Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na Yisraele, bazalaki nde kokakisa basali-mabe na nzete mpo na koboma bango?

Na ntango ya kala, bato ya bikólo mingi bazalaki kobaka basali-mabe mosusu na nzete to na likonzí mpo na koboma bango. Baroma bazalaki kokangisa to kobaka moto ya ndenge wana na nzete, epai akokaki koumela mikolo mingi tii ntango akoya kokufa mpo na mpasi, mposa ya mai, nzala, mpe makambo mosusu lokola moi, molunge to mbula. Mpo na Baroma, kobaka moto na nzete ezalaki etumbu ya nsɔni oyo bazalaki kopesa bato oyo bazalaki kosala makambo ya mabe koleka.

Kasi, Bayisraele bazalaki kosala ndenge nini? Bazalaki nde kokakisa basali-mabe na nzete mpo na koboma bango? Mobeko ya Moize elobaki ete: “Soki moto moko asali lisumu oyo ebongi na etumbu ya liwa, mpe soki abomami, mpe okakisi ye na nzete, ebembe na ye ekotikala butu mobimba likoló ya nzete te; kasi osengeli mpenza kokunda ye kaka na mokolo yango.” (Mib. 21:22, 23) Na yango, emonani ete, na ntango ya Bayisraele, soki moto asengelaki kozwa etumbu ya liwa, bazalaki naino koboma ye liboso ya kobaka ye na nzete.

Mpo na likambo yango, Balevi 20:2 elobi ete: “Moto nyonso na kati na bana ya Yisraele, mpe mopaya nyonso oyo azali kofanda mopaya kati na Yisraele, oyo apesi Moleke moko ya bana na ye, asengeli kobomama mpenza. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga kino akokufa.” Bato oyo bazalaki na “elimo oyo eyebisaka makambo ekoya” basengelaki mpe kobomama. Ndenge nini? Bazalaki ‘kobamba bango mabanga kino bakokufa.’​—Lev. 20:27.

Mibeko 22:23, 24 elobi ete: “Soki ngɔndɔ moko alakami libala na mobali, mpe mobali moko boye akuti mpenza ye na engumba mpe alali na ye, bosengeli kobimisa bango mibale mpe komema bango na porte ya engumba yango mpe kobamba bango mabanga, mpe basengeli kokufa, mwana mwasi mpo agangaki na engumba te, mpe mobali mpo asambwisi mwasi ya moninga na ye. Bongo osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.” Na yango, na Yisraele ya kala, kobamba mabanga ezalaki lolenge ya libosoliboso oyo bazalaki koboma basali-mabe minene. *

Emonani ete, na ntango ya Bayisraele, soki moto asengelaki kozwa etumbu ya liwa, bazalaki naino koboma ye liboso ya kobaka ye na nzete

Mibeko 21:23 elobi ete “moto oyo akakisami, azali eloko oyo Nzambe alakeli mabe.” Na ntembe te, soki bazalaki kotika nzoto ya moto oyo “Nzambe alakeli mabe” libándá, na miso ya bato, ezalaki mpo na kokebisa Bayisraele mosusu.

^ par. 6 Bato mingi ya mayele bandimaka ete na ntango ya Mibeko, bazalaki naino koboma mosali-mabe liboso ya kobaka nzoto na ye na nzete. Nzokande, emonani ete kobanda na siɛklɛ ya liboso, Bayuda bakómaki kokakisa basali-mabe mosusu na nzete ntango bazali naino na bomoi mpo bákufa likoló ya nzete yango.