Yesu apesi biso ndakisa ya komikitisa
“Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.”—YOA. 13:15.
1, 2. Liteya nini Yesu ateyaki bantoma na ye na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele?
EZALI butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Alekisi yango elongo na bantoma na ye na shambre moko ya likoló na Yerusaleme. Ntango bazali kolya bilei ya mpokwa, Yesu atɛlɛmi mpe alongoli bilamba na ye ya likoló. Alati esumɛ na loketo. Na nsima, atye mai na saani mpe abandi kosukola makolo ya bantoma na ye mpe apangwisi yango na esumɛ. Nsima na yango, alati lisusu bilamba na ye ya likoló. Mpo na nini Yesu asali likambo wana oyo emonisi komikitisa?—Yoa. 13:3-5.
2 Yesu ye moko alimboli boye: “Boyebi likambo oyo nasali bino? . . . Soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino. Mpamba te napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoa. 13:12-15) Lokola Yesu andimaki kosala likambo wana oyo emonisi komikitisa, apesaki bantoma na ye liteya oyo alingaki ete etikala libela na makanisi na bango mpe elendisa bango bázala na komikitisa na mikolo oyo ekoya.
3. (a) Na mabaku mibale mobimba, ndenge nini Yesu amonisaki ete komikitisa ezali mpenza na ntina? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
3 Ntango Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye, ezalaki mbala ya liboso te amonisa bango ntina ya kozala na komikitisa. Mwa mikolo liboso, ntango bantoma mosusu bazalaki koluka koyeba nani kati na bango aleki bamosusu, Yesu azwaki mwana moke, atyaki ye pene na ye, mpe ayebisaki bango ete: “Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai ayambi mpe moto oyo atindaki ngai. Mpo moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.” (Luka 9:46-48) Lokola Yesu ayebaki ete Bafarisai bazalaki koluka lokumu, mokolo moko ntango azalaki kosakola, alobaki ete: “Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombwama.” (Luka 14:11) Emonani polele ete Yesu alingaki ete bayekoli na ye bázala na komikitisa, elingi koloba bázala na lolendo te, mpe na lofundo te. Lokola tolingi komekola ye, tótalela malamumalamu ndakisa ya komikitisa oyo atikaki. Tokomona mpe ndenge oyo ezaleli yango ekoki kosalisa, kaka moto oyo azali komonisa yango te, kasi mpe bato mosusu.
“NABALUKAKI NA NGÁMBO MOSUSU TE”
4. Ndenge nini Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki amonisaki komikitisa ntango azalaki naino na likoló?
4 Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki amonisaki komikitisa liboso kutu aya awa na mabele. Ntango Yesu azalaki naino kuna na likoló, alekisaki bambula ebele mpenza elongo na Tata na ye. Mokanda ya Yisaya emonisi boyokani makasi oyo Mwana azalaki na yango na Tata na ye; elobi ete: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami, mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi. Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso afungolaki litoi na ngai, mpe ngai natombokaki te. Nabalukaki na ngámbo mosusu te.” (Yis. 50:4, 5) Mwana ya Nzambe amonisaki komikitisa mpe atyaki likebi mingi na makambo oyo Yehova ateyaki ye. Azalaki na mposa makasi ya koyekola epai ya Nzambe ya solo. Na ntembe te, Yesu azalaki kotala malamumalamu ndenge oyo Yehova azalaki komonisa komikitisa ntango azalaki kolimbisa masumu ya bato!
5. Atako Yesu azalaki Mikaele, anzelu-mokonzi, ndenge nini amonisaki ete azali na komikitisa mpe ayebi esika oyo bokonzi na ye esuki ntango azwanaki matata ná Zabolo?
5 Kasi, bikelamu nyonso te ya likoló nde bazalaki na komikitisa lokola Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki. Na esika azala na mposa ya koyekola epai ya Yehova, anzelu oyo akómaki Satana Zabolo atikaki ete bizaleli oyo ekeseni mpenza na komikitisa, elingi koloba komizwa na valɛrɛ koleka ndelo mpe lolendo, etinda ye atombokela Yehova. Nzokande, Yesu azalaki te koluka kozwa bokonzi koleka oyo Nzambe apesaki ye kuna na likoló, azalaki mpe te koluka kosalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe. Atako Yesu azalaki Mikaele, anzelu-mokonzi, aboyaki kosala likambo oyo azalaki na ndingisa na yango te ntango ‘azalaki na matata ná Zabolo mpo na nzoto ya Moize.’ Mwana ya Nzambe amonisaki nde komikitisa mpe ayebaki esika oyo bokonzi na ye esuki. Amonaki malamu ete Yehova, Mosambisi oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba, akata likambo yango na ndenge na ye mpe na ntango oyo alingi.—Tángá Yuda 9.
6. Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa ntango andimaki kosala makambo oyo Masiya asengelaki kosala?
6 Na makambo oyo Yesu ayekolaki ntango azalaki naino na likoló, tokoki kotánga bisakweli oyo elobelaki makambo mingi oyo etali bomoi na ye awa na mabele lokola Masiya. Na yango, ayebaki malamu liboso bampasi oyo akokutana na yango awa na mabele. Atako bongo, Yesu andimaki koya kofanda awa na mabele mpe kokufa lokola Masiya oyo alakamaki. Mpo na nini? Mpo na komonisa ete Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki azalaki na komikitisa, ntoma Paulo akomaki ete: “Atako azalaki na lolenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo mpe akómaki lokola bato.”—Flp. 2:6, 7.
NTANGO AKÓMAKI MOTO, “AMIKITISAKI”
7, 8. Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa ntango azalaki mwana moke mpe na mosala na ye ya kosakola awa na mabele?
7 Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango [Yesu] akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe atosaki tii liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.” (Flp. 2:8) Banda bomwana na ye, Yesu atikelaki biso ndakisa ya komikitisa. Atako baboti na ye Maria ná Yozefe bazalaki bato ya kozanga kokoka, Yesu “azalaki kaka komikitisa liboso na bango.” (Luka 2:51) Yango ezali ndakisa malamu mpenza mpo na bilenge, oyo Nzambe akopambola soki bazali komikitisa liboso ya baboti na bango!
8 Ntango Yesu akómaki mokóló, amonisaki komikitisa na ndenge azalaki kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso, kasi oyo ya ye moko te. (Yoa. 4:34) Ntango Yesu Kristo azalaki kosakola, azalaki kosalela nkombo ya Nzambe mpe kosalisa bato ya mitema sembo bázwa boyebi ya sikisiki ya bizaleli ya Yehova mpe mokano na ye mpo na bato. Yesu azalaki mpe kosalela makambo oyo azalaki koteya bato mpo na Yehova. Na ndakisa, na libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye, likambo ya liboso oyo alobelaki ezalaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Na ndenge yango, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete kosantisama ya nkombo ya Yehova esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na bango. Ye moko mpe asalaki bongo. Pene na nsuka ya mosala na ye awa na mabele, Yesu ayebisaki Yehova na libondeli ete: “Nayebisi bango [bantoma] nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.” (Yoa. 17:26) Lisusu, na boumeli ya mosala na ye, Yesu azalaki kopesa Yehova lokumu mpo na makambo oyo akokisaki awa na mabele.—Yoa. 5:19.
9. Zekaria asakolaki nini mpo na Masiya, mpe ndenge nini Yesu akokisaki esakweli yango?
9 Mpo na Masiya, Zekaria asakolaki ete: “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi. Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi. Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo. Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami; moto ya komikitisa, mpe amati likoló ya mpunda, ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.” (Zek. 9:9) Esakweli yango ekokisamaki mokolo oyo Yesu akɔtaki na Yerusaleme liboso ya fɛti ya Elekeli ya mobu 33 T.B. Ebele ya bato oyo bazalaki wana batandaki bilamba na bango ya likoló mpe bitape ya nzete na nzela. Ɛɛ, engumba mobimba eninganaki ntango Yesu akɔtaki. Ata ntango bato bakumisaki ye lokola Mokonzi, Yesu azalaki kaka na komikitisa.—Mat. 21:4-11.
10. Botosi ya Yesu tii na liwa emonisaki nini?
10 Komikitisa mpe botosi ya Yesu awa na mabele emonanaki mingi koleka ntango akufaki na nzete ya Yobo 1:9-11; 2:4) Bosembo ya kokoka ya Kristo emonisaki ete Yehova azali mpenza na lotomo ya kozala mokonzi mpe ete boyangeli na ye ezali sembo. Na ntembe te, Yehova asepelaki mingi komona bosembo ya kokoka oyo Mwana na ye amonisaki.—Tángá Masese 27:11.
mpasi. Na ndenge yango, amonisaki ete bato bakoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki bakutani na minyoko ya ndenge nini. Yesu amonisaki mpe ete Satana alobaki lokuta ntango alobaki ete bato basalelaka Yehova kaka mpo na matomba na bango moko. (11. Mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo epesaki elikya nini na bato oyo bazali na kondima?
11 Na nzela ya liwa na ye na nzete ya mpasi, Yesu afutaki mpe lisiko mpo na bato. (Mat. 20:28) Lisiko yango epesaki bato ya kozanga kokoka libaku ya kozala na bomoi ya seko, mpe ekokisaki oyo boyengebene ezalaki kosɛnga. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na likambo kaka moko ya kokómisa bato sembo, bato ya ndenge nyonso batángami bayengebene mpo na bomoi.” (Rom. 5:18) Liwa ya Yesu epesaki bakristo oyo batyami mafuta elikya ya kozala na bomoi ezangi kufa kuna na likoló mpe epesi “bampate mosusu” elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.—Yoa. 10:16; Rom. 8:16, 17.
NAZALI NA “KOMIKITISA NA MOTEMA”
12. Na boyokani na ye ná bato ya kozanga kokoka, ndenge nini Yesu amonisaki boboto mpe komikitisa?
12 Yesu abengaki baoyo nyonso ‘bazalaki komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba’ bayá epai na ye. Alobaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.” (Mat. 11:28, 29) Komikitisa mpe boboto oyo Yesu azalaki na yango etindaki ye amonisela bato motema malamu mpe aboya kopona bilongi na boyokani na ye ná bato ya kozanga kokoka. Azalaki te kosɛnga bayekoli na ye makambo oyo eleki makoki na bango. Azalaki kopesa bango longonya mpe kolendisa bango. Amonisaki bango te ete bayebi eloko te to bazali na valɛrɛ te. Azalaki makambo makasimakasi te, azalaki mpe konyokola bayekoli na ye te. Asalisaki nde bango báyeba ete soki bapusani penepene na ye mpe basaleli mateya na ye, bakozwa bopemi, mpamba te ekanganeli na ye ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ye ezali pɛpɛlɛ. Bato ya lolenge nyonso, elingi koloba basi mpe mibali, mikóló mpe bana, bazalaki kobanga te kozala pembeni na ye.—Mat. 11:30.
13. Nini emonisi ete Yesu azalaki koyokela bato ya mpasi mawa?
13 Ntango Yesu azalaki kokutana na bato oyo bazalaki kotalelama lokola bato mpamba na Yisraele, azalaki koyokela bango mawa mpo bazalaki bato ya mpasi, mpe azalaki kokokisa bamposa na bango. Pene na Yeriko, akutanaki na Bartime, mosɛngi-biloko oyo akufá miso, ná moninga na ye mosusu oyo akufá miso, oyo Biblia eyebisi nkombo na ye te. Bazalaki kokoba kosɛnga Yesu ete asalisa bango, kasi Mat. 20:29-34; Mrk. 10:46-52.
bato mingi oyo bazalaki elongo na Yesu bazalaki koyebisa bango bafanda nyɛɛ. Yesu akokaki mpe koboya koyoka kolela ya bakufi-miso yango! Kasi, alobaki ete bámemela ye bango; ayokaki mawa mpe abikisaki bango. Ya solo, Yesu amekolaki Tata na ye Yehova na ndenge oyo amonisaki komikitisa mpe azalaki koyokela bato ya masumu mawa.—“MOTO NYONSO OYO AZALI KOMIKITISA AKOTOMBWAMA”
14. Komikitisa ya Yesu ebimisi matomba nini?
14 Komikitisa oyo Yesu amonisaki esepelisaki Yehova mpe ememelaki bato matomba mingi. Yehova asepelaki mingi ntango amonaki ndenge oyo Mwana na ye amikitisaki mpo na kosala mokano na Ye. Ezaleli ya boboto mpe komikitisa ya motema oyo Yesu amonisaki ekitisaki mitema ya bantoma mpe bayekoli na ye. Ndakisa na ye, mateya na ye, mpe longonya oyo azalaki kopesa bango elendisaki bango bákola na elimo. Baoyo bazalaki kotalelama lokola bato mpamba bazwaki mpe matomba na komikitisa ya Yesu, mpamba te azalaki kosalisa bango, koteya bango, mpe kolendisa bango. Kutu, bato nyonso oyo bakosikolama bakozwa matomba ya libela na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu.
15. Matomba nini Yesu azwaki mpo na komikitisa na ye?
15 Komikitisa ya Yesu ememelaki mpe ye moko matomba? Ɛɛ, mpamba te ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.” (Mat. 23:12) Maloba yango ekokisamaki mpenza epai na ye. Ntoma Paulo alimboli boye: “Nzambe atombolaki [Yesu] likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Kristo azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” Lokola Yesu amonisaki komikitisa mpe atikalaki sembo awa na mabele, Yehova Nzambe atombolaki ye mpe apesaki ye bokonzi likoló ya bikelamu nyonso na likoló mpe na mabele.—Flp. 2:9-11.
YESU “AKOMATA NA MPUNDA MPO NA KOBUNDELA SOLO MPE KOMIKITISA”
16. Nini emonisi ete Yesu akokoba komonisa komikitisa na mikolo ezali koya?
16 Mwana ya Nzambe akokoba kozala na komikitisa na mikolo ezali koya. Mokomi moko ya nzembo asakolaki ndenge oyo Yesu akoboma banguna na ye ntango akozala mokonzi kuna na likoló; alobaki boye: “Na nkembo na yo kende kolonga; matá na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa ná boyengebene.” (Nz. 45:4) Na boyengebene mpe na solo, Yesu Kristo akomata na mpunda mpo na kobundela komikitisa na Armagedone. Bongo nini ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, ntango Mokonzi Masiya “akokómisa mpamba guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya”? Akomonisa mpe komikitisa? Ɛɛ, mpamba te “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata.”—Tángá 1 Bakorinti 15:24-28.
17, 18. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete basaleli ya Yehova bámekola komikitisa ya Yesu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
17 Ezali boni mpo na biso? Tokolanda ndakisa ya Yesu mpe tokomonisa komikitisa? Ezaleli nini tokozala na yango ntango Mokonzi Yesu Kristo akoya kopesa bato mabe etumbu na Armagedone? Tóbosana te ete ntango Yesu akobunda, akobikisa kaka bato ya komikitisa mpe ya sembo. Na yango, mpo tóbika, tosengeli kozala bato ya komikitisa banda lelo. Longola yango, kaka ndenge komikitisa ya Yesu ememelaki ye moko mpe bato mosusu matomba, biso mpe tokozwa matomba mingi soki tozali na komikitisa.
18 Nini ekoki kosalisa biso tómekola komikitisa ya Yesu? Ndenge nini tokoki kosala makasi tózala na komikitisa ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini? Tokotalela mituna wana na lisolo oyo elandi.