpe oyo asengelaki kosala mpo na bango na nsima.​—Mib. 29:1-15; 30:15-20; 31:30.

5 Mbala mosusu na liyangani yango kaka, Moize alobelaki ebongiseli oyo esɛngaki ete basaleli ya Nzambe báyanganaka mpo na koteyama. Na nsuka ya mbula nsambo nyonso, na fɛti ya mwa bandako ya matiti, mibali, basi, bana, mpe bapaya oyo bazalaki kofanda na Yisraele basengelaki koyangana na esika oyo Yehova aponaki ‘mpo báyoka mpe mpo báyekola kobanga Yehova Nzambe na bango mpe kokeba ete bákokisa maloba nyonso ya mobeko.’ (Tángá Kolimbola Mibeko 31:1, 10-12.) Tomoni mpenza ete banda na ebandeli mpenza, ezalaki polele ete libota ya basaleli ya Nzambe basengelaki koyanganaka mbala na mbala mpo na koyoka liloba ya Yehova mpe mikano na ye. Ntango Bayisraele bazwaki Mokili ya Ndaka mobimba, kasi banguna bazalaki naino zingazinga na bango, Yosua ayanganisaki Yisraele mobimba mpo na kolendisa bango bákangama na ekateli oyo bazwaki ya kotikala sembo epai ya Yehova. Na bongo, bato nyonso balapaki ndai ya kosalela Nzambe.​—Yos. 23:1, 2; 24:1, 15, 21-24.

6, 7. Mpo na nini tokoki koloba ete mayangani ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso ezalaki ntango ya makambo ya minene?

6 Basaleli ya Yehova ya ntango na biso mpe basalaki mayangani minene oyo etiká nsango; na mabaku yango, mbongwana minene ezalaki koyebisama mpo na misala ya Teokrasi to bingɛngiseli ya sika ezalaki kopesama. (Mas. 4:18) Liyangani ya monene ya liboso oyo Bayekoli ya Biblia basalaki nsima ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba ezalaki na 1919 na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Liyangani yango oyo esangisaki bato soki 7 000, ebandisaki mosala monene ya kosakola na mokili mobimba. Na 1922, na liyangani ya mikolo 9 oyo esalemaki mpe na Cedar Point, Joseph Rutherford alendisaki lisusu basakoli na mosala yango ntango alobaki na bayangani oyo bazalaki koyoka ye na likebi ete: “Bózala batatoli ya sembo mpe ya solo ya Nkolo. Bókende liboso na etumba tii ntango bisika nyonso ya Babilone ekotikala mpamba. Bósakola nsango tii na bamboka oyo ezali mosika mpenza. Mokili oyo esengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe mpe ete Yesu Kristo azali Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. Oyo ezali mokolo oyo eleki mikolo nyonso. Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino nde bapalanganisi ya nsango na ye. Na yango bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Bayangani nyonso, ata mpe basaleli mosusu ya Nzambe na mokili mobimba, bandimaki na esengo elendiseli yango.

7 Na 1931, na liyangani oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio, Bayekoli ya Biblia bandimaki na esengo nkombo ya Batatoli ya Yehova. Na nsima, na 1935, na Washington, Ndeko Rutherford alimbolaki “ebele mpenza ya bato” oyo Emoniseli elobi ete “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-mpate.” (Em. 7:9-17) Na 1942, ntango Etumba ya mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, Nathan Knorr asalaki diskur ya kafukafu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kimya ekoki koumela?” Na diskur yango, alimbolaki “nyama mabe ya langi ya motane” oyo elobelami na Emoniseli 17 mpe amonisaki ete mosala ya kosakola ekokoba nsima ya etumba.

Liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge na 1950, na New York

8, 9. Mpo na nini mayangani mosusu esimbaki mpenza mitema ya bandeko oyo bazalaki kuna?

8 Na liyangani “Bikólo ya esengo,” oyo esalemaki na 1946 na Cleveland, na etúká ya Ohio, Ndeko Knorr asalaki diskur moko oyo esimbaki mpenza mitema ya bato. Motó ya likambo na yango ezalaki “Mikakatano ya kotonga lisusu mpe kokolisa mosala.” Ndeko moko oyo azalaki na liyangani yango amonisaki esengo oyo bayangani nyonso bazalaki na yango na maloba oyo: “Nazalaki na libaku malamu ya kozala nsima na ye na estrade na mokolo yango, mpe ntango azalaki kolobela mosala mpe na nsima amonisaki mokano ya kotonga bandako mosusu ya kolala mpe ya imprimeri na Betele ya Brooklyn, bayangani babɛtaki mabɔkɔ mposa bátika te. Atako tokokaki komona polele te bilongi ya bayangani longwa na estrade, tomonaki ndenge oyo bango nyonso bazalaki na esengo.” Na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge, oyo esalemaki na engumba New York na 1950, bayangani basepelaki mingi kozwa Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, eteni ya liboso ya Biblia oyo ezalaki na Lingelesi ndenge ezali kolobama lelo, mpe oyo ezongisi nkombo ya Nzambe na Liloba na Ye.​—Yir. 16:21.

9 Mayangani ya basaleli ya sembo ya Yehova oyo esalemaki nsima ya minyoko to bipekiseli esimbaki mpe mitema ya bayangani. Adolf Hitler alapaki ndai ete akosilisa Batatoli ya Yehova na Allemagne; nzokande, Batatoli 107 000 bazalaki na liyangani oyo esalemaki na 1955 na engumba Nuremberg, na esika mpenza oyo basoda na ye bazalaki kosala defile. Bandeko mingi oyo bazalaki na liyangani yango bazalaki kolela na esengo! Kati na bato 166 518 oyo bazalaki na mayangani ya mikolo misato oyo ezalaki na motó ya likambo “Kobanga Nzambe,” oyo esalemaki na Pologne na 1989, bayangani mingi bautaki na ex-Union soviétique mpe na Tchécoslovaquie, mpe na mikili mosusu ya Mpoto ya Ɛsti. Mpo na bamosusu kati na bango, ezalaki mbala ya liboso bázala na likita oyo ezali na basaleli ya Nzambe koleka 15 to 20. Kanisá mpe esengo oyo bandeko bazalaki na yango na 1993, na liyangani ya bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge oyo esalamaki na engumba Kiev, na ekólo Ukraine, oyo ezalaki na motó ya likambo “Mateya mauti na Nzambe.” Na liyangani yango, bato 7 402 bazwaki batisimo, motángo oyo eleki monene ya Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo na mbala moko banda lisangá ya bokristo ebandá.​—Yis. 60:22; Hag. 2:7.

10. Mayangani nini etikalá na makanisi na yo, mpe mpo na nini?

10 Mbala mosusu ezali mpe na mayangani ya etúká to oyo esangisaki bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge oyo etikalá na makanisi na yo. Oyebaka lisusu liyangani ya liboso oyo okendá to mbala mosusu liyangani oyo ozwaki batisimo? Yango ezali makambo minene oyo etikalá na makanisi na yo. Kobosanaka yango te!​—Nz. 42:4.

MAYANGANI OYO ESALEMAKA MBULA NA MBULA

11. Na ntango ya kala, ebongiseli nini Nzambe atyaki na Yisraele mpo báyanganaka mbala na mbala?

11 Yehova asɛngaki ete Bayisraele báyanganaka na Yerusaleme na bafɛti misato oyo ezalaki kosalema mbula na mbula: fɛti ya bagato ezangá levire, fɛti ya bapɔsɔ (oyo na nsima ekómaki kobengama Pantekote), mpe fɛti ya bandako ya matiti. Mpo na bafɛti yango, Nzambe alobaki boye: “Mbala misato na mbula, mobali na yo nyonso akomonana liboso ya elongi ya Nkolo ya solo, Yehova.” (Kob. 23:14-17) Lokola bayebaki ete bafɛti yango ezalaki na ntina mingi, batata mingi bazalaki komema mabota na bango.​—1 Sa. 1:1-7; Luka 2:41, 42.

12, 13. Mpo na Bayisraele mingi, kokende na bafɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula ezalaki kosɛnga nini?

12 Kanisá makambo oyo yango ezalaki kosɛnga mpo Moyisraele asala mobembo wana ná libota na ye. Na ndakisa, Yozefe ná Maria bazalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 100 kolongwa na Nazarete tii na Yerusaleme. Okanisi ete ekokaki kosɛnga yo mikolo boni mpo osala mobembo ya ndenge wana ná bana ya mike? Lisolo oyo elobeli mobembo oyo Yesu asalaki na Yerusaleme ntango azalaki naino elenge emonisi ete bato bazalaki kosala mibembo yango elongo na bandeko mpe baninga. Na ntembe te makambo ndenge na ndenge ezalaki koleka na mibembo yango oyo ezalaki kosɛnga bátambola, bálamba biloko ya kolya, mpe bábongisa bisika malamu ya kolala na bamboka mosusu. Atako bongo, bazalaki mpenza kobanga makama te mpamba te batikaki Yesu, oyo azalaki elenge ya mbula 12, atambola na bato mosusu. Kanisá makambo ndenge na ndenge oyo ezalaki kotikala na makanisi ya bato yango, mingimingi bilenge!​—Luka 2:44-46.

13 Ntango Bayisraele mingi bakómaki kofanda na mikili ndenge na ndenge, baoyo bazalaki koya na bafɛti bazalaki kouta bipai na bipai. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Bayuda mpe Baprozelite oyo bayaki na Yerusaleme bautaki na mikili lokola Itali, Libi, Krɛtɛ, Azia Moke, mpe Mezopotamia.​—Mis. 2:5-11; 20:16.

14. Matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa ntango bazalaki koyangana na bafɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula?

14 Mpo na Bayisraele ya sembo, likambo eleki ntina na mibembo yango ezalaki nde libaku ya kosambela Yehova elongo na bankóto ya bandeko na bango oyo balingaka Nzambe. Yango ezalaki kosala nini epai ya bayangani yango? Tokoki kozwa eyano na malako oyo Yehova apesaki mpo na fɛti ya bandako ya matiti: “Osengeli kosepela na boumeli ya fɛti na yo, yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi ná Molevi ná moto oyo afandi mopaya ná mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá, baoyo bazali na kati ya baporte na yo. Mikolo nsambo, okosala fɛti mpo na Yehova Nzambe na yo na esika oyo Yehova akopona, mpamba te Yehova Nzambe na yo akopambola yo na mbuma na yo nyonso mpe na misala na yo nyonso, mpe osengeli kozala kaka na esengo.”​—Mib. 16:14, 15; tángá Matai 5:3.

MPO NA NINI TOSENGELI KOSEPELA NA MAYANGANI YA MIKOLO NA BISO?

15, 16. Makambo nini omipimelaki mpo okende na mayangani? Mpo na nini milende yango ezali na ntina?

15 Mayangani yango ya ntango ya kala ezali mpenza ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo! Atako makambo mingi ebongwani banda ntango wana, makambo ya ntina mingi ya mayangani ebongwani te. Na ntango ya kala, bayangani bazalaki komipimela makambo mingi mpo na kokende na mayangani yango. Ezali mpe bongo mpo na bandeko mingi lelo oyo. Kasi, bazwelaka yango matomba mingi. Mayangani yango ezalaki mabaku ya kolendisama na elimo mpe ezali bongo tii lelo. Na mayangani yango toyokaka mateya mpe bandimbola oyo esalisaka biso mpenza tóbatela boyokani na biso na Nzambe. Mayangani elendisaka biso tósalela makambo oyo toyekolaka, esalisaka biso tókima mikakatano, mpe elendisaka biso tótya makanisi na biso na makambo oyo elendisaka, na esika ya kotya yango na makambo oyo elɛmbisaka na elimo.​—Nz. 122:1-4.

Corée du sud

16 Likambo oyo emonanaka mingi na mayangani yango ezali nde esengo. Lapolo ya liyangani moko oyo esalemaki na 1946 elobi boye: “Ezalaki esengo mpenza komona bankóto ya batatoli bafandi na bisika ya malamu, mpe esengo ezalaki lisusu mingi koyoka ndenge etuluku moko monene ya bandeko bazalaki kobɛta miziki mpe ebele ya bayangani bazalaki koyemba banzembo ya Bokonzi oyo ezalaki koyokana na esika mobimba ya liyangani mpo na kosanzola Yehova.” Lapolo yango ebakisaki boye: “Ata bandeko oyo bautaki na mikili mosusu bapesaki bankombo na Departema oyo ezalaki kozwa bankombo ya bandeko oyo basepeli kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge, mpo bazalaki na esengo ya kosalela bandeko na bango batatoli.” Yo mpe osilá komona esengo yango na mayangani ya etúká to na mayangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge?​—Nz. 110:3; Yis. 42:10-12.

17. Mbongwana nini esalemi na ndenge ya kobongisa mayangani na mikolo na biso?

17 Makambo mosusu ebongwani na ndenge oyo mayangani ebongisamaka. Na ndakisa, bandeko mosusu bazali koyeba lisusu ntango oyo mayangani ezalaki koumela mikolo mwambe! Bazalaki kolanda masolo na ntɔngɔ, na nsima ya midi, mpe na mpokwa. Ezalaki mpe na ntango oyo bazalaki kobima na mosala ya kosakola. Masolo mosusu ezalaki kobanda na ngonga ya 9 na ntɔngɔ, mpe mbala mingi masolo mosusu ezalaki kosalema tii na ngonga ya 9 na mpokwa. Bandeko mosusu bazalaki kosala mosala makasi mpo na kolamba ti, bilei ya midi, mpe bilei ya mpokwa mpo na bayangani. Lelo oyo, mayangani ezalaka lisusu na mikolo mingi te, mpe lokola mabota mpe bato bango moko bamemaka biloko ya kolya, yango esalisaka mpo bálanda programɛ malamu.

Mozambique

18, 19. Ozelaka mpenza makambo nini oyo tomesaná kolanda na mayangani, mpe mpo na nini?

18 Bandeko mingi bazelaka mpenza makambo mosusu oyo tomesaná kolanda na mayangani. Tozwaka bilei ya elimo “na ntango oyo ebongi,” oyo esalisaka biso tókanga ntina ya bisakweli mpe mateya ya Biblia, na nzela ya badiskur mpe na nzela ya mikanda ya sika oyo ebimaka na mayangani. (Mat. 24:45) Mbala mingi mikanda yango ya sika esalisaka bato oyo balingaka solo bákanga ntina ya mateya ya Biblia. Badrame elendisaka bilenge mpe mikóló bátalela makanisi na bango mpe bákima makambo mabe ya mokili oyo ezali koluka kobenda bango. Diskur ya batisimo mpe epesaka biso nyonso libaku ya kotalela lisusu makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe toyokaka esengo ya komona bandeko mosusu bamonisi ete bamipesi na Yehova.

19 Ya solo mpenza, mayangani oyo basaleli ya Yehova basalaka banda kala esalisaka bango básalela ye na esengo mpe na ndenge oyo ebongi na bantango ya mpasi. Mayangani yango elendisaka na elimo, epesaka biso libaku ya kokutana na baninga ya sika, esalisaka biso tósepela na lisangá ya bandeko ya mokili mobimba, mpe Yehova asalelaka yango mpenza mpo na kopambola mpe kosalisa basaleli na ye. Na ntembe te, mokomoko na biso akomibongisa mpo azangisaka te mokolo mokomoko ya liyangani nyonso mpe azwela yango matomba.​—Mas. 10:22.