Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Loná ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke

Loná ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke

“Moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”​—LUKA 9:48.

1, 2. Toli nini Yesu apesaki bantoma na ye, mpe mpo na nini?

EZALAKI na mobu 32 T.B. Yesu azalaki na etúká ya Galile ntango mokakatano moko ebimaki. Bantoma na ye mosusu bazalaki kowelana mpo na koyeba nani kati na bango aleki baninga. Luka, oyo akomaki Evanzile moko, alobi boye: “Likanisi moko eyelaki bango ya koyeba nani na kati na bango aleki bamosusu nyonso. Lokola Yesu ayebaki likanisi ya mitema na bango, akamataki mwana moko ya moke, atye ye pene na ye mpe alobi na bango: ‘Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai ayambi mpe moto oyo atindaki ngai. Mpo moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.’” (Luka 9:46-48) Na motema molai kasi kozanga kozwa makambo na lisɛki, Yesu asalisaki bantoma bámona ntina ya komikitisa.

2 Toli oyo Yesu apesaki ya kozala lokola moto azali mpenza moke eyokanaki nde na bizaleli ya Bayuda na siɛklɛ ya liboso? To ekesanaki nde na makanisi oyo bato mingi bazalaki na yango na ntango wana? Buku moko (Theological Dictionary of the New Testament) oyo elobeli bizaleli ya bato na ntango wana elimboli boye: “Na makambo nyonso oyo Bayuda bazalaki kosala, bazalaki ntango nyonso koluka koyeba nani aleki basusu, mpe bazalaki koluka koyeba soki bazali mpenza kopesa moto na moto lokumu oyo ebongi na ye.” Yesu azalaki kopesa bantoma na ye toli ete bázala lokola bato mosusu te.

3. (a) Kozala na ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke elimboli nini, mpe mpo na nini ekoki kozala mpasi tómonisa ezaleli yango? (b) Kolona ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke ebimisi mituna nini?

3 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “moto oyo azali mpenza moke” elimboli moto oyo ayebi esika makoki na ye esuki, moto ya komikitisa, moto mpamba, moto oyo amimonaka te ete azali na valɛrɛ koleka basusu, moto oyo azali na lokumu mingi te to na bokonzi mingi te. Yesu asalelaki mwana moke mpo na komonisa bantoma na ye polele ete basengeli kozala na komikitisa mpe koyeba esika makoki na bango esuki. Toli yango etaleli mpe bakristo lelo oyo, kaka ndenge etalelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Na bantango mosusu, tokoki komona ete kozala na ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke ezali pɛtɛɛ te. Kozanga kokoka ekoki kotinda biso tózala na lolendo mpe tóluka koleka basusu. Ezaleli ya kowelana oyo bato mingi bazali na yango zingazinga na biso mpe elimo ya mokili ekoki kotinda biso tóluka kaka matomba na biso moko, tóluka kobundisa basusu, mpe tóluka kotinda bato básala kaka oyo biso tolingi. Nini ekoki kosalisa biso tólona ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke? Na ndenge nini ‘moto oyo azali mpenza moke na kati na biso aleki monene?’ Na makambo nini ya bomoi na biso tosengeli kosala makasi tómonisa elimo ya komikitisa?

“EE BOMƐNGO YA NZAMBE MPE BWANYA NA YE MPE BOYEBI NA YE EZALI MINGI MPENZA!”

4, 5. Nini ekoki kotinda biso tózala na komikitisa? Pesá ndakisa.

4 Soki tobosani te ete biso bato tozali mpenza moke liboso ya Yehova, yango ekoki kosalisa biso tólona ezaleli ya komikitisa. Kutu, “mayele na ye ekoki kososolama te.” (Yis. 40:28) Ntango ntoma Paulo alimbolaki makambo mosusu oyo emonisi bonene ya Yehova, akomaki ete: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!” (Rom. 11:33) Atako boyebi ya bato ekoli mingi banda ntango ntoma Paulo akomaki maloba wana esili koleka mbula soki 2000, maloba yango ezali kaka solo. Ata soki toyebi makambo mingi ndenge nini, tosengeli kozala na komikitisa mpo toyebi ete libela na libela tokozala kaka na makambo ya koyekola mpo na Yehova, misala na ye, mpe banzela na ye.

5 Koyeba ete biso bato tokoki te kokanga ntina ya banzela nyonso ya Nzambe esalisaki Leo * amimona ete azali mpenza moke. Ntango Leo azalaki elenge, azalaki kosepela mingi na makambo ya siansi. Lokola azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi oyo etali molɔ́ngɔ́, ayekolaki makambo ya fizike oyo elobelaka minzoto, moi mpe sanza, kasi na nsuka, alobaki likambo moko ya ntina mingi. Alobaki ete: “Makambo oyo nayekolaki na kelasi esalisaki ngai namona ete mateya oyo bato ya siansi bazali kobimisa ekoki yango moko te kosalisa bato báyeba molɔ́ngɔ́ malamumalamu. Yango wana, natikaki koyekola siansi, mpe nakendaki koyekola makambo etali mibeko.” Leo akómaki procureur ya etúká na bango, mpe na nsima akómaki zuzi. Nsukansuka, ye ná mwasi na ye bayekolaki Biblia ná Batatoli ya Yehova, bayambaki solo, bazwaki batisimo mpe bakómaki basaleli ya Yehova. Atako Leo atángaki bakelasi ya minene, nini esalisaki ye akóma na ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke? Kozanga kokakatana, ayanoli ete: “Ezali ntango nayaki komona ete ata soki toyekoli makambo mingi ndenge nini, oyo etali Yehova mpe molɔ́ngɔ́, ezali kaka na makambo ebele oyo toyebi naino te.”

Yehova apesi biso lokumu na ndenge apesi biso mokumba ya kosakola nsango malamu

6, 7. (a) Ndakisa nini ya monene Yehova apesi na oyo etali komikitisa? (b) Ndenge nini komikitisa ya Nzambe ekoki kokómisa moto “monene”?

6 Likambo mosusu oyo esalisaka biso tózala na komikitisa ezali ete Yehova ye moko mpe azalaka na komikitisa. Tóbosana likambo oyo te: “Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Kanisá naino: Yehova, Nzambe oyo azali monene koleka bato nyonso, apesi biso lokumu na ndenge apesi biso libaku ya kosalela Liloba na ye Biblia mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola. Atako Yehova nde asalaka ete mbuma oyo toloni mpe tozali kosopela mai ekola, apesi biso lokumu ya kosala elongo na ye. (1 Ko. 3:6, 7) Yango emonisi ete Nzambe apesi ndakisa malamu mpenza na oyo etali komikitisa. Na ntembe te, ndakisa ya komikitisa oyo Yehova apesi esengeli kolendisa mokomoko na biso amimona ete azali mpenza moke.

7 Ndakisa ya komikitisa ya Nzambe esimbaki mpenza motema ya Davidi, mokomi ya nzembo. Ayembelaki Yehova ete: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe komikitisa na yo nde ezali kokómisa ngai moto monene.” (2 Sa. 22:36) Davidi amonisaki ete soki akómaki mokonzi ya Yisraele, ezalaki nde mpo na komikitisa ya Yehova. Yango elingi koloba ete Nzambe amikitisaki mpo na kotyela ye likebi. (Nz. 113:5-7) Asalaka mpe bongo mpo na biso? Eloko nini tozali na yango, ezala bizaleli ya malamu, mayele to makoki, mpe mikumba, ‘oyo Yehova apesaki biso kopesa te?’ (1 Ko. 4:7) Moto oyo amitambwisaka lokola moto oyo azali mpenza moke azali moto “monene” mpamba te azali na valɛrɛ mingi na ndenge azali mosaleli ya Yehova. (Luka 9:48) Tótalela sikoyo ndenge nini ekoki kosalema bongo.

‘MOTO OYO AZALI MPENZA MOKE NA KATI NA BINO ALEKI MONENE’

8. Ndenge nini komikitisa esalisaka biso tósepela ndenge tozali na kati ya ebongiseli ya Yehova?

8 Komikitisa ezali na ntina mingi mpo tózala na esengo na ebongiseli ya Nzambe mpe tópesa mabɔkɔ na makambo nyonso oyo ezali kosalema na lisangá. Tózwa ndakisa ya Petra, elenge mwasi moko oyo akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova. Lokola Petra alingaki kosala makambo na ndenge na ye, atikaki lisangá. Bambula mingi na nsima, azongelaki lisusu koyangana na makita ya lisangá. Sikoyo, azali na esengo ndenge azali na lisangá ya Yehova mpe asepelaka kopesa mabɔkɔ na makambo oyo esalemaka na lisangá. Nini esalisaki ye abongola makanisi? Akomi boye: “Mpo nasepela mpenza kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova, esengelaki namonisa bizaleli mibale ya ntina mingi: komikitisa mpe koyeba esika makoki na ngai esuki.”

9. Ndenge nini moto ya komikitisa atalelaka bilei ya elimo oyo tozwaka, mpe ndenge nini yango esalaka ete akóma na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova?

9 Moto ya komikitisa azalaka na botɔndi mingi mpo na biloko oyo Yehova apesaka biso, ezala mpe bilei ya elimo. Yango wana, ayekolaka Biblia na molende mpe atángaka mingi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Lamuká! Lokola basaleli mosusu ya sembo ya Yehova, azalaka na momeseno ya kotánga mokanda nyonso oyo ebimi sika, liboso ya kotya yango na bibliotɛkɛ na ye. Soki tozali kotánga mpe koyekola mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia mpo tozali na komikitisa mpe na botɔndi, tokokola na elimo, mpe Yehova akosalela biso mingi na mosala na ye.​—Ebr. 5:13, 14.

10. Ndenge nini okoki kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati ya lisangá?

10 Moto oyo azalaka lokola moto oyo azali mpenza moke aleki mpe “monene” na ndenge mosusu. Lisangá mokomoko ezali na mibali oyo bakokisi masɛngami mpe baponami na lisalisi ya elimo santu mpo na kozala bankulutu. Mibali yango bazwaka bibongiseli mpo na makambo ya elimo na lisangá, na ndakisa makita, mosala ya kosakola, mpe kokende kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Soki tozali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke mpe tozali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli yango, tokosala ete lisangá ezala na esengo, kimya, mpe bomoko. (Tángá Baebre 13:7, 17.) Soki ozali nkulutu to mosaleli na misala, omonisaka na komikitisa nyonso ete ozali na botɔndi epai ya Yehova na ndenge apesi yo mokumba wana?

11, 12. Ezaleli nini ekosala ete tózala na motuna mingi na ebongiseli ya Yehova, mpe mpo na nini?

11 Moto oyo amonisaka ete azali mpenza moke aleki “monene,” to azali na motuya mingi mpamba te komikitisa na ye esalaka ete azala mosaleli malamu oyo Yehova akoki kosalela mingi na ebongiseli na ye. Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete bámitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke mpamba te basusu kati na bango bazalaki kolanda makanisi oyo bato mingi bazalaki na yango na ntango wana. Luka 9:46 elobi ete: “Likanisi moko eyelaki bango ya koyeba nani na kati na bango aleki bamosusu nyonso.” Ekoki mpe kokómela biso tókanisa ete toleki bandeko na biso bakristo to toleki bato mosusu? Bato mingi na mokili oyo bazali na lolendo mpe balukaka kaka matomba na bango moko. Kasi biso tosengeli kozala na lolendo lokola bango te; tosengeli nde kozala na komikitisa. Soki tozali komikitisa mpe kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso, tokokóma baninga malamu mpenza mpo na bandeko na biso bakristo.

12 Toli oyo Yesu apesi biso ya kozala lokola moto oyo azali mpenza moke esengeli mpenza kotinda biso tómitalela. Tosengeli kosala makasi tómitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na makambo nyonso ya bomoi na biso. Tokoki komonisa ezaleli yango na makambo misato.

SALÁ MAKASI OMONISA ETE OZALI MPENZA MOKE

13, 14. Ndenge nini mobali to mwasi akoki komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke, mpe yango ekoki kosala nini na libala na bango?

13 Na kati ya libala. Lelo oyo, bato mingi basalaka nyonso mpo bábatela lotomo na bango, yango wana bakanisaka ata moke te lotomo ya basusu. Kasi moto oyo azali mpenza moke amonisaka ezaleli oyo Paulo alendisaki biso tózala na yango. Na mokanda na ye epai ya Baroma, akomaki ete: “Tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka biso.” (Rom. 14:19) Moto oyo amonisaka ete azali mpenza moke alukaka kozala na kimya na moto nyonso, mingimingi na molongani na ye.

14 Na ndakisa, na likambo etali kominanola. Ekoki kozala ete na kati ya libala, moto na moto azali na lolenge ya kominanola oyo asepelaka na yango mingi. Mbala mosusu mpo na kominanola, mobali asepelaka kofanda na ndako mpe kotánga buku moko boye; nzokande mwasi asepelaka kobima mpe kokende kolya esika mosusu to kokende kotala baninga. Soki ezali bongo, ekozala mpasi te mwasi atosa mobali na ye soki amoni ete mobali yango azali na komikitisa mpe atyaka mpenza likebi na makambo oyo mwasi na ye alingaka mpe aboyaka, na esika ya kotingama kaka na makambo oyo ye moko alingaka mingi. Mpe mobali akolinga mwasi na ye mpe akosepela na ye mingi soki mwasi yango azali komonisa ete atalelaka kaka bamposa na ye moko te, kasi mpe oyo ya mobali na ye. Na libala, mwasi ná mobali bazalaka na boyokani malamu soki mokomoko azali komitambwisa lokola moto azali mpenza moke.​—Tángá Bafilipi 2:1-4.

15, 16. Na Nzembo 131, Davidi alendisi biso tózala na makanisi nini, mpe yango esengeli kotinda biso tómonisa ezaleli nini na kati ya lisangá?

15 Na kati ya lisangá. Na mokili, bato mingi balingaka kaka kokokisa bamposa na bango moko kozanga kozela. Bazalaka na motema molai te mpe bakokaka kozela te. Komonisa ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke esalisaka biso tózela Yehova. (Tángá Nzembo 131:1-3.) Soki tozali komikitisa mpe tozali kozela Yehova, tokozala na kimya, tokozwa mapamboli mingi, tokozwa libɔndisi, mpe tokozala na esengo. Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge Davidi alendisaki bandeko na ye Bayisraele bázela Nzambe na bango na motema molai!

16 Yo mpe okoki kozwa libɔndisi ya ndenge wana soki ozali kozela Yehova na komikitisa nyonso. (Nz. 42:5) Ekoki kozala ete ozali “na mposa ya mosala moko ya malamu mingi,” elingi koloba ozali “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli.” (1 Tim. 3:1-7) Ezali solo ete osengeli kosala nyonso oyo okoki mpo na kotika elimo santu esalisa yo okolisa bizaleli oyo mokɛngɛli asengeli kozala na yango. Kasi okosala nini soki ozali komona ete makambo ezali koumela mpo na yo, nzokande bamosusu bazali kozwa mikumba? Moto oyo azali mpenza moke, oyo azali kozela na motema molai tii akozwa mikumba na lisangá, akobaka kosalela Yehova na esengo mpe asepelaka na mokumba nyonso oyo bapesi ye.

17, 18. (a) Matomba nini tokozwa soki tozali kosɛnga bolimbisi mpe soki tozali kondima kolimbisa basusu? (b) Masese 6:1-5 epesi biso toli nini?

17 Na boyokani na biso ná basusu. Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpasi mpo na bato mingi. Kasi, basaleli ya Nzambe bamonisaka ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke na ndenge bandimaka mabunga na bango mpe basɛngaka bolimbisi. Baboyaka mpe te kolimbisa basusu ntango basali mabunga. Lolendo ebimisaka bokabwani mpe kowelana, nzokande kolimbisa etyaka kimya na kati ya lisangá.

18 Tokoki komonisa ete ‘tozali komikitisa’ soki tozali kosɛnga moto mosusu bolimbisi na motema mobimba ntango tokokisi te likambo moko oyo tolakaki ye, mpo tokutani na likambo moko oyo tokoki kopekisa te. Atako ekoki kokóma ete tópesa bato mosusu foti, mokristo oyo amikitisaka ayebaka ete ye moko mpe asalaka mabunga mpe andimaka yango.​—Tángá Masese 6:1-5.

Mabaku nini ozali na yango ya komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke?

19. Mpo na bantina nini mokomoko na biso asengeli kozala na botɔndi mpo na toli oyo Biblia epesi ete tómitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke?

19 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Biblia ezali kolendisa biso tózala na ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke! Ata soki na bantango mosusu tokoki kozala na mokakatano mpo na komonisa ezaleli yango, soki tobosani te ete tozali mpenza moke liboso ya Mozalisi na biso mpe soki tokanisi ndenge oyo amikitisaka, yango ekosalisa biso tólona ezaleli wana ya malamu. Soki tosali bongo, tokomonisa ete biso basaleli ya Yehova tozali na valɛrɛ mingi na miso na ye. Yango wana, tiká ete mokomoko na biso amitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke.

^ par. 5 Bankombo mosusu ezali ya bango te.