Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge mokili oyo ekosuka

Ndenge mokili oyo ekosuka

“Bozali na molili te, mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi.”​—1 TES. 5:4.

1. Nini ekosalisa biso tókoba kosɛnzɛla mpe tóyikela komekama mpiko?

MAKAMBO minene ekosalema na mokili mosika te. Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali kondimisa likambo yango; yango wana tosengeli kosɛnzɛla. Nini ekosalisa biso tósɛnzɛla? Ntoma Paulo alendisi biso ‘tótya miso . . . na biloko oyo emonanaka te.’ Ya solo, tosengeli kobatela na makanisi mbano ya bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabele. Ndenge bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima emonisi yango, ntoma Paulo akomaki maloba wana mpo na kolendisa bandeko na ye bakristo bátya makanisi na mapamboli oyo bakozwa soki batikali sembo. Yango elingaki kosalisa bango mpe báyika mpiko na komekama mpe minyoko.​—2 Ko. 4:8, 9, 16-18; 5:7.

2. (a) Mpo tóbatela makasi elikya na biso, tosengeli kosala nini? (b) Makambo nini tokotalela na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi?

2 Elendiseli wana ya ntoma Paulo ezali na likanisi moko ya ntina mingi: Mpo tóbatela makasi elikya na biso, tosengeli te kotya makanisi kaka na makambo oyo tozali komona sikoyo. Tosengeli mpe kotya makanisi na makambo minene oyo tomoni naino te. (Ebr. 11:1; 12:1, 2) Na yango, tólobela makambo zomi oyo ekosalema na mikolo ezali koya, oyo etaleli mpenza elikya na biso ya bomoi ya seko. *

MAKAMBO NINI EKOSALEMA LIBOSO MPENZA NSUKA EYA?

3. (a) Likambo nini ya monene ekosalema na mikolo ekoya oyo 1 Batesaloniki 5:2, 3 elobeli? (b) Bakonzi ya politiki bakosala nini, mpe banani bakosangana na bango?

3 Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Batesaloniki, alobelaki moko ya makambo minene oyo ekosalema. (Tángá 1 Batesaloniki 5:2, 3.) Alobelaki “mokolo ya Yehova.” Na vɛrsɛ yango, maloba “mokolo ya Yehova” elimboli eleko moko oyo ekobanda ntango mangomba ya lokuta ekobomama mpe ekosuka na etumba ya Armagedone. Kasi, mwa moke liboso mokolo yango ya Yehova ebanda, bakonzi ya mokili bakoloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Ekoki kozala ete likambo moko monene ekosalema, oyo ekotinda bango bábanda koloba bongo, to mpe ekozala na makambo oyo ekolandana, oyo ekobanda kotinda bango bábanda koloba bongo. Mbala mosusu bato ya bikólo bakokanisa ete mosika te bakosilisa mikakatano mosusu ya minene oyo ezali kotungisa bango. Bongo bakonzi ya mangomba bakosala nini? Lokola bango mpe bamikɔtisaka na makambo ya mokili, ekoki kozala ete bakoloba lokola bakonzi ya politiki. (Em. 17:1, 2) Na ndenge yango, bakonzi ya mangomba bakosala makambo lokola basakoli ya lokuta ya ekólo Yuda na ntango ya kala. Yehova alobaki mpo na bango ete: “Bazali [koloba] ete: ‘Kimya ezali! Kimya ezali!’ nzokande kimya ezali te.”​—Yir. 6:14; 23:16, 17.

4. Toyebi makambo nini, oyo bato ya mokili bayebi yango te?

4 Ata soki banani bakoloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!”, likambo yango ekomonisa ete etikali moke mokolo ya Yehova ebanda. Yango wana ntoma Paulo alobaki ete: “Bandeko, bozali na molili te, mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi, mpo bozali bino nyonso bana ya pole.” (1 Tes. 5:4, 5) Biso tokeseni na bato ya mokili mpamba te na lisalisi ya Biblia, tozali koyeba ndimbola ya makambo oyo ezali koleka lelo na mokili. Toyebi naino te ndenge oyo esakweli ya koloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” ekokokisama mpenza. Yango wana, tózala na ekateli ya ‘kozala ekɛngɛ mpe kobatela makanisi na biso.’​—1 Tes. 5:6; Sef. 3:8.

MANGOMBA YA LOKUTA EZALI KOYEBA TE ETE EKOBOMAMA

5. (a) ‘Bolɔzi monene’ ekobanda ndenge nini? (b) “Mokonzi” nini akosutuka ete likambo oyo akanisaki te ekómeli ye na mbalakaka?

5 Likambo nini oyo tomoni naino te ekosalema na nsima? Ntoma Paulo alobaki boye: “Na ntango oyo bato bakoloba: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” “Libebi [yango] ya mbalakaka” ekobanda na kobomama ya “Babilone Monene,” elingi koloba mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo Biblia ebengi mpe “mwasi ya ndumba.” (Em. 17:5, 6, 15) Kobebisama ya mangomba nyonso ya lokuta, ata mpe mangomba ya bokristo, ekozala ebandeli ya ‘bolɔzi monene.’ (Mat. 24:21; 2 Tes. 2:8) Likambo yango ekoya na mbalakaka mpo na bato mingi. Mpo na nini? Mpamba te tii liboso likambo yango ekómela ye, mwasi yango ya ndumba akomimona ete azali “mokonzi” oyo ‘akomona mawa ata moke te.’ Kasi, akosutuka ete likambo oyo akanisaki te ekómeli ye na mbalakaka. Akobomama nokinoki, “na mokolo kaka moko.”​—Em. 18:7, 8.

6. Nani akoboma mangomba ya lokuta?

6 Liloba ya Nzambe emonisi ete “nyama mabe” oyo ezali na “maseke zomi” nde ekobundisa mwasi ya ndumba. Mokanda ya Emoniseli ezali komonisa ete nyama mabe yango ezali nde ONU. “Maseke zomi” ezali komonisa bikólo nyonso oyo ezali kopesa mabɔkɔ na “nyama mabe ya langi motane makasi.” * (Em. 17:3, 5, 11, 12) Makambo ekosuka ndenge nini ntango nyama mabe ekobundisa mwasi yango ya ndumba? Bikóló oyo ezali na ONU ekopunza bozwi ya mwasi yango, ekomonisa polele bizaleli na ye, ekolya misuni na ye, mpe “ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.” Akobebisama mpo na libela.​—Tángá Emoniseli 17:16.

7. Nini ekotinda “nyama mabe” ebundisa mwasi ya ndumba?

7 Bisakweli ya Biblia emonisi mpe nini ekotinda nyama mabe ebundisa mwasi ya ndumba. Yehova akotya na mitema ya bakonzi ya politiki mposa ya “kokokisa likanisi na ye,” elingi koloba koboma mwasi ya ndumba. (Em. 17:17) Mangomba oyo ezali kolendisa bitumba ezali se kotya mobulu na mokili; na yango, mbala mosusu baguvɛrnema ya mokili ekokanisa ete koboma mwasi yango ya ndumba ekosalisa bango mpo bákɔtisa kimya na mokili. Kutu, ntango bakonzi ya mokili bakobundisa mwasi ya ndumba, bango bakokanisa ete bazali kokokisa “likanisi na bango kaka moko.” Nzokande, Nzambe nde akosalela bango mpo na koboma mangomba ya lokuta. Na ndenge yango, ekozala lokola nde eteni moko ya mokili ya Satana ebalukeli eteni mosusu ya mokili ya Satana, mpe ye moko Satana akokoka kopekisa likambo yango te.​—Mat. 12:25, 26.

BABUNDISI BASALELI YA NZAMBE

8. Etumba ya “Goge ya mokili ya Magoge” ezali nini?

8 Soki mangomba ya lokuta ebomami, ekomonana ete basaleli ya Nzambe bazali kaka ‘kofanda na kimya,’ “kozanga efelo.” (Ezk. 38:11, 14) Nini ekokómela bato yango oyo bakokoba kosambela Yehova, kasi bakomonana lokola nde bazali na libateli te? Emonani ete “bato ya bikólo ebele” bakoluka kobundisa bango na mbala moko. Liloba ya Nzambe ebengi yango etumba ya “Goge ya mokili ya Magoge.” (Tángá Ezekiele 38:2, 15, 16.) Tosengeli nde kobanga etumba yango?

9. (a) Bakristo basengeli kokanisa libosoliboso nini? (b) Makambo nini tosengeli kosala mpo na kolendisa kondima na biso?

9 Atako toyebi liboso ete bakobundisa basaleli ya Nzambe, yango esengeli te kotungisa biso koleka ndelo. Kasi, tosengeli kokanisa libosoliboso kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolongisama ya bokonzi na ye, kasi lobiko na biso moko te. Kutu mbala koleka 60, Yehova alobaki ete: “Bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.” (Ezk. 6:7) Yango wana, tozali kozela na mposa makasi ndenge maloba yango ya ntina mingi ya esakweli ya Ezekiele ekokokisama, mpe tozali na elikya ete “Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.” (2 Pe. 2:9) Kasi liboso makambo yango esalema, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kolendisa kondima na biso mpo tótikala sembo epai ya Yehova ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini. Tosengeli kosala nini? Tosengeli kobondelaka, koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, mpe tosengeli koyebisaka basusu nsango ya Bokonzi. Soki tozali kosala bongo, tokobatela elikya na biso ya bomoi ya seko makasi lokola “longo.”​—Ebr. 6:19; Nz. 25:21.

BATO YA BIKÓLO BAKOYEBA ETE EZALI LOBƆKƆ YA YEHOVA

10, 11. Likambo nini ekozala ebandeli ya Armagedone, mpe makambo nini ekosalema na ntango wana?

10 Likambo nini ekosalema ntango bakoluka kobundisa basaleli ya Yehova? Yehova akotinda Yesu ná baanzelu mpo na kobatela basaleli na Ye. (Em. 19:11-16) Yango nde ekozala “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” oyo ebengami Armagedone.​—Em. 16:14, 16.

11 Mpo na etumba yango, na nzela ya Ezekiele, Yehova alobaki boye: “‘Na etúká na ngai mobimba ya ngombangomba, nakobenga mopanga mpo na kobundisa [Goge],’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. ‘Mopanga ya moto na moto ekobalukela ndeko na ye moko.’” Lokola bato oyo bazali na ngámbo ya Satana bakozala na nsɔmɔ makasi, bakobulungana mpe bakobunda bango na bango​—moto na moto akobundisa moninga na ye. Kasi, Satana ye moko mpe akozala na kimya te. Yehova alobi boye: “Nakonɔkisela [Goge] ná bituluku na ye mpe ebele ya bato ya bikólo oyo bakozala elongo na ye mbula makasi oyo ezali kozindisa, mbula ya mabanga, mɔtɔ mpe sufulu.” (Ezk. 38:21, 22) Nsuka na yango ekozala nini?

12. Bálinga, bálinga te, bato ya bikólo bakondima nini?

12 Bato ya bikólo bakoyeba ete Yehova ye moko nde apesi mitindo mpo libebi ya ndenge wana ekómela bango. Na yango, ntango mosusu bato oyo bazali na ngámbo ya Satana bakoloba lokola basoda ya Ezipito oyo balandaki Bayisraele na Mbu Motane, ete: “Yehova azali mpenza kobunda . . . mpo na bango”! (Kob. 14:25) Bálinga, bálinga te, bato ya bikólo bakondima ete ezali lobɔkɔ ya Yehova. (Tángá Ezekiele 38:23.) Makambo yango oyo ekolandana ndenge wana ekómi mpenza pene?

EKÓLO MOSUSU TE OYO ELEKI NA NGUYA EKOBIMA

13. Makambo nini toyebi mpo na eteni ya mitano ya ekeko oyo Danyele alobeli?

13 Esakweli moko oyo ezali na mokanda ya Danyele ezali kosalisa biso tóyeba esika oyo tozali na ndenge oyo ntango ezali kokende. Danyele alobeli ekeko moko ya moto. (Dan. 2:28, 31-33) Biteni na yango ya nzoto ezali komonisa bikólo oyo elekaki na nguya, oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe, ezala na ntango ya kala to na mikolo na biso. Bikólo yango ezali Babilone, Bamede ná Baperse, Grɛsi, Roma, mpe ya nsuka ezali bokonzi oyo eleki na nguya na mikolo na biso. Esakweli ya Danyele elobi ete bokonzi yango ya nsuka emonisami na makaka mpe misapi ya makolo ya ekeko yango. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Grande-Bretagne ná États-Unis esalaki boyokani moko makasi. Na yango, eteni ya mitano ya ekeko oyo Danyele alobeli ezali komonisa bokonzi ya Anglo-américain. Makaka ezali eteni ya nsuka ya ekeko yango; yango emonisi ete ekólo mosusu te oyo eleki na nguya ekobima. Lokola makaka mpe misapi esalemi na ebende oyo esangani na mabele ya lima, yango emonisi ndenge oyo bokonzi ya Anglo-américain ezali, elingi koloba ete ezali lisusu na nguya te ya kosala makambo ndenge elingi.

14. Bokonzi nini ekozala nguya oyo eleki makasi ntango Armagedone ekoya?

14 Esakweli yango emonisi mpe ete libanga moko monene elongolamaki na ngomba moko. Likambo wana esalemaki na 1914. Libanga yango ezali komonisa Bokonzi ya Nzambe mpe ngomba ezali komonisa boyangeli ya Yehova. Libanga yango ezali kokende tii ekotuta makaka ya ekeko. Na Armagedone, makaka mpe biteni mosusu ya ekeko yango ekopanzana. (Tángá Danyele 2:44, 45.) Yango elimboli ete bokonzi ya Anglo-américain ekozala kaka ekólo oyo eleki na nguya ntango Armagedone ekoya. Ekozala mpenza likambo monene komona ndenge oyo esakweli yango mobimba ekokokisama! * Kasi ezali boni mpo na Satana ye moko? Yehova akosala ye nini?

OYO EKOKÓMELA MONGUNA MONENE YA NZAMBE

15. Nsima ya Armagedone, nini ekokómela Satana ná bademo na ye?

15 Satana akomona naino banda ebandeli tii nsuka ndenge oyo ebongiseli na ye mobimba awa na mabele ekobomama. Na nsima, Yehova akotya likebi na ye epai ya Satana ye moko. Ntoma Yoane alobi likambo oyo ekosalema na nsima. (Tángá Emoniseli 20:1-3.) “Anzelu . . . [oyo azali] na fungola ya libulu mozindo” elingi koloba Yesu Kristo ye moko, akokanga Satana ná bademo na ye, akobwaka bango na libulu mozindo, mpe akotika bango kuna na boumeli ya mbula nkóto. (Luka 8:30, 31; 1 Yoa. 3:8) Yango nde ekozala likambo ya liboso oyo akosala mpo na kopanza motó ya nyoka. *​—Eba. 3:15.

16. Kobwakama na “libulu mozindo” ekolimbola nini mpo na Satana?

16 “Libulu mozindo” epai Satana ná bademo na ye bakobwakama ezali nini? Liloba ya Grɛki abussos oyo Yoane asaleli elimboli “ya mozindo makasi to mozindo oyo eleki.” Ekoki mpe kobongolama na “oyo eyebani nsuka te, ezali na ndelo te,” mpe “libulu oyo ezali na nsuka te.” Na yango, ezali elilingi ya esika oyo moto moko akoki kokóma te longola kaka Yehova mpe anzelu oyo apesi “fungola ya libulu mozindo.” Ntango Satana akobwakama na libulu yango, akozala lisusu na nguya moko te mpo “akosa lisusu bikólo.” ‘Nkɔsi yango oyo ezali koganga’ ekokanga monɔkɔ mpo na libela!​—1 Pe. 5:8.

MAKAMBO OYO EKOMEMA NA ELEKO MOKO YA KIMYA

17, 18. (a) Na lisolo oyo tolobeli makambo nini oyo tomoni naino te? (b) Nsima ya makambo yango, tokokɔta na eleko nini?

17 Makambo minene mpenza oyo ekoningisa mokili ekosalema mosika te. Tozali kozela tómona ndenge oyo maloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” ekokokisama. Na nsima tokomona kobomama ya Babilone Monene, etumba ya Goge ya mokili ya Magoge, etumba ya Armagedone, mpe ndenge Satana ná bademo na ye bakobwakama na libulu mozindo. Nsima ya makambo yango, ntango mabe nyonso ekosila, makambo ya sika ekobanda; tokokɔta na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, oyo ekomemela biso “kimya mingi.”​—Nz. 37:10, 11.

18 Longola makambo mitano oyo tolobeli, tosengeli mpe kotya miso na biso na makambo mosusu oyo tomoni naino te. Tokolobela makambo yango na lisolo oyo elandi.

^ par. 2 Tokotalela makambo yango zomi na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi.

^ par. 6 Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 251-258.

^ par. 14 Na Danyele 2:44, maloba “ekosukisa makonzi oyo nyonso” etaleli makonzi, to bikólo oyo eleki na nguya, oyo emonisami na biteni ya ekeko yango. Nzokande, esakweli mosusu ya Biblia emonisi ete “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakosangana mpo na kobundisa Yehova na “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:14; 19:19-21) Na yango, longola makonzi oyo emonisami na biteni ya ekeko, makonzi mosusu nyonso ya mokili ekobomama na Armagedone.

^ par. 15 Yesu akopanza motó ya nyoka malamumalamu na nsuka ya mbula nkóto, ntango Satana ná bademo na ye bakobwakama na “laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu.”​—Em. 20:7-10; Mat. 25:41.