Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elendiseli oyo euti “na monɔkɔ ya bana”

Elendiseli oyo euti “na monɔkɔ ya bana”

Na Desɛmbɛ 2009, Tribinale Monene ya ekólo Russie endimaki ekateli oyo esɛngaki ete bápekisa misala ya ebongiseli moko oyo endimami na mibeko ya Leta, oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela na engumba Taganrog mpe bábɔtɔla Ndako ya Bokonzi. Elobaki mpe ete mikanda na biso 34 ekɔti na liste ya mikanda oyo etindaka bato na mobulu. Batyaki ekateli wana ya kokamwa na site ya Batatoli ya Yehova na Internet, ata mpe bafɔtɔ ya Batatoli mosusu ya engumba wana, ezala mpe bafɔtɔ ya bana mike.

Bana ya ekólo Australie

Mwa basanza na nsima, libota moko ya Batatoli oyo bafandaka na etúká ya Queensland, na ekólo Australie, oyo bamonaki lapolo ya ekateli wana ya tribinale, batindaki kartɔ moko na biro ya Batatoli ya Yehova na Russie ná mokanda moko oyo elobaki boye: “Bandeko ya bolingo, bana na biso Cody ná Larissa basepelaki mingi na kondima oyo baninga na biso na Russie bamonisaki mpe bayokaki mawa mpo na mikakatano oyo bakutanaki na yango. Bakomaki bakarte mpe mikanda, mpe tobongisi mwa kartɔ ya bakado oyo tolingi kotindela bana na engumba Taganrog, mpo báyeba ete na bamboka mosusu ya mosika, ezali mpe na bana oyo bazali kosalela Yehova na bosembo, mpe bazali kokanisa bango. Batindeli bango mbote mingi ya bolingo.”

Ntango bana ya engumba Taganrog bazwaki bakado yango, bakomaki mikanda oyo ezalaki na mayemi mpo na kopesa mersi na libota wana ya Australie. Ndeko moko oyo asalaka na biro ya filiale ya Russie asepelaki mingi na elendiseli wana oyo eutaki “na monɔkɔ ya bana” mpe akomelaki Cody ná Larissa boye: “Boyebi malamu mpasi oyo bana mpe mikóló bayokaka soki bapesi bango etumbu mpo na mabe oyo basali te. Bandeko mibali mpe basi ya engumba Taganrog basali mabe moko te, kasi babɔtɔli bango Ndako ya Bokonzi na bango. Likambo yango esalaki bango mpasi mingi. Bakolendisama na koyeba ete bato mosusu oyo bazali mosika bazali mpe kokanisa bango. Matɔndi mingi mpo na elimo na bino ya boboto mpe ya bokabi!”​—Nz. 8:2.

Bana ya ekólo Russie oyo bazwaki bakado ya bana ya ekólo Australie

Ya solo, tozali mpenza na lisangá ya bandeko na mokili mobimba, mpe bolingo oyo tomoniselanaka esalisaka biso nyonso tóyika mpiko na mikakatano mpe minyoko. Ntango batribinale ezali koluka koyeba soki mikanda ya Batatoli ya Yehova etindaka bato na koyinana, bana na biso bazali komonisa ete bamibanzabanzaka mpo na basusu, ata soki bato mingi bayebaka yango te. Bazali kosala yango kozanga kopona mboka to ekólo. Na ndenge yango, bazali komonisa ete Yesu alobaki mpenza solo, ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoa. 13:35.