Mpo na nini babimisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ?
BANDA bambula mingi, mibali mpe basi na mokili mobimba basepelaka mingi na mateya ya Biblia oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe bazwelaka yango matomba. Nimero ya boyekoli ya liboso na Lingelesi ya pɛtɛɛ ebimaki na sanza ya Yuli 2011. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango elobaki boye: “Nimero oyo ya sika ekobanda naino kobima na boumeli ya mbula moko, mpe soki ezali kosalisa bato mingi, ekokoba kobima.”
Sikoyo, tozali na esengo ya koyebisa bino ete tozwi ekateli ya kokoba kobimisa yango. Longola yango, nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ ekobanda mpe kobima na Lifalanse, na Portugais, mpe na Espagnol.
MPO NA NINI BATO MINGI BASEPELAKA NA YANGO?
Nsima ya kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ, bato mingi na bisanga oyo ezali na Sudi ya pasifike balobaki boye: “Sikoyo bandeko bakoki mpenza kokanga ntina malamumalamu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.” Ndeko mosusu ya mwasi akomaki ete: “Ntango oyo tozalaki kolekisa na koluka koyeba ndimbola ya maloba na masolo ya boyekoli, tozali sikoyo kolekisa yango na koluka koyeba ndimbola ya bavɛrsɛ ya Biblia mpe ndenge oyo eyokani na lisolo oyo tozali koyekola.”
Mwasi moko oyo azwá diplome na iniversite moko ya États-Unis alobi boye: “Na boumeli ya mbula 18, nazalaki koloba mpe kokoma na Lingelesi oyo kaka bato oyo batángá na iniversite nde bakoki koyeba. Ndenge nakómaki koloba mpe kokanisa ezalaki mpasi mpo na bato mosusu. Namonaki ete nasengeli kobongola lolenge na ngai ya koloba mpe kokanisa.” Lelo oyo azali mosakoli ya molende, mpe alobi boye: “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ esalisi ngai mpenza.
Elobeli na yango epesi ngai ndakisa malamu na ndenge ya kokómisa makambo pɛtɛɛ.”Ndeko mwasi moko na Angleterre, oyo azwá batisimo na 1972, alobaki boye mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ: “Ntango natángaki nimero ya liboso, nayokaki lokola nde Yehova afandi pembeni na ngai, atye lobɔkɔ na ye likoló ya mapeka na ngai mpe tozali kotánga elongo. Ezalaki lokola tata moko azali kotángela mwana na ye lisolo moko liboso akende kolala.”
Ndeko mwasi moko oyo asalaka na Betele ya États-Unis mpe azwá batisimo banda mbula koleka 40, alobaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ esalisaki ye ayeba Biblia lisusu malamumalamu. Na ndakisa, na nimero ya 15 Sɛtɛmbɛ 2011, etanda oyo elobi “Ndimbola ya maloba mosusu” elimbolaki maloba ‘lipata monene ya batatoli’ oyo ezali na Baebre 12:1, na maloba oyo: “Bazali ebele mpenza na boye ete tokoki kotánga bango te.” Alobaki boye: “Yango esalisaki ngai mingi nakanga ntina ya vɛrsɛ yango.” Mpo na oyo etali makita ya pɔsɔ na pɔsɔ, abakisaki boye: “Ata soki mwana azali kotánga mbala moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ mpo na kopesa biyano, maloba yango ekeseni na oyo ya nimero ya boyekoli oyo tosalelaka. Yango wana bakomantɛrɛ ya bana ezali kobima lokola ya sika mpo na bayangani.”
Ndeko mwasi mosusu oyo asalaka na Betele akomaki boye: “Nazalaka na mposa makasi ya koyoka bakomantɛrɛ ya bana mike na lisangá. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ esalisi bango báloba bango moko na komindimisa nyonso. Bakomantɛrɛ na bango elendisaka ngai mpenza.”
Ndeko mwasi moko oyo azwá batisimo na 1984 asepelaki mingi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi
ya pɛtɛɛ; alobaki boye: “Nayokaki lokola ete ekomamaki kaka mpo na ngai. Ezali pɛtɛɛ mpenza mpo nakanga ntina ya makambo oyo nazali kotánga. Sikoyo nandimi mpenza ete nakoki kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”BABOTI BAZWAKA YANGO NA MOTUYA MINGI
Mama ya mwana mobali moko oyo azali na mbula nsambo alobaki boye: “Kobanda kolimbwela ye maloba mingi ntango tozali kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kozwa biso ntango mingi mpe ezalaki kolɛmbisa biso.” Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ esalisaki bango? Akomaki boye: “Nazali kokamwa ndenge akoki kotánga baparagrafe mpe kokanga mpenza ntina na yango. Lokola maloba yango ezali mpasi te mpe mikuse, azali kosimba makambo oyo ezali na kati ya lisolo ya boyekoli. Akómi kobongisa bakomantɛrɛ na ye kozanga ete nasalisa ye, mpe na boumeli ya boyekoli mobimba, azali kotya makanisi na ye na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”
Mama ya mwana mwasi moko ya mbula libwa akomaki boye: “Liboso tozalaki kosalisa ye abongisa bakomantɛrɛ na ye. Sikoyo, azali kobongisa yango ye moko. Ezali mbala nyonso te nde tolekisaka ntango mpo na kolimbwela ye makambo oyo azali koyekola. Lokola makambo yango ezalaka mpasi te mpo na ye, sikoyo akoki mpenza kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”
NDENGE NINI BANA BATALELAKA YANGO?
Bana mingi bamonaka ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ esalemaki mpenza mpo na bango. Rebecca, oyo azali na mbula 12 alobaki boye: “Nasɛngi bino bókoba kobimisa nimero yango!” Abakisaki boye: “Nasepelaka mingi ndenge bosali etanda ‘Ndimbola ya maloba mosusu.’ Ezali pɛtɛɛ mpenza mpo na bana mike.”
Nicolette, oyo azali na mbula nsambo, azalaki mpe na likanisi ndenge moko; alobaki boye: “Liboso, ezalaki mpasi mpo na ngai nakanga ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Sikoyo nakoki kopesa bakomantɛrɛ na maloba na ngai moko.” Emma, oyo azali na mbula libwa, akomaki boye: “Yango esalisi ngai mpenza, ná leki na ngai, oyo azali na mbula 6. Tokoki mpenza kokanga ntina ya makambo mingi! Mersi!”
Emonani polele ete bato mingi bazali kozwa matomba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esalelaka Lingelesi ya pɛtɛɛ mpe oyo okoki kokanga ntina na yango. Ezali kosalisa bato mingi mpe ekokoba kobimisama elongo na nimero ya boyekoli oyo tosalelaka, oyo ebandá kobima banda 1879.