Tólimbisanaka na motema moko
“Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.”—KOL. 3:13.
1, 2. Mpo na nini ebongi tóluka koyeba soki tolimbisaka basusu na motema moko?
BIBLIA esalisaka biso tóyeba ndenge Yehova atalelaka lisumu mpe oyo asalaka ntango tosali masumu. Eyebisaka mpe biso makambo mingi na oyo etali kolimbisa. Na lisolo oyo eleki, tomonaki bantina oyo etindaki Yehova alimbisa Davidi mpe Manase. Mawa makasi oyo bayokaki mpo na mabe oyo basalaki etindaki bango báyambola masumu na bango, bátika yango, mpe bábongola mpenza mitema. Yango wana, Yehova andimaki bango lisusu.
2 Sikoyo, tótalela likambo etali kolimbisa basusu. Olingaki koyoka ndenge nini soki moko ya bato oyo Manase abomisaki ezalaki ndeko na yo? Olingaki kolimbisa Manase? Motuna yango ezali na ntina mingi mpamba te tofandi na mokili oyo bato mingi batosaka mibeko te, balingi mobulu, mpe balukaka kaka matomba na bango moko. Kasi mpo na nini mokristo asengeli koyekola kolimbisa basusu? Mpe soki batumoli yo to basaleli yo likambo moko ya kozanga bosembo, nini ekoki kosalisa yo oyeba komipekisa, osala makambo na ndenge oyo ekosepelisa Yehova, mpe olimbisa na motema moko?
NTINA OYO TOSENGELI KOLIMBISA BASUSU
3-5. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na kosalisa bayoki na ye báyeba ntina oyo basengeli kolimbisa basusu? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu oyo ezali na Matai 18:21-35?
3 Kondima kolimbisa bato oyo basali biso mabe, bázala bandeko ya lisangá to te, ezali na ntina mingi soki tolingi kobatela kimya ná bandeko ya libota, baninga, bato mosusu, mpe Yehova. Biblia emonisi ete kolimbisa basusu ezali mobeko oyo mokristo nyonso asengeli kotosa, ata soki bazali kosala ye mabe mbala na mbala. Mpo na komonisa ete mobeko yango eleki makasi te, Yesu apesaki ndakisa ya moombo moko oyo azalaki na nyongo.
4 Moombo yango asengelaki kopesa nkolo na ye mbongo oyo, mpo na kofuta yango, esengelaki kosala mosala Mat. 18:21-34.
mikolo milio 60; kasi nkolo na ye alimbisaki ye nyongo yango. Na nsima, moombo yango abimaki mpe akendaki koluka moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye, oyo mpo na kofuta yango, esengelaki kosala mosala mikolo 100 mpamba. Moninga yango abondelaki ye azela mwa moke, kasi moombo yango oyo balimbisaki nyongo monene aboyaki mpe abwakaki moninga na ye moombo na bolɔkɔ. Nkolo na bango asilikaki mpo na likambo yango. Atunaki moombo yango boye: “Osengelaki te koyokela moninga na yo moombo mawa, ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa? Bongo lokola nkanda ekangaki nkolo na ye, akabaki [moombo oyo aboyaki kolimbisa moninga] epai ya bakɛngɛli ya bolɔkɔ, tii ntango akofuta nyongo na ye nyonso.”—5 Liteya nini Yesu alingaki kopesa na ndakisa wana? Asukisaki na maloba oyo: “Tata na ngai ya likoló akosala bino mpe bongo soki mokomoko na bino azali kolimbisa ndeko na ye na motema mobimba te.” (Mat. 18:35) Liteya ezali polele. Masumu oyo biso bato ya kozanga kokoka tosalaka na boumeli ya bomoi na biso emonisi ete tokokoka ata moke te kotosa mibeko nyonso ya Yehova. Atako bongo, andimaka kolimbisa masumu na biso. Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya Yehova asengeli kolimbisa mabunga ya mikemike ya bato mosusu. Ndenge Yesu alobaki yango na Lisolo likoló ya Ngomba: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.”—Mat. 6:14, 15.
6. Mpo na nini kolimbisa ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te?
6 Okoki mbala mosusu kokanisa ete: ‘Koloba yango ezali pɛtɛɛ, kasi kosala yango nde likambo ya mpasi.’ Ezali bongo mpamba te mbala mingi toyokaka mpasi na motema soki basali biso mabe. Moto akoki kosilika to komona lokola batɛki ye, koluka ete básalela ye makambo na bosembo, ata mpe koluka kozongisa mabe na mabe. Kutu, bato mosusu bayokaka lokola ete bakokoka ata mokolo moko te kolimbisa moto oyo asali bango mabe. Soki ozali komiyoka bongo, ndenge nini okoki koyekola kolimbisa, ndenge Yehova asɛngi biso?
LUKÁ KOYEBA MPO NA NINI OZALI KOMIYOKA NDENGE WANA
7, 8. Nini ekoki kosalisa yo olimbisa soki bapesi yo nkanda to basaleli yo likambo na boboto te?
7 Tokoki kosilika makasi soki basali biso mabe, to soki tokanisi ete basali biso mabe. Elenge mobali moko alobi ndenge oyo asalaki mokolo moko ntango asilikaki makasi: “Mokolo moko . . . na nkanda makasi, nabimaki na ndako mpe nalobaki ete nakozonga lisusu te. Ezalaki mokolo ya moi makasi, na eleko ya molunge. Natambolaki na banzela ya mike, oyo ezalaki kitoko mpe ezalaki na makɛlɛlɛ te. Mokemoke, motema ebandaki kokita mpe nkanda esilaki. Nsima ya mwa bangonga, nazongaki na ndako, mpe nakómaki komituna mpo na nini nasilikaki makasi ndenge wana.” Ndenge ndakisa ya elenge mobali wana emonisi yango, kotika mwa ntango eleka mpe kozela ete motema ekita liboso ya kotalela likambo ekoki kopekisa yo osala likambo moko oyo okoya komipesa foti na nsima.—Nz. 4:4; Mas. 14:29; Yak. 1:19, 20.
8 Kasi okosala nini soki nkanda ezali kosila kaka te? Luká koyeba mpo na nini ozali na nkanda. Ezali nde mpo basaleli yo makambo na bosembo te, to na limemya te? To ezali nde mpo ozali komona ete moto yango asaleli yo makambo na nko, kaka mpo azokisa yo? Likambo oyo asalaki ezalaki mpenza mabe? Soki oyebi nini ezali kopesa yo nkanda, yango ekosalisa yo oyeba mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo na likambo yango. (Tángá Masese 15:28; 17:27.) Kokanisa ndenge wana ekoki kosalisa yo otalela makambo na ndenge oyo ebongi mpe ondima kolimbisa. Soki okómi kosala bongo, atako yango ekoki kozala mpasi, okotika ete Liloba ya Nzambe ‘esosola makanisi mpe mikano ya motema [na yo]’ mpe etambwisa yo mpo omekola Yehova, oyo alimbisaka.—Ebr. 4:12.
OSENGELI MPENZA KOMILATISA LIKAMBO YANGO?
9, 10. (a) Soki tokanisi ete basali biso mabe, tokoki mbala mosusu kosala nini? (b) Soki tozali na makanisi malamu mpe tozali kolimbisa, ndenge nini yango ekoki kosalisa biso tótalela makambo na ndenge oyo ebongi?
9 Ezali na makambo mingi oyo ekoki kotinda moto asilika. Na ndakisa, ntango ozali kotambwisa motuka, sofɛlɛ mosusu akoki koya kotuta motuka na yo. Okosala nini? Na ntembe te, osilá koyoka ndenge oyo basofɛlɛ mosusu basilikaka makasi mpe bakómaka koswanisa baninga na bango basofɛlɛ. Kasi, lokola ozali mokristo, okolinga kosala bongo te.
10 Eleki malamu ozwa ntango ya kotalela likambo yango malamumalamu. Mbala mosusu, yo mpe ozali na foti mpo otikaki ete makanisi na yo eyengayenga ntango ozalaki kotambwisa motuka. To ekoki nde kozala ete motuka ya sofɛlɛ wana mosusu ezalaki malamu te. Liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa yango ezali ete soki tozali komitya na esika ya basusu mpe kondima makanisi na bango, tokolɛmba nzoto te, tokokitisa nkanda mpe tokolongola makanisi ya mabe, mpe tokondima kolimbisa basusu. Mosakoli 7:9 elobi ete: “Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.” Koluka komilatisa makambo nyonso te. Mbala mingi, tokanisaka ete basaleli biso likambo moko kaka mpo na koyokisa biso mpasi. Nzokande lokola tozali bato ya kozanga kokoka, moto akoki kosala biso mabe kozanga ete ayeba yango; to tokoki kokanisa ete basali biso mabe soki toyebi makambo nyonso te. Soki omoni ete basali yo mabe to balobi na yo mabe, kobosana te ete mbala mosusu oyebi te mpo na nini moto yango asalaki to alobaki likambo yango, mpe ndimá kolimbisa ye. Okozala na esengo mingi koleka soki olongi kosala yango.—Tángá 1 Petro 4:8.
‘TIKÁ ETE KIMYA NA BINO EZONGELA BINO’
11. Ezala bato bayambi biso malamu to te na mosala ya kosakola, tosengeli kosala nini?
11 Ndenge nini tokoki kokoba komipekisa soki moto moko asaleli biso makambo na boboto te ntango tozali na mosala ya kosakola? Ntango Yesu atindaki bayekoli 70 bákende kosakola, ayebisaki bango ete na ndako nyonso oyo bakokɔta, báloba: “Kimya ezala na ndako oyo.” Abakisaki ete: “Soki moninga ya kimya azali wana, kimya na bino ekofanda likoló na ye. Kasi soki azali te, yango ekozongela bino.” (Luka 10:1, 5, 6) Tosepelaka mingi ntango bato bayambi biso malamu na mosala ya kosakola, mpamba te yango ekoki kosalisa bango bázwa matomba ya nsango oyo tomemeli bango. Nzokande, na bantango mosusu, bato bayambaka biso na boboto te. Tosengeli kosala nini na ntango wana? Yesu alobaki ete kimya oyo totombelaki bato ya ndako yango esengeli kozongela biso. Na yango, ezala bayambi biso malamu to te, tosengeli kaka kobatela kimya na mitema ntango tozali kolongwa na ndako mokomoko. Soki tozali kosilika ntango bato batumoli biso, tokokoka te kobatela kimya na biso.
12. Ndenge maloba ya ntoma Paulo na Baefese 4:31, 32 emonisi yango, tosengeli kosala nini?
12 Tosengeli kosala makasi tóbatela kimya na biso kaka na mosala ya kosakola te, kasi na makambo nyonso oyo tokutani na yango. Kasi kondima kolimbisa basusu elingi koloba te ete tosengeli kokanga miso na makambo mabe oyo bazali kosala to na makama oyo yango ezali kobimisa. Kolimbisa elimboli nde koboya kobomba nkanda na motema mpo na makambo ya mabe oyo basalaki biso mpe kobatela kimya na biso. Bato mosusu bakokaka kobosana te makambo mabe oyo basalaki bango, mpe yango esilisaka bango esengo. Tosengeli kotika te ete makanisi ya ndenge wana elonga biso. Tóyeba ete tokoki kozala na esengo te soki tozali kobomba nkanda na motema. Yango wana, tosengeli kolimbisa!—Tángá Baefese 4:31, 32.
TÓSALA MAKAMBO NA NDENGE OYO ESEPELISAKA YEHOVA
13. (a) Ndenge nini mokristo akoki “kotya makala ya mɔtɔ” na motó ya monguna na ye? (b) Soki tozali na maloba ya boboto ntango moto atumoli biso, yango ekoki kotinda ye asala nini?
13 Ekoki kozala ete moto moko oyo azali mokristo te asali yo likambo moko ya mabe. Soki esalemi bongo, kobosana te ete ezaleli na yo ya malamu ekoki kotinda moto yango asepela na mateya ya Biblia. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla; mpo ntango ozali kosala bongo ozali kotya makala ya mɔtɔ na motó na ye. Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” (Rom. 12:20, 21) Soki tozali na maloba ya boboto ntango batumoli biso, tokoki ata kolɛmbisa motema ya moto oyo azalaki makambo makasimakasi mpe kobimisa bizaleli na ye ya malamu. Soki tozali komitya na esika ya moto oyo asali biso mabe mpe tozali koyokela ye mawa, ntango mosusu tokosalisa ye andima koyekola Biblia. Ata soki moto yango andimi koyekola te, soki topesi ye eyano ya boboto, yango ekoki kotinda ye aluka koyeba mpo na nini tokeseni na bato mosusu.—1 Pe. 2:12; 3:16.
14. Ata soki moto asali yo mabe ndenge nini, mpo na nini osengeli te kobomba nkanda na motema?
14 Na bantango mosusu, ezali malamu te kozala na boyokani ná bato mosusu. Na bato yango, tokoki kotánga bato oyo babimisamaki na lisangá mpo basalaki lisumu kasi babongolaki motema te. Soki moto ya ndenge wana asalaki likambo oyo ezokisaki yo, mbala mosusu ekoki mpenza kozala mpasi ondima kolimbisa ye, ata soki abongoli motema, mpamba te mpota oyo moto azoki na motema esilaka noki te. Soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo, osengeli kokoba kosɛnga Yehova asalisa yo olimbisa moto yango oyo abongoli motema. Osengeli kosala bongo mpamba te okoki te koyeba ndenge oyo moto yango azali komiyoka mpo na likambo oyo asalaki. Nzokande, Yehova ayebi yango. Atalaka makanisi ya motema ya moto mpe amoniselaka basumuki motema molai. (Nz. 7:9; Mas. 17:3) Yango wana, Biblia elobi ete: “Bózongisela moto mabe na mabe te. Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso. Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’” (Rom. 12:17-19) Tokoki te koyeba makambo nyonso oyo Yehova ayebi, mpe Biblia emonisi ete tosengeli te kosambisa basusu. (Mat. 7:1, 2) Kasi okoki kozala na elikya ete Yehova akokata makambo na bosembo nyonso.
15. Nini ekosalisa biso tóboya kokangela moto oyo asali biso mabe nkanda?
15 Soki omoni ete basalelaki yo makambo na bosembo te mpe okanisi ete ezali mpasi olimbisa mosumuki oyo abongoli motema, osengeli koyeba ete moto oyo asalaki likambo wana ya mabe azali mpe konyokwama. Ye mpe azali moto ya kozanga kokoka lokola yo. (Rom. 3:23) Yehova ayokelaka bato nyonso ya kozanga kokoka mawa. Yango wana, ekozala malamu tóbondela mpo na moto oyo asali biso mabe, mpamba te ekozala mwa mpasi tókoba kozala na nkanda mpo na moto oyo tozali kobondela mpo na ye. Mpe Yesu amonisaki ete tosengeli te kokangela bato oyo bazali konyokola biso nkanda; alobaki ete: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.”—Mat. 5:44.
16, 17. Osengeli kosala nini soki bankulutu bamoni ete mosumuki moko abongoli motema, mpe mpo na nini?
16 Yehova apesi bankulutu mokumba ya kokata soki moto oyo asali lisumu ya monene abongoli mpenza motema to te. Bandeko yango bayebaka makambo nyonso te lokola Nzambe, kasi basalaka makasi ete bikateli oyo bazali kozwa eyokana na Liloba ya Nzambe mpe na litambwisi ya elimo santu. Na yango, lokola babondelaka Yehova asalisa bango ntango balingi kozwa bikateli, tokoki mpenza kondima ete bikateli yango eyokanaka na makanisi na ye.—Mat. 18:18.
17 Na makambo ya ndenge wana, bosembo na biso ekoki komekama. Okondima kolimbisa moto oyo abongoli motema mpe komonisa ete olingaka ye kaka? (2 Ko. 2:5-8) Yango ekoki kozala mpasi, mingimingi soki moto yango asalaki yo mabe to asalaki ndeko na yo mabe. Kasi soki otyeli Yehova motema mpe ondimi ndenge oyo akataka makambo na nzela ya lisangá, okozwa ekateli ya malamu, mpe okomonisa ete olimbisaka mpenza na motema moko.—Mas. 3:5, 6.
18. Matomba nini okoki kozwa soki ozali kolimbisa na motema moko?
18 Minganga oyo basalisaka maladi ya motó balobaka ete kondima kolimbisa ezali na matomba mingi. Esalisaka moto amiyoka malamu mpo azali lisusu na nkanda te mpe na mawa te, mpe esalisaka moto azala nzoto kolɔngɔnɔ mpe azala na boyokani malamu ná basusu. Nzokande, soki moto azali koboya kolimbisa, akozala na nzoto kolɔngɔnɔ te, akozala na boyokani malamu ná basusu te, akotungisama na makanisi, mpe akozala na mokakatano mpo na kosolola malamu ná bato mosusu. Likambo eleki ntina ezali ete soki tozali kolimbisa basusu, tokozala na boyokani malamu ná Yehova, Tata na biso ya likoló.—Tángá Bakolose 3:12-14.