Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu

Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu

“Okolongisa nzela na yo mpe . . . okosala makambo na bwanya.”​—YOS. 1:8.

1, 2. (a) Bato mingi bamonaka ete kozala na bomoi ya malamu elimboli nini? (b) Okoki kosala nini mpo na koyeba lolenge oyo otalelaka kozala na bomoi ya malamu?

KOZALA na bomoi ya malamu elimboli nini? Soki otuni bato motuna wana, bakopesa yo biyano ndenge na ndenge. Na ndakisa, bato mingi balobaka ete mpo moto azala na bomoi ya malamu esengeli azala na mbongo mingi, na mosala ya malamu to atánga bakelasi mingi. Bamosusu bamonaka ete kozala na bomoi ya malamu etaleli boyokani oyo moto azalaka na yango ná bandeko ya libota, baninga to bato oyo asalaka na bango. Moto oyo asalelaka Nzambe akoki kutu kokanisa ete kozala na bomoi ya malamu ezali kozala na mikumba na lisangá to kosalisa bato mingi na mosala ya kosakola.

2 Mpo na koyeba lolenge oyo otalelaka bomoi ya malamu, okoki kokoma bankombo ya mwa bato oyo omonaka ete babongá na bomoi, bato oyo ozwaka na valɛrɛ mpe omemyaka. Bakokani na makambo nini? Bazali bazwi to bayebani mingi? Bazali bato minene? Biyano oyo okopesa, ekomonisa makanisi oyo ezali na motema na yo, mpe ekosalisa yo mingi na bikateli oyo ozali kozwa mpe na mikano oyo ozali komityela.​—Luka 6:45.

3. (a) Yosua asengelaki kosala nini mpo alongisa nzela na ye? (b) Tokotalela nini sikoyo?

3 Likambo eleki ntina ezali ya koluka koyeba soki na miso ya Yehova tozali na bomoi ya malamu, mpo bomoi na biso esimbami na mabɔkɔ na ye. Ntango Yehova apesaki Yosua mokumba monene ya komema Bayisraele tii na Mokili ya ndaka, alobaki na ye ete atángaka Mibeko ya Moize “butu moi” mpe asengelaki kokeba ete atosa makambo oyo ekomami na kati ya mibeko yango. Nzambe ayebisaki ye boye: “Na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.” (Yos. 1:7, 8) Mpe oyebi ete Yosua alongisaki nzela na ye. Tokoloba nini mpo na biso? Ndenge nini tokoki koyeba soki totalelaka likambo etali kozala na bomoi ya malamu ndenge Nzambe atalelaka yango? Mpo na koyeba likambo yango, tótalela ndakisa ya bato mibale oyo Biblia elobeli.

SALOMO AZALAKI NA BOMOI YA MALAMU?

4. Mpo na nini tokoki koloba ete Salomo azalaki na bomoi ya malamu?

4 Salomo azalaki na bomoi ya malamu na makambo mingi mpenza. Mpo na nini? Mpo na boumeli ya bambula mingi, azalaki kobanga Yehova mpe kotosa ye, mpe Yehova apambolaki ye mingi. Tóbosana te ete ntango Yehova ayebisaki ye asɛnga eloko oyo alingi, mokonzi yango asɛngaki bwanya mpo atambwisa bato ya Yisraele. Eumelaki te, Nzambe apesaki ye bwanya mpe bomɛngo. (Tángá 1 Bakonzi 3:10-14.) “Bwanya ya Salomo elekaki mpenza bwanya ya bato nyonso ya Ɛsti mpe bwanya nyonso ya Baezipito.” Lokumu ya Salomo eyebanaki “na bikólo nyonso ya zingazinga.” (1 Bak. 4:30, 31) Salomo azalaki mpe na bozwi mingi. Mbula na mbula azalaki kozwa wolo ya tɔni koleka 22! (2 Nt. 9:13) Azalaki makasi na makambo etali koyokana ná bato ya bikólo mosusu, mosala ya kotonga mpe mombongo. Ya solo, ntango nyonso oyo Salomo azalaki komitambwisa malamu na miso ya Nzambe, azalaki na bomoi ya malamu.​—2 Nt. 9:22-24.

5. Salomo alobaki nini na nsuka ya mokanda na ye mpo na bato oyo bazali na bomoi ya malamu na miso ya Nzambe?

5 Makambo oyo Salomo akomaki na mokanda ya Mosakoli, emonisi ete akanisaki soki moke te ete kaka bato ya bomɛngo to bato minene nde bazalaka na esengo to na bomoi ya malamu. Akomaki ete: “Nayei koyeba ete eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi; mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.” (Mos. 3:12, 13) Mpe Salomo amonaki ete makambo wana ya malamu na bomoi ekoki kopesa moto esengo ya solosolo kaka soki azali na boyokani malamu ná Nzambe. Yango wana Salomo alobaki ete: “Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.”​—Mos. 12:13.

6. Ndakisa ya Salomo na likambo etali kozala na bomoi ya malamu eteyi biso nini?

6 Salomo abangaki Nzambe na boumeli ya bambula mingi. Tozali kotánga ete “akobaki kolinga Yehova na ndenge azalaki kotambola na mibeko ya tata na ye Davidi.” (1 Bak. 3:3) Omoni te ete yango nde mpenza kozala na bomoi ya malamu? Na lisalisi ya Nzambe, Salomo atongaki tempelo moko monene mpo na losambo ya solo mpe akomaki mikanda misato ya Biblia. Atako tokoki te kosala makambo lokola Salomo, ndakisa na ye ntango azalaki sembo epai ya Nzambe esengeli kosalisa biso tóluka koyeba soki kozala na bomoi ya malamu ezali nini mpe ndenge ya kosala mpo tókóma na bomoi yango. Mpo na likambo yango, tóyeba ete na lisalisi ya elimo santu, Salomo akomaki ete bomɛngo, bwanya, koyebana mpe nguya; makambo oyo bato mingi bamonaka lelo oyo ete ezali na ntina mpo moto azala na bomoi ya malamu, ezali mpamba. Makambo yango ezali na ntina te, mpe ezali lokola “kolanda mopɛpɛ.” Omonaka te ete bato oyo balingaka bozwi mingi balukaka kaka kobakisa mosusu? Bamitungisaka mbala mingi mpo na biloko oyo bazali na yango. Nzokande, mokolo mosusu, bato mosusu nde bakodondwa na bomɛngo na bango.​—Tángá Mosakoli 2:8-11, 17; 5:10-12.

7, 8. Ndenge nini Salomo atikaki kotosa Nzambe, mpe esukaki boni?

7 Toyebi mpe ete na nsima, Salomo atikaki kotosa Nzambe. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ntango Salomo akómaki mobange, basi na ye babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu; mpe motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova Nzambe na ye lokola motema ya tata na ye Davidi. . . . Salomo abandaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.”​—1 Bak. 11:4-6.

8 Yehova asepelaki te, yango wana ayebisaki Salomo boye: “Lokola . . . otosi te kondimana na ngai mpe mibeko na ngai oyo napesaki yo mitindo, ya solo, nakobɔtɔla yo bokonzi mpe nakopesa yango mpenza mosaleli na yo.” (1 Bak. 11:11) Ezalaki mpenza mawa! Atako Salomo alongaki na makambo mingi, na nsima ayokisaki Yehova mawa. Salomo asalaki te likambo oyo eleki ntina na bomoi: kozala sembo epai ya Nzambe. Mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Nandimisami mpenza ete liteya oyo nazwi na bomoi ya Salomo ekosalisa ngai nazala na bomoi ya malamu?’

AZALAKI MPENZA NA BOMOI YA MALAMU

9. Mpo na nini bato mingi bakanisaki ete Paulo azalaki na bomoi ya malamu te?

9 Bomoi ya ntoma Paulo ekesanaki mpenza na oyo ya Mokonzi Salomo. Paulo azalaki te na kiti ya bokonzi oyo basalá na mpɛmbɛ ya nzoku to azalaki te kosala bafɛti ná bakonzi. Kutu, ntango mosusu azalaki konyokwama na nzala, koyoka mposa ya mai, kotungisama na malili mpe kozanga eloko ya kolata. (2 Ko. 11:24-27) Ntango andimelaki Yesu lokola Masiya, Paulo azalaki lisusu te na lokumu oyo azalaki na yango na lingomba ya Bayuda. Kutu, bakonzi ya lingomba ya Bayuda bayinaki ye. Bakangaki ye na bolɔkɔ, babɛtaki ye fimbo mpe babambaki ye mabanga. Ntoma Paulo amonisaki ete ye ná baninga na ye batyolamaki, banyokwamaki mpe bafingamaki. “Tokómi lokola bosɔtɔ ya mokili, eloko oyo eboyami na biloko nyonso, tii sikoyo.”​—1 Ko. 4:11-13.

Bato mingi bakanisaki ete Saulo akokaki kokóma na bomoi ya malamu na mokili

10. Mpo na nini bato bakanisaki ete ntoma Paulo aboyaki kosalela libaku oyo azalaki na yango ya kozala na bomoi ya malamu?

10 Ntango Saulo, oyo na nsima akómaki ntoma Paulo, azalaki naino elenge, emonanaki lokola ete akokóma moto monene. Emonani lokola ete abotamaki na libota moko ya bazwi, atángaki epai ya Gamaliele, molakisi oyo ayebanaki mingi, mpe na nsima akomaki boye: “Nazalaki kokende liboso mpenza na kati ya lingomba ya Bayuda koleka bato mingi ya mbula na ngai.” (Gal. 1:14) Ayebaki Ebre mpe Grɛki malamu, mpe lokola azalaki mwana-mboka ya Roma, yango epesaki ye nzela na mabaku mingi mpe lotomo na makambo ebele. Soki akobaki koluka kozala na bomoi ya malamu na mokili, mbala mosusu alingaki kokóma mozwi mpenza mpe na lokumu mingi. Kasi, alandaki nzela oyo bato mosusu, ezala mpe bandeko na ye mosusu bakokaki komona ete ezali bolema. Mpo na nini?

11. (a) Makambo nini ntoma Paulo azalaki kozwa na motuya? (b) Mokano na ye ezalaki nini, mpe mpo na nini?

11 Ntoma Paulo alingaki Yehova mpe azalaki na mposa ete andimama na ye, na esika ya kolinga mingi bomɛngo mpe lokumu ya bato. Ntango akómaki na boyebi ya solosolo, ntoma Paulo akómaki kozwa na motuya lisiko, mosala ya kosakola, mpe elikya ya kozala na bomoi na likoló, makambo oyo bato ya mokili bakipaka ata moke te. Ntoma Paulo ayebaki ete ezali na ntembe moko oyo esengeli kokatama. Satana atutaki ntolo ete akoki kopɛngwisa bato nyonso mpo básambela Nzambe te. (Yobo 1:9-11; 2:3-5) Ezala akutanaki na mokakatano nini, ntoma Paulo azalaki na ekateli ya kozala sembo epai ya Nzambe, kokangama na losambo ya solo. Yango nde mokano oyo bato ya mokili bazali komityela te mpo bázala na bomoi ya malamu.

Paulo akómaki mpenza na bomoi ya malamu

12. Mpo na nini oponi kotya elikya epai ya Nzambe?

12 Yo mpe, ozali na ekateli lokola ntoma Paulo? Ata soki kotikala sembo epai ya Nzambe ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, toyebi ete soki tosali yango, tokosepelisa Yehova mpe akopambola biso. Yango nde kozala na bomoi ya malamu mpenza. (Mas. 10:22) Tozali kozwa matomba banda sikoyo mpe tozali mpenza na elikya ete tokozwa mpe mapamboli na mikolo ezali koya. (Tángá Marko 10:29, 30.) Na yango, tosengeli te kotya elikya na biso na “bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” ‘Tozali komibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo tokotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya, mpo tósimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Tim. 6:17-19) Ya solo, tokoki mpenza kotya motema ete nsima ya bankama ya bambula, ata mpe bankóto to mingi koleka, tokozala na likoki ya kozongisa lisusu makanisi nsima mpe koloba ete, “Bomoi na ngai ezalaki ya malamu mpenza!”

EPAI ELOKO NA YO YA MOTUYA EZALI

13. Yesu apesaki toli nini na oyo etali kobomba biloko ya motuya?

13 Na likambo etali biloko ya motuya, Yesu alobaki boye: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te. Mpo epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.”​—Mat. 6:19-21.

14. Mpo na nini ezali malamu te komipesa na koluka biloko ya motuya ya mokili?

14 Eloko ya motuya ya mabele oyo moto akoki kozala na yango ezali kaka mbongo te. Ekoki mpe kozala makambo oyo Salomo alobelaki, na ndakisa lokumu, koyebana to mpe nguya. Bato mingi bamonaka ete makambo wana ezali na ntina mpo na kozala na bomoi ya malamu. Yesu alobelaki likambo moko oyo ekokani na oyo Salomo alobelaki na mokanda ya Mosakoli: biloko ya motuya ya mokili eumelaka te. Ndenge okoki komona yango epai ofandi, biloko yango ya motuya ebebaka mpe ekoki kobunga noki. Mpo na biloko yango, profesɛrɛ Dale Bruner akomaki boye: “Bato mingi bayebi ete lokumu eumelaka te. Moto akoki kozala na lokumu lelo mpe lobi ekei. Lelo okoki kozala na mbongo mingi mpe lobi otikali mabɔkɔ mpamba. . . . [Yesu] alingaka bato. Alendisaka bango báboya lokumu ya ntango mokuse mpo ekoki kotika bango na mpasi na motema. Eumelaka te. Yesu alingaki te ete bayekoli na ye báyoka mpasi. ‘Mokolo na mokolo, bato bapesaka mokɔngɔ na bato oyo bazalaki na lokumu soki lokumu na bango esili.’” Bato mingi bakondima maloba wana, kasi bato boni lelo basalelaka yango mpo na kobongola ndenge oyo batalelaka bomoi? Okosala yango?

15. Bomoi nini ya malamu tosengeli kosala makasi tózala na yango?

15 Bakonzi mosusu ya mangomba bateyaka ete ezali mabe kosala makasi mpo na kozala na bomoi ya malamu mpe ete esengeli kotika kosala milende mpo na yango. Kasi, tóyeba ete Yesu alobaki te ete kosala milende ya ndenge wana ezali mabe. Ayebisaki nde bayekoli na ye ete básala milende na ndenge ya malamu; ayebisaki bango ete bámibombela “biloko ya motuya [oyo ebebaka te] na likoló.” Mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kozala na bomoi ya malamu ndenge Yehova atalelaka yango. Ya solo, maloba ya Yesu ezali kosalisa biso tóbosana te moto na moto aponaka bomoi oyo akosala makasi mpo azwa. Nzokande, likambo ya solo ezali ete makambo oyo ezali na motema na biso, to oyo ezali na motuya mingi mpo na biso nde tokosala makasi mingi mpo na kozwa yango.

16. Tokoki mpenza kondima likambo nini?

16 Soki na motema na biso tozali na mposa ya kosepelisa Yehova, tokoki kondima ete akomona yango mpe akopesa biso biloko oyo tozali na mposa na yango. Ndenge asalaki mpo na ntoma Paulo, akoki kotika ete tóyoka nzala to mposa ya mai mpo na ntango mokuse. (1 Ko. 4:11) Atako bongo, tokoki mpenza kondima toli oyo ya Yesu: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”​—Mat. 6:31-33.

LUKÁ KOZALA NA BOMOI YA MALAMU NA MISO YA NZAMBE

17, 18. (a) Kozala na bomoi ya malamu etaleli nini? (b) Kozala na bomoi ya malamu etaleli nini te?

17 Likambo ya ntina yango oyo: Kozala na bomoi ya malamu etaleli te makambo minene oyo tosalaka to lokumu oyo tozali na yango na mokili. Longola yango, etaleli mpe te mokumba moko oyo tokoki kozala na yango na lisangá ya Nzambe. Nzokande, tozwaki mokumba yango mpo tozali sembo mpe tozali kotosa Nzambe; yango nde ezali na ntina mingi mpo na kozala na bomoi ya malamu. Nzambe ayebisi biso ete: “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana sembo.” (1 Ko. 4:2) Mpe tosengeli koyika mpiko mpo tótikala sembo. Yesu alobaki boye: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Mat. 10:22) Ondimi te ete kobika nde emonisi mpenza ete tozalaki na bomoi ya malamu?

18 Soki otaleli makambo oyo tolobeli na lisolo oyo, okomona ete kozala sembo epai ya Nzambe etaleli te kozala moto monene, kotánga bakelasi mingi, kozala na mbongo mingi, to mpe kozala na lokumu mingi; etaleli mpe te kozala na mayele mingi to na makoki mingi. Ata soki tokutani na makambo ya ndenge nini na bomoi na biso, tokoki kotikala sembo epai ya Nzambe. Na siɛklɛ ya liboso, basaleli mosusu ya Nzambe bazalaki bazwi, bamosusu babola. Ntoma Paulo apesaki bato oyo bazalaki bazwi toli oyo ya ntina mingi ete: “Básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba.” Ezala bazwi to babola bakoki ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Tim. 6:17-19) Ezali mpe bongo lelo oyo. Biso nyonso tozali na likambo kaka moko to mokumba kaka moko ya kokokisa: Tosengeli kotikala sembo mpe kozala “bazwi na misala ya malamu.” Soki tosali bongo, tokozala na bomoi ya malamu na miso ya Mozalisi na biso mpe tokozala na esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa ye.​—Mas. 27:11.

19. Na likambo etali kozala na bomoi ya malamu, ekateli na yo ezali nini?

19 Okoki koyeba te makambo nyonso oyo ekokómela yo, kasi okoki koyeba ndenge ya kosala mpo na kolonga yango. Salá makasi otikala sembo ata soki okutani na makambo ya ndenge nini. Milende oyo okosala ezali ya mpamba te. Zalá na elikya ete Yehova akopambola yo mpenza, banda sikoyo mpe libela na libela. Kobosana ata moke te maloba oyo Yesu ayebisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Zalá sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.” (Em. 2:10) Yango ezali mpenza kolonga ya solosolo!