Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kebá na mikano ya motema na yo

Kebá na mikano ya motema na yo

Biblia elobi ete: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yir. 17:9) Soki motema na biso eyoki mposa makasi ya eloko moko, tomonaka ete tosengeli kaka kokokisa mikano na yango?

Biblia ekebisi biso ete: “Makanisi mabe, koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga, eutaka na motema.” (Mat. 15:19) Motema na biso ya elilingi ekoki kokosa biso mpe kotinda biso tóluka komilongisa ntango tosali likambo moko oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. Mpe mbala mosusu toyebaka ete motema nde ekosaki biso kaka nsima ya kosala likambo moko ya mabe. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba mikano ya motema na biso liboso ya kosala likambo moko ya mabe?

NDENGE NINI OKOKI KOYEBA MIKANO YA MOTEMA NA YO?

Ndenge nini kotánga Biblia mokolo na mokolo ebongisaka motema na biso ya elilingi?

Tángáká Biblia mokolo na mokolo mpe manyoláká na makambo oyo elobi.

Ntoma Paulo akomaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii kokabola molimo ná elimo.” Nsango ya Nzambe oyo ezali na Biblia “ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Koluka koyeba soki bomoi na biso eyokani na oyo Biblia elobi ekoki kosalisa biso mingi tóyeba mikano ya motema na biso. Ezali na ntina mingi ete tótángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tómanyolaka na makambo oyo Biblia elobi, mpo tóyeba makanisi ya Yehova mpe ndenge oyo atalelaka makambo!

Kondima toli ya Biblia mpe kosalela mitinda na yango ekoteya lisosoli na biso, to mongongo ya kati, oyo ‘etatolaka.’ (Rom. 9:1) Soki tozali koyokela lisosoli na biso, tokomilongisa te ntango tosali likambo moko ya mabe. Longola yango, Biblia ezali na bandakisa mosusu oyo ezali “likebisi mpo na biso.” (1 Ko. 10:11) Koyekola bandakisa yango ekoki kopekisa biso tólanda nzela ya mabe. Kasi, mokomoko na biso asengeli kosala nini?

Mabondeli esalisaka biso tóyeba bomoto na biso ya kati

Bondeláká Nzambe asalisa yo oyeba mikano ya motema na yo.

Yehova azali ‘moto oyo atalaka motema malamumalamu.’ (1 Nt. 29:17) Azali “monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoa. 3:20) Tokoki kokosa Nzambe te. Soki toyebisi Yehova makambo oyo ezali kotungisa biso, mayoki na biso mpe bamposa na biso, akoki kosalisa biso tóyeba mikano ya motema na biso. Tokoki mpe kosɛnga Nzambe ‘azalisa motema ya pɛto na kati na biso.’ (Nz. 51:10) Na yango, libondeli ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo motema na biso etindaka biso tósala.

Makita ya lisangá esalisaka biso tóyeba mikano ya motema na biso

Tyáká likebi ntango ozali na makita.

Soki tozali kotya likebi na mateya oyo tozwaka na makita, tokoyeba malamu ndenge oyo motema na biso, elingi koloba bomoto na biso ya kati, ezali. Atako makambo nyonso oyo toyokaka na makita ezalaka ya sika te, koyangana na makita esalisaka biso tóyeba malamu mitinda ya Biblia mpe tózwa makundoli ya ntina oyo esalisaka biso tótalela mikano ya motema na biso. Biyano oyo bandeko na biso mibali mpe basi bapesaka na makita ekoki mpe kosalisa biso tóbongisa bomoto na biso ya kati. (Mas. 27:17) Soki tozali komitangola, na esika ya koyangana mbala na mbala na makita elongo na bandeko na biso bakristo, yango ekoki kozala likama mpo na biso. Ekoki kotinda biso ‘tóluka mposa na biso ya lokoso.’ (Mas. 18:1) Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Nazalaka na momeseno ya koyangana na makita nyonso mpe nazwelaka yango litomba?’​—Ebr. 10:24, 25.

MOTEMA EKOKI KOTINDA BISO NA MAKAMBO NINI?

Motema na biso oyo ezali na bokosi ekoki kobungisa biso nzela na makambo mingi ya bomoi. Tótalela makambo minei: koluka kokóma na biloko mingi ya mokili, komɛla masanga, kopona baninga, mpe ndenge oyo tominanolaka.

Koluka kokóma na biloko mingi ya mokili.

Ezali mabe te koluka kokokisa bamposa na biso ya mosuni. Kasi, Yesu apesaki ndakisa moko oyo ezali likebisi mpo na biso, na likambo etali kopesa motuya mingi na biloko ya mokili. Na ndakisa yango, alobelaki mozwi moko oyo bandako na ye ya kobomba biloko etondaki. Na yango, azalaki lisusu te na esika ya kobomba bambuma oyo abukaki. Moto yango azwaki likanisi ya kobuka bandako na ye ya kobomba biloko mpe kotonga oyo ya minene koleka. Akanisaki boye: “Kuna nakoyanganisa mbuma nyonso mpe biloko nyonso ya malamu; mpe nakoloba na molimo na ngai ete: ‘Molimo na ngai, ozali na ebele ya biloko ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, omisepelisa.’” Nzokande mozwi yango abosanaki likambo moko oyo ekokaki kokómela ye: Bomoi na ye elingaki kosuka kaka na butu wana.​—Luka 12:16-20.

Ntango tobandi kokóma mokóló, tokoki kobanda komitungisa mpo na koluka kobomba biloko ya mokili oyo ekosalisa biso ntango tokokóma mobange; yango ekoki kotinda biso tóbanda komilongisa soki totikali na mosala na mpokwa oyo tozalaka na makita to soki tozali kokokisa te mikumba na biso ya elimo. Tosengeli mpenza kokeba ete motema na biso etinda biso te tósala bongo! To ekoki kozala ete ozali naino elenge, mpe oyebi ete mosala ya ntango nyonso ezali mosala oyo eleki malamu. Atako bongo, okanisaka nde ete osengeli naino kokóma na mbongo mingi liboso ya kokóma mobongisi-nzela? Omoni te ete tosengeli nde kosala nyonso oyo tokoki sikoyo mpo na kozala bazwi na miso ya Nzambe? Nani ayebi soki tokozala kaka na bomoi lobi?

Komɛla masanga.

Masese 23:20 elobi ete: “Kozala te kati na bamɛli minene ya vinyo.” Soki moto ayokaka mposa makasi ya komɛla masanga, ntango mosusu akoki komilongisa ndenge amɛlaka mbala na mbala. Akoki koloba ete amɛlaka kaka mpo na kobosana mitungisi, kasi mpo na kolangwa te. Soki tomonaka ete tosengeli komɛla masanga mpo na kobosana mitungisi, mbala mosusu ekosɛnga tóluka koyeba mpenza mposa nini tozalaka na yango na motema.

Kopona baninga.

Toboyi te, ntango mosusu, olinga olinga te, esɛngaka kaka tókutana na bato oyo bazali bandimi te: na ndakisa na eteyelo, na mosala, mpe ntango tozali na mosala ya kosakola. Kasi, yango ekeseni na kolekisaka ntango mingi elongo na bato yango, ata mpe kokóma moninga na bango ya motema. Mpo na komilongisa, tolobaka nde ete tolekisaka ntango mingi elongo na bango mpo bazali na bizaleli mingi ya malamu? Biblia ekebisi biso ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Ko. 15:33) Kaka ndenge mwa bosɔtɔ moke ekoki kobebisa mai oyo ezali pɛto, kozala moninga ya bato oyo basambelaka Yehova te ekoki kobebisa biso na elimo mpe kotinda biso tómekola makanisi, molato, elobeli, mpe etamboli ya bato ya mokili.

Ndenge oyo tominanolaka.

Baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo ezali na mitindo nyonso ya kominanola, oyo mingi na yango ezali mpenza malamu te to ebongi te mpo na mokristo. Paulo akomaki ete: ‘Mbindo ya ndenge nyonso etángama ata kotángama te na kati na bino.’ (Ef. 5:3) Kasi, tokosala nini soki motema na biso eyoki mposa ya kotala to koyoka eloko moko ya mbindo? Tokoki kokanisa ete moto nyonso azalaka na mposa ya kominanola mwa moke, mpe ete likambo yango etali kaka moto ye moko. Kasi, tosengeli kolanda toli ya Paulo mpe kotika te ete eloko moko ya mbindo ekɔta na miso to na matoi na biso.

TOKOKI KOBONGWANA

Ata soki tosalaki likambo moko ya mabe mpo motema ekosaki biso, mpe tókómá na momeseno ya koluka komilongisa ntango tosali likambo ya mabe, tokoki kobongwana. (Ef. 4:22-24) Tótalela bandakisa mibale ya mikolo na biso.

Miguel * asengelaki kobongola ndenge na ye ya kotalela biloko ya mokili. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai mpe mwana na biso tozali bato ya ekólo moko oyo moto nyonso alukaka kozwa baaparɛyi ya mikolo oyo mpe biloko mosusu oyo eleki kitoko. Kala, nazalaki koboma nzoto mpo na kozwa biloko nyonso oyo mokili ekokaki kopesa ngai; nazalaki kokanisa ete nakokaki kosala yango kozanga ete nakóma na mposa ya konduka biloko ya mokili. Eumelaki te, nayaki komona ete konduka biloko ya mokili ezali lokola nzela oyo ezangi nsuka. Nabondelaki Yehova asalisa ngai nabongola makanisi mpe mikano ya motema na ngai. Nayebisaki ye ete ngai ná libota na ngai tolingi kosalela ye mingi koleka. Tozwaki ekateli ya kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe tokendaki kofanda esika oyo basakoli bazalaki mingi te. Eumelaki te, tokómaki babongisi-nzela. Nsukansuka, toyaki komona ete esɛngaka te kozala na biloko mingi ya mokili mpo na kozala na bomoi ya esengo.”

Ndakisa ya Lee emonisi ndenge oyo komitalela malamu esalisaki ye atika baninga mabe. Alobi boye: “Na mosala na ngai, nazalaki kolekisa ntango mingi na batɛkisi oyo bazalaki kouta na mboka mopaya. Nayebaki ete soki tokutani na mabaku yango, masanga ekozala mingi, kasi nazalaki kosepela mingi kokende na bisika yango. Mbala mingi, etikalaki kaka moke nalangwa, kasi na nsima nazalaki koyoka mawa mpo na yango. Esengelaki naluka koyeba ndenge oyo motema na ngai ezali mpenza. Batoli ya Liloba ya Nzambe mpe ya bankulutu esalisaki ngai nayeba ete nazalaki nde kosepela kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo balingaka Yehova te. Sikoyo, mbala mingi mpo na makambo etali mombongo na ngai, nasololaka na bato kaka na telefone mpe nalingaka lisusu te kokutana mingi na batɛkisi yango.”

Tosengeli komitalela na bosembo mpe koluka koyeba mikano ya motema na biso. Ntango tozali kosala bongo, tosengeli koluka lisalisi ya Yehova na libondeli mpe kobosana te ete “ayebi basekele ya motema.” (Nz. 44:21) Nzambe apesá mpe biso Liloba na ye, oyo ezali lokola talatala mpo na biso. (Yak. 1:22-25) Makundoli mpe batoli oyo tozwaka na nzela ya mikanda na biso mpe makita ya lisangá esalisaka mpe biso mingi! Bibongiseli wana nyonso ekoki kosalisa biso tóbatela motema na biso mpe tókoba kotambola na nzela ya bosembo.

^ par. 18 Bankombo mosusu ezali ya bango te.