LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Novembre 2012

Nimero oyo emonisi ntina ete nkombo ya Yehova, mokano na ye, mpe mibeko na ye ezali na ntina. Elobeli mpe ntina oyo bakristo ya solo basengeli kosala makasi bázala na komikitisa mpe bálimbisaka basusu.

“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”

Ndenge nini tokoki komekola Davidi mpe kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango?

Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kotya makabo pembeni mpo na baoyo bazalaki na bosɛnga. Ndenge nini tokoki komekola bango?

Yesu apesi biso ndakisa ya komikitisa

Matomba nini tokoki kozwa soki tolandi ndakisa ya Yesu ya komikitisa?

Loná ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke

Ndenge nini tokoki komonisa komikitisa na boyokani na biso na basusu?

Mituna ya batángi

Maloba ya Yesu na oyo etali likabo ya kotikala monzemba elimboli nini?

Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?

Ndenge oyo Yehova asalelaki basumuki ya ntango ya kala makambo ekoki koteya biso makambo ebele na oyo etali ndenge alingaka kolimbisa na motema moko.

Tólimbisanaka na motema moko

Talá ndenge oyo tokoki komekola Yehova na oyo etali kolimbisa na motema moko.

‘Nsango oyo eleki bansango nyonso oyo bato bayoká’

Na 1926, Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova nan tango wana, bafungolaki radio na bango moko na bingumba minei ya Canada.