Kobá kopusana penepene na Yehova
“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”—YAK. 4:8.
1, 2. (a) “Mayele” nini Satana asalelaka? (b) Nini ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe?
YEHOVA NZAMBE akelaki bato na mposa ya kopusana penepene na ye. Kasi, Satana alingi ete tókanisa ndenge ye akanisaka: ete tozali na mposa ya Yehova te. Wana ezali lokuta oyo Satana asalelaka banda ntango oyo akosaki Eva na elanga ya Edene. (Eba. 3:4-6) Banda ntango wana tii sikoyo, bato mingi basalaka libunga ya kokanisa ete moto azali na mposa ya Nzambe te.
2 Kasi biso tokoki kokima motambo wana ya Satana, mpamba te “toyebi malamu mayele na ye.” (2 Ko. 2:11) Satana alukaka kokómisa biso mosika na Yehova na ndenge atindaka biso tópona banzela ya mabe. Kasi, ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, tokoki kopona nzela ya malamu na oyo etali mosala, masano to kominanola, mpe makambo ya libota. Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo tosengeli kotika te ete baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo, bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, mbongo, mpe komikumisa epekisa biso ‘tópusana penepene na Nzambe.’—Yak. 4:8.
BAAPARƐYI OYO EZALI KOBIMA MIKOLO OYO
3. Monisá ndenge moto akoki kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe.
3 Na bisika mingi na mokili, bato mingi bakómi kosalela baordinatɛrɛ mpe baaparɛyi mosusu. Soki tosaleli baaparɛyi yango malamu, ekoki kosalisa biso. Kasi soki tosaleli yango mabe, ekoki kokabola biso ná Tata na biso ya likoló. Tózwa ndakisa ya baordinatɛrɛ. Zulunalo oyo ozali kotánga sikoyo ekomamaki mpe ebimisamaki na lisalisi ya baordinatɛrɛ. Ordinatɛrɛ ekoki kosalisa biso tósala bolukiluki mpe tósolola na bato oyo bazali mosika, mpe na bantango mosusu, ekoki kosalisa biso tóminanola malamu. Kasi, soki tokebi te tokoki mpe kokóma baombo ya ordinatɛrɛ. Bato oyo basalaka bapiblisite balukaka kotinda bato bákanisa ete esengeli kozala na aparɛyi nyonso oyo ebimi sika. Elenge mobali moko akómaki na mposa makasi ya kozwa modɛlɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ebimaki sika, yango wana, kozanga ete bato báyeba yango, atɛkaki ngɛi (rein) na ye moko mpo na kosomba yango. Oyo nde bozoba!
4. Mokristo moko asalaki nini mpo atika momeseno ya kolekisa ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ?
* mokristo moko oyo azali na mbula 28 alobi boye: “Nayebi toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tómisombela ntango oyo ebongi’ mpo na makambo ya elimo. Kasi na likambo etali baordinatɛrɛ, monguna na ngai ya liboso ezali nde ngai moko.” Mbala mingi, Jon asalelaka Internet tii na butu makasi. Alobi boye: “Soki nalɛmbi mingi, ekómaka mpasi koleka natika kosolola na baninga na Internet to natika kotala bafilme ya mikuse, ata mpe bafilme ya mbindo.” Mpo atika momeseno wana ya mabe, Jon asalaki ete ordinatɛrɛ na ye ekangamaka yango moko soki ntango na ye ya kolala ekoki.—Tángá Baefese 5:15, 16.
4 Likambo ya mabe koleka, tokoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova soki tozali kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo na ndenge ya mabe to na ndenge ya kolekisa ndelo. Jon,5, 6. (a) Baboti basengeli kosala nini mpo na bana na bango? (b) Baboti bakoki kosala nini mpo bana na bango bálekisaka ntango elongo na baninga ya malamu?
5 Baboti, ezali na ntina te ete bólandelaka makambo nyonso oyo bana na bino basalaka; atako bongo bosengeli kotyela bango mwa mibeko na oyo etali kosalela ordinatɛrɛ. Bótika te ete bátalaka na Internet makambo ya mbindo, masano ya bitumba, misala ya bilimo mabe, mpe básololaka na baninga mabe, kaka mpo bolingi ete bázanga eloko ya kosala te mpe bátungisa bino te. Soki bosali bongo te, bakoki kokanisa boye: ‘Lokola Papa ná Mama balobi eloko te, ezali na yango mabe te.’ Baboti, bozali na mokumba ya kobatela bana na bino, ezala baoyo bazali naino mike to baoyo bakómi bilenge, mpo eloko moko te ekómisa bango mosika na Yehova. Ata banyama mpe babatelaka bana na bango na likama. Kanisá ndenge oyo urse akoki kosala soki monguna moko alingi kosala bana na ye mabe!—Kokanisá na Hosea 13:8.
6 Bósalisa bana na bino bálekisaka ntango mingi elongo na bakristo oyo bazali na etamboli ya malamu, ezala bilenge to mikóló. Mpe bóbosana te ete bana na bino bazalaka na mposa ete bino nde bólekisaka ntango mingi elongo na bango! Yango wana, bólukaka ntango ya kosɛka, ya kosakana, ya kosala mosala, mpe ya “kopusana penepene na Nzambe” elongo na bana na bino. *
BOKƆLƆNGƆNƆ YA NZOTO
7. Mpo na nini biso nyonso tolingaka kozala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ?
7 Mbala mingi, totunaka bato: “Ozali malamu?” Motuna wana emonisi ete biso bato tokutanaka na likambo moko ya mpasi. Biso nyonso tobɛlaka mpamba te baboti na biso ya liboso batikaki ete Satana akómisa bango mosika na Yehova. Mokano ya Satana ezalaka ete tóbɛla, mpo soki tozali na maladi, ekozala mpasi tósalela Yehova. Mpe soki tokufi, tokoki lisusu kosalela Yehova te. (Nz. 115:17) Yango wana, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tózala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ. * Tosengeli mpe komibanzabanza mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bandeko na biso mpe bolamu na bango.
8, 9. (a) Ndenge nini tokoki koboya komitungisa koleka ndelo na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto? (b) Matomba nini tokozwa soki tozali kobatela esengo na biso?
8 Kasi, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Bandeko mosusu basalaka piblisite ya bankisi, bilei, to biloko mosusu na molende mingi koleka kutu oyo bazalaka na yango na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mbala mosusu basalaka yango na makanisi mabe te, kasi mpo na kosalisa bandeko. Atako bongo, tosengeli te kosala piblisite ya bankisi to biloko mosusu oyo ekoki kosalisa moto azala nzoto kolɔngɔnɔ to azala kitoko, liboso to nsima ya makita na ndako ya Bokonzi to na mayangani. Mpo na nini?
9 Tokendaka na makita mpo na kolobela makambo ya elimo mpe mpo na kobakisa esengo na biso, oyo eutaka na elimo santu ya Nzambe. (Gal. 5:22) Ntango tokei na makita to na mayangani, kopesa basusu toli na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto to bankisi mosusu, ezala basɛngi biso yango to te, ekoki kolongola likebi na biso na makambo ya elimo mpe kosilisa basusu esengo na bango. (Rom. 14:17) Ekateli oyo moto azwaka na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na ye etali kaka ye moko. Lisusu, moto moko te akoki kosilisa maladi mpo na libela. Ata minganga oyo bayebi mosala na bango malamu banunaka mpe babɛlaka, mpe nsukansuka bakufaka. Mpe komitungisa koleka ndelo na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na biso ekoki te kobakisa bolai ya bomoi na biso. (Luka 12:25) Nzokande, “motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.”—Mas. 17:22.
10. (a) Bizaleli nini ekómisaka moto kitoko na miso ya Yehova? (b) Ntango nini tokozala mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ?
10 Ndenge moko mpe, ezali mabe te koluka ete tómonana kitoko na miso ya bato. Kasi, tosengeli te kosala nyonso mpo na kolongola bilembo nyonso oyo emonisi ete tobandi konuna. Bilembo wana ekoki komonisa ete moto akɔmɛli, abongi kozwa lokumu, mpe azali na kitoko ya kati. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.” (Mas. 16:31) Lokola Yehova atalelaka biso ndenge wana, biso moko mpe tosengeli kosala makasi tómitalelaka ndenge oyo ye atalelaka biso. (Tángá 1 Petro 3:3, 4.) Na yango, tokanisi ete kosɛnga básala biso lipaso moko boye to kondima bápesa biso nkisi moko boye oyo na nsima ekoki kobimisela biso likama kaka mpo tómonana kitoko ekomonisa mpenza ete tozali na bwanya? “Esengo ya Yehova” nde esalaka ete moto azala na kitoko ya solosolo, oyo ezalaka na kati, ata soki anuni to azali kobɛla. (Neh. 8:10) Kaka na mokili ya sika nde tokozala mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ mpe tokozongela kitoko ya bolenge. (Yobo 33:25; Yis. 33:24) Kasi liboso ete tókɔta na mokili yango, kozala na bwanya mpe komonisa kondima ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova ata soki tozali kokutana na mikakatano sikoyo.—1 Tim. 4:8.
MBONGO
11. Ndenge nini mbongo ekoki kokóma motambo?
11 Kozala na mbongo ezali mabe te; ezali mpe mabe te koluka mbongo na ndenge ya malamu. (Mos. 7:12; Luka 19:12, 13) Kasi, soki moto azali kokolisa “bolingo ya mbongo,” nsukansuka, akokóma mosika na Yehova. (1 Tim. 6:9, 10) “Motungisi ya makambo ya ntango oyo,” elingi koloba komitungisa koleka ndelo mpo na kozwa biloko ya kobikela ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Ezali mpe bongo mpo na “nguya ya bokosi ya bomɛngo,” elingi koloba kokanisa ete bozwi epesaka esengo mpe kimya ya solosolo. (Mat. 13:22) Yesu amonisaki yango polele ete “moto moko te” akoki kozala moombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.—Mat. 6:24.
12. Mitambo nini ekómi mingi lelo oyo na makambo ya mbongo, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?
12 Soki tokanisi ete mbongo ezali eloko oyo eleki ntina, yango ekoki kotinda biso tósala makambo ya mabe. (Mas. 28:20) Mpo na kozwa mbongo ebele nokinoki, bandeko mosusu basombaki batike ya loteri to bamikɔtisaki na mimbongo ya mindɔndɔ, mpe balukaki ata kokɔtisa bandeko mosusu ya lisangá na makambo yango. Basusu basɛngaki bandeko mosusu ya lisangá bádefisa bango mbongo mpo na kosala na yango mombongo mpe balakaki ete bakozongisa yango na benefisi. Soki tokebi na ezaleli ya lokoso te, bakoki kobuba biso to kolyela biso mbongo. Yango wana, esengeli kosalela bososoli. Mbala mingi, soki balaki yo mbongo ebele na mbala moko, osengeli kokeba mpe kofungola miso.
13. Yehova alingaka ete tótalela mbongo ndenge nini?
13 Soki totye “bokonzi mpe boyengebene na ye” na esika ya liboso, Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kozwa biloko ya kobikela. (Mat. 6:33; Ef. 4:28) Alingi te ete tolalaka mpɔngi ntango makita ezali kosalema mpo tosalaka mingi, to tómitungisaka mpo na makambo ya mbongo ntango tozali na Ndako ya Bokonzi. Nzokande, na mokili oyo, bato mingi bakanisaka ete koboma nzoto mpo na koluka mbongo nde ekosalisa bango bázala na bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe bákóma na bomɛngo. Mbala mingi, batindaka bana na bango bámityela mpe mikano ya ndenge wana. Yesu amonisaki ete kokanisa ndenge wana ezali bozoba. (Tángá Luka 12:15-21.) Yango ekundweli biso ndakisa ya Gehazi, oyo akanisaki ete akoki kobatela boyokani na ye ná Yehova ata soki azali na lokoso.—2 Bak. 5:20-27.
14, 15. Mpo na nini tosengeli te kokanisa ete mbongo nde ekosalisa biso tózala na bomoi ya esengo? Pesá ndakisa.
14 Bampongo mosusu ezindaki na mai mpe ekufaki mpamba te elukaki kotombola mbisi oyo elekaki kilo. Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela mokristo? Alex, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Nasalelaka mbongo na ngai na ekɛngɛ mpenza. Soki namoni ete natye sabuni mingi ya kosukola nsuki (shampoing), nazongisaka mosusu na molangi.” Atako bongo, Alex akweaki na motambo ntango akómaki kosomba biloko ebele mpe kobomba yango mpo na kotɛka yango na nsima; akanisaki ete soki asali bongo, akotika mosala na ye mpo akóma mobongisi-nzela. Mpo na yango, akómaki koluka koyeba bisika oyo bazalaki kotɛka biloko na ntalo moke. Asalelaki mpe mbongo oyo abombaki mpe mosusu oyo adefaki epai ya bakomelesa mpo na kosomba biloko oyo balobaki ete ekotɛkama na ntalo mingi nsima ya mwa mikolo. Kasi, eumelaki te, valɛrɛ ya biloko oyo asombaki ekitaki makasi. Alex alobi boye: “Nazalaki kosala nyonso mpo mbongo na ngai ezonga. Nakanisaki ete soki nazeli mwa moke, biloko yango ekomata lisusu ntalo.”
15 Basanza mingi elekaki, kasi Alex azalaki kokanisa kaka biloko oyo asombaki. Azalaki kokoka te kotya likebi na makambo ya elimo, mpe azalaki lisusu kolala malamu te. Kasi, ntalo ya biloko oyo asombaki emataki lisusu te. Alex abungisaki mbongo oyo azalaki kobomba mpe esɛngaki ete atɛka ndako na ye. Alobi boye: “Nabimiselaki libota na ngai mikakatano mingi.” Kasi, azwaki liteya moko monene. Alobi boye: “Sikoyo, nayebi ete soki moto atye motema na mokili oyo ya Satana, nsukansuka, akoya kolela na nsima.” (Mas. 11:28) Ya solo, soki tozali kotya motema na mbongo oyo tobombi, na biloko mosusu oyo ekɔtiselaka biso mbongo, to na mayele oyo tozali na yango mpo na koluka mbongo na mokili oyo, ezali lokola nde tozali kotya elikya na biso epai ya Satana, oyo azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Ko. 4:4; 1 Tim. 6:17) Kobanda wana, Alex akómisá bomoi na ye pɛpɛlɛ “mpo na nsango malamu.” Yango epesá ye moko mpe libota na ye esengo mingi mpe esalisá bango bápusana lisusu penepene na Yehova.—Tángá Marko 10:29, 30.
KOMIKUMISA
16. Na ndenge nini komikumisa ya malamu ekeseni na oyo ya mabe?
16 Komikumisa nyonso ezalaka mabe te. Na ndakisa, tosengeli ntango nyonso komikumisa ndenge tozali Batatoli ya Yehova. (Yir. 9:24) Komipesa lokumu na ndenge oyo eleki ndelo te esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mpe tótosa mitinda ya Nzambe na oyo etali etamboli malamu. Kasi, komizwa na valɛrɛ mingi mpe kokanisa ete makanisi na biso nde ezali na ntina mingi koleka ekoki kosala ete tókóma mosika na Yehova.—Nz. 138:6; Rom. 12:3.
17, 18. (a) Bandakisa nini Biblia epesi ya bato oyo bazalaki na komikitisa mpe oyo bazalaki na lolendo? (b) Ndenge nini ndeko mobali moko aboyaki kotika ete lolendo ekómisa ye mosika na Yehova?
17 Biblia elobeli bato oyo bazalaki na lolendo mpe bato mosusu oyo bazalaki na komikitisa. Na ndakisa, mokonzi Davidi alukaki litambwisi ya Yehova na komikitisa nyonso mpe Yehova apambolaki ye. (Nz. 131:1-3) Kasi Yehova akitisaki Nebukadenezare ná Beleshazare, mpo bakonzi yango bazalaki na lolendo. (Dan. 4:30-37; 5:23-30) Lelo oyo mpe, makambo mosusu ekoki komonisa soki tozali na komikitisa to te. Ryan, mosaleli na misala moko ya mbula 32, alongwaki na lisangá oyo azalaki liboso mpe akendaki na lisangá mosusu. Alobi boye: “Nakanisaki ete ekoumela te mpo nakóma nkulutu. Kasi mbula mobimba elekaki, nazwaki kaka mokumba yango te.” Ryan asilikaki mpe akómaki kokanisa ete bankulutu baboyi kopesa ye mikumba? Atikaki koyangana na makita to atikaki ete lolendo ekómisa ye mosika na Yehova mpe basaleli na ye? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?
18 Ryan alobi boye: “Natángaki masolo nyonso oyo ebimá na mikanda na biso oyo elobeli koyeba kozela.” (Mas. 13:12) “Nabandaki kososola ete esengelaki nayekola kozala na motema molai mpe komikitisa. Esengelaki natika Yehova apesa ngai formasyo.” Ryan akómaki nde kotya likebi mingi na kosalela basusu, ezala na kati ya lisangá to na mosala ya kosakola. Eumelaki te, akómaki koyekola Biblia na bato mingi oyo bazalaki kokola na elimo. Alobi boye: “Ntango nakómaki nkulutu mbula moko na ndambo na nsima, ezalaki na ntango oyo nazalaki kokanisa yango te. Natikaki komitungisa mpo na yango mpo nakómaki kosepela mingi na mosala ya kosakola.”—Tángá Nzembo 37:3, 4.
TIKÁLÁ PENEPENE NA YEHOVA!
19, 20. (a) Ndenge nini tokoki kotika te ete makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo ekokómisa biso mosika na Yehova? (b) Bandakisa nini ya bato oyo batikalaki penepene na Yehova tokoki komekola?
19 Makambo nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo mpe oyo eleki etaleli mpenza bomoi na biso. Tomikumisaka ndenge tozali basaleli ya Yehova. Kozala na libota ya esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ ezali makabo minene oyo euti na Yehova. Toyebi malamu ete mosala mpe mbongo ekoki kosalisa biso tókokisa bamposa na biso. Toyebi mpe ete masano to kominanola ekoki kopesa biso makasi mpe baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo ekoki kosalisa biso. Kasi kosalela biloko wana nyonso na ntango oyo ebongi te, na kolekisa ndelo, to na ndenge oyo ekoki kopekisa biso tómipesa na makambo oyo etali losambo na biso ekoki kokómisa biso mosika na Yehova.
Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova!
20 Satana alingi ete likambo ya ndenge wana ekómela biso. Kasi, okoki koboya ete likama ya ndenge wana ekómela yo ná libota na yo. (Mas. 22:3) Pusaná penepene na Yehova mpe tikalá penepene na ye. Tozali na bandakisa mingi na Biblia oyo ekoki koteya biso na likambo wana. Enoka mpe Noa ‘batambolaki elongo na Nzambe ya solo.’ (Eba. 5:22; 6:9) Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Ebr. 11:27) Nzambe azalaki ntango nyonso kosunga Yesu mpo asalaki makambo oyo esepelisaki Tata na ye ya likoló. (Yoa. 8:29) Mekolá bandakisa wana. ‘Sepeláká ntango nyonso. Bondeláká ntango nyonso. Na makambo nyonso pesáká matɔndi.’ (1 Tes. 5:16-18) Mpe kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova!