Tózala na mpiko ntango tokutani na mikakatano
“Nzambe azali ekimelo mpe bokasi na biso, lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.”—NZ. 46:1.
1, 2. Mikakatano nini bato mingi bazali kokutana na yango lelo oyo, kasi basaleli ya Nzambe basengeli kosala nini?
TOZALI na ntango moko ya mikakatano. Mokili etondi na makama. Koningana ya mabele, tsunami, mɔtɔ oyo ezali kobebisa bazamba mpe bisika mosusu, mpela, bangomba oyo esanzaka mɔtɔ (volcans), mpe mipɛpɛ makasi ezali kobimisela bato mpasi mingi. Longola yango, mikakatano na kati ya libota mpe mikakatano oyo moto na moto azali kokutana na yango ezali kobangisa mpe kopesa mawa. Ezali mpenza solo ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekwelaka biso nyonso.—Mos. 9:11.
2 Basaleli mingi ya Nzambe bazali kolonga mikakatano ya ndenge wana. Atako bongo, lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, tosengeli komilɛngɛla mpo na kolonga mikakatano mosusu oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ekoya. Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango kozanga ete tóbulungana? Nini ekosalisa biso tózala na mpiko mpo na kolonga mikakatano ya lelo oyo?
MATEYA NINI TOKOKI KOZWA EPAI YA BAOYO BAMONISAKI MPIKO LIBOSO YA MIKAKATANO?
3. Ndenge Baroma 15:4 emonisi yango, nini ekoki kobɔndisa biso ntango tozali kokutana na mikakatano?
3 Atako lelo oyo bato mingi bazali kokutana na mikakatano koleka ndenge ezalaki liboso, mikakatano ebandi lelo te. Tótalela mateya oyo tokoki kozwa epai ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala oyo bamonisaki mpiko ntango bakutanaki na mikakatano.—Rom. 15:4.
4. Mikakatano nini Davidi akutanaki na yango, mpe nini esalisaki ye?
4 Tókanisa naino mikakatano oyo Davidi akutanaki na yango. Mokonzi Saulo alukaki koboma ye, banguna babundisaki ye, bakangaki basi na ye, basusu kati na basoda na ye, bato ya libota na ye mpe baninga na ye batɛkaki ye, mpe atungisamaki mingi na makanisi. (1 Sa. 18:8, 9; 30:1-5; 2 Sa. 17:1-3; 24:15, 17; Nz. 38:4-8) Lisolo ya bomoi ya Davidi oyo ezali na Biblia emonisi polele ete mikakatano wana ememelaki ye mpasi mingi. Kasi yango elɛmbisaki te kondima na ye epai ya Yehova. Azalaki kaka na kondima makasi, yango wana alobaki boye: “Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai. Nakozala na nsɔmɔ ya nani?”—Nz. 27:1; tángá Nzembo 27:5, 10.
5. Nini esalisaki Abrahama ná Sara bálonga mikakatano ya bomoi?
5 Abrahama ná Sara bafandaki bambula mingi ya bomoi na bango na bahema, lokola bapaya na bamboka oyo bayebaki malamu te. Bomoi na bango ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Atako bongo, balongaki mikakatano lokola nzala mpe mikakatano mosusu oyo eutaki na bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. (Eba. 12:10; 14:14-16) Nini esalisaki bango bálonga mikakatano wana? Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete Abrahama azalaki “kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.” (Ebr. 11:8-10) Abrahama ná Sara bazalaki ntango nyonso kotya makanisi na makambo oyo Nzambe alakaki bango, yango wana batikaki te ete mikakatano elɛmbisa bango.
6. Ndenge nini tokoki komekola Yobo?
6 Yobo akutanaki na mikakatano makasi mpenza. Kanisá naino ndenge amiyokaki ntango emonanaki lokola nde makambo nyonso ya bomoi na ye ebebi. (Yobo 3:3, 11) Longola yango, ayebaki malamu te mpo na nini makambo nyonso wana ezalaki kokómela ye. Atako bongo, alɛmbaki te. Atikalaki sembo epai ya Nzambe mpe abatelaki kondima na ye. (Tángá Yobo 27:5.) Atikelaki biso ndakisa malamu mpenza!
7. (a) Mikakatano nini Paulo akutanaki na yango na mosala ya Nzambe? (b) Nini epesaki ye mpiko mpo akoba na mosala yango?
7 Tótalela mpe ndakisa ya ntoma Paulo. Akutanaki na ‘makama na kati ya engumba, na makama na kati ya esobe mpe na mbu.’ Alobeli ‘nzala, mposa ya mai, malili mpe bolumbu.’ Paulo alobi mpe ete alekisaki ‘butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mai mozindo,’ mbala mosusu ntango masuwa ezindaki na mobembo moko oyo asalaki. (2 Ko. 11:23-27) Atako akutanaki na mikakatano nyonso wana, yoká ndenge alobaki ntango akutanaki na likambo moko oyo ekokaki komema ye na liwa mpo na mosala ya Nzambe: “Ezalaki bongo mpo biso tótya motema, epai na biso moko te, kasi epai ya Nzambe oyo alamwisaka bakufi. Na eloko monene oyo, liwa, nde abikisaki biso mpe akobikisa biso.” (2 Ko. 1:8-10) Bato mingi te bakutaná na makambo ya mpasi lokola oyo Paulo akutanaki na yango. Kasi, na bantango mosusu, bandeko mingi bamiyokaka lokola Paulo mpe mpiko oyo amonisaki ebɔndisaka bango mpenza.
TÓTIKA TE ETE MIKAKATANO EBULUNGANISA BISO
8. Tokoki komiyoka ndenge nini ntango tokutani na mikakatano lelo oyo? Pesá ndakisa.
8 Na mokili ya lelo, oyo etondi na mikakatano mpe makambo mosusu oyo ezali konyokola bato, bato mingi babulunganaka. Ata bakristo mosusu mpe bamiyokaka ndenge wana. Lani, * oyo azalaki na mosala ya ntango nyonso ná mobali na ye na Australie, alobi ete ntango bazwaki ye na maladi ya kanser ya libɛlɛ, ayokaki mpasi makasi mpe nsango yango ezalaki lokola nkake na matoi na ye. Alobi boye: “Bankisi oyo bazalaki kopesa ngai elɛmbisaki ngai makasi mpe nazalaki komona lokola ete nazali lisusu na ntina te.” Likambo ya mpasi koleka, asengelaki mpe kokipe mobali na ye, oyo basalaki ye lipaso na mokuwa ya mokɔngɔ. Tokoki kosala nini soki tokutani na likambo ya ndenge wana?
9, 10. (a) Tosengeli kotika te ete Satana asala nini? (b) Na kotalela Misala 14:22, nini ekoki kosalisa biso tóyikela minyoko mpiko?
9 Tóbosana te ete Satana asalelaka minyoko oyo tokutanaka na yango mpo na kolɛmbisa kondima na biso. Kasi tosengeli te kotika ete asilisa biso esengo na ndenge yango. Masese 24:10 elobi ete: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Soki tozali komanyola na bandakisa ya Biblia lokola oyo touti kolobela, yango ekosalisa biso tómonisa mpiko ntango tokutani na mikakatano.
10 Tosengeli mpe kobosana te ete tokoki te kosilisa mikakatano nyonso. Kutu, toyebi ete tokozanga te kokutana na yango. (2 Tim. 3:12) Misala 14:22 eyebisi biso ete: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” Na esika ótika minyoko esilisa yo esengo, omoni te ete osengeli nde kotalela yango lokola libaku ya komonisa mpiko mpo ozali na kondima ete Nzambe azali na likoki ya kosalisa yo?
11. Tokoki kosala nini mpo mikakatano ya bomoi ebulunganisa biso te?
11 Tosengeli kotya makanisi na biso na makambo ya malamu. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Motema ya esengo ekómisaka elongi nsainsai, kasi mpo na mpasi ya motema elimo elɛmbaka.” (Mas. 15:13) Banda kala, minganga bayebaka malamu ete kozala na makanisi malamu ekoki kosalisa moto ya maladi abika. Mbala mingi, soki bapesi moto ya maladi ata nkisi oyo ezali ya solo te kasi andimi ete nkisi yango ekoki kobikisa ye, akoyoka malamu. Nzokande soki moto ya maladi akanisi ete nkisi oyo bapesi ye ekobɛlisa ye lisusu makasi, akobɛla lisusu makasi. Soki tozali ntango nyonso kotya makanisi na makambo oyo tokoki kobongola te, yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Nzokande, ntango tokutani na mikakatano, Yehova apesaka biso nkisi te mpo na kobikisa biso. Alendisaka nde biso na nzela ya Liloba na ye, bandeko na biso bakristo oyo basungaka biso, mpe apesaka biso makasi na nzela ya elimo santu na ye. Soki tozali kotya makanisi na makambo wana, yango ekolendisa biso. Na esika ya kokanisakanisa mikakatano oyo ozali kokutana na yango, salá nde nyonso oyo okoki mpo na kolonga mokakatano mokomoko mpe tyáká makanisi na makambo ya malamu ya bomoi na yo.—Mas. 17:22.
12, 13. (a) Nini esalisaki basaleli ya Nzambe báyika mpiko na ntango ya makama minene? Pesá ndakisa. (b) Na ntango ya makama minene, ndenge nini moto akoki koyeba eloko eleki ntina na bomoi na ye?
12 Na mikolo oyo euti koleka, makama minene esalemaki na bikólo mosusu. Likambo ya kolendisa, bandeko mingi na bamboka yango batikalaki ngwi, atako yango ezalaki pɛtɛɛ te. Na ebandeli ya 2010, koningana monene ya mabele mpe tsunami oyo esalemaki na Chili ebebisaki bandako mpe biloko mosusu ya bandeko mingi. Bandeko mosusu babungisaki mpe misala na bango. Atako bongo, bandeko batikalaki makasi na elimo. Samuel, oyo ndako na ye mobimba ebebisamaki, alobaki ete: “Ata na ntango wana ya mikakatano makasi, ngai ná mwasi na ngai totikaki ata mokolo moko te koyangana na makita mpe kosakola. Nandimi mpenza ete yango esalisaki biso tólɛmba nzoto te.” Bango mpe bandeko mosusu batikaki te ete likama yango elɛmbisa bango nzoto mpe bakobaki kosalela Yehova na molende.
13 Na Sɛtɛmbɛ 2009, pene na engumba mobimba ya Manille, na ekólo Philippines, ezindaki na mbula moko makasi. Moto moko ya bozwi mingi oyo abungisaki biloko mingi alobaki ete: “Mpela yango ememelaki bato nyonso mpasi mpe mikakatano, ezala bazwi to babola.” Yango ekundweli biso toli ya bwanya oyo Yesu apesaki; alobaki ete: “Bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te.” (Mat. 6:20) Mbala mingi baoyo bamipesaka na konduka biloko ya mokili, oyo ekoki kobunga lelo to lobi, bayokaka mawa na nsima. Yango wana ekozala malamu koleka tótya boyokani na biso ná Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, mpamba te yango ekoki kobeba te, ata soki likambo nini ekómeli biso.—Tángá Baebre 13:5, 6.
MPO NA NINI TOSENGELI KOMONISA MPIKO?
14. Mpo na nini tosengeli komonisa mpiko?
14 Yesu ayebaki ete mikakatano ekozala na ntango ya kozala na ye, kasi alobaki boye: “Bózala na nsɔmɔ te.” (Luka 21:9) Lokola Yesu Mokonzi na biso mpe Yehova mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba bazali wana mpo na kosalisa biso, tosengeli kobanga te. Paulo alendisaki Timote na maloba oyo: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.”—2 Tim. 1:7.
15. Pesá ndakisa ya basaleli ya Nzambe oyo batyelaki ye motema mobimba, mpe limbolá ndenge oyo tokoki mpe komonisa mpiko ya ndenge wana.
15 Basaleli mosusu ya Yehova bamonisaki na maloba na bango ete bazalaki mpenza kotyela Yehova motema. Na ndakisa Davidi alobaki boye: “Yehova azali makasi na ngai mpe nguba na ngai. Motema na ngai etyeli ye elikya, mpe nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela.” (Nz. 28:7) Paulo amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema mobimba ntango alobaki boye: “Na makambo nyonso wana tozali mpenza kolonga na lisalisi ya moto oyo alingaki biso.” (Rom. 8:37) Ndenge moko mpe, lokola Yesu ayebaki ete mosika te bakoboma ye, ayebisaki bayekoli na ye polele ete azali na boyokani makasi ná Nzambe; alobaki boye: “Nazali kaka ngai moko te, mpo Tata azali elongo na ngai.” (Yoa. 16:32) Maloba yango emonisi nini? Emonisi ete mokomoko na bango azalaki kotyela Yehova motema mobimba. Soki tozali mpe kotyela Nzambe motema mobimba ndenge wana, tokozala na mpiko mpo na kolonga mikakatano lelo oyo.—Tángá Nzembo 46:1-3.
MAKAMBO OYO EKOKI KOSALISA BISO TÓKOBA KOZALA NA MPIKO
16. Mpo na nini koyekola Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na biso?
16 Mpo na bakristo, kozala na mpiko elimboli te komityela motema. Tozwaka mpiko ntango tozali koyekola koyeba Yehova mpe kotyela ye motema. Tokoki kosala yango soki tozali koyekola Biblia, Liloba na ye. Ndeko mwasi moko oyo atungisamaka na makanisi amonisi eloko nini esalisaka ye; alobi boye: “Nazongelaka mbala na mbala bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaka ngai.” Tosalelaka toli oyo moombo ya sembo apesaki ya kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ? Kosala bongo ekosalisa biso tótalela makambo ndenge moko na mokomi ya nzembo, oyo alobaki boye: “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.”—Nz. 119:97.
17. (a) Nini ekoki kosalisa biso tókoba kozala na mpiko? (b) Pesá ndakisa ya lisolo moko ya bomoi oyo esalisá yo.
17 Masolo oyo ezali na mikanda ya moombo ya sembo ekoki mpe kosalisa biso tótyela Yehova motema lisusu mingi koleka. Bandeko mingi bamonaka ete masolo ya bomoi oyo ebimaka na bazulunalo na biso esalisaka bango mpenza. Ndeko mwasi moko na Asie, oyo abɛlaka maladi ya motó oyo babengi trouble bipolaire de l’humeur, asepelaki mingi ntango atángaki lisolo ya bomoi ya ndeko mobali moko oyo azalaká misionɛrɛ, oyo abɛlaki mpe maladi wana, kasi akobaki kosalela Nzambe na bosembo. Ndeko mwasi yango alobaki boye: “Yango esalisi ngai nayeba malamumalamu maladi na ngai mpe epesi ngai elikya.”
18. Mpo na nini tosengeli kobondelaka mbala na mbala?
18 Libondeli mpe ekoki kosalisa biso na Flp. 4:6, 7) Tobondelaka mbala nyonso oyo tokoki mpo na kozwa makasi ya koyikela mikakatano mpiko? Alex, ndeko moko ya ekólo Grande-Bretagne, oyo atungisamaki na makanisi bambula mingi, alobi boye: “Kosolola na Yehova na libondeli mpe koyoka ye ntango nazali kotánga Liloba na ye esalisaki ngai mingi na bomoi na ngai.”
makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango. Ntoma Paulo amonisaki polele ntina ya libondeli ntango alobaki ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (19. Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya koyangana na makita?
19 Makita ya lisangá ezali ebongiseli mosusu ya ntina mingi oyo esalisaka biso. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Molimo na ngai ezali na mposa ya mapango ya Yehova mpe lisusu eyoki mposa na yango makasi.” (Nz. 84:2) Biso mpe toyokaka bongo? Lani, oyo tolobelaki liboso, alobeli ndenge oyo atalelaka makita ya lisangá: “Koyangana na makita ezalaki te likambo oyo nazalaki kosala soki nalingi. Nayebaki ete nasengeli kokende makita soki nalingi ete Yehova asalisa ngai nayika mpiko.”
20. Ndenge nini kobima na mosala ya kosakola esalisaka biso?
20 Tokoki mpe kozwa mpiko soki tozali ntango nyoso na molende na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (1 Tim. 4:16) Ndeko mwasi moko na Australie, oyo akutaná na mikakatano ndenge na ndenge alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kosakola ata moke te, kasi nkulutu moko asɛngaki ngai nabima ná ye na mosala ya kosakola. Nandimaki kokende. Yehova azalaki kosalisa ngai mpenza mpamba te ntango nyonso oyo nazalaki na mosala ya kosakola, nazalaki na esengo.” (Mas. 16:20) Bandeko mingi bamonaka ete ntango basalisaka basusu bázala na kondima epai ya Yehova, kondima na bango moko mpe ekómaka makasi. Ntango basalaka bongo, babosanaka mikakatano na bango mpe bakobaka kotya makanisi na makambo oyo eleki ntina.—Flp. 1:10, 11.
21. Elikya nini tozali na yango atako tozali na mikakatano?
21 Yehova azwi bibongiseli mingi mpo na kosalisa biso tózala na mpiko mpe tólonga mikakatano ya lelo. Soki tozali kosalela bibongiseli wana nyonso mpe tozali komanyola mpe komekola bandakisa malamu ya basaleli ya Nzambe oyo bamonisaki mpiko, tokokoka kolonga mikakatano oyo tokoki kokutana na yango. Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, makambo mabe ekoki kosalema; atako bongo, tokoki koloba lokola Paulo ete: “Tozali kobambama na nse, kasi tobomami te. . . . Tozali kotika te.” (2 Ko. 4:9, 16) Na lisalisi ya Yehova, tokoki kozala na mpiko mpo na kolonga mikakatano lelo oyo.—Tángá 2 Bakorinti 4:17, 18.
^ par. 8 Bankombo mosusu ezali ya bango te.