Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baboti mpe bana​—Bómonisa bolingo ntango bozali kosolola

Baboti mpe bana​—Bómonisa bolingo ntango bozali kosolola

“Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.”​—YAK. 1:19.

1, 2. (a) Mbala mingi, ndenge nini baboti batalelaka bana na bango, mpe ndenge nini bana batalelaka baboti na bango? (b) Kasi ntango mosusu mikakatano nini bazalaka na yango?

NA ÉTATS-UNIS, batunaki bana mingi motuna oyo: “Soki oyebi ete baboti na yo bakokufa lobi, likambo nini okosepela koyebisa bango lelo?” Ata soki mbala mosusu bazalaki na mikakatano to matata ná baboti na bango, na esika ya kolobela yango, mingi kati na bilenge yango (95%) bayanolaki ete bakosepela koyebisa baboti na bango ete: “Bólimbisa ngai” mpe “Nalingaka bino mingi.”​—For Parents Only, ya Shaunti Feldhahn ná Lisa Rice.

2 Mbala mingi, bana balingaka baboti na bango, mpe baboti balingaka bana na bango. Yango ezali solo, mingimingi na mabota ya bakristo. Atako baboti mpe bana basepelaka mingi kozala na boyokani makasi, na bantango mosusu, ezalaka mpasi mpo bázwa ntango ya kosolola. Atako esɛngaka ete básolola na bosembo mpe na ndenge ya polele, mpo na nini baboyaka kolobela makambo mosusu? Wapi mwa makambo oyo ekoki kopekisa baboti ná bana básolola malamu? Ndenge nini bakoki kolonga mikakatano yango?

Bótika te ete makambo mosusu mpe komitangola na basusu epekisa bino bósololaka malamu na kati ya libota

‘BÓMISOMBELAKA’ NTANGO MPO NA KOSOLOLA

3. (a) Mpo na nini na mabota mingi ezalaka mpasi baboti mpe bana básolola malamu? (b) Mpo na nini na Yisraele, ezalaki mpasi te baboti bálekisa ntango elongo ná bana na bango?

3 Na mabota mingi, ezalaka mpasi kozwa mpenza ntango mpo na kosolola malamu. Kasi, kala ezalaki bongo te. Moize ayebisaki batata ya mabota na Yisraele ete: “Osengeli kokɔtisa malamumalamu [maloba ya Nzambe] na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” (Mib. 6:6, 7) Bana bazalaki kolekisa mokolo elongo na mama na bango na ndako to elongo na tata na bango na bilanga to na esika na ye ya mosala. Baboti mpe bana bazalaki kolekisa ntango mingi elongo mpe bazalaki kosolola mingi. Yango wana, ezalaki mpasi te mpo baboti báyeba oyo bana bazali na yango mposa to oyo balingi, mpe báyeba bizaleli ya bango. Bana mpe bazalaki na ntango mpe mabaku mingi mpo na koyeba baboti na bango malamu.

4. Mpo na nini na mabota mingi lelo oyo kosolola ezalaka mpasi?

4 Kasi lelo oyo makambo ezali bongo te! Na mikili mingi, bana bakɔtaka kelasi ntango bazali naino mike mpenza, mbala mosusu ntango bazali kaka na mbula mibale. Batata mpe bamama mingi bakendaka mosala mosika na bandako na bango. Ordinatɛrɛ, televizyo, mpe baaparɛyi mosusu elyaka bango mwa ntango moke oyo batikalaka na yango mpo na kosolola ná bana na bango. Na mabota mingi, moto na moto akipaka makambo na ye; baboti ná bana bazalaka lokola bato oyo bayebani te. Ezalaka mpenza mpasi básolola malamu.

5, 6. Ndenge nini baboti mosusu ‘basombaki’ ntango mpo bákóma kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango?

5 Okoki ‘kosomba’ ntango oyo olekisaka na makambo mosusu mpo na kolekisa yango elongo na libota na yo? (Tángá Baefese 5:15, 16.) Na mabota mosusu, baboti ná bana bayokáná mpo bálekisaka ntango mingi te liboso ya televizyo to ordinatɛrɛ. Basusu basalaka makasi bályaka elongo, ata mbala moko na mokolo. Longola yango, ebongiseli ya losambo na kati ya libota epesaka baboti ná bana libaku ya kokóma na boyokani makasi mpe kolobela makambo ya elimo na kimya! Ezali malamu kozwa ngonga moko to koleka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na losambo yango; kasi esengeli mpe koluka mabaku mosusu mpo na kosololaka mbala na mbala mpe kolobela makambo na mozindo. Na ndakisa, liboso ete mwana na yo akende na kelasi, yebisá ye likambo moko oyo ekolendisa ye, talelá elongo na ye mokapo ya mokolo na mokolo, to salá libondeli elongo na ye. Kosala bongo ekoki mpenza kosalisa mwana na yo mokolo wana mobimba.

6 Baboti mosusu babongolaki makambo mosusu ya bomoi na bango mpo bákoka kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango. Na ndakisa Laura, * oyo azali mama ya bana mibale, atikaki mosala moko oyo ezalaki kozwa ye mokolo mobimba mpo na ntina yango. Alobi ete: “Na ntɔngɔ, biso nyonso tozalaki kosala makambo nokinoki mpo na kokende na mosala to na kelasi. Ntango nazalaki kozonga ndako na mpokwa, nazalaki kokuta bana basí balali, mpo mwana ya mosala azalaki koyebisa bango bákenda kolala. Banda natiká mosala yango, tozalaka lisusu na mbongo mingi te; kasi namonaka ete sikoyo nakoki koyeba malamu makanisi ya bana na ngai mpe mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Nayokaka makambo oyo balobaka ntango bazali kobondela mpe nakoki kokamba bango, kolendisa bango, mpe koteya bango.”

‘BÓYOKAKA NOKI’

7. Likambo nini baboti mpe bana bamilelaka mpo na yango mingi?

7 Nsima ya kotuna bilenge mingi, bakomi ya buku moko (Parents Only) bamonaki ete ezali na likambo mosusu oyo epekisaka bana básolola malamu ná baboti na bango. Balobi ete: “Likambo ya libosoliboso oyo bana mingi bamilelaki mpo na yango ezali ete baboti na bango ‘bayokaka bango te.’” Nzokande, mbala mingi baboti mpe bamilelaka ete bana bayokelaka bango te. Mpo baboti básololaka malamu ná bana na bango, basengeli koyokaka bango, mpe bana basengeli koyokelaka baboti.​—Tángá Yakobo 1:19.

8. Ndenge nini baboti bakoki mpenza koyoka bana na bango?

8 Baboti, boyokaka mpenza bana na bino? Yango ekoki kozala mpasi soki olɛmbi to ntango mwana alingi koyebisa yo likambo moko oyo omoni ete ezali mpenza na ntina te. Kasi likambo oyo ezali na ntina te na miso na yo ekoki kozala na ntina mingi mpo na mwana na yo. “Koyokaka noki” elimboli kaka te kotya likebi na makambo oyo mwana azali koyebisa yo, kasi mpe na lolenge oyo azali koloba yango. Mongongo ya mwana to elongi na ye ekoki kosalisa yo oyeba ndenge oyo azali komiyoka. Kotuna mituna ezali mpe na ntina. Biblia elobi ete: “Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.” (Mas. 20:5) Mayele ya kososola mpe bososoli ekosalisa yo mingimingi ntango ozali koluka koyeba makanisi ya mwana na yo na makambo oyo ezalaka nsɔni kolobela yango.

9. Mpo na nini bana basengeli koyokela baboti na bango?

9 Bana, botosaka baboti na bino? Liloba ya Nzambe elobi ete: “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika mobeko ya mama na yo te.” (Mas. 1:8) Kobosana te ete baboti na yo balingaka yo mpe balukaka mpenza bolamu na yo; yango wana ezali likambo ya bwanya koyokela bango mpe kotosa bango. (Ef. 6:1) Ekozala mpasi te otosa baboti na yo soki osololaka na bango malamu mpe soki oyebi ete balingaka yo. Yebisá baboti na yo ndenge ozali kokanisa mpo na likambo moko. Yango ekosalisa bango bámitya na esika na yo. Kasi yo mpe osengeli komitya na esika na bango.

10. Liteya nini ozwi na lisolo ya Rehoboame?

10 Osengeli kokeba liboso olanda toli ya bilenge mosusu oyo ozali na bango mbula moko. Bakoki koyebisa yo makambo oyo ozali na mposa ya koyoka, kasi ntango mosusu toli na bango ekosalisa yo ata na likambo moko te. Kutu, ekoki ata komema yo na mabe. Lokola bilenge mingi bazangi bwanya mpe mayele oyo mikóló bazalaka na yango, bamonaka mosika te mpe ekoki kozala mpasi báyeba makama oyo makambo mosusu oyo bazali kosala ekoki kobimisa. Tókanisa ndakisa ya Rehoboame, mwana ya Mokonzi Salomo. Ntango akómaki mokonzi na Yisraele, elingaki kozala malamu soki alandaka toli oyo mikóló bapesaki ye. Kasi na esika asala bongo, alandaki nde toli ya mabe ya bilenge oyo akolaki na bango esika moko. Yango wana, bato mingi baboyaki bokonzi na ye. (1 Bak. 12:1-17) Na esika olanda ndakisa mabe ya Rehoboame, salá nde makasi osololaka mingi ná baboti na yo. Yebisáká bango makanisi na yo. Landá toli na bango mpe mekolá bwanya na bango.​—Mas. 13:20.

11. Nini ekoki kosalema soki bana babangaka kopusana pene na baboti mpo na kosolola na bango?

11 Baboti, soki bolingi te ete bana na bino bákende koluka toli epai ya baninga na bango, bósala ete bábangaka te kopusana pene na bino to kosolola na bino. Ndeko mwasi moko oyo azali elenge akomaki ete: “Soki kaka natángi nkombo ya mwana mobali moko, baboti na ngai basepelaka te. Yango elɛmbisaka ngai nzoto mpe nakataka lisolo mbala moko.” Ndeko mwasi mosusu oyo azali mpe elenge akomaki ete: “Bilenge mingi balingaka ete baboti na bango bápesa bango toli, kasi soki baboti na bango bazali kozwa na lisɛki makambo oyo bazali koyebisa bango, bakendaka koluka toli epai ya moto mosusu oyo akoki koyoka bango, ata soki moto yango ayebi makambo mingi te.” Baboti, soki boyokaka na boboto likambo nyonso oyo bana na bino bazali koyebisa bino, na ntembe te, bakofungolela bino mitema mpe bakolanda toli na bino.

‘BÓWELAKA KOLOBA TE’

12. Ndenge nini ezaleli oyo baboti bamonisaka ekoki kotinda bana bábanga kosolola na bango?

12 Baboti, soki botombokaka mbala moko ntango bana na bino bayebisi bino likambo, yango mpe ekoki kosala ete bábanga kosolola na bino. Ezali solo ete baboti balukaka kobatela bana na bango, mpamba te na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ ezali na makambo mingi oyo ekoki kozala likama mpo na bango, ezala na elimo to na mosuni. (2 Tim. 3:1-5) Nzokande, ntango baboti bazali koluka kobatela bango, bana bakoki mbala mosusu komona ete bazali kolekisa ndelo.

13. Mpo na nini baboti basengeli te kowelaka kopesa makanisi na bango?

13 Ekozala malamu te moboti awela kopesa mwana likanisi na ye na likambo moko boye. Toboyi te, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te ofanda nyɛɛ soki makambo oyo mwana azali koloba ezali kosala yo mpasi. Kasi ezali na ntina oyoka ye na likebi liboso ete oloba. Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki ete: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.” (Mas. 18:13) Soki ofandi nyɛɛ, okoyoka makambo mingi mpe mwana na yo akokoba koloba. Osengeli koyeba likambo yango malamumalamu mpo oyeba ndenge ya kosalisa ye. Soki moto azali na likambo oyo ezali kotungisa ye na motema, yango ekoki kotinda ye akóma na “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:1-3) Lokola olingaka mwana na yo, saleláká matoi mpo oyeba malamu likambo oyo azali koyebisa yo mpe saleláká lolemo mpo na kobikisa.

14. Mpo na nini bana basengeli kowela te koloba?

14 Bana, bino mpe bosengeli te kowelaka koloba’ to koboya mbala moko makambo oyo baboti bazali koyebisa bino, mpamba te Nzambe apesi bango mokumba ya kobɔkɔla bino. (Mas. 22:6) Ekoki kozala ete bango mpe bakutaná na makambo mosusu lokola oyo bozali kokutana na yango lelo oyo. Longola yango, mbala mosusu bayokaka mawa mpo na mabunga oyo basalaki ntango bazalaki bilenge mpe balingi mpenza kobatela bino mpo bósala mabunga yango te. Yango wana, bosengeli komona ete baboti na bino bazali baninga na bino, kasi banguna na bino te. (Tángá Masese 1:5.) “Kumisá tata na yo mpe mama na yo” mpe monisá bango ete olingaka bango ndenge bango mpe balingaka yo. Soki osali bongo, ekozala mpasi te ‘bábɔkɔla yo na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.’​—Ef. 6:2, 4.

‘BÓYOKAKA NKANDA NOKI TE’

15. Nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso na motema molai mpe tósilikela te bato oyo tolingaka?

15 Tozalaka ntango nyonso na motema molai te epai ya bato oyo tolingaka. Ntoma Paulo akomelaki ‘basantu mpe bandeko ya sembo, oyo bazalaki na bomoko elongo na Kristo, oyo bazalaki na Kolose,’ ete: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te. Bino batata, bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.” (Kol. 1:1, 2; 3:19, 21) Paulo alendisaki Baefese ete: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.” (Ef. 4:31) Kolona bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe lokola motema molai, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa ekosalisa biso tózala ntango nyonso kimya, ata soki likambo moko ezali kotungisa biso.​—Gal. 5:22, 23.

16. Ndenge nini Yesu asembolaki bayekoli na ye, mpe mpo na nini yango ekoki kokamwisa biso?

16 Tózwa ndakisa ya Yesu. Kanisá motungisi makasi oyo azalaki na yango na mpokwa oyo alyaki mpo na mbala ya nsuka elongo na bantoma na ye. Yesu ayebaki ete nsima ya mwa bangonga akonyokwama mpe akokufa liwa ya mpasi. Ayebaki ete soki atikali sembo tii na nsuka, nkombo ya Tata na ye ekosantisama mpe yango ekosala ete bato bázwa lobiko. Nzokande, kaka na mpokwa wana, “ntembe makasi ebimaki mpe na kati na [bantoma] mpo na koyeba nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” Yesu agangelaki bango te mpe asilikelaki bango te. Asembolaki nde bango na boboto. Yesu akundwelaki bango ete bakangamaki na ye makasi na komekama na ye. Atako Satana asɛngaki azwa bango mpo apupola bango lokola blé, Yesu amonisaki elikya oyo azalaki na yango ete bakotikala sembo. Kutu, asalaki ná bango kondimana moko.​—Luka 22:24-32.

Oyokaka na likebi ntango mwana na yo azali koloba?

17. Nini ekosalisa bana bázala ntango nyonso kimya?

17 Bana mpe basengeli kozala kimya. Mingimingi ntango bakómi bilenge, bakoki kokanisa ete soki baboti bazali kopesa bango toli, ezali mpo bazali kotyela bango motema te. Ata soki na bantango mosusu bokoki kokanisa bongo, bóyeba ete baboti bamibanzabanzaka mpo na bino mpo balingaka bino. Soki bozali koyokela bango na kimya mpe kolanda batoli oyo bazali kopesa bino, bakobanda kopesa bino limemya mpe kotyela bino motema. Yango ekoki kotinda bango bábakisela bino mwa bonsomi na makambo mosusu ya bomoi. Soki ozali komipekisa, okomonisa ete ozali na bwanya. Lisese moko ya bwanya elobi ete: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.”​—Mas. 29:11.

18. Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa bino bósololaka malamu?

18 Na yango, bino baboti mpe bana, bólɛmba nzoto te soki na libota na bino bosololaka mpenza te ndenge oyo bolingaka. Bókóba kosala milende mpo na yango, mpe bókóba kotambola na kati ya solo. (3 Yoa. 4) Na mokili ya sika, ntango tokokóma bato ya kokoka, tokozala na boyokani ya malamu mpenza; matata to koswana ekozala te. Kasi sikoyo, biso nyonso tosalaka makambo oyo mpo na yango toyokaka mawa na nsima. Yango wana, yebá kosɛnga bolimbisi, mpe limbisáká na motema mobimba. ‘Bósangana liboke moko na boyokani mpenza na bolingo.’ (Kol. 2:2) Bolingo ezali na nguya mingi. “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Ko. 13:4-7) Soki bokobi kolona bolingo, bokobanda kosolola malamu, mpe yango ekopesa bino esengo na kati ya libota mpe ekokumisa Yehova.

^ par. 6 Topesi ye nkombo mosusu.