Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tókoba komonisa ete ‘tofandi mpo na ntango mokuse’

Tókoba komonisa ete ‘tofandi mpo na ntango mokuse’

“Lokola bozali bapaya mpe bato oyo bofandi mpo na ntango mokuse, nazali kolendisa bino ete bóboya bamposa ya nzoto.”​—1 PE. 2:11.

1, 2. Ntoma Petro asalelaki maloba “bato oyo baponami” mpo na kolobela banani, mpe mpo na nini abengaki bango ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’?

MBULA soki 30, nsima ya komata ya Yesu na likoló, ntoma Petro atindaki mokanda epai ya “bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse, oyo bapalangani na Ponti, Galatia, Kapadosi, Azia, mpe Bitinia; mpe epai ya bato oyo baponami.” (1 Pe. 1:1) Emonani polele ete ntoma Petro asalelaki maloba “bato oyo baponami,” mpo na kolobela bato oyo batyamaki mafuta na elimo lokola ye, mpe oyo ‘babotamaki lisusu mpo na elikya ya bomoi’ mpo na koyangela ná Kristo na likoló. (Tángá 1 Petro 1:3, 4.) Kasi, mpo na nini na nsima abengaki bato yango oyo baponamaki “bapaya mpe bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse”? (1 Pe. 2:11) Mpe mpo na nini biso nyonso tosengeli kotyela likambo yango likebi lokola kaka mwa ndambo moke ya Batatoli na mokili mobimba balobaka ete batyami mafuta na elimo, to bazali bato oyo baponami?

2 Ebongaki mpenza kosalela maloba “bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse” mpo na bakristo oyo batyamaki mafuta na siɛklɛ ya liboso. Ndenge moko na ndambo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na bomoi lelo, bakristo yango bazalaki na bomoi awa na mabele kaka mpo na ntango mokuse. Ntoma Paulo, oyo azali mpe mokristo oyo atyami mafuta na elimo, oyo azali na “etonga moke,” alimbolaki ete: “Kasi biso, tozali bana-mboka ya likoló, epai mobikisi moko, Nkolo Yesu Kristo, oyo tozali kozela na mposa makasi akouta.” (Luka 12:32; Flp. 3:20) Lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali “bana-mboka ya likoló,” soki bakufi, batikaka mabele mpo na kozwa eloko moko ya motuya mingi, bomoi oyo ekufaka te na likoló. (Tángá Bafilipi 1:21-23.) Na yango, bakoki mpenza kobengama ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mabele oyo Satana azali kotambwisa.

3. Motuna nini ebimi na likambo etali “bampate mosusu”?

3 Kasi, tokoloba nini mpo na “bampate mosusu”? (Yoa. 10:16) Biblia emonisi ete bakofanda libela awa na mabele? Ya solo, mabele ekozala mpenza esika na bango mpo na libela! Kasi, tokoki mpe koloba ete mpo na sikoyo, bango mpe bazali bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse. Na ndenge nini?

“BILOKO NYONSO OYO EZALISAMÁ EZALI SE KOKIMELA”

4. Likambo nini bakonzi ya mokili bazali kokoka te kosilisa?

4 Lokola mokili mabe oyo ya Satana ezali naino, bato nyonso, ata mpe bakristo, bakokoba konyokwama mpo Satana atombokelaki Yehova. Tozali kotánga na Baroma 8:22 ete: “Toyebi ete biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” Bakonzi ya mokili, bato ya siansi mpe bato to bibongiseli oyo elukaka kosunga bato, bazali kosala nyonso mpo na kosilisa yango, kasi mpamba.

5. Kobanda 1914, bamilio ya bato basali nini, mpe mpo na nini?

5 Kobanda 1914, bamilio ya bato bandimi kokóma bato ya Yesu Kristo, mokonzi oyo Nzambe atye. Bazali na mposa te ya kozala bato ya ebongiseli oyo ya Satana. Bazali koboya kopesa mokili ya Satana mabɔkɔ. Na esika na yango, bazali kosalela bomoi mpe makoki na bango mpo na Bokonzi ya Nzambe, elingi koloba, bazali kosala ete matomba na yango ekende liboso.​—Rom. 14:7, 8.

6. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bakoki kobengama bapaya?

6 Na ntembe te, Batatoli ya Yehova bazali bana-mboka oyo batosaka mibeko ya mboka na mikili koleka 200, kasi ezala bazali epai wapi, bazali lokola bapaya. Bakɔtaka soki moke te na makambo ya mokili, na ndakisa politiki mpe kowelana na kati ya bana-mboka, oyo ezali kosalema lelo oyo. Kutu, ata sikoyo bamimonaka ete bazali bana-mboka ya mokili ya sika, mokili oyo Nzambe akosala. Bazali kosepela ndenge mikolo na bango oyo bafandi mpo na ntango mokuse na mokili oyo ya mabe, ezali kokende mbangu na nsuka.

Tozali te koboma nzoto mpo na kobikisa mokili ya Satana. Tozali kosakwela bato mokili ya sika ya Nzambe

7. Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakofanda mpo na libela na mabele?

7 Mosika te, Kristo akosalela bokonzi na ye mpo na kobebisa mokili mabe oyo ya Satana. Guvɛrnema ya kokoka ya Kristo ekolongola lisumu mpe bampasi. Ekolongola mpe moto nyonso oyo azali kotombokela boyangeli ya Yehova. Basambeli ya sembo ya Nzambe bakofanda mpo na libela na mabele oyo ekokóma paradiso. (Tángá Emoniseli 21:1-5.) Na ndenge ya kokoka mpenza, biloko oyo ezalisamá “ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Rom. 8:21.

MAKAMBO NINI ESƐNGAMI MPO NA BAKRISTO YA SOLO?

8, 9. Ntango ntoma Petro asalelaki maloba “bóboya bamposa ya nzoto,” alingaki koloba nini?

8 Ntoma Petro alimboli makambo oyo esɛngami mpo na bakristo na maloba oyo: “Bandeko ya bolingo, lokola bozali bapaya mpe bato oyo bofandi mpo na ntango mokuse, nazali kolendisa bino ete bóboya bamposa ya nzoto, ezali bamposa yango nde ebundisaka molimo.” (1 Pe. 2:11) Toli yango epesamaki libosoliboso mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kasi ebongi mpe mpo na bampate mosusu ya Yesu.

9 Soki bamposa mosusu ekokisami na ndenge oyo Mozalisi na biso alingi, mabe ezali te. Kutu, ebakisaka esengo na bomoi. Na ndakisa, ezali na bamposa oyo ezali mabe te. Tokoki kotánga: kolya bilei ya malamu mpe komɛla mai, kokende kozwa mopɛpɛ mpe kolekisa ntango elongo na baninga. Ezali mpe mabe te koyoka mposa ya kosangisa nzoto ná moto oyo bobalaná; Nzambe nde atyá mposa yango na kati ya moto. (1 Ko. 7:3-5) Kasi, ntoma Petro alobelaki polele “bamposa ya nzoto” oyo “ebundisaka molimo.” Babiblia mosusu ebongolaka yango na “mposa mabe ya nzoto” (Biblia haut fleuve) to “bamposa ya masumu” (Biblia New International Version). Yehova ayebisi biso lolenge ya bomoi oyo alingi tózala na yango mpe lolenge oyo tosengeli kokokisa bamposa na biso. Tosengeli te kotika ete ata mposa moko ya nzoto ebebisa boyokani na biso ná Nzambe. Soki tozali kokokisa bamposa na biso na lolenge ya mabe, yango ekoki komemela biso liwa.

10. Wapi mayele mosusu oyo Satana azali kosalela mpo na kobenda bakristo bákóma bato ya mokili na ye?

10 Mokano ya Satana ezali ya kolɛmbisa ekateli oyo bakristo ya solo bazali na yango ya komimona ete bazali ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili oyo. Mposa ya konduka biloko ya mokili, pite to ekobo, koluka kokóma bato minene, ezaleli ya “ngai liboso,” mpe bolingo ya ekólo: ezali mitambo ya Satana mpe tosengeli koyeba yango malamu. Soki tozali na ekateli makasi ya koboya bamposa wana ya mabe, tokomonisa polele ete tolingi te kozala bato ya mokili mabe ya Satana. Tokomonisa polele ete tofandi na mokili yango kaka mpo na ntango mokuse. Likambo oyo tozali na yango mpenza mposa mpe oyo tozali kobomela nzoto, ezali ya kofanda libela na mokili ya sika ya Nzambe ya boyengebene.

ETAMBOLI MALAMU

11, 12. Bato batalelaka ntango mosusu bapaya ndenge nini, mpe tokoki koloba nini mpo na Batatoli ya Yehova?

11 Petro akobi kolimbola makambo oyo esɛngami mpo na bakristo oyo bazali ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse.’ Alobi na vɛrsɛ 12 boye: “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde bazali koloba na basali-mabe, bápesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo bamoni na miso na bango misala na bino ya malamu.” Bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse bazali bapaya, to bato oyo bafandi na mboka to ekólo na bango te. Mbala mosusu, bato mosusu batyolaka bango mpo bakeseni na bato ya mboka yango, mpe bakoki ata kotalela bango lokola bato mabe. Ntango mosusu, lolenge na bango ya koloba, ya kosala makambo, ya kolata mpe ya kosala monzɛlɛ ekoki kokesana ná oyo ya bato ya mboka yango. Kasi, soki bazali na bizaleli malamu, yango ekoki kotinda bato mosusu bámona bapaya yango lisusu te lokola bato mabe.

12 Ndenge moko mpe, bakristo ya solo bakoki kokesana na bato oyo bafandaka ná bango na makambo mingi. Na ndakisa, masolo oyo babɛtaka to masano oyo baponaka ekoki kokesana ná oyo ya bato mosusu. Lolenge na bango ya kolata mpe ya kosala monzɛlɛ ekesenisaka mpe bango ná bato mingi. Mpo na makambo yango, bato mosusu bakoki koloba mabe mpo na Batatoli; kasi bamosusu bakoki kokumisa bango mpo na etamboli na bango ya malamu.

13, 14. Maloba “bwanya ya moto emonanaka na misala ya boyengebene oyo asalaka,” elimboli nini? Pesá ndakisa.

13 Ya solo, etamboli malamu ekoki kosalisa bato bámona ete ezali na ntina te koloba mabe mpo na biso. Kaka Yesu nde atosaki Nzambe na ndenge ya kokoka; kasi bato bakoselaki ye makambo. Bato mosusu babengaki ye “moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.” Kasi, na etamboli na ye ya malamu, amonisaki ete azalaki moto ya ndenge wana te. Alobaki ete: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Mat. 11:19) Ezali mpe bongo lelo oyo. Na ndakisa, bato mosusu oyo bafandaka na Selters, na Allemagne, bakamwaka ntango bamonaka bandeko oyo basalaka na Betele ya engumba yango. Kasi, mpo na komonisa ete bazali bato malamu, mokonzi ya mboka yango akotelaki bango, alobaki ete: “Batatoli oyo basalaka kuna, bazali na bomoi ya ndenge na bango, kasi ezali te bomoi oyo ebimiselaka bato mosusu ya engumba mindɔndɔ.”

Mateya ya Biblia esalisi mpo na kosangisa libota oyo ya Russie

14 Ndakisa mosusu ezali ya Batatoli ya Yehova ya Moscou, na Russie, oyo bakoselaki bango makambo mingi ya mabe. Bato mosusu balobaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki kopanza mabota, kotinda bato bámiboma, mpe báboya lisalisi ya monganga. Kasi na sanza ya Yuni 2010, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme), na etúká ya Strasbourg, na France, elobaki ete bakonzi ya Moscou bazali na ntina moko te ya kopekisa Batatoli ya Yehova básambelaka mpe báyanganaka na makita. Tribinale ya Mpoto elobaki lisusu ete batribinale ya Moscou epesi bilembeteli te oyo emonisi ete Batatoli basalaki makambo ya mabe. Elobaki ete batribinale ya Moscou esalelaki mibeko oyo eleki makasi mpo na konyokola Batatoli ya Yehova, oyo basalaki mabe moko te.

BOTOSI OYO EBONGI

15. Etinda nini ya Biblia bakristo ya solo na mokili mobimba balandaka?

15 Batatoli ya Yehova ya Moscou, mpe ya mokili mobimba, bakokisaka lisɛngami mosusu ya bakristo oyo Petro amonisi. Akomaki boye: “Mpo na Nkolo bótosaka bibongiseli nyonso oyo esalemi na bato: ezala mokonzi mpo azali liboso to baguvɛrnɛrɛ.” (1 Pe. 2:13, 14) Atako bazali te bato ya mokili mabe oyo, ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, bakristo ya solo batosaka bakonzi ya guvɛrnema ata soki “bokonzi na bango ezali na ndelo.”​—Tángá Baroma 13:1, 5-7.

16, 17. (a) Nini emonisi ete totɛmɛlaka baguvɛrnema te? (b) Bakonzi mosusu ya politiki bandimaki likambo nini?

16 Batatoli ya Yehova bamitambwisaka lokola ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili oyo, kasi basalaka bongo te mpo na kotɛmɛla baguvɛrnema, to mpo na kotyola bato mosusu. Bayebaka ete bato mosusu bazali na lolenge na bango ya kotalela soki nani asengeli kozala na guvɛrnema to mpe ndenge ya kosilisa mikakatano ya bato. Mangomba mosusu ekɔtaka na makambo ya politiki, kasi Batatoli ya Yehova te. Balukaka soki moke te kotinda bakonzi bábongola lolenge na bango ya koyangela bato. Batatoli ya Yehova bazalaka ata moke te na mposa ya kotombokela baguvɛrnema to kotinda bato mosusu bátomboka!

17 Ntango batosaka bakonzi ya mboka ndenge ntoma Petro apesaki toli ete ‘bápesa mokonzi lokumu,’ bakristo bamonisaka botosi mpe lokumu oyo ebongi na bakonzi yango. (1 Pe. 2:17) Na mabaku mosusu, bakonzi bandimaki ete ezali na ntina te bámitungisa mpo na Batatoli ya Yehova. Na ndakisa, moto moko ya politiki ya Allemagne na nkombo Steffen Reiche, oyo azalaká ministre na etúká ya Brandebourg mpe na nsima akómaki depite, alobaki ete Batatoli ya Yehova bamonisaki bizaleli ya malamu ntango Banazi bazalaki konyokola bango. Babongolaki bindimeli na bango te ata ntango bazalaki konyokwama, mpe bazalaki komonisela bato oyo bazalaki na bango na bolɔkɔ boboto. Bizaleli wana ezalaki na ntina mingi mpo na ekólo lokola Allemagne, epai bato mosusu bazali ntango nyonso kokóma na motema mabe epai ya bato oyo bauti na bikólo mosusu to oyo bazali na bindimeli mosusu mpe bazali na makanisi ya politiki ndenge mosusu.

BAMONISAKA BOLINGO

18. (a) Mpo na nini ebongi mpenza tólinga lisangá mobimba ya bandeko? (b) Bato mosusu oyo bazali Batatoli te balobaki nini?

18 Ntoma Petro akomaki ete: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko, bóbanga Nzambe.” (1 Pe. 2:17) Batatoli ya Yehova babangaka Nzambe; yango elingi koloba ete babangaka kosala likambo oyo ekosepelisa ye te. Limemya ya ndenge wana nde epesaka bango makasi ya kosala mokano na ye. Bazali na esengo lokola bazali kosalela Yehova elongo na lisangá ya bandeko mibali mpe basi ya mokili mobimba oyo bazali mpe na mposa wana. Yango wana, ebongi mpenza ete ‘bálinga lisangá mobimba ya bandeko.’ Bolingo ya ndenge wana, oyo emonanaka mingi te na mokili oyo ya moimi, etikaka ntango mosusu bato oyo bazali Batatoli te monɔkɔ polele. Na ndakisa, moto moko oyo alakisaka bato mboka, mpe asalaka na ebongiseli moko ya Amerika na makambo etali mibembo, akamwaki na bolingo mpe lisungi oyo Batatoli bamoniselaki bandeko na bango Batatoli ya mikili mosusu, oyo bayaki na liyangani oyo esangisaki mikili mingi, na Allemagne na 2009. Alobaki ete banda asalá mosala na ye wana, amoná naino te likambo ya ndenge wana. Na nsima, Motatoli moko alobaki ete: “Makambo nyonso oyo alobaki mpo na biso, alobaki yango na esengo makasi.” Na mayangani oyo okɔtá, oyoká bato balobi mpe bongo mpo na Batatoli?

19. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?

19 Na makambo nyonso oyo tolobeli, mpe na makambo mosusu, Batatoli ya Yehova bamonisi polele ete bazali ‘bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili oyo ya Satana. Mpe na esengo nyonso, bazali na ekateli ya kotikala bongo. Bazali na elikya makasi mpe bandimisami ete kala te, bakofanda mpo na libela na mokili ya sika ya Nzambe, epai boyengebene ekozala. Ozali te kozela mokili yango na esengo?