‘Kolɛmba te’
“Tótika te kosala oyo ezali malamu.”—GAL. 6:9.
1, 2. Ndenge nini makambo oyo toyebi mpo na ebongiseli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba etindaka biso tótyela yango motema lisusu mingi?
KOYEBA ete tozali na kati ya ebongiseli moko monene ya molɔ́ngɔ́ mobimba esepelisaka biso mpenza. Bimonaneli oyo ezali na Ezekiele mokapo ya 1 mpe Danyele mokapo ya 7 emonisi polele ndenge oyo Yehova azali kotambwisa makambo mpe akomema yango tii na nsuka. Yesu azali kokamba eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele mpo emipesa libosoliboso na mosala ya kosakola nsango malamu, kokokisa bamposa ya elimo ya baoyo bazali kosala mosala yango, mpe kopesa mabɔkɔ mpo losambo ya Yehova ekende liboso. Nyonso wana esengeli kotinda biso tótyela ebongiseli ya Yehova motema!—Mat. 24:45.
2 Omituna boye: Nazali kotambola elongo na ebongiseli yango? Molende na ngai mpo na losambo ya solo ezali kobakisama to kokita? Soki tozali komituna mituna ya ndenge wana, mbala mosusu tokoki komona ete tobandi kolɛmba to molende na biso ebandi kokita. Yango ekoki kokómela biso. Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo bámekola molende ya Yesu. Paulo alobaki ete yango ekokaki kosalisa bango ‘básila makasi te mpe milimo na [bango] elɛmba te.’ (Ebr. 12:3) Ndenge moko mpe mpo na biso, kotalela malamumalamu lisolo oyo eleki, oyo emonisaki makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosala, esalisi biso mingi tóbatela esengo na biso mpe tókoba koyika mpiko.
3. Tosengeli kosala nini mpo tólɛmba te, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Kasi Paulo amonisaki ete ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tólɛmba te. Alobaki ete tosengeli “kosala oyo ezali malamu.” (Gal. 6:9) Na yango, tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Tótalela makambo mitano oyo ekoki kosalisa biso tótɛlɛma ngwi mpe tókoba kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova. Na nsima, tokoki koluka koyeba soki ezali na makambo oyo biso moko to libota na biso tosengeli kotyela yango likebi mingi.
TÓYANGANAKA MPO NA KOLENDISANA MPE KOSAMBELA YEHOVA
4. Mpo na nini tokoki koloba ete koyangana na makita ezali na ntina mingi na losambo ya solo?
4 Banda kala, koyangana na makita ezalaka likambo ya ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova. Kuna na likoló, bikelamu ya elimo babengisamaka mpo na koyangana liboso ya Yehova na bantango oyo esengeli. (1 Bak. 22:19; Yobo 1:6; 2:1; Dan. 7:10) Na ntango ya kala, esengelaki ete Bayisraele báyanganaka “mpo báyoka mpe mpo báyekola.” (Mib. 31:10-12) Na siɛklɛ ya liboso, Bayuda bazalaki na momeseno ya kokende na basinagoga mpo na kotánga Makomami. (Luka 4:16; Mis. 15:21) Ntango lisangá ya bokristo esalemaki, koyangana na makita ezalaki kaka na ntina mingi, mpe lelo oyo ezali kaka na esika monene na losambo na biso. Bakristo ya solo ‘batyelanaka likebi mpo bálendisana mpo bázala na bolingo mpe básala misala ya malamu.’ Tosengeli kokoba ‘kolendisanaka, mpe kosalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo [ya Yehova] ezali kobɛlɛma.’—Ebr. 10:24, 25.
5. Ndenge nini tokoki kolendisana na makita na biso?
5 Lolenge moko oyo tolendisanaka ezali ntango topesaka biyano na makita na biso. Tokoki komonisa polele kondima na biso soki toyanoli na motuna ya paragrafe moko, tomonisi ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko, toyebisi na mokuse likambo moko oyo tokutanaki na yango oyo emonisi ete kotosa mitinda ya Biblia ezali mpo na litomba na biso, to na lolenge mosusu. (Nz. 22:22; 40:9) Kozanga ntembe, yo mpe omonaka ete ata soki toyanganaka na makita banda bambula mingi, koyoka bakomantɛrɛ oyo bandeko na biso mibali mpe basi basalaka na motema mobimba elendisaka biso kaka, tózala mikóló to bilenge.
6. Ndenge nini makita esalisaka biso tózala ntango nyonso makasi na elimo?
6 Mpo na bantina nini mosusu Nzambe na biso alendisaka biso tóyanganaka mbala na mbala? Makita mpe mayangani esalisaka biso tóloba na mpiko mpe tóbanga te ntango tokutani na botɛmɛli to ntango bato ya teritware na biso basepeli te na nsango malamu. (Mis. 4:23, 31) Masolo ya Biblia elendisaka biso mpe esalisaka biso tópikama makasi na kati ya kondima. (Mis. 15:32; Rom. 1:11, 12) Mateya mpe bilendiseli oyo tozwaka ntango toyanganaka mpo na kosambela Yehova esalisaka biso tóyoka esengo ya solosolo mpe epesaka biso “kimya na mikolo ya mpasi.” (Nz. 94:12, 13) Komite ya Mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde ekambaka mosala ya kobongisa bilei nyonso ya elimo mpo na koteya basaleli ya Yehova na mabele mobimba. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na bibongiseli nyonso oyo ezwamaka mpo tózwa mateya ya malamu na makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ!
7, 8. (a) Ntina ya libosoliboso oyo toyanganaka na makita ya lisangá ezali nini? (b) Ndenge nini makita esalisaka yo na elimo?
7 Kasi, ezali na likambo mosusu ya ntina mingi koleka matomba oyo mokomoko na biso azwaka na makita. Ntina ya libosoliboso oyo toyanganaka na makita ezali mpo na kosambela Yehova. (Tángá Nzembo 95:6.) Tozali mpenza na libaku malamu ya kosanzola Nzambe na biso! (Kol. 3:16) Yehova abongi na losambo oyo topesaka ye mbala na mbala ntango toyanganaka na makita mpe topesaka biyano na makita yango. (Em. 4:11) Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge Biblia elendisi biso ete “tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala”!—Ebr. 10:25.
8 Otalelaka makita ya lisangá lokola ebongiseli oyo esalisaka biso tóyika mpiko tii ntango Yehova akoboma mokili oyo mabe? Soki ezali bongo, makita ekozala na kati ya “makambo oyo eleki ntina” oyo tosengeli kotikela ntango, ata soki tozali na makambo mingi ya kosala. (Flp. 1:10) Soki esalemi ete tózanga libaku ya koyangana na bandeko na biso bakristo mpo na kosambela Yehova, esengeli kozala mpo na likambo moko ya monene.
TÓLUKA BATO YA MITEMA SEMBO
9. Ndenge nini toyebi ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?
9 Komipesa mingi na mosala ya kosakola esalisaka mpe biso tókoba kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova. Yesu moto abandisaki mosala yango ntango azalaki awa na mabele. (Mat. 28:19, 20) Banda ntango wana tii lelo, mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala oyo ebongiseli ya Yehova etyaka na esika ya liboso. Makambo oyo bandeko mingi bakutanaka na yango na mikolo na biso emonisaka ete baanzelu bazali kotambwisa mosala na biso mpe kokamba biso epai ya bato oyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Mis. 13:48; Em. 14:6, 7) Eteni ya ebongiseli ya Yehova etyamá awa na mabele mpe ezali kozwa bibongiseli mpo mosala wana oyo eleki ntina ekende liboso. Yo mpe otyaka mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na yo?
10. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kokoba kosepela na mateya ya solo. (b) Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka yo olɛmba te?
10 Kozala na molende na mosala ya kosakola esalisaka biso tókoba kosepela na mateya ya solo. Tótalela maloba ya Mitchel, oyo azali nkulutu mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza banda bambula mingi. Alobi boye: “Nasepelaka mingi koyebisa bato mateya ya solo. Soki natángi lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! ya sika, nakamwaka mingi na komona bwanya, bososoli, mpe boyokani oyo ezali na masolo yango. Nasepelaka kobima na mosala ya kosakola mpo namona ndenge bato bakosepela na masolo yango, mpe ndenge oyo nakoki kosalisa bango básepela na yango mingi. Mosala ya kosakola esalisaka ngai natikala makasi 1 Bakorinti 15:58.
na elimo. Nasalaka makambo mosusu nyonso liboso to nsima ya ntango oyo natyá mpo na mosala ya kosakola.” Soki biso mpe tozali na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo, tokokoba kozala na kondima makasi na mikolo oyo ya nsuka.—TángáTÓLYAKA BILEI YA ELIMO
11. Mpo na nini tosengeli kolya bilei nyonso ya elimo oyo Yehova apesaka biso?
11 Mpo na kopesa biso makasi, Yehova apesaka biso ebele ya bilei ya elimo, na nzela ya mikanda. Na ntembe te, ozali koyeba lisusu mokolo moko oyo otángaki lisolo moko na mokanda na biso, mpe olobaki ete: ‘Yango nde nazalaki na yango mposa! Ezali lokola nde Yehova atindaki bákoma yango kaka mpo na ngai!’ Yango esalemaka kaka mpamba te. Yehova nde ateyaka biso mpe atambwisaka biso na nzela ya bibongiseli wana. Alobaki ete: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.” (Nz. 32:8) Tosalaka makasi mpo na kolya bilei nyonso ya elimo oyo tozwaka mpe komanyola yango? Yango ekosalisa biso tókoba kobota mbuma mpe tólɛmba na elimo te na mikolo oyo ya nsuka, oyo etondi na mpasi.—Tángá Nzembo 1:1-3; 35:28; 119:97.
12. Nini ekoki kosalisa biso tózwaka bilei na biso ya elimo na lisɛki te?
12 Ezali malamu tótalela mosala monene oyo esalemaka mpo tózwaka ntango nyonso ebele ya bilei ya elimo oyo epesaka biso makasi. Komite ya Bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde ekambaka mosala ya kolukaluka na mikanda, kokoma masolo, kotánga lisusu masolo oyo esili kokomama, kopona bililingi mpe bafɔtɔ oyo ekobima na mikanda, mpe kobongola mikanda oyo ekobima, ata mpe oyo ekotyama na Internet. Na nsima, bafiliale oyo enyataka mikanda etindaka yango na masangá ya pembeni to ya mosika. Mpo na nini mosala wana nyonso ezali kosalema? Ezali mpo libota ya Yehova eleisama malamu na elimo. (Yis. 65:13) Yango wana, tosengeli kosala makasi mpo na kolya bilei nyonso ya elimo oyo tozwaka na nzela ya ebongiseli ya Yehova.—Nz. 119:27.
PESÁ MABƆKƆ NA BIBONGISELI OYO YEHOVA AZALI KOZWA
13, 14. (a) Banani bazali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya Yehova kuna na likoló? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezali kozwama awa na mabele?
13 Na emonaneli moko, Yoane amonaki Yesu azali kotambola na mpunda ya mpɛmbɛ mpo na kolonga baoyo batombokelaki Yehova. (Em. 19:11-15) Koyeba ete baanzelu ya sembo bazali nsima ya Yesu mpe ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bauti na mabele mpo balongi mpe basili kozwa mbano na likoló bazali elongo na ye, ekómisaka kondima na biso makasi! (Em. 2:26, 27) Yango ezali ndakisa malamu oyo esengeli kolendisa biso tópesaka mabɔkɔ na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa!
14 Ndenge moko mpe, ebele mpenza ya bato bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele mpe bazali kokamba ebongiseli ya Yehova lelo oyo. (Tángá Zekaria 8:23.) Ndenge nini mokomoko na biso akoki komonisa ete azali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kotosa baoyo bazali kokamba biso. (Ebr. 13:7, 17) Botosi yango esengeli kobanda na lisangá oyo tozali. Makambo oyo olobaka mpo na bankulutu emonisaka ete ozali na limemya mpo na bango mpe mokumba na bango ya kokɛngɛla? Tolendisaka bana na biso bázala na limemya mpo na mibali wana ya sembo mpe básololaka na bango mpo na kozwa toli ya Biblia? Longola yango, na libota na biso, tolobelaka ndenge oyo tokoki kosalela mbongo na biso mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba na nzela ya makabo na biso? (Mas. 3:9; 1 Ko. 16:2; 2 Ko. 8:12) Tomonaka ete kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi ezali libaku malamu? Elimo ya Yehova esalaka mosala na yango malamu na esika oyo limemya mpe bomoko ezali. Elimo yango ekokoba kosalisa biso mpo tólɛmba te na mikolo oyo ya nsuka.—Yis. 40:29-31.
TÓZALA NA BOMOI OYO EYOKANI NA NSANGO OYO TOSAKOLAKA
15. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kobunda etumba mpo na kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Yehova?
15 Mpo tóyika mpiko mpe tókoba kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova, tosengeli “koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo,” elingi koloba kosala ete bomoi na biso eyokana na nsango oyo tosakolaka. (Ef. 5:10, 11) Nzoto na biso ya kozanga kokoka, milende ya Satana mpe mokili oyo mabe ezali kosala ete tóbunda ntango nyonso mpo na kobengana makanisi mpe bamposa ya mabe. Basusu kati na bino bandeko mibali mpe basi bozali mpenza kobunda etumba makasi mokolo na mokolo mpo na kobatela boyokani na bino ná Yehova. Yango ezali kosala ete Yehova alinga bino lisusu mingi. Bólɛmba te! Soki tozali na bomoi oyo eyokani na mokano ya Yehova, yango ekopesa biso esengo mingi mpe ekosalisa biso tóbosana te ete losambo na biso ezali mpamba te.—1 Ko. 9:24-27.
Mipesá na kosalisa basusu báyeba ete bango mpe bakoki kokɔta na ebongiseli monene ya Yehova
16, 17. (a) Tosengeli kosala nini soki tosali lisumu ya monene? (b) Ndakisa ya Anne ekoki koteya biso nini?
16 Kasi, osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene? Luká lisalisi nokinoki. Kobomba lisumu oyo osali eyeisaka nde makambo ndongo. Kobosana te ete ntango Davidi abombaki masumu na ye, alobaki ete ‘mikuwa na ye ezalaki kobeba na kolelalela na ye mokolo mobimba.’ (Nz. 32:3) Ya solo, kobomba masumu ekoki kosilisa biso makasi na makanisi mpe na elimo, kasi “ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”—Mas. 28:13.
17 Tótalela ndakisa ya Anne. * Ntango azalaki na mbula pene na 20, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi na nsima, akómaki na bomoi ya liso na nse ya lokasa. Yango etungisaki lisosoli na ye mingi. Alobi boye: “Lisosoli na ngai ezalaki kotika ngai kimya te. Nazalaki lisusu na esengo te mpe nakómaki ntango nyonso konyokwama na makanisi.” Asalaki nini? Alobi ete mokolo moko na makita balimbolaki Yakobo 5:14, 15. Anne amonaki ete asengelaki na lisalisi; yango wana akendaki epai ya bankulutu mpo básalisa ye. Alobi boye: “Bavɛrsɛ wana ezali lokola nkisi oyo Yehova akomelá biso mpo na kobikisa biso na maladi ya elimo. Nkisi yango ezali bololo makasi, kasi yango nde esilisaka maladi. Nalandaki toli oyo ezali na bavɛrsɛ yango, mpe esimbaki.” Nsima ya mwa bambula, Anne akómaki lisusu makasi na elimo, mpe sikoyo azali kosalela Yehova na molende mpe na lisosoli ya malamu.
18. Ekateli na biso esengeli kozala nini?
18 Kozala na bomoi na mikolo oyo ya nsuka mpe kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova ezali mpenza libaku malamu! Tiká ete tózala na ekateli ya kozwa na lisɛki te libaku oyo tozali na yango. Tósala nde makasi ete biso nyonso na kati ya libota tóyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosambela Yehova elongo na bandeko ya lisangá na biso, tólukaka na molende nyonso bato ya mitema sembo na teritware na biso, mpe tózwaka na motuya mingi bilei ya elimo oyo tozwaka mbala na mbala. Longola yango, tópesaka bandeko oyo bazali kokamba biso mabɔkɔ mpe tózala na bomoi oyo eyokani na nsango oyo tosakolaka. Soki tosali bongo, tokokoba kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova mpe tokolɛmba te kosala oyo ezali malamu!
^ par. 17 Bankombo mosusu ezali ya bango te.