Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lokola “boyebi Nzambe,” etikali nini?

Lokola “boyebi Nzambe,” etikali nini?

“Boyebi Nzambe.”​—GAL. 4:9.

1. Mpo na nini pilote asengeli kotala likambo mokomoko oyo ezali na liste na ye liboso amata?

BAPILOTE bazalaka na liste ya makambo koleka 30 oyo basengeli kotalela mbala nyonso oyo balingi kokumba mpɛpɔ. Soki bataleli te likambo mokomoko oyo ezali na liste yango mbala nyonso oyo balingi komata, mpɛpɔ ekoki kozwa likama ya makasi. Kasi pilote nini asengeli mingimingi kolandela liste yango ntango nyonso? Ezali pilote oyo amesaná kokumba mpɛpɔ! Nzokande, pilote yango akoki mbala mosusu kokanisa ete ayebi nyonso mpe ezali na ntina te alandela likambo mokomoko mbala nyonso oyo alingi komata.

2. Makambo nini bakristo basengeli kotalela mbala na mbala?

2 Kaka ndenge pilote azalaka na liste ya makambo oyo asengeli kotala liboso amata, yo mpe ozali na makambo oyo osengeli kotalela mpo na koyeba soki kondima na yo ekozala makasi liboso ya mikakatano. Ezala outi kozwa batisimo to ozali kosalela Nzambe bandá bambula mingi, ezali na ntina ete mbala na mbala olukaka koyeba soki kondima na yo ezali makasi mpe soki ozali kosalela Yehova Nzambe na motema mobimba. Soki ozali kosala yango mbala na mbala te mpe malamumalamu te, boyokani na yo ná Yehova ekoki kobeba. Biblia ekebisi biso ete: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.”​—1 Ko. 10:12.

3. Bakristo ya Galatia basengelaki kosala nini?

3 Bakristo ya Galatia basengelaki koluka koyeba soki kondima na bango ezali makasi mpe kozwa bonsomi na bango ya elimo na motuya. Na nzela ya mbeka na ye, Yesu afungolaki nzela mpo ete baoyo bakondimela ye báyeba Nzambe na ndenge ya malamu koleka, mpe bákóma bana ya Nzambe! (Gal. 4:9) Mpo Bagalatia bázala ntango nyonso na boyokani ya ndenge wana ná Nzambe, basengelaki koboya mateya ya bato oyo bazalaki kokangama na bonkɔkɔ ya Bayuda, oyo bazalaki kotya bango mbamba ete bátosa Mobeko ya Moize. Kutu, bandeko ya lisangá oyo bazalaki bato ya bikólo oyo bakatamá ngenga te, bayebaki Mobeko yango te! Atako bongo, ezala Bayuda to bato ya bikólo basengelaki kokola na elimo. Mpo na yango, basengelaki koyeba ete Mobeko ya Moize te nde elingaki kokómisa bango bayengebene.

MATAMBE YA LIBOSOLIBOSO MPO NA KOYEBA NZAMBE

4, 5. Toli nini Paulo apesaki Bagalatia, mpe mpo na nini toli yango ezali na ntina mpo na biso?

4 Toli oyo ntoma Paulo apesaki Bagalatia ekomamaki mpo na ntina oyo: kokebisa bakristo ya solo ya bileko nyonso mpo bátika te kolanda mateya kitoko oyo ezali na Biblia mpe bázongela te makambo oyo batiká. Na lisalisi ya elimo na ye, Yehova asalelaki ntoma Paulo mpo na kolendisa kaka bakristo ya lisangá ya Galatia te, kasi basambeli na ye nyonso mpo bátikala ngwi.

5 Ekozala malamu biso nyonso tóbosana te ndenge oyo tozwaki bonsomi ya elimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova. Mpo na yango, tótalela mituna oyo mibale: Oyebi lisusu matambe oyo osalaki mpo okokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo? Ozali lisusu komikundola ndenge oyo oyebaki Nzambe mpe ndenge oyo Nzambe ayebaki yo, mpe oyokaki ete okómi mpenza na bonsomi ya elimo?

6. Tokotalela liste nini?

6 Na ebandeli, biso nyonso tosalaki matambe libwa. Matambe yango, oyo ezali lokola liste ya makambo ya elimo oyo tosengeli kosalaka, ezali na etanda oyo elobi: “ Matambe oyo esalisaka moto azwa batisimo mpe akoba kokola na elimo.” Soki tozali mbala na mbala komikundola matambe yango libwa, yango ekopesa biso makasi mpo tóboya kozongela makambo oyo totiká na mokili. Pilote oyo amesaná kokumba mpɛpɔ kasi azalaka ntango nyonso ekɛngɛ akokoba kokumba kozanga ete likama ebima soki azali ntango nyonso kotala liste na ye liboso ete mpɛpɔ emata; ndenge moko mpe okokoba kosalela Yehova na bosembo soki ozali kotala liste na yo ya makambo ya elimo oyo osengeli kosala mbala na mbala.

BATO OYO NZAMBE AYEBI BAKOBAKA KOKOLA NA ELIMO

7. Ndakisa nini tosengeli kolanda, mpe mpo na nini?

7 Liste oyo pilote azalaka na yango ekundwelaka ye ete ezali na makambo oyo asengeli kolandela malamumalamu mbala nyonso oyo alingi komata. Biso mpe tosengeli komitalelaka mbala na mbala mpe koluka koyeba makambo nini tozalaka na momeseno ya kosala banda tozwá batisimo. Paulo akomelaki Timote ete: “Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba oyo oyokaki epai na ngai, zalá na kondima mpe na bolingo oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu.” (2 Tim. 1:13) “Maloba oyo epesaka litomba” ezali na Liloba ya Nzambe. (1 Tim. 6:3) Kaka ndenge liyemi ya eloko oyo moto ya ntɔki alingi kosala esalisaka mpo na koyeba ndenge oyo eloko yango ekozala, ‘ndakisa ya mateya ya solo’ esalisaka biso tóyeba makambo oyo Yehova asɛngi biso mpe tótosa yango. Na yango, tótalela sikoyo matambe oyo ememaki biso na batisimo mpe tótala soki tozali mpenza kolanda ndakisa ya mateya ya solo.

8, 9. (a) Mpo na nini tosengeli kokoba kokolisa boyebi mpe kondima na biso? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo tosengeli kokola na elimo mpe mpo na nini tosengeli kokoba kosala yango.

8 Na liste na biso, likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ezali kozwa boyebi. Na nsima, tosengeli kokolisa kondima na biso. Kasi tosengeli kokoba kokola na makambo nyonso wana mibale. (2 Tes. 1:3) Kokola esɛngaka kobongwana na likambo moko nsima ya mosusu. “Kokola” elimboli kobakisa, to koyeisa monene. Na yango, nsima ya kozwa batisimo, tosengeli kokoba kokolisa boyokani na biso ná Nzambe, kasi kotɛlɛma kaka esika moko te.

Nzete ekobaka kokola. Bakristo mpe basengeli kokoba kokola

9 Tokoki kokokanisa ndenge oyo moto akolaka na elimo na ndenge oyo nzete ekolaka. Nzete ekoki kokola mpe kokóma monene mpenza, mingimingi soki misisa na yango ekɔti mozindo na kati ya mabele to epanzani mosika. Na ndakisa, basɛdrɛ mosusu ya Libá ekoki kokóma na bolai ya ndako ya baetaze zomi na moko mpe kozala makasi mpenza; misisa na yango ekoki kokɔta mozindo na kati ya mabele mpe mobimbi na yango ekoki kokóma tii na bolai ya mɛtrɛ 12. (Loy. 5:15) Na ebandeli, nzete yango ekolaka mbangumbangu; na nsima ekobaka kokola kasi bokoli na yango emonanaka na miso boye te. Mbula na mbula, mobimbi na yango ekómaka monene, misisa na yango ekɔtaka mpenza na mabele mpe epanzanaka mosika, mpe yango esalaka ete nzete yango epikama makasi. Tokoki koloba ete mokristo akolaka na elimo kaka ndenge wana. Ntango tobandi koyekola Biblia, tokoki kokola na elimo nokinoki mpe kozwa batisimo mwa moke na nsima. Bandeko ya lisangá bakosepela komona ndenge oyo tozali kokola. Tokoki ata kokokisa masɛngami mpo na kokóma mobongisi-nzela to kozwa mikumba mosusu. Kasi, nsima ya bambula, mbala mosusu bokoli na biso ya elimo ekomonana na miso boye te. Atako bongo, tosengeli kokoba kokolisa kondima mpe boyebi na biso “na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.” (Ef. 4:13) Na yango, tosengeli kokola tii tokokóma bakristo oyo bakomɛli na elimo, kaka ndenge nzete ya moke ekolaka tii ekómaka nzete ya makasi.

10. Mpo na nini ata bakristo oyo bakomɛli na elimo basengeli kokoba kokola?

10 Kasi bokoli na biso esengeli kosuka wana te. Boyebi na biso esengeli kobakisama mpe kondima na biso esengeli kokóma makasi. Na ndenge yango tokopikama makasi koleka na kati ya Liloba ya Nzambe. (Mas. 12:3) Na kati ya lisangá ya bokristo, ezali na bandeko mibali mpe basi mingi oyo basalaka yango. Na ndakisa, ndeko moko oyo azali nkulutu banda bambula koleka ntuku misato amonaki ete azali kokoba kokola na elimo. Alobi boye: “Nakómi kozwa Biblia na motuya mingi koleka. Nazali ntango nyonso kozwa mabaku ya sika ya kosalela mitinda mpe mibeko ya Biblia na makambo ndenge na ndenge. Nakómi kosepela lisusu mingi na mosala ya kosakola.”

KOLISÁ BONINGA NA YO NÁ NZAMBE

11. Ndenge nini tokoki koyeba Yehova malamu koleka nsima ya bambula?

11 Mpo tókoba kokola, tosengeli mpe kopusana penepene na Yehova, oyo azali Moninga na biso mpe Tata na biso. Alingi tóyeba ete andimi biso. Alingi tóyeba ete alingaka biso mpe abatelaka biso, kaka ndenge mwana moke amiyokaka ntango moboti na ye ayambi ye, to ndenge oyo tomiyokaka ntango tozali elongo na moninga na biso ya solosolo mpe ya sembo. Ndenge tokoki komona yango, kokóma na boyokani ya ndenge wana ná Yehova eyaka kaka yango moko boye te. Esɛngaka ntango mingi mpo na koyeba Yehova mpe kolinga ye. Yango wana, mpo oyeba malamu bomoto ya Yehova, zwá ekateli ya komibombela ntango mpo na kotánga Liloba na ye mokolo na mokolo. Longola yango, tángáká nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia.

12. Tosengeli kosala nini mpo Yehova ayeba biso?

12 Mabondeli oyo euti mpenza na motema mpe kozala na baninga ya malamu esalisaka baninga ya Nzambe bákola na elimo. (Tángá Malaki 3:16.) ‘Matoi [ya Yehova] eyokaka lilɔmbɔ na bango.’ (1 Pe. 3:12) Lokola Tata ya bolingo, Yehova ayokaka ntango tozali kolelela ye na libondeli mpo na kosɛnga lisalisi. Yango wana, tosengeli ‘kotingama na mabondeli.’ (Rom. 12:12) Tokokoka te kotikala bakristo oyo bakomɛli na elimo soki Nzambe asalisi biso te. Tokokoka mpe te kolonga mikakatano ya mokili oyo na makasi na biso moko. Soki totiki kotingama na mabondeli, tokokoka te kozwa makasi oyo Nzambe andimaka ntango nyonso kopesa biso. Osepelaka na lolenge ya mabondeli oyo osalaka, to omoni ete ezali na ntina obongisa lisusu lolenge na yo ya kobondela?​—Yir. 16:19.

13. Mpo na nini koyanganaka ná bakristo mosusu ezali na ntina mpo na kokola na elimo?

13 Yehova asepelaka na baoyo nyonso “bazali koluka esika ya kokima epai na ye”; yango wana, ata soki toyebi Nzambe, tosengeli kokoba koyangana mbala na mbala na makita ya lisangá elongo na bato mosusu oyo bayebi ye. (Nah. 1:7) Lokola tofandi na mokili oyo etondi na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto, ezali malamu tózalaka elongo na bandeko na biso mibali mpe basi oyo balendisaka biso. Matomba nini tokozwa? Na kati ya lisangá, tokokutana na bato oyo bakolendisa biso “mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” (Ebr. 10:24, 25) Mpo na komoniselana bolingo oyo Paulo akomelaki Baebre, esengeli ete lisangá ezala, elingi koloba etuluku ya basambeli oyo bazali na likanisi moko. Mpo bakristo bámoniselana bolingo ya ndenge wana, esengeli bákutanaka mbala na mbala. Na liste ya makambo oyo osengeli kosala mbala na mbala, kobosana te koyanganaka na makita mpe kopesa biyano.

14. Mpo na nini kobongola motema mpe kobongwana ezali makambo oyo tosengeli kosala ntango nyonso?

14 Mpo tókóma bakristo, esɛngaki mpe tóbongola motema mpe tóbongwana, elingi koloba tótika masumu na biso ya kala. Kasi, kobongola motema ezali likambo oyo tosengeli kosalaka ntango nyonso. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, lisumu ezalaka ntango nyonso kati na biso lokola nyoka oyo elingami mpe ezali kaka kozela eswa moto. (Rom. 3:9, 10; 6:12-14) Yango wana, tosengeli te kokanga miso na mabunga na biso moko. Likambo ya esengo, Yehova amoniselaka biso motema molai ntango tozali kosala makasi mpo na kolonga bolɛmbu na biso mpe kobongisa makambo oyo esɛngi tóbongisa. (Flp. 2:12; 2 Pe. 3:9) Soki tomityeli mibeko na oyo etali ndenge ya kosalela ntango mpe biloko oyo tozali na yango, mpe totiki koluka kaka matomba na biso moko, yango ekosalisa biso mingi. Ndeko mwasi moko akomaki ete: “Nakolaki na kati ya solo; atako bongo, ndenge na ngai ya kotalela Yehova ekesanaki na oyo ya bandeko mingi. Nazalaki kokanisa ete esengeli kobanga ye makasi, mpe nazalaki komona ete nakokoka kosepelisa ye ata moke te.” Nsima ya mwa ntango, ndeko mwasi yango alɛmbaki na elimo mpo akutanaki na mikakatano mingi. Alobi lisusu ete: “Nazalaki kaka kolinga Yehova; nayebaki nde ye malamu te. Nzokande, nsima ya kosala mabondeli mingi ya mozindo, nabandaki kobongola makanisi.” Abakisi boye: “Namonaki ete Yehova azalaki kokamba ngai lokola mwana moke, azalaki kosalisa ngai nalonga mokakatano moko nsima ya mosusu, mpe na boboto nyonso, azalaki kolakisa ngai oyo nasengeli kosala.”

15. Makambo nini Yesu ná Tata na ye bamonaka?

15 ‘Tókoba koloba na bato’ mpo na nsango malamu. Anzelu ya Nzambe alobaki na Petro ná bantoma mosusu maloba wana nsima ya kobimisa bango na bolɔko na ndenge ya likamwisi. (Mis. 5:19-21) Ya solo, kobima na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ ezali likambo mosusu oyo ezali na liste na biso. Yesu mpe Tata na ye batyaka likebi na kondima na biso mpe mosala na biso ya kosakola. (Em. 2:19) Nkulutu oyo tolobelaki na paragrafe mosusu alobaki ete: “Mosala ya kosakola nde mosala na biso.”

16. Mpo na nini ezali na ntina okanisaka komipesa na yo epai ya Yehova?

16 Kanisá mpe ndenge oyo omipesaki epai ya Nzambe. Eloko eleki motuya oyo tozali na yango ezali boyokani na biso ná Yehova. Ayebi malamu bato na ye. (Tángá Yisaya 44:5.) Talelaká malamumalamu boyokani oyo ozali na yango ná Yehova mpo na koyeba soki ezali makasi to te. Longola yango, kobosana te mokolo ya ntina mingi oyo ozwaki batisimo. Yango mpe ekosalisa yo omikundola ete kozwa batisimo ezali ekateli eleki ntina oyo ozwaki.

YIKÁ MPIKO MPO OTIKALA PENEPENE NA YEHOVA

17. Mpo na nini ezali na ntina tóyika mpiko mpo tótikala penepene na Yehova?

17 Ntango Paulo akomelaki Bagalatia, amonisaki ete ezalaki na ntina mingi báyika mpiko. (Gal. 6:9) Yango ezali mpe na ntina mingi mpo na bakristo lelo oyo. Okokutana na mikakatano, kasi Yehova akosalisa yo. Kobá kobondela Yehova apesa yo elimo santu. Motema na yo ekokita ntango akosilisa mawa ná mpasi na yo mpe akopesa yo esengo mpe kimya. (Mat. 7:7-11) Kanisá likambo oyo: Soki Yehova atyelaka bandɛkɛ likebi, omoni te ete akosala yango mingi koleka mpo na yo moto olingaka ye mpe omipesá epai na ye? (Mat. 10:29-31) Ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini, kozonga nsima te, mpe kolɛmba nzoto te. Tozali kozwa mapamboli mingi ndenge Yehova ayebi biso!

18. Lokola ‘toyebi Nzambe,’ tosengeli sikoyo kosala nini?

18 Na yango, soki outi koyeba Nzambe mpe ozwi batisimo kala mingi te, etikali nini? Kobá koyekola koyeba Yehova malamu koleka, mpe kobá kokɔmɛla na elimo. Bongo soki bambula mingi eleki banda ozwá batisimo, etikali nini? Yo mpe osengeli kokoba kobakisa mpe kokolisa boyebi na yo ya Yehova. Tókanisa soki moke te ete ezali na eloko moko te oyo tokoki kobongisa na boyokani na biso ná Yehova. Tosengeli nde kotalaka mbala na mbala liste ya makambo ya elimo oyo tosengeli kosala mpo na koyeba soki tozali kokoba kobongisa boyokani na biso ná Yehova, oyo azali Tata na biso ya bolingo, Moninga na biso, mpe Nzambe na biso.​—Tángá 2 Bakorinti 13:5, 6.