Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo

Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo

“Ye oyo azali na elimo ya komikitisa akozwa nkembo.”​—MAS. 29:23.

1, 2. (a) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “nkembo” elimboli nini? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

NTANGO oyokaka liloba “nkembo,” nini eyelaka yo na makanisi? Okanisaka nkembo oyo euti na biloko oyo Nzambe akelá? (Nz. 19:1) Okanisaka lokumu mpe nkembo oyo bapesaka bato oyo bazali na bozwi mingi, na bwanya mingi, to oyo basalá makambo minene? Na Biblia, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “nkembo” epesaka likanisi ya kilo. Na ntango ya kala, ntango bazalaki kosalela mbongo ya bibende, soki mbongo ezali na kilo mingi, yango ezalaki komonisa ete ezali mpe na valɛrɛ mingi. Na nsima, maloba oyo bazalaki kosalela mpo na kolobela kilo ekómaki kosalelama na ndenge ya elilingi mpo na kolimbola eloko oyo ezali na valɛrɛ mingi, oyo ezali kitoko, to oyo ezali kokamwisa.

2 Atako nguya, bokonzi, to lokumu ya moto ekoki kokamwisa biso, eloko nini Nzambe alulaka komona epai ya bato? Biblia elobi ete Nzambe apesaka bato nkembo. Na ndakisa, Masese 22:4 elobi ete: “Komikitisa ná kobanga Yehova epesaka bomɛngo mpe nkembo mpe bomoi.” Longola yango, moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bómikitisa na miso ya Yehova, mpe ye akotombola bino.” (Yak. 4:10) Kasi, nkembo oyo Yehova apesaka bato ezali nini? Nini ekoki kopekisa biso tózwa yango? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa basusu bázwa nkembo yango?

3-5. Ndenge nini Yehova apesaka biso lokumu?

3 Mokomi ya Nzembo azalaki na kondima ete Yehova asimbi lobɔkɔ na ye ya mobali mpe akokamba ye na nkembo ya solosolo. (Tángá Nzembo 73:23, 24.) Ndenge nini Yehova asalaka yango? Yehova akambaka basaleli na ye oyo bazali na komikitisa na nkembo na ndenge apesaka bango lokumu na ndenge mingi. Apambolaka bango na ndenge asalisaka bango básosola mokano na ye. (1 Ko. 2:7) Apesaka bato oyo bayokaka liloba na ye mpe batosaka ye lokumu ya kozala na boyokani makasi ná ye.​—Yak. 4:8.

4 Yehova apesaka mpe basaleli na ye lokumu na ndenge apesi bango eloko ya motuya mingi, elingi koloba mosala ya kosakola. (2 Ko. 4:1, 7) Mosala yango epesaka biso lokumu. Mpo na baoyo bazwaka mokumba wana lokola libaku ya kokumisa Yehova mpe kosalisa basusu, Yehova alaki ete: “Baoyo bazali kokumisa ngai nakokumisa bango.” (1 Sa. 2:30) Bato yango bazwaka lokumu na ndenge bamisalelaka nkombo malamu epai ya Yehova, mpe na ndenge basaleli mosusu ya Nzambe balobaka malamu mpo na bango.​—Mas. 11:16; 22:1.

5 Baoyo ‘batyelaka Yehova elikya mpe babatelaka nzela na ye’ bakozwa mbano nini? Biblia elaki ete: “[Yehova] akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.” (Nz. 37:34) Bazali kozela na mposa makasi mpo na kozwa lokumu oyo eleki monene, elingi koloba bomoi ya seko.​—Nz. 37:29.

“NANDIMAKA NKEMBO OYO EUTI NA BATO TE”

6, 7. Mpo na nini bato mingi baboyaki kondimela Yesu?

6 Makambo nini ekoki kopekisa biso tózwa nkembo oyo Yehova apesaka biso? Moko na yango ezali kopesa valɛrɛ mingi na makanisi ya bato oyo bazali na boyokani malamu ná Nzambe te. Tótalela likambo oyo ntoma Yoane akomaki mpo na bato mosusu oyo bazalaki bakonzi na ntango ya Yesu: “Ata bankumu mingi bandimelaki [Yesu] mpenza, kasi mpo na Bafarisai, bazalaki kondima ye polele te, noki bábengana bango na sinagoga; mpo bazalaki kolinga nkembo ya bato koleka kutu nkembo ya Nzambe.” (Yoa. 12:42, 43) Nzokande, esengelaki te ete bakonzi wana bápesa valɛrɛ mingi na makanisi ya Bafarisai.

7 Ntango kaka Yesu abandaki mosala na ye, amonisaki polele ntina oyo bato mingi bakoyamba ye te mpe bakondimela ye te. (Tángá Yoane 5:39-44.) Banda bankama ya bambula, ekólo ya Yisraele ezalaki kozela koya ya Masiya. Ntango Yesu abandaki kosakola, ekoki kozala ete bato mosusu basosolaki, na nzela ya esakweli ya Danyele, ete ntango oyo etyamaki mpo Masiya amonana ekoki. Mwa basanza liboso, ntango Yoane Mobatisi abandaki kosakola, bato mingi bazalaki koloba: “Mbala mosusu ye nde Kristo?” (Luka 3:15) Nzokande, Masiya oyo bazalaki kozela banda kala azalaki koteya kati na bango. Kasi, bato wana oyo bayebaki Mibeko malamumalamu baboyaki kondimela ye. Yesu amonisaki ntina oyo baboyaki kondimela ye, ntango atunaki bango ete: “Ndenge nini bokoki kondima, wana bozali koyamba nkembo oyo bino na bino bozali kopesana mpe bozali koluka te nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko?”

8, 9. Salelá ndakisa ya pole mpo na komonisa ndenge oyo nkembo oyo euti epai ya bato ekoki kozipa nkembo oyo eutaka epai ya Nzambe.

8 Mpo na koyeba ndenge nkembo oyo euti epai ya bato ekoki kozipa nkembo oyo euti epai ya Nzambe, tokoki kokokanisa nkembo ná pole. Molɔ́ngɔ́ mobimba etondi na nkembo. Oyebi lisusu mbala ya nsuka oyo otalaki likoló na butu mpe omonaki ndenge etondaki na minzoto? “Nkembo ya minzoto” ekamwisaka mingi. (1 Ko. 15:40, 41) Kasi, soki ozali na engumba oyo etondi na miinda na balabala mpe otali likoló na butu, okomona yango ndenge nini? Miinda oyo ezali na engumba yango ekoki kopekisa yo omona malamu pole oyo ezali kouta na minzoto! Mpo na nini esalemaka bongo? Ezali nde mpo ete pole oyo euti na miinda ya babalabala, bastade, mpe babuludingi ezalaka makasi to kitoko koleka pole ya minzoto? Te! Esalemaka bongo mpo miinda oyo ezali na engumba ezali pene na biso mpe epekisaka biso tómona malamu biloko oyo Yehova akelá. Mpo tómona malamu kitoko ya minzoto na butu, tosengeli koboma miinda to kokende na esika oyo miinda yango ekopekisa biso te tómona pole ya minzoto.

9 Ndenge moko mpe, soki nkembo oyo euti epai ya bato ezali mpenza pene ya mitema na biso, ekoki kopekisa biso tósepela na nkembo ya solosolo, oyo eutaka epai ya Yehova, mpe tóluka kozwa yango. Bato mingi baboyaka kondima nsango ya Bokonzi mpo babangaka oyo baninga mpe bandeko na bango ya libota bakoki kokanisela bango. Kasi, ekoki mpe kosalema ete ata mosaleli ya Nzambe oyo amipesá akóma koluka mingi nkembo oyo euti epai ya bato. Na ndakisa, bakoki kosɛnga elenge moko akende kosakola na teritware oyo bato mingi bayebi ye, kasi bayebaka te ete azali Motatoli ya Yehova. Asengeli nde koboya kokende na teritware yango mpo azali kobanga? Ndakisa mosusu: bazali kotyola ndeko moko mpo amityeli mikano ya elimo. Ndeko yango asengeli nde kotika ete bato oyo batalelaka makambo na liso ya mosuni báyebisa ye bikateli oyo asengeli kozwa? Bongo soki mokristo moko akwei na lisumu ya monene? Asengeli nde kobomba mabe oyo asali mpo azali kobanga ete abungisa lokumu na ye na kati ya lisangá to mpo alingi te kopesa bandeko na ye mpe baninga na ye mpasi? Soki ndeko yango azali koluka libosoliboso nde kobongisa boyokani na ye ná Yehova, ‘akobenga bankulutu ya lisangá’ mpe akoluka lisalisi na bango.​—Tángá Yakobo 5:14-16.

10. (a) Nini ekoki kokómela biso soki tozali komitungisa mingi mpo na koyeba ndenge oyo basusu batalelaka biso? (b) Tokoki kozala na elikya nini soki tozali na komikitisa?

10 Ekoki kozala ete ozali kosala makasi okóma mokristo oyo azali na bizaleli malamu, kasi ndeko moko azali kopesa toli mbala na mbala. Toli na ye ekoki kosalisa yo soki otiki te ete lolendo, koluka kobatela lokumu na yo moko, mpe koluka komilongisa epekisa yo ondima batoli na ye. To ekoki kozala ete ozali kosala mosala moko boye elongo na bandeko mosusu. Okoluka nde bápesa yo lokumu mpo ozali kopesa makanisi ya malamu, to mpo ozali kosala mingi koleka basusu? Soki okutani na likambo ya ndenge wana, yebá ete “ye oyo azali na elimo ya komikitisa akozwa nkembo.”​—Mas. 29:23.

11. Tosengeli komiyoka ndenge nini ntango bapesi biso longonya, mpe mpo na nini?

11 Bankulutu mpe bandeko oyo bazali “koluka kosala” mosala ya mokɛngɛli basengeli mpe kokeba ete báluka te nkembo oyo euti epai ya bato. (1 Tim. 3:1; 1 Tes. 2:6) Ndeko mobali asengeli kosala nini soki bapesi ye longonya oyo euti na motema mpo na mosala moko oyo asalaki malamu? Ezali solo ete akomitongela monima te ndenge Mokonzi Saulo asalaki. (1 Sa. 15:12) Kasi, asengeli nde kondima mbala moko ete akokisaki mokumba yango kaka mpo na boboto monene ya Yehova mpe ete akokoba kosala malamu na mikolo ezali koya kaka mpo na lipamboli ya Nzambe mpe lisalisi na ye? (1 Pe. 4:11) Ndenge oyo toyokaka na motema ntango bakumisi biso emonisaka soki tolukaka nkembo oyo euti epai ya bato to nkembo oyo euti epai ya Nzambe.​—Mas. 27:21.

“BOLINGI KOKOKISA BAMPOSA YA TATA NA BINO”

12. Nini epekisaki Bayuda mosusu báyoka Yesu?

12 Bamposa na biso ekoki mpe kopekisa biso tózwa nkembo oyo euti epai ya Nzambe. Bamposa ya mabe ekoki kopekisa biso tóyoka mateya ya solo. (Tángá Yoane 8:43-47.) Yesu ayebisaki Bayuda mosusu ete bayokaki nsango na ye te mpo ‘balingaki kokokisa bamposa ya tata na bango Zabolo.’

13, 14. (a) Bato ya mayele bamonaki ete bɔɔngɔ na biso esalaka ndenge nini soki eyoki mingongo ya bato? (b) Nini etindaka biso tópona moto oyo tokoyoka?

13 Tosepelaka koyoka makambo oyo tolingaka. (2 Pe. 3:5) Yehova akelá biso na likoki ya koboya kotya likebi na makɛlɛlɛ oyo tolingi te. Meká kofanda nyɛɛ mpe tyá likebi na makɛlɛlɛ ndenge na ndenge oyo ozali koyoka sikoyo. Mbala mosusu okokaki te koyoka makɛlɛlɛ yango mwa moke liboso. Atako bɔɔngɔ na yo ezali na likoki ya koyoka makɛlɛlɛ ndenge na ndenge, esalisaki yo otya likebi kaka na eloko moko. Ntango bato ya mayele bayekolaki likambo yango, bamonaki ete ekómaka mpasi koyoka makɛlɛlɛ ndenge na ndenge na mbala moko soki makɛlɛlɛ yango ezali mingongo ya bato. Yango elingi koloba ete ntango ozali koyoka mingongo ya bato mibale na mbala moko, osengeli kopona oyo wapi okotyela likebi. Na ntembe te, okopona koyoka mongongo oyo ozali na mposa ya koyoka. Bayuda oyo balingaki kokokisa mposa ya tata na bango Zabolo baboyaki koyoka Yesu.

14 Biblia elobi ete, na ndenge ya elilingi, “bwanya” mpe “bozoba” ezali koluka ntango nyonso ete tóyoka yango. (Mas. 9:1-5, 13-17) Ezali lokola nde bwanya mpe bozoba ezali kokoba kobelela biso; biso moko nde tosengeli kopona soki tokoyokela nini. Tokopona koyokela bwanya to bozoba na kotalela mokano ya nani tolingi kosala. Bampate ya Yesu eyokaka mongongo na ye mpe elandaka ye. (Yoa. 10:16, 27) Bampate yango ezali “na ngámbo ya solo.” (Yoa. 18:37) “Eyebi mongongo ya bapaya te.” (Yoa. 10:5) Bato wana ya komikitisa bazwaka nkembo oyo eutaka epai ya Nzambe.​—Mas. 3:13, 16; 8:1, 18.

“YANGO EZALI NKEMBO MPO NA BINO”

15. Na ndimbola nini malɔzi ya Paulo ‘ezalaki nkembo’ mpo na basusu?

15 Ndenge oyo toyikaka mpiko ntango tozali kosala mokano ya Yehova esalisaka basusu bázwa nkembo. Paulo akomelaki lisangá ya Efese ete: “Nazali kosɛnga bino ete bólɛmba te mpo na malɔzi oyo nazali kozwa mpo na bino, mpo yango ezali nkembo mpo na bino.” (Ef. 3:13) Na ndimbola nini malɔzi ya Paulo ‘ezalaki nkembo’ mpo na Baefese? Lokola Paulo akobaki kosalela bango atako akutanaki na mikakatano mingi, yango emonisaki Baefese ete mokumba oyo bazalaki na yango ya kosalela Yehova ezalaki na motuya mingi mpo na bakristo. Soki Paulo alɛmbaka ntango akutanaki na bolɔzi, yango elingaki komonisa ete boyokani oyo bakristo bazalaki na yango ná Yehova, mosala na bango, mpe elikya na bango ezali na valɛrɛ te, boye te? Ndenge oyo Paulo ayikaki mpiko emonisaki ete tosengeli kondima komipimela biloko mosusu nyonso mpo na kozala bakristo mpe bayekoli ya Yesu.

16. Malɔzi nini Paulo akutanaki na yango na Listra?

16 Kanisá ndenge oyo molende mpe koyika mpiko ya Paulo esalisaki bandeko mosusu. Misala 14:19, 20 elobi ete: “Bayuda moko boye bayaki bauti na Antiokia mpe na Ikoniumu mpe bandimisaki ebele wana ya bato, mpe babambaki Paulo mabanga mpe babendaki ye libándá ya engumba, bakanisi ete akufi. Nzokande, ntango bayekoli bazingaki ye, atɛlɛmaki mpe akɔtaki na engumba. Mpe na mokolo oyo elandaki alongwaki elongo na Barnabasi mpo na kokende na Derbe.” Kanisá naino: lelo batiki Paulo pene na liwa, lobi asali mobembo moko ya kilomɛtrɛ 100, na makolo!

17, 18. (a) Na ndenge nini Timote ayebaki minyoko oyo Paulo akutanaki na yango na Listra? (b) Ezaleli ya koyika mpiko ya Paulo etindaki Timote asala nini?

17 Mokanda ya Misala eyebisi polele te soki Timote azalaki moko ya “bayekoli” oyo bayaki kosalisa Paulo; kasi ekoki kozala ete azalaki wana. Talá maloba oyo Paulo akomaki na mokanda na ye ya mibale epai ya Timote: “Yo olandi malamu mpenza mateya na ngai, bomoi na ngai, . . . makambo oyo ekómelaki ngai na Antiokia [babenganaki ye na engumba], na Ikoniumu [balukaki kobamba ye mabanga], na Listra [babambaki ye mabanga], minyoko oyo nakangelaki motema; kasi Nkolo abikisaki ngai na makambo yango nyonso.”​—2 Tim. 3:10, 11; Mis. 13:50; 14:5, 19.

18 Timote ‘alandaki malamu mpenza’ makambo wana mpe ayebaki malamu ndenge oyo Paulo ayikaki mpiko. Na ntembe te, ndakisa ya Paulo eteyaki Timote makambo mingi. Ntango Paulo akendaki na Listra, akutaki ete Timote azalaki mokristo oyo azalaki kopesa ndakisa malamu, mpe “bandeko na Listra mpe na Ikoniumu bazalaki koloba malamu mpo na ye.” (Mis. 16:1, 2) Na nsima, Timote akokisaki masɛngami mpo na kozwa mikumba minene.​—Flp. 2:19, 20; 1 Tim. 1:3.

19. Ezaleli na biso ya koyika mpiko ekoki kotinda basusu básala nini?

19 Soki biso mpe tozali koyika mpiko ntango tozali kosala mokano ya Nzambe, yango ekoki kosalisa basusu, mingimingi bilenge oyo mingi na bango bakoki kokóma basaleli ya sembo ya Nzambe. Bayekoli oyo bazali naino bilenge basukaka kaka te na kotala biso mpo na koyekola ndenge ya koloba malamu mpe kosakola malamu, kasi batalaka mpe ndenge oyo tosalaka ntango tokutani na mikakatano ya bomoi. Paulo ‘akobaki koyikela makambo nyonso mpiko’ mpo bato nyonso oyo bakotikala sembo “bázwa lobiko oyo ezali koya na nzela ya Kristo Yesu, na nkembo ya seko.”​—2 Tim. 2:10.

Koyika mpiko ya bakristo oyo bakómi mibange elendisaka bilenge

20. Mpo na nini tosengeli kokoba koluka nkembo oyo euti epai ya Nzambe?

20 Na yango, ezali mpenza na ntina tókoba ‘koluka nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko.’ (Yoa. 5:44; 7:18) Yehova akopesa “bomoi ya seko epai ya baoyo bazali koluka nkembo.” (Tángá Baroma 2:6, 7.) Longola yango, soki tozali “koyika mpiko na misala malamu,” yango ekolendisa basusu bátikala sembo, mpo bázwa bomoi ya seko. Yango wana, tótika eloko moko te epekisa biso tózwa nkembo oyo Nzambe apesaka.