Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Mexique

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Mexique

EZALI esengo mingi komona ndenge ebele ya bilenge Batatoli bazali kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bákoka komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. (Mat. 6:22) Makambo nini babongolaka na bomoi na bango? Mikakatano nini bakutanaka na yango? Mpo na koyeba yango, tóluka koyeba bandeko mosusu oyo bazali kosakola sikoyo na Mexique.

“TOSENGELAKI KOBONGOLA MAKAMBO MOSUSU”

Dustin ná Jassa

Dustin Jassa, oyo bautá na États-Unis babalanaki na sanza ya yambo 2007. Mwa moke na nsima, bakokisaki mokano oyo bazalaki na yango banda kala ya kosomba masuwa mpe kofanda na kati ya masuwa yango mbula mobimba. Basɛmisaki masuwa na bango pene na Astoria, na etúká ya Oregon (na États-Unis), engumba moko kitoko oyo zingazinga na yango ezalaki na bangomba oyo nsɔngɛ na yango etondaki na nɛjɛ, pene na Mbu ya Pasifike. Dustin alobi boye: “Esika nyonso oyo okotala, engumba yango ezalaki kaka komonana kitoko!” Ndeko yango ná mwasi na ye bakanisaki ete bazalaki na bomoi ezangi mindɔndɔ, mpe ete bazalaki kotyela Yehova motema. Bazalaki kokanisa boye: ‘Kutu, tozali kofanda na kati ya masuwa oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ 7 na ndambo mpamba, tosalaka kaka ndambo ya mokolo, toyanganaka na makita na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya, mpe na basanza mosusu tosɛngaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi.’ Kasi mwa moke na nsima, bamonaki ete bazalaki komikosa. Dustin alobi boye: “Na esika ya kopesa lisangá mabɔkɔ, tozalaki nde kolekisa ntango mingi na kobongisa masuwa na biso. Toyebaki ete soki tolingi mpenza kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, tosengelaki kobongola makambo mosusu.”

Jassa abakisi boye: “Liboso tóbalana, nazalaki kofanda na Mexique, mpe nazalaki na lisangá moko ya Lingelesi. Nasepelaki mingi kosakola kuna, mpe nazalaki na mposa ya kozonga lisusu.” Mpo na kokolisa mposa na bango ya kokende kosakola na mboka mopaya, na losambo na kati ya libota, Dustin ná Jassa bakómaki kotánga masolo ya bandeko mibali mpe basi oyo bakendá kofanda na mikili epai bilanga etelaki mpo na kobuka mbuma. (Yoa. 4:35) Dustin alobi boye: “Tolingaki ete biso mpe tóyoka esengo ya ndenge wana.” Ntango baninga na bango na Mexique bayebisaki bango ete etuluku moko ya sika ezalaki na mposa ya lisalisi, yango etindaki Dustin ná Jassa bákanisa lisusu. Batikaki misala na bango, batɛkaki masuwa na bango, mpe bakendaki kofanda na Mexique.

“LIKAMBO ELEKI MALAMU OYO TOSALAKI”

Dustin ná Jassa bakendaki kofanda na engumba Tecomán, oyo ezali mpe pene na Mbu ya Pasifike, kasi na ntaka ya kilomɛtrɛ 4 345 na sudi ya Astoria. Dustin alobi boye: “Na esika ya mopɛpɛ kitoko mpe bangomba kitoko, kuna molunge ezalaki makasi mpe na mosika tozalaki komona nde banzete ya ndímo-ngayi.” Na ebandeli, ezalaki mpasi mpo bázwa misala. Lokola bazalaki na mbongo mingi te, pɔsɔ na pɔsɔ, mbala mibale na mokolo, bazalaki kolya kaka bilei oyo ezalaki ntalo mingi te. Jassa alobi boye: “Kasi ntango kaka tokómaki kobaye bilei yango, bayekoli na biso ya Biblia babandaki kopesa biso manga, bitabe, paipai, mpe basaki oyo etondi na ndímo-ngayi!” Na nsima, bango nyonso mibale bazwaki mosala ya kotángisa monɔkɔ na nzela ya Internet na eteyelo moko, oyo ezali na Taïwan. Mbongo oyo bazwaka na mosala yango esalisaka bango bákokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo.

Ndenge nini Dustin ná Jassa batalelaka bomoi oyo bazali na yango sikoyo? Balobi boye: “Koya kofanda awa ezali likambo eleki malamu oyo tosalaki. Boyokani na biso ná Yehova mpe boyokani na biso mibale ekómi makasi koleka ndenge ezalaki liboso. Mikolo nyonso, tosalaka makambo mingi elongo, na ndakisa kobima na mosala ya kosakola, kolobela ndenge oyo tokoki kosalisa bayekoli na biso ya Biblia, mpe komibongisa mpo na makita. Longola yango, tozali lisusu te na bomoi ya mitungisi ndenge tozalaki na yango liboso.” Babakisi boye: “Liboso, tozalaki te kososola maloba ya Nzembo 34:8, oyo elobi ete: ‘Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’ Sikoyo tomoni ete elaka yango ezali mpenza solo.”

NINI EZALI KOTINDA BANKÓTO YA BANDEKO BÁMIPESA NDENGE WANA?

Bandeko mibali mpe basi koleka 2 900, ezala minzemba to baoyo babalá, oyo mingi na bango bazali na mbula 20 to mwa moke koleka, mpe mbula 30 to mwa moke koleka, bakendá kofanda na Mexique, mpo na kosakola na bateritware oyo basakoli ya Bokonzi bazali naino mingi te. Mpo na nini Batatoli nyonso wana bandimaki kosala likambo ya ndenge wana, oyo ezalaka pɛtɛɛ te? Ntango batunaki basusu kati na bango motuna wana, bapesaki bantina misato oyo elandi:

Leticia ná Hermilo

Mpo na komonisa ete balingaka Yehova mpe bazalani na bango. Leticia azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 18. Alobi boye: “Ntango namipesaki na Yehova, nayebaki ete yango elimbolaki kosalela ye na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba. Yango wana, mpo na komonisa ete nalingaka Yehova na motema mobimba, nazalaki na mposa ya kosalela mingi ntango mpe makasi na ngai na mosala na ye.” (Mrk. 12:30) Hermilo, oyo akómá mobali ya Leticia, azalaki na mbula mwa moke koleka 20 ntango akendaki kofanda na esika oyo basakoli ya Bokonzi bazalaki mingi te. Alobi boye: “Namonaki ete kosalisa bazalani na ngai bákokisa mposa na bango ya elimo ezali lolenge eleki malamu ya komonisa ete nalingaka bango.” (Mrk. 12:31) Yango wana, alongwaki na Monterrey, engumba ya bozwi epai azalaki kosala na banki moko mpe azalaki na bomoi ya malamu, mpe akendaki kofanda na mwa engumba moko ya moke.

Essly

Mpo na koyoka esengo ya solosolo. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, Leticia ná ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela banda kala bakendaki na mwa engumba moko ya mosika, mpe basakolaki kuna sanza moko. Leticia alobi boye: “Nakamwaki mingi. Komona ndenge oyo bato bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi oyo tozalaki koyebisa bango epesaki ngai esengo mingi. Na nsuka ya sanza yango, nalobaki boye na nse ya motema: ‘Yango nde nalingi kosala na bomoi na ngai!’” Ezali mpe bongo mpo na Essly, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula mwa moke koleka 20 mpe azali naino monzemba; esengo oyo amonaki epai ya bandeko mosusu nde elendisaki ye akende kosakola esika mposa ezali monene. Ntango azalaki naino na eteyelo ya ntei, akutanaki na Batatoli ebele ya molende oyo bakendaki kosakola na bisika oyo mposa ezalaki monene. Alobi boye: “Esengo oyo namonaki na bilongi ya bandeko mibali mpe basi yango epesaki ngai mposa ya kozala na lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango.” Bandeko basi mingi basalaki lokola Essly. Kutu, na Mexique, bandeko basi koleka 680 oyo bazali naino minzemba bazali kosakola na bisika oyo mposa ezali monene. Bazali kopesa ndakisa malamu ezala mpo na bilenge to mpo na mikóló!

Mpo na kozala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Ntango Essly asilisaki eteyelo ya ntei, bapesaki ye bourse mpo akende kotánga na iniversite. Baninga na ye balendisaki ye azwa yango mpo azala na bomoi oyo bato nyonso balukaka: kozwa diplome ya iniversite, kozwa mosala, kosomba motuka, mpe kosalaka mibembo. Kasi Essly alandaki toli na bango te. Alobi boye: “Baninga na ngai bakristo mingi bamipesaki na koluka biloko wana, kasi namonaki ete batikaki kotya mikano ya elimo na esika ya liboso. Namonaki mpe ete basukaki mabe mpe bakutanaki na mikakatano mingi mpo bamikɔtisaki mingi na makambo ya mokili oyo. Nazalaki na mposa ya kosalela Yehova mingi na bolenge na ngai.”

Racquel ná Phillip

Essly alandaki baformasyo mosusu, mpe yango esalisaki ye azwa mosala mpo akokisa bamposa na ye mpe akoba kozala mobongisi-nzela; na nsima, akendaki kofanda na teritware oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene. Ayekolaki kutu monɔkɔ ya Ba-Otomi mpe ya Ba-Tlapaneco, atako minɔkɔ yango ezalaka mpasi. Ntango akanisi mbula misato oyo asakolaki na teritware ya mosika, alobi boye: “Kosakola esika oyo mposa ezali monene epesaki ngai esengo mpe esalaki ete nazala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Likambo eleki ntina, esalisaki ngai nakóma na boyokani makasi ná Yehova.” Phillip ná mwasi na ye Racquel, oyo bazali na mbula mwa moke koleka 30 mpe bautá na États-Unis, balobi boye: “Lokola makambo ya mokili oyo ezali kobongwana nokinoki, bato mingi bazali komona ete bomoi na bango mpe ezali kobongwana ntango nyonso. Kasi kosakola na esika oyo tozali naino kokuta bato mingi oyo bazali koyoka nsango ya Biblia esalisaka biso tózala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Yango epesaka biso esengo mpenza!”

NDENGE YA KOLONGA MIKAKATANO

Verónica

Toboyi te, kokende kosakola esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene ezali mpe na mikakatano na yango. Moko ya mikakatano yango ezali ndenge ya kozwa mbongo ya kobikela. Mpo na yango, esɛngaka kondima komesana na makambo oyo okuti na teritware yango. Verónica, oyo azali mobongisi-nzela banda kala alobi boye: “Na teritware moko oyo nakendaki kosakola, nazalaki kolamba mpe kotɛka bilei oyo ezalaka ntalo mingi te mpe esɛngaka ntango mingi te mpo na kolamba yango. Na teritware mosusu, nazalaki kotɛka bilamba mpe kokata bato nsuki. Sikoyo, nasalaka mosala ya kotya bopɛto na ndako ya moto moko mpe natángisaka bato oyo bakómi baboti sika mpo báyeba kosolola ná bana na bango.”

Komesana na bonkɔkɔ mpe mimeseno mosusu ekoki kozala mpasi, mingimingi soki ozali kofanda esika moko ná bato ya mboka moko ya mosika. Phillip ná Racquel bakutanaki na mokakatano ya ndenge wana ntango bakendaki kosakola na teritware ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Nahuatl. Phillip alobi boye: “Mimeseno na bango ekesanaki mingi na oyo ya biso.” Nini esalisaki bango bámesana? Alobi boye: “Totyaki likebi na makambo ya malamu oyo tomonaki epai ya Ba-Nahuatl, na ndakisa bomoko oyo ezalaka na mabota na bango, bosembo oyo bazalaka na yango na boyokani elongo na basusu, mpe ndenge oyo bakabaka.” Racquel abakisi ete: “Toyekolaki makambo mingi ntango tofandaki kuna mpe tosalaki elongo na bandeko mibali mpe basi ya mboka yango.”

NDENGE OYO OKOKI KOMIBONGISA

Soki ozali na mposa ya kokende kosakola na bamboka ya mosika epai mposa ezali monene, okoki kosala nini sikoyo mpo omibongisa? Bandeko mibali mpe basi oyo basalaki yango balobi boye: Liboso ya kokende, kómisá naino bomoi na yo pɛpɛlɛ mpe yekolá kosepela na oyo ozali na yango. (Flp. 4:11, 12) Likambo nini mosusu okoki kosala? Leticia alobi boye: “Nazalaki koboya misala oyo ezalaki kosɛnga nasala kɔntra ya ntango molai to natikala kaka esika moko. Mposa na ngai ezalaki ete nazala na likoki ya kokende esika nyonso oyo nalingi, ntango nyonso oyo nalingi.” Hermilo alobi boye: “Nayekolaki kolamba, kosukola bilamba mpe kongoma yango.” Verónica alobi boye: “Ntango nazalaki naino kofanda elongo na baboti mpe bandeko na ngai, nazalaki kotya bopɛto na ndako mpe nayekolaki kolamba bilei oyo etongaka nzoto kasi ezalaka ntalo mingi te. Nayekolaki mpe kosala ekonzo.”

Amelia ná Levi

Levi Amelia, oyo bautá ná États-Unis mpe bakokisi mbula mwambe ya libala, bamonisi ndenge oyo mabondeli ya sikisiki esalisaki bango bámibongisa mpo na kokende kosakola na Mexique. Levi alobi boye: “Tolukaki koyeba mbongo boni tokozala na yango mposa mpo na kokende kosakola na mboka mopaya na boumeli ya mbula moko; na nsima tobondelaki Yehova asalisa biso tózwa mpenza mbongo yango.” Nsima ya mwa basanza, bakokisaki motángo ya mbongo oyo balobelaki na libondeli na bango, mpe bakendaki mbala moko. Levi alobi boye: “Yehova ayanolaki na libondeli ya sikisiki oyo tosalaki, yango wana na ngala na biso tosengelaki kosala oyo tolakaki.” Amelia abakisi boye: “Tokanisaki ete tokotikala awa mbula moko kaka, kasi tozali awa eleki sikoyo mbula nsambo, mpe tozali na mposa ya kozonga te! Kofanda awa epesi biso likoki ya komona na miso ndenge oyo Yehova asalisaka basaleli na ye. Mikolo nyonso, tomonaka bolamu ya Yehova.”

Adam ná Jennifer

Adam ná mwasi na ye Jennifer, oyo bautá na États-Unis mpe bazali kopesa mabɔkɔ na lisangá moko ya Lingelesi na Mexique, balobi ete libondeli esalisaki mpe bango mingi. Bapesi toli oyo: “Kozela te ete makambo nyonso ekóma malamu. Yebisá Yehova na libondeli mposa na yo ya kokende kosakola na mboka mosusu; na nsima salá makambo oyo eyokani na mabondeli na yo. Kómisá bomoi na yo pɛpɛlɛ, komelá biro ya filiale ya ekólo oyo olingi kokende kosakola, mpe soki omoni ete makambo nyonso ekoki, kende!” * Soki osali bongo, yebá ete okozala na bomoi ya esengo mpe okozwa mapamboli mingi ya elimo.

^ par. 21 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Okoki ‘koleka na Masedonia’?” oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya mwambe 2011.