Mituna ya batángi
Liboso tóyeba solo, mwasi na ngai apesaki makei na ye ya bomwasi mpe ngai napesaki mai ya biso mibali mpo basangisa yango na labo mpo tozalaki na mposa ya mwana. Makei yango nyonso te esalelamaki; mosusu etyamaki na malili mpe babombaki yango. Esengelaki kobomba yango to ekokaki kobwakama?
Yango ezali moko ya bikateli ya ntina mingi oyo mobali ná mwasi na ye basengeli kozwa soki bakondima ete minganga nde básangisa makei ya bomwasi mpe mai ya mibali na labo. Mwasi ná mobali bazali na mokumba liboso ya Yehova ya kozwa ekateli. Kasi, koyeba mwa moke mayele yango oyo basalelaka mpo na kosalisa basi oyo babotaka te, ekoki kosalisa.
Ezalaki na Angleterre, na 1978 nde mwasi ya liboso abotaki mwana na nzela ya mayele wana. Akokaki kozwa zemi te mpo nzela oyo elekisaka mai ya mobali tii na makei ya mwasi ekangamaki. Minganga basalaki ye lipaso mpe balongolaki ye likei moko, batyaki yango na molangi moko, mpe basangisaki yango na mai ya mobali na ye. Bazalaki kokolisa likei yango na kati ya bavitamini mpe na nsima bakɔtisaki yango na libumu na ye. Na nsima, abotaki mwana mwasi. Bakómaki kobenga mayele yango mpe mayele mosusu ya ndenge yango fécondation in vitro, to FIV.
Atako bikólo ndenge na ndenge esalelaka mayele yango na ndenge ekeseni, mbala mingi basalelaka mayele yango boye: Na boumeli ya bapɔsɔ, bapesaka mwasi bankisi ya kobota, oyo ekosala ete ba ovaire na ye ebimisa makei (ovules) mingi. Bakoki kosɛnga mobali asimbasimba enama na ye ya kobotela mpo abimisa mai ya mibali. Minganga basangisaka makei yango mpe mai yango na labo. Makei mingi oyo ekoli ekoki kobanda kokabwana, mpe kokóma mwana na kati ya libumu. Nsima ya mokolo moko to mibale, batalelaka malamumalamu makei yango mpo na koyeba oyo ebebi mpe oyo emonani lokola ezali malamu mpe oyo bakoki kotya na libumu ya mwasi mpo ekola. Mokolo ya misato, bakɔtisaka na libumu ya mwasi makei mibale to misato ya malamu, mpo na kotala soki oyo wapi ekoki kopesa zemi. Soki likei moko to mibale efandi na matrisi, mpe akómi na zemi, elikya ezali ete akobota.
Kasi, tokoloba boni mpo na makei oyo ekɔtaki te na libumu ya mwasi, mpe oyo ezalaki malamu te, to mpe ebebaki? Soki batiki makei yango kaka bongo, ekoumela te mpo na kokufa. Na esika ya kozela makei * To mindɔndɔ ekoki mbala mosusu kobima soki molongani moko akufi, to soki ekómi ete moko abala lisusu to bango nyonso mibale bábala lisusu. Ya solo, lokola bamitungisaka mingi, babalani mosusu bafutaka mbongo mingi na boumeli ya bambula.
yango ebeba, bakoki mbala mosusu kotya yango na mai ya nitrogène mpo ezwa malili. Mpo na nini? Soki mwasi azwi zemi te na makei ya liboso, bakoki kosalela makei mosusu oyo etikalaki, mpe mbongo ekobima mingi te. Kasi, yango ebimisi mituna oyo etali lisosoli ya moto. Ndenge moko na mwasi mpe mobali oyo batunaki motuna oyo ezali likoló, bato mingi bazali komituna oyo bakosala na makei na bango oyo etyamaki na malili. Mbala mosusu bazali na mposa ya kobota bana ebele te. Ekoki kozala ete baboti bakómi mikóló to bazali na mbongo mingi te mpo na kondima bátya bango makei mosusu na nzoto. Ntango mosusu bazali kobanga kobota mapasa.Na 2008, monganga moko oyo asalaka boyekoli ya bana oyo bazali naino na libumu, alobaki na zulunalo New York Times ete bato mingi bazali mpenza na mokakatano mpo na koyeba nini bakosala na makei oyo etikali. Lisolo yango elobaki boye: “Makei soki 400 000 etyami na malili na balopitalo ya minene, mpe mosusu ezali kobakisama mokolo na mokolo . . . Makei ekoki kotikala na bomoi mbula zomi to koleka soki etyami malamu na malili kasi, nyonso te nde ebikaka soki elɛmbi.” Likambo yango esengeli kotinda bakristo bákanisa malamumalamu. Mpo na nini?
Bakristo oyo bazali kokutana na mikakatano oyo mayele ya fécondation in vitro (FIV) ebimisi bakoki kokanisa malamu na likambo mosusu oyo ekoki kosalema. Mokristo akoki kopona nini akosala ntango batyeli moninga to ndeko moko oyo alingi kokufa aparɛyi moko, na ndakisa vantilatɛrɛ, oyo ezali kosalisa ye apema. Bakristo ya solo basundolaka te bandeko na bango oyo bazali kobɛla; ndenge Kobima 20:13 mpe Nzembo 36:9 emonisi yango, bazwaka bomoi na valɛrɛ mingi. Lamuká! ya Augusto 1974, na Lifalanse, elobaki boye: “Lokola bazali na limemya mpo na Nzambe, oyo atalelaka bomoi lokola eloko ya mosantu, mpo na lisosoli na bango mpe mpo na kotosa mibeko ya Leta, baoyo balingi kolanda mitinda ya Biblia na bomoi na bango bakoluka ata mokolo te kosukisa na nko bomoi ya moto oyo azali komona mpasi na mbeto ya lopitalo.” Kasi, na makambo mosusu, moto azali naino na bomoi kaka mpo masini moko ezali kosalisa ye. Bandeko ya libota basengeli kozwa ekateli soki bakotika masini yango ekoba kosala to bakokata yango.
Ya solo, yango ekokani te na mokakatano ya babalani oyo basalelaki mayele ya FIV mpo na kobota mpe sikoyo makei mosusu ebombami na malili. Kasi likanisi moko oyo bakoki kopesa bango ezali ya kolongola makei yango na malili ya nitrogène, mpe kotika yango elɛmba. Lokola makei yango ezali na malili te, ekolɛmba noki mpe ekozala lisusu na bomoi te. Babalani basengeli kozwa ekateli soki bakosala yango to te.—Gal. 6:7.
Soki babalani bazwaki ekateli ya kosalela mayele ya FIV mpo bábota, bakoki kondima mokumba ya kobomba makei na bango na malili to kosalela yango lisusu soki balingi kozwa mwana. Nzokande, babalani mosusu bakoki kozwa ekateli ya koboya ete bábomba makei na bango na malili, mpo bazali komona ete makei yango ezali na bomoi kaka na lisalisi ya aparɛyi to masini. Bakristo oyo basengeli kozwa ekateli wana bazali na mokumba liboso ya Nzambe ya kosalela lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia. Mposa na bango esengeli kozala ya kozala na lisosoli ya kimya, mpe babosanaka te kotalela lisosoli ya basusu.—1 Tim. 1:19.
Bakristo oyo basengeli kozwa ekateli wana bazali na mokumba liboso ya Nzambe ya kosalela lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia
Moto moko ya mayele amonaki ete babalani mingi “bazali na mokakatano mpe bazali komitungisa mingi mpo na kozwa ekateli soki bakosala nini na makei na bango oyo batye na malili.” Asukisaki boye: “Mpo na babalani mingi, emonani lokola ekateli moko te ezali malamu.”
Emonani polele ete bakristo ya solo oyo balingi kosalela mayele ya FIV basengeli kotalela malamu makambo minene oyo ekomema. Biblia epesi toli oyo: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”—Mas. 22:3.
Mwasi ná mobali oyo bazali koyekola Biblia, balingi kozwa batisimo, kasi, bakoki te kokomisa libala na bango na Leta mpo mobali azali te na mikanda oyo epesi ye nzela ya kofanda na ekólo. Guvɛrnema epesaka nzela te na mopaya oyo azwi naino mikanda te abala. Bakoki nde kosala mokanda oyo emonisi ete bandimi kofanda na libala (Déclaration de fidélité), mpe na nsima bázwa batisimo?
Kosala bongo ekoki komonana malamu mpo na kosilisa mokakatano yango, kasi, eyokani te na mitinda ya Biblia. Mpo na koyeba ntina oyo tolobi bongo, tótalela naino mpo na nini babimisá mokanda yango, ndenge nini mpe ntango nini bakoki kosalela yango.
Bato mibale oyo bakoki te kobalana mpo na ntina oyo tokolobela, basengeli kotya sinyatire na mokanda yango liboso ya bato. Na kati ya mokanda yango, balapaki ndai ete bakotikala sembo moko epai ya mosusu mpe bakokomisa libala na bango na Leta soki bazwi likoki ya kosala yango. Lisangá ekotalela libala na bango lokola libala oyo endimami na Leta.
Mpo na nini mpe ntango nini basalelaka mokanda yango? Yehova nde abandisaki libala mpe atalelaka yango lokola likambo ya lisɛki te. Mwana na ye alobaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:5, 6; Eba. 2:22-24) Yesu abakisaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Mat. 19:9) Na yango, ndenge Biblia emonisi yango, “pite” ezali likambo kaka moko oyo ekoki kosala ete moto aboma libala. Na ndakisa, soki mobali moko asangisi nzoto ná mwasi mosusu, mwasi na ye akoki kozwa ekateli ya koboma libala to te. Soki abomi libala, akómi na bonsomi ya kobalana na moto mosusu.
Nzokande, na bikólo mosusu, mingimingi na ntango ya kala, lingomba oyo ezali na bandimi mingi ezalaki kondima te likanisi wana ya polele oyo Biblia epesi. Kasi, eteyaka nde ete bato bakoki koboma libala te mpo na likambo nyonso. Yango wana, na bisika mosusu oyo bakonzi ya mangomba bazali na nguya mingi, mibeko ya mboka epesaka nzela te na koboma libala, ata mpo na ntina oyo Yesu alobelaki. Na bikólo mosusu, mibeko ya mboka epesi nzela na koboma libala, kasi, yango ezwaka ntango molai, ezalaka mindɔndɔ mpe esɛngaka makambo ebeleebele. Moto akoki kozela bambula mingi mpenza mpo azwa mokanda ya koboma libala. Ezali lokola nde lingomba to guvɛrnema ezali “kopekisa” likambo oyo Nzambe andimi.—Mis. 11:17.
Na ndakisa, mobali ná mwasi bakoki kofanda na ekólo moko oyo koboma libala ekoki kosalema te to ezali mpenza mpasi mpo na kosala yango, to ntango mosusu ezwaka mbula mingi mpo Leta andima likambo yango. Soki moto abomi libala, mpe akokisi masɛngami ya Biblia mpo na kobalana ná moto mosusu, ye ná moto yango bakoki kosala mokanda oyo emonisi ete bandimi kofanda na libala. Oyo ezali ebongiseli ya boboto oyo lisangá ya bokristo ezwi mpo na bikólo ya ndenge wana. Kasi, ezali te mpo na bikólo oyo koboma libala ekoki kosalema, ata soki ezali kosɛnga mbongo mingi to ezali mindɔndɔ.
Bato mosusu oyo bafandaka na bikólo epai moto akoki koboma libala basɛngaki ete básala mokanda yango na esika ya kokutana na mikakatano mosusu. Kasi, ezali mpo na ntina wana te nde esengeli kosalela mokanda yango.
Na likambo oyo tozali kolobela na lisolo oyo, mobali ná mwasi oyo bafandi makango bazali na mposa ya kobalana. Mokomoko na bango azali lisusu te ná molongani na ye ya liboso; azali na bonsomi ya kobala lisusu. Nzokande, mobali azali te na mikanda oyo epesi ye nzela ya kofanda na ekólo, mpe guvɛrnema ekondima te ete mopaya oyo azwi naino mikanda te abala. (Na bamboka mingi, bakonzi bakondima libala ata soki molongani moko to bango nyonso mibale bazali na mikanda te.) Mpo na likambo oyo tozali kotalela, ekólo esalá ebongiseli mpo na koboma libala. Na yango ezali na ntina te ete mwasi ná mobali básala mokanda oyo emonisi ete bandimi kofanda na libala. Simbá ete mpo na babalani yango, moko te kati na bango alingi koboma libala, kasi bazali nde koboyela bango. Bazali na bonsomi ya kobalana. Kasi, bakoki kosala nini lokola mobali azangi mikanda? Bakoki kokende na ekólo mosusu epai bakoboyela bango te kobalana mpo mobali azali na mikanda te. To bakoki mpe kobalana na ekólo epai bafandi sikoyo soki mobali asali milende mpo na kozwa mikanda.
Ya solo, babalani yango bakoki kosala ete bomoi na bango eyokana na mitinda ya Nzambe mpe na mibeko ya Kaisala. (Mrk. 12:17; Rom. 13:1) Tozali na elikya ete bakosala yango. Na nsima, bakoki kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.—Ebr. 13:4.
^ par. 6 Bongo soki emonani ete mwana oyo azali na libumu akobotama malamu te to soki makei ebele efandi na libumu ya mama? Koluka kokata bokoli ya mwana na libumu na nko ezali kolongola zemi. Bato mingi oyo bazwaka zemi na mayele ya fécondation in vitro (FIV), babotaka bana mibale, misato to mingi; yango ebakisaka lisusu mikakatano, na ndakisa mwasi akoki kobota bana matshombe (to bana oyo bazali na bokɔnɔ) to mpe kobungisa makila mingi na ntango ya kobota. Bakoki kotya mbamba na mwasi oyo azali na bana mingi na libumu, mpo atika ete báboma mwana moko to mibale. Wana ezali mpenza kolongola zemi, oyo ezali lokola koboma moto.—Kob. 21:22, 23; Nz. 139:16.