Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?

Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?

“Yehova [azali] Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te . . . , alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.”​—KOB. 34:6, 7.

1, 2. (a) Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya ndenge nini mpo na Bayisraele? (b) Lisolo oyo ekoyanola na motuna nini?

NA MIKOLO ya Nehemia, mwa ndambo ya Balevi bandimaki na libondeli moko oyo basalaki na miso ya bato ete mbala na mbala bankɔkɔ na bango ‘baboyaki koyoka’ mibeko ya Yehova. Kasi, mbala na mbala, Yehova amonisaki ete azali ‘Nzambe ya bolimbisi, ya ngɔlu mpe ya motema mawa, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto.’ Yehova akobaki komonisela bango boboto monene na ye.​—Neh. 9:16, 17.

2 Mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Nasengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa ngai?’ Mpo na kosalisa biso tózwa eyano na motuna wana ya ntina mingi, tótalela naino ndenge oyo Yehova alimbisaki bakonzi mibale, Davidi mpe Manase.

MASUMU MINENE OYO DAVIDI ASALAKI

3-5. Ndenge nini Davidi akweaki na lisumu ya monene?

3 Atako Davidi azalaki kobanga Nzambe, asalaki mpe masumu mingi ya minene. Na masumu oyo asalaki, mibale etalelaki Bate-sheba ná mobali na ye Uria. Masumu yango ebimisaki makambo ya mabe mpo na Davidi, Uria, mpe Bate-sheba. Kasi, ndenge oyo Yehova asembolaki Davidi emonisi ete andimaka mpenza kolimbisa. Tótalela likambo oyo esalemaki.

4 Davidi atindaki basoda ya Yisraele bákende kokweisa Raba, engumba-mokonzi ya Amone. Engumba yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 na ɛsti ya Yerusaleme, pene na Ebale Yordani. Kaka na ntango yango, mokolo moko, Davidi azalaki kotambola na nsamba ya ndako na ye na Yerusaleme mpe amonaki Bate-sheba, mwasi ya moto mosusu, azali kosukola. Mobali na ye azalaki te. Lokola Davidi akobaki kotala Bate-sheba, yango elamwisaki mposa na ye ya nzoto, mpe atindaki bámemela ye mwasi yango na ndako na ye, mpe asalaki na ye ekobo.​—2 Sa. 11:1-4.

5 Ntango Davidi ayokaki ete Bate-sheba azali na zemi, atindaki maloba ete mobali na ye Uria azonga naino na Yerusaleme, na elikya ete akosangisa nzoto ná mwasi na ye. Kasi Uria akɔtaki ata kokɔta te na ndako na ye, atako Davidi asalaki nyonso mpo Uria akende kolala na ndako na ye. Yango wana, Davidi atindelaki komanda ya basoda na ye mokanda ete atya Uria “liboso na esika oyo etumba ezali konginda makasi,” kasi basoda mosusu bázala nde nsima na ye. Lokola batyaki ye na esika wana ya mabe, Uria akufaki na etumba yango, kaka ndenge Davidi abongisaki. (2 Sa. 11:12-17) Lisumu ya ekobo oyo Davidi asalaki ebakisamaki lisusu na ndenge abomisaki moto oyo asalaki eloko te.

DAVIDI ABONGOLI MOTEMA

6. Nzambe asalaki nini ntango Davidi asalaki masumu, mpe yango emonisi nini mpo na Yehova?

6 Ya solo, Yehova amonaki makambo nyonso oyo esalemaki. Likambo moko te esalemaki kozanga ete ayeba yango. (Mas. 15:3) Atako na nsima mokonzi Davidi abalaki Bate-sheba, “likambo oyo Davidi asalaki emonanaki mabe na miso ya Yehova.” (2 Sa. 11:27) Kasi, Nzambe asalaki nini ntango Davidi asalaki masumu minene? Atindaki mosakoli na ye Natane epai ya Davidi. Lokola azali Nzambe oyo alimbisaka, emonani ete azalaki koluka bantina ya komonisela Davidi motema mawa. Omoni te ete ndenge oyo Yehova asalaki na likambo wana ezali mpenza kosimba mitema na biso? Atindaki Davidi na makasi te ete ayambola lisumu na ye; atindaki nde Natane apesa ye ndakisa moko oyo ekomonisa mabe oyo asalaki. (Tángá 2 Samwele 12:1-4.) Yango ezalaki lolenge malamu mpenza ya kotinda Davidi abimisa makanisi oyo ezalaki na motema na ye!

7. Davidi asalaki nini nsima ya koyoka ndakisa oyo Natane apesaki?

7 Ndakisa oyo Natane apesaki elamwisaki lisusu mposa ya bosembo oyo Davidi azalaki na yango. Davidi ayokaki nkanda mpo na mozwi ya lisolo yango mpe alobaki na Natane ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo asali boye asengeli kokufa!” Lisusu, Davidi alobaki ete esengeli kofuta mobola wana oyo basalelaki likambo ya kozanga bosembo. Na nsima, Natane abimisaki likambo moko oyo eswaki Davidi. Alobaki ete: “Moto yango nde yo!” Na nsima, ayebisaki Davidi ete mpo na makambo oyo asalaki, “mopanga” ekolongwa na ndako na ye te mpe mpasi ekokwela libota na ye. Lisusu, akosambwa na miso ya bato mpo na mabunga na ye. Davidi amonaki ete asali mpenza mabe mpe andimaki polele ete: “Nasaleli Yehova lisumu.”​—2 Sa. 12:5-14.

DAVIDI ABONDELI MPE NZAMBE ALIMBISI YE

8, 9. Ndenge nini Nzembo 51 emonisi makanisi oyo ezalaki na motema ya Davidi, mpe nzembo yango eteyi biso nini mpo na Yehova?

8 Maloba ya loyembo moko oyo Mokonzi Davidi asalaki na nsima, emonisi ete ayokaki mawa mingi mpo na lisumu yango. Nzembo 51 emonisi ndenge Davidi afungolelaki Yehova motema mpe amonisaki polele ete andimi mabunga na ye. Abongolaki mpe motema na masumu oyo asalaki. Davidi azalaki libosoliboso kokanisa boyokani na ye ná Nzambe. Alobaki boye: “Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko.” Abondelaki Yehova na maloba oyo: “Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi. . . . Zongiselá ngai esengo ya lobiko na yo, mpe sungá ngai na elimo oyo elingaka kotosa.” (Nz. 51:1-4, 7-12) Yo mpe ofungolelaka Yehova motema ndenge wana ntango ozali koyebisa ye mabunga na yo?

9 Yehova apekisaki te mikakatano oyo ekómelaki Davidi mpo na masumu na ye. Asengelaki kokutana na mikakatano yango bomoi na ye mobimba. Atako bongo, Yehova alimbisaki Davidi mpo amonaki ete abongolaki mpenza motema mpe ete azalaki na “motema oyo ebukani mpe etutami.” (Tángá Nzembo 32:5; Nz. 51:17) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebaka makanisi ya moto mpe makambo oyo etindi ye asala lisumu. Na esika atika ete bazuzi bákatela Davidi ná Bate-sheba etumbu ya liwa ndenge Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga, na motema mawa na ye, Yehova ye moko akataki likambo na bango. (Lev. 20:10) Kutu, Nzambe akómisaki mwana na bango Salomo mokonzi ya Yisraele nsima ya Davidi.​—1 Nt. 22:9, 10.

10. (a) Ekoki kozala ete Yehova amonaki likambo nini oyo etindaki ye alimbisa Davidi? (b) Makambo nini etindaka Yehova alimbisa biso?

10 Ekoki kozala ete ntina mosusu oyo Yehova alimbisaki Davidi ezalaki mpo amoniselaki Saulo motema mawa. (1 Sa. 24:4-7) Ndenge Yesu amonisaki yango, Yehova asalelaka biso makambo na kolanda oyo biso tosalelaka basusu. Yesu alobaki ete: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa; mpe bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.” (Mat. 7:1, 2) Koyeba ete Yehova akolimbisa masumu na biso, ata soki ezali masumu ya minene lokola ekobo to koboma moto, ekoki mpenza kokitisa biso mitema! Yehova akolimbisa biso soki tozali kolimbisa basusu, soki tozali koyambola masumu na biso, mpe soki tomonisi ete tobongoli makanisi na biso, elingi koloba tokómi kotalela lisumu oyo tosali ndenge Yehova atalelaka yango. “Bileko ya kopema” eutaka epai na Yehova ntango mosumuki abongoli mpenza motema.​Tángá Misala 3:19.

MANASE ASALAKI MASUMU MINENE KASI ABONGOLAKI MOTEMA

11. Makambo nini Mokonzi Manase asalaki oyo ezalaki mabe na miso ya Yehova?

11 Tótalela lisolo mosusu ya Biblia oyo emonisi ete Yehova akoki kolimbisa ata masumu ya minene. Mbula soki 360 liboso ete Davidi abanda koyangela, Manase akómaki mokonzi ya Yuda. Na boyangeli na ye oyo eumelaki mbula 55, asalaki makambo mingi ya mabe, mpe Yehova apesaki ye etumbu mpo na yango. Na ndakisa, atongaki bitumbelo mpo na Baala, asambelaki “limpinga nyonso ya likoló,” alekisaki bana na ye mbeka na mɔtɔ, mpe atindaki bato bámipesa na misala ya bilimo mabe. Manase “asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova!”​—2 Nt. 33:1-6.

12. Ndenge nini Manase azongelaki Yehova?

12 Nsukansuka, bakangaki Manase mpe bamemaki ye na bolɔkɔ na Babilone. Ekoki kozala ete kuna, akanisaki lisusu maloba oyo Moize alobaki na Yisraele: “Ntango makambo ekoyela yo ndongo mpe maloba oyo nyonso ekozwa yo na nsuka ya mikolo, okozongela mpenza Yehova Nzambe na yo mpe okoyoka mpenza mongongo na ye.” (Mib. 4:30) Manase azongelaki Yehova. Na ndenge nini? “Amikitisaki mingi” mpe “azalaki kobondela” Nzambe (ndenge elilingi ya lokasa 21 emonisi yango). (2 Nt. 33:12, 13) Biblia eyebisi mpenza te maloba oyo Manase asalelaki na mabondeli na ye, kasi tokoki kokanisa ete maloba yango ekoki kozala ndenge moko ná oyo Mokonzi Davidi asalelaki na Nzembo 51. Ezala bongo to te, Manase abongolaki mpenza motema.

13. Mpo na nini Yehova alimbisaki Manase?

13 Yehova asalaki nini ntango Manase abondelaki ye? “Andimaki libondeli ya Manase mpe ayokaki lilɔmbɔ na ye mpo na kondimama.” Kaka ndenge Davidi asalaki, Manase mpe andimaki ete asalaki masumu minene mpe abongolaki mpenza motema. Yango wana, Yehova alimbisaki Manase mpe azongisaki ye na bokonzi na Yerusaleme. Na ndenge yango, “Manase ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.” (2 Nt. 33:13) Tolendisami mpenza na ndakisa wana ya mibale oyo emonisi ete Nzambe na biso ya motema mawa alimbisaka baoyo babongoli mpenza motema!

Yehova alimbisaki Manase, yango wana azongisaki ye na kiti ya bokonzi na Yerusaleme

MASUMU YA NDENGE NINI YEHOVA ALIMBISAKA?

14. Nini esalaka ete Yehova alimbisa moto oyo asali lisumu?

14 Lelo oyo, ezali na basaleli ya Nzambe mingi te oyo basɛngaka bolimbisi mpo na masumu ya minene lokola oyo ya Davidi ná Manase. Atako bongo, ndenge oyo Yehova alimbisaki bakonzi wana mibale esalisi biso tóyeba ete Nzambe na biso akoki kolimbisa ata masumu minene soki mosumuki abongoli mpenza motema.

15. Ndenge nini toyebi ete Yehova alimbisaka bato nyonso te oyo basalaka masumu?

15 Ya solo, tokoki te koloba ete Yehova alimbisaka bato nyonso mpo na masumu na bango. Na likambo yango, tótala bokeseni oyo ezali kati na ezaleli oyo Davidi ná Manase bamonisaki ná ezaleli ya bato ya Yisraele mpe ya Yuda oyo bazangaki botosi. Nzambe atindaki Natane akende komonisa Davidi mabe oyo asalaki mpe kopesa ye libaku ya kobongola motema. Davidi amonisaki botɔndi mpe andimaki lisungi yango. Ntango Manase amonaki ete makambo ekómeli ye ndongo, amonaki ete asengeli kobongola motema. Kasi, mbala na mbala, bato oyo bazalaki kofanda na Yisraele mpe na Yuda babongolaki mitema te. Yango wana, Yehova alimbisaki bango te. Atindaki nde basakoli na ye mbala na mbala mpo báyebisa bango ndenge oyo azalaki kotalela kozanga botosi na bango. (Tángá Nehemia 9:30.) Ata ntango Bayisraele oyo bazalaki na boombo na Babilone bazongaki na mboka na bango, Yehova akobaki kotindela bango bamemi-nsango ya sembo, na ndakisa nganga-nzambe Ezra mpe mosakoli Malaki. Ntango bato bazalaki kosala mokano ya Yehova, bazalaki na esengo mingi.​—Neh. 12:43-47.

16. (a) Nini ekómelaki ekólo ya Yisraele mpo eboyaki kobongola motema? (b) Libaku nini Yehova apesi Moyisraele mokomoko?

16 Nsima ya ntango oyo Yesu atindamaki awa na mabele mpe mbeka ya kokoka ya lisiko epesamaki, Yehova azalaki lisusu te kondima bambeka ya banyama oyo Bayisraele bazalaki kopesa. (1 Yoa. 4:9, 10) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki makanisi ya Tata na ye mpo na Yerusaleme na maloba oyo: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga,​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki yango te.” Yango wana, Yesu alobaki ete: “Talá! basundoleli bino ndako na bino.” (Mat. 23:37, 38) Na yango, Yisraele ya elimo ezwaki esika ya ekólo Yisraele oyo esalaki masumu mpe ebongolaki motema te. (Mat. 21:43; Gal. 6:16) Kasi ezali boni mpo na Moyisraele mokomoko? Soki Moyisraele moko amonisi kondima epai na Yehova mpe na mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo, Yehova akoki kolimbisa ye mpe komonisela ye motema mawa. Libaku wana ekopesama mpe na bato oyo bakufaki kozanga ete bábongola mitema na masumu na bango, ntango bakosekwa na mokili ya sika.​—Yoa. 5:28, 29; Mis. 24:15.

MATOMBA OYO TOKOKI KOZWA LOKOLA YEHOVA ALIMBISAKA

17, 18. Nini tokoki kosala soki tolingi ete Yehova alimbisa biso?

17 Lokola toyebi ete Yehova alimbisaka mpenza, tosengeli kosala nini? Na ntembe te, tosengeli kosala lokola Davidi ná Manase. Tosengeli kondima masumu na biso, kobongola motema, kobondela Yehova na etingya mpo na kosɛnga ye alimbisa biso mpe apesa biso motema ya pɛto. (Nz. 51:10) Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli mpe koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu. (Yak. 5:14, 15) Ata soki tosali lisumu ya ndenge nini, tokobɔndisama mpenza soki tobosani te ete, ndenge Yehova ye moko amimonisaki epai ya Moize, azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” Yehova abongwani te.​—Kob. 34:6, 7.

18 Yehova asalelaki maloba kitoko ya elilingi mpo na koyebisa Bayisraele oyo babongolaki motema ete akolimbisa mpenza masumu na bango. Alobaki ete ata soki masumu na bango ezali “motane makasi,” akokómisa yango mpɛmbɛ lokola “nɛjɛ.” (Tángá Yisaya 1:18.) Na yango, tosengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa biso? Yehova akolimbisa masumu mpe mabunga na biso soki tozali na botɔndi mpo na ndenge oyo alimbisaka mpe tobongoli motema.

19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Lokola Yehova alimbisaka biso, ndenge nini tokoki komekola ye na boyokani na biso ná basusu? Ndenge nini tokoki koboya ezaleli ya kozanga kolimbisa baoyo basali masumu ya minene kasi bamonisi ete babongoli motema? Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tótalela mitema na biso mpo na koyeba soki tosengeli komekola lisusu malamumalamu Tata na biso Yehova, oyo ‘azali malamu mpe asepelaka kolimbisa.’​—Nz. 86:5.