Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”

“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”

“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo, mpo ozali Nzambe na ngai.”​—NZ. 143:10.

1, 2. (a) Matomba nini tokoki kozwa soki tozali koluka koyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini? (b) Ndakisa ya mokonzi Davidi ekoki koteya biso nini na likambo yango?

KANISÁ ete ozali kosala mobembo na esika moko ya ngombangomba. Mbala moko, omoni ete nzela ekabwani na mibale. Nzela nini osengeli kozwa? Ntango mosusu, ekosɛnga omata naino na libanga moko ya monene oyo ezali pembeni, mpo omona malamu epai wapi nzela mokomoko ekoki komema yo. Ndenge moko mpe, ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, kotalela makambo ndenge oyo Mozalisi na biso ataleka yango, ekosalisa biso ‘tótambola na nzela’ oyo Yehova andimi, mpamba te ye amonaka mosika koleka biso bato.​—Yis. 30:21.

2 Pene na bomoi na ye mobimba, Davidi, mokonzi ya Yisraele, apesaki ndakisa malamu na ndenge azalaki koluka koyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini. Tótalela makambo mosusu oyo ekómelaki Davidi, mpe tóluka koyeba ndenge oyo etamboli ya moto yango, oyo motema na ye ezalaki mobimba epai ya Yehova Nzambe, ekoki kosalisa biso.​—1 Bak. 11:4.

DAVIDI AZALAKI KOZWA NKOMBO YA YEHOVA NA MOTUYA MINGI

3, 4. (a) Nini esalisaki Davidi abanga te kokende kobundisa Goliate? (b) Ndenge nini Davidi azalaki kotalela nkombo ya Nzambe?

3 Tólobela naino mokolo oyo Davidi akendaki kobunda na Goliate, elombe Mofilistia. Nini esalisaki Davidi, oyo azalaki naino elenge, abanga te kokende kobunda na engambe mobali wana, oyo azalaki na bibundeli ya makasi mpe azalaki na molai ya mɛtrɛ pene na misato? (1 Sa. 17:4) Ezali nde mpo Davidi azalaki na mpiko? To ezali nde mpo azalaki na kondima epai ya Nzambe? Bizaleli wana nyonso mibale esalisaki Davidi na likambo yango. Kasi mingimingi ezalaki limemya oyo Davidi azalaki na yango mpo na Yehova mpe mpo na nkombo na ye monene nde esalisaki ye abanga te kobundisa engambe wana. Davidi atunaki na nkanda ete: “Esutu ya Mofilistia oyo azali nani mpo atumola milɔngɔ ya etumba ya Nzambe ya bomoi?”​—1 Sa. 17:26.

4 Ntango akómaki liboso ya Goliate, elenge Davidi alobaki boye: “Ozali koyela ngai na mopanga, na likɔnga mpe na likɔnga moke, kasi ngai, nazali koya epai na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga, Nzambe ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele, oyo yo otumoli.” (1 Sa. 17:45) Lokola Davidi atyelaki Nzambe ya solo motema, abomaki engambe Mofilistia na libanga moko mpamba. Davidi azalaki kotyela Yehova motema mpe kozwa nkombo ya Nzambe na motuya, kaka na libaku wana te, kasi bomoi na ye mobimba. Yango wana, alendisaki bandeko na ye Bayisraele ‘bámikumisa na nkombo mosantu ya Yehova.’​—Tángá 1 Ntango 16:8-10.

5. Makambo nini okoki kokutana na yango, oyo ekoki kozala lokola matumoli ya Goliate?

5 Yo mpe omikumisaka na ndenge Yehova azali Nzambe na yo? (Yir. 9:24) Osalaka nini soki baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, to bandeko na yo bazali koloba mabe mpo na Yehova mpe bazali kotyola Batatoli na ye? Ozalaka na mpiko ya koloba ntango bazali kobwaka nsɔni na nkombo ya Yehova, na elikya ete akosunga yo? Toboyi te, ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ,” kasi tosengeli te koyoka nsɔni ndenge tozali Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu. (Mos. 3:1, 7; Mrk. 8:38) Atako tosengeli kozala na boboto epai ya baoyo bazali kosepela na nsango malamu te mpe kokeba ete tózokisa bango te, tosengeli te kozala lokola Bayisraele wana, oyo “bayokaki nsɔmɔ mpe babangaki mingi” ntango bayokaki maloba ya kotumola ya Goliate. (1 Sa. 17:11) Tosengeli nde kozala na mpiko mpo na kosantisa nkombo ya Yehova Nzambe. Mposa na biso ezali ya kosalisa bato báyekola koyeba Yehova Nzambe, ndenge azali mpenza. Yango wana, tosalelaka Liloba na ye mpo tolingi kosalisa basusu báyeba ete kopusana penepene na Nzambe ezali mpenza na ntina.​—Yak. 4:8.

6. Mokano ya Davidi ezalaki nini ntango akendaki kobunda na Goliate, mpe mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala nini?

6 Ndenge oyo Davidi abundaki na Goliate eteyi biso likambo mosusu ya ntina mingi. Ntango Davidi apotaki mbangu tii na esika ya etumba, atunaki boye: “Bakosala nini na moto oyo akoboma Mofilistia wana mpe akolongola Yisraele nsɔni?” Bongo bato yango balobaki na ye maloba ndenge moko na oyo balobaki liboso ete: “Moto oyo akoboma [Goliate], mokonzi akokómisa ye mozwi, akopesa ye bomɛngo mingi, mpe akopesa ye mwana na ye ya mwasi.” (1 Sa. 17:25-27) Kasi mokano ya libosoliboso ya Davidi ezalaki te ya kozwa biloko oyo mokonzi alakaki. Azalaki na mokano mosusu oyo eleki ntina. Davidi alingaki nde kokumisa Nzambe ya solo. (Tángá 1 Samwele 17:46, 47.) Ezali boni mpo na biso? Mokano na biso ya libosoliboso ezalaka nde ya kokóma bazwi mpe kokóma bato minene mpo tómisalela nkombo ya lokumu na mokili oyo? Na ntembe te, tolingi nde kozala lokola Davidi, oyo ayembaki ete: “Ee bókumisa Yehova elongo na ngai, mpe tótombola nkombo na ye elongo.” (Nz. 34:3) Yango wana, tiká ete tótyela Nzambe motema mpe tópesa nkombo na ye lokumu mingi koleka nkombo na biso moko.​—Mat. 6:9.

7. Ndenge nini tokoki kokóma na kondima makasi oyo ekosalisa biso ntango tokutani na bato oyo basepeli na nsango malamu te?

7 Mpo Davidi azwa mpiko ya kokende kobunda na Goliate, asengelaki kotyela Yehova motema mobimba. Elenge Davidi azalaki na kondima makasi. Akómaki na kondima ya ndenge wana mpamba te azalaki kotyela Yehova motema ntango azalaki kobatela bampate. (1 Sa. 17:34-37) Biso mpe tosengeli kozala na kondima makasi mpo tókoba na mosala ya kosakola, mingimingi ntango tokutani na bato oyo bazali kosepela na nsango malamu te. Tokoki kokóma na kondima ya ndenge wana soki tozali kotyela Yehova motema na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo. Na ndakisa, tokoki kobanda lisolo ya Biblia na moto oyo afandi pembeni na biso ntango tozali na kati ya motuka. Mpe ntango tobimi na mosala ya kosakola ndako na ndako, tosengeli mpe kopesa litatoli na bato oyo tozali kokutana na bango na balabala.​—Mis. 20:20, 21.

DAVIDI AZALAKI KOZELA YEHOVA

Nini epekisaki Davidi aboma Saulo ntango azwaki libaku ya kosala yango?

8, 9. Ndenge nini Davidi amonisaki ete ayebaki malamu mokano ya Yehova na likambo na ye ná mokonzi Saulo?

8 Likambo mosusu oyo emonisi ete Davidi azalaki mpenza na mposa ya kotyela Yehova motema etalelaki Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisraele. Mbala misato mobimba, Saulo oyo atondaki na zuwa, abwakelaki Davidi likɔnga mpo na kobaka ye na efelo, kasi mbala nyonso wana Davidi alongwaki liboso ya Saulo mpe akendaki, aboyaki kozongisa mabe na mabe. Nsukansuka, akimaki mosika na Saulo. (1 Sa. 18:7-11; 19:10) Na nsima, Saulo azwaki mibali 3 000 oyo aponaki na Yisraele mobimba mpe bakendaki koluka Davidi na esobe. (1 Sa. 24:2) Nsukansuka, kozanga koyeba, Saulo akendaki kokɔta na mobenga moko, esika Davidi ná bato na ye bazalaki. Davidi akokaki kosalela libaku wana mpo na koboma mokonzi wana oyo azalaki koluka kosala ye mabe. Kutu, mokano ya Nzambe ezalaki ete Davidi akóma mokonzi ya Yisraele na esika ya Saulo. (1 Sa. 16:1, 13) Mpe soki Davidi ayokaki toli oyo bato na ye bapesaki ye, akokaki koboma mokonzi Saulo. Kasi Davidi alobaki ete: “Na kotalela likanisi ya Yehova, nakoki kokanisa ata moke te kosala nkolo na ngai, moto oyo Yehova atye mafuta, likambo oyo.” (Tángá 1 Samwele 24:4-7.) Saulo azalaki naino mokonzi oyo Nzambe atyaki mafuta. Davidi alingaki te kobɔtɔla Saulo bokonzi, mpamba te Yehova alongolaki ye naino te. Ndenge Davidi asukaki kaka na kokata na malɛmbɛ nsɔngɛ ya kazaka ezangá mabɔkɔ ya Saulo, emonisi ete azalaki na likanisi ya kosala ye mabe te.​—1 Sa. 24:11.

9 Davidi amonisaki lisusu limemya mpo na mokonzi oyo Nzambe atyaki mafuta ntango amonaki ye mpo na mbala ya nsuka. Na ntango yango, Davidi ná Abishai bakómaki na esika oyo Saulo atyaki kaa na ye mpe bakutaki ye alali. Atako Abishai alobaki ete Nzambe akabi monguna wana na lobɔkɔ ya Davidi mpe asɛngaki ete abaka Saulo na mabele na likɔnga, Davidi apesaki ye nzela ya kosala yango te. (1 Sa. 26:8-11) Lokola Davidi akobaki koluka litambwisi ya Nzambe, akangamaki na ekateli na ye ya kosala makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova, atako Abishai atyaki ye mbamba aboma Saulo.

10. Mokakatano nini tokoki kokutana na yango, mpe nini ekosalisa biso tókwea na motambo te?

10 Biso mpe tokoki kokutana na mokakatano moko oyo ekoki kotinda bandeko to baninga na biso bátya biso mbamba ete tólanda makanisi ya bato, na esika ya kolendisa biso tósala mokano ya Nzambe. Lokola Abishai, basusu bakoki kotinda biso tósala makambo kozanga koluka koyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini na likambo moko boye. Mpo tókwea na motambo yango te, tosengeli koluka koyeba malamu ndenge oyo Yehova atalelaka likambo yango mpe kozala na ekateli ya kolanda kaka banzela na ye.

11. Liteya nini ozwi epai ya Davidi na oyo etali koluka libosoliboso koyeba mokano ya Nzambe?

11 Davidi abondelaki Yehova ete: “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo.” (Tángá Nzembo 143:5, 8, 10.) Na esika ya kolanda makanisi na ye moko to kosala likambo kaka mpo moto mosusu azali kotya ye mbamba, Davidi azalaki nde na mposa ete Nzambe ateya ye. ‘Amanyolaki mosala mobimba ya Yehova mpe asepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ ya Nzambe.’ Biso mpe tokoki kososola mokano ya Nzambe soki tozali koyekola Makomami malamumalamu mpe komanyola na masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge oyo Yehova asalelaka bato makambo.

DAVIDI AZALAKI KOLUKA KOYEBA MITINDA OYO ESIMBI MIBEKO

12, 13. Mpo na nini Davidi asopaki mai oyo bato na ye misato bamemelaki ye?

12 Tosengeli mpe komekola Davidi na ndenge oyo azalaki koluka koyeba mitinda oyo esimbi mibeko mpe azalaki na mposa ya kolanda mitinda yango. Tótalela likambo oyo esalemaki ntango Davidi amonisaki mposa na ye ‘ya komɛla mai ya libulu ya kobomba mai ya Beteleme.’ Bato misato ya Davidi bakɔtaki na makasi na engumba, oyo na ntango wana Bafilistia nde bazalaki koyangela, batokaki mai mpe bamemelaki ye yango. Nzokande, “Davidi andimaki komɛla yango te, kasi asopaki yango mpo na Yehova.” Mpo na nini? Alobaki boye: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, mpo na Nzambe na ngai, ete nasala boye! Nakomɛla nde makila ya mibali oyo batye milimo na bango na likama? Mpo batyaki milimo na bango na likama ntango bayaki na yango.”​—1 Nt. 11:15-19.

Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Davidi aboyaki komɛla mai oyo bato na ye bamemelaki ye?

13 Na nzela ya Mibeko, Davidi ayebaki ete esengeli kolya makila te, kasi kosopa yango na mabele liboso ya Yehova. Ayebaki mpe ntina oyo esengeli kosala bongo. Ayebaki ete “molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila.” Nzokande, mai wana ezalaki makila te. Kasi mpo na nini Davidi aboyaki komɛla yango? Asosolaki etinda oyo esimbaki mobeko wana. Mpo na Davidi, mai wana ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na makila ya mibali wana misato. Yango wana, akokaki kondima ata moke te komɛla mai yango. Na esika amɛla yango, amonaki ete asengeli nde kosopa yango na mabele.​—Lev. 17:11; Mib. 12:23, 24.

14. Nini esalisaki Davidi akóma kotalela makambo lokola Yehova?

14 Davidi azalaki kosala makasi mpo mobeko ya Yehova ekɔtela ye mpenza na motema. Ayembaki ete: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” (Nz. 40:8) Davidi azalaki koyekola mibeko ya Nzambe mpe komanyola yango malamumalamu. Ayebaki ete mibeko ya Yehova epesaka bwanya. Yango wana, azalaki kosuka kaka te na kolanda makambo oyo ekomamaki na Mibeko ya Moize, kasi mpe mitinda oyo esimbaki mibeko yango. Ntango tozali koyekola Biblia, tosengeli komanyolaka na makambo oyo tozali kotánga mpe kobomba yango na motema mpo tókoka koyeba nini esepelisaka Yehova na likambo boye to boye.

15. Na likambo nini Salomo atosaki te mobeko ya Nzambe?

15 Yehova Nzambe azalaki kosepela mingi na Salomo, mwana ya Davidi. Kasi na nsima, Salomo atikaki kotosa mibeko ya Nzambe. Atosaki te mobeko oyo Yehova apesaki ete mokonzi ya Yisraele asengeli te “kokóma na basi ebele.” (Mib. 17:17) Kutu, Salomo abalaki basi ebele ya bikólo mosusu. Ntango akómaki mobange, “basi na ye babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu.” Ata soki mbala mosusu akanisaki nini, “Salomo abandaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpe alandaki Yehova na makambo nyonso te lokola tata na ye Davidi.” (1 Bak. 11:1-6) Yango emonisi ete ezali mpenza na ntina tótosa mibeko mpe mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe! Na ndakisa, yango ezali na ntina mingi ntango ozali koluka kobala.

16. Koyeba makambo nyonso oyo esɛngami na mobeko ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” esengeli kotinda bakristo oyo balingi kobala básala nini?

16 Soki moto oyo azali Motatoli te azali komonisela biso lolango, tokosala lokola Davidi to lokola Salomo? Biblia elobi ete bakristo ya solo basengeli kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Soki mokristo moko alingi kobala, asengeli kobalana kaka na moto mosusu oyo asambelaka mpe Yehova. Mpe soki tososoli makambo nyonso oyo mobeko yango ya Biblia esɛngi, tokosuka kaka te na koboya kobalana na moto oyo azali Motatoli te, kasi tokoboya mpe kokolisa lolango mpo na moto ya ndenge wana.

17. Nini ekoki kosalisa biso tókwea te na motambo ya pornografi?

17 Tótala mpe ndenge oyo ndakisa ya Davidi, oyo azalaki koluka litambwisi ya Nzambe na mposa makasi, ekoki kosalisa biso tókwea te na motambo ya kotala pornografi. Tángá bavɛrsɛ oyo elandi, luká koyeba mitinda oyo ezali na kati, mpe salá makasi ososola mokano ya Yehova na likambo yango. (Tángá Nzembo 119:37; Matai 5:28, 29; Bakolose 3:5.) Komanyola na mitinda ya Nzambe oyo eleki malamu ekosalisa biso tókwea te na motambo ya pornografi.

KOBOSANAKA TE LOLENGE OYO YEHOVA ATALELAKA MAKAMBO

18, 19. (a) Atako Davidi azalaki moto ya kozanga kokoka, nini esalaki ete Nzambe akoba kondima ye? (b) Ekateli nini ozwi?

18 Atako Davidi atosaki Nzambe na makambo mingi, asalaki mpe masumu mingi ya minene. (2 Sa. 11:2-4, 14, 15, 22-27; 1 Nt. 21:1, 7) Kasi, Davidi azalaki kobongola motema soki asali lisumu. Atambolaki liboso ya Nzambe “na kozanga mbeba na motema.” (1 Bak. 9:4) Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te Davidi azalaki kosala makasi asala makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova.

19 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yehova akoki kokoba kondima biso. Soki tolingi ete ezala bongo, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe na etingya, komanyolaka malamumalamu na makambo oyo tozali koyekola, mpe kozala na ekateli makasi ya kosalela makambo oyo tobombi na mitema na biso. Soki tosali bongo, ekozala lokola nde tozali kobondela Yehova ndenge mokomi ya Nzembo abondelaki ye na komikitisa nyonso ete: “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo.”