Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zwáká bikateli ya malamu mpo na kobatela libula na yo

Zwáká bikateli ya malamu mpo na kobatela libula na yo

“Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.”​—ROM. 12:9.

1, 2. (a) Nini esalisaki yo ozwa ekateli ya kosalela Nzambe? (b) Mituna nini tosengeli komituna na oyo etali libula na biso ya elimo?

TOZALI na kati ya bamilio ya bato oyo bazwá ekateli malamu ya kosalela Yehova Nzambe mpe kolanda matambe ya Yesu Kristo malamumalamu. (Mat. 16:24; 1 Pe. 2:21) Tozwaka na lisɛki te ekateli wana oyo tozwaki ya komipesa epai na Nzambe. Tozwaki ekateli yango te kaka nsima ya koyeba likolólikoló mwa mikapo ya Biblia, kasi nde nsima ya koyekola malamumalamu Liloba ya Nzambe. Yango esalisaki biso tóyekola makambo mingi oyo elendisaki kondima na biso na oyo etali libula oyo Yehova atye liboso ya baoyo ‘bazali koyekola koyeba ye, mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Kristo.’​—Yoa. 17:3; Rom. 12:2.

2 Mpo tókoba kozala na boyokani malamu ná Tata na biso ya likoló, tosengeli kozwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Na yango, lisolo oyo ekopesa biyano na mituna oyo ya ntina mingi: Libula na biso ezali nini? Ndenge nini tosengeli kotalela yango? Tosengeli kosala nini mpo tózwa libula na biso? Nini ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu?

LIBULA NA BISO EZALI NINI?

3. Libula nini ezali kozela (a) bakristo oyo batyami mafuta mpe (b) “bampate mosusu”?

3 Mwa ndambo ya bakristo bazali na elikya ya kozwa “libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te,” elingi koloba libaku monene ya koyangela elongo na Kristo kuna na likoló. (1 Pe. 1:3, 4) Mpo bakristo yango bázwa libula wana, basengeli ‘kobotama lisusu.’ (Yoa. 3:1-3) Libula nini ezali kozela bamilio ya “bampate mosusu” ya Yesu, oyo bazali kosala elongo na bakristo oyo batyami mafuta mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe? (Yoa. 10:16) Bampate mosusu bakozwa libula oyo Adama ná Eva bazwaki te, elingi koloba bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, esika mpasi, liwa, to kolela ekozala lisusu te. (Em. 21:1-4) Yango wana, Yesu ayebisaki mosali-mabe oyo akufaki elongo na ye ete: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.”​—Luka 23:43.

4. Mapamboli nini tozali na yango banda sikoyo?

4 Banda lelo, libula na biso ezali komemela biso mapamboli mosusu. Lokola tomonisaka kondima na “lisiko oyo Kristo Yesu afutaki,” tozali na kimya na motema mpe tozali na boyokani malamu ná Nzambe. (Rom. 3:23-25) Toyebi malamu bilaka kitoko oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Longola yango, kozala na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba, oyo balingaka biso mingi, epesaka biso esengo monene. Kozala Motatoli ya Yehova ezali mpe libaku monene. Yango wana, tozwaka libula na biso na motuya mingi!

5. Banda kala, Satana alukaka kotinda basaleli ya Nzambe básala nini, mpe nini ekoki kosalisa biso tótɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe na ye?

5 Nzokande, mpo tókangama makasi na libula na biso ya motuya mingi, tosengeli ntango nyonso kokeba na mayele mabe ya Satana. Banda kala, Satana alukaka kotinda basaleli ya Nzambe bázwa bikateli oyo ekoki kosala ete bábungisa libula na bango. (Mit. 25:1-3, 9) Lokola Satana ayebi ete nsuka na ye ekómi pene, azali kobakisa milende na ye mpo na kokosa biso. (Tángá Emoniseli 12:12, 17.) Mpo tókoba ‘kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo,’ tosengeli kokoba kozwa libula na biso na motuya mingi. (Ef. 6:11) Mpo na yango, ndakisa ya kokebisa ya Esau, mwana ya Yisaka, ekoki kopesa biso batoli oyo tosengeli kozwa na lisɛki te.

KOZALA LOKOLA ESAU TE

6, 7. Esau azalaki nani, mpe libula nini ezalaki kozela ye?

6 Esili koleka mbula soki 4 000, Yisaka ná Rebeka babotaki mapasa, Esau ná Yakobo. Ntango bana yango ya mapasa bazalaki kokola, bakesanaki na bizaleli na bango mpe na makambo oyo baponaki kosala. Biblia elobi ete “Esau akómaki mobali oyo ayebaki kosala bokila, mobali ya zamba,” nzokande “Yakobo azalaki moto oyo azangi mbeba, oyo azalaki kofanda na bahema.” (Eba. 25:27) Robert Alter, mobongoli moko ya Biblia, alobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kozanga mbeba,’ “epesi likanisi ya kozala sembo to mpe kozala na ngambo te.”

7 Ntango Esau ná Yakobo bakokisaki mbula 15, nkɔkɔ na bango Abrahama akufaki, kasi Yehova abosanaki te elaka oyo apesaki Abrahama. Na nsima, Yehova apesaki lisusu elaka yango epai ya Yisaka, mpe alobaki ete bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli na nzela ya momboto ya Abrahama. (Tángá Ebandeli 26:3-5.) Elaka yango emonisaki ete Masiya, elingi koloba “momboto” ya sembo oyo Ebandeli 3:15 elobeli, akoya na nzela ya bakitani ya Abrahama. Lokola Esau azalaki mwana ya liboso ya Yisaka, azalaki na lotomo oyo euti na mibeko ya kozwa libula ya elaka yango. Libula moko monene ezalaki mpenza kozela Esau! Kasi Esau azwaki nde libula yango na motuya?

Kotya libula na yo ya elimo na likama te

8, 9. (a) Ekateli nini Esau azwaki na oyo etali libula na ye? (b) Bambula mingi na nsima, Esau ayaki koyeba ete azwaki ekateli ya ndenge nini, mpe asalaki nini?

8 Mokolo moko ntango Esau autaki na bilanga, amonaki Yakobo ‘azali kolamba supu ya lantiye.’ Esau ayebisaki Yakobo ete: “Nabondeli yo, pesá ngai noki mwa ndambo ya motane​—motane wana, namɛla, mpo nalɛmbi!” Kasi Yakobo ayebisaki Esau ete: “Libosoliboso, tɛkɛlá ngai lotomo na yo ya mwana ya liboso!” Esau azwaki ekateli nini? Likambo ya kokamwa, alobaki ete: “Lotomo ya mwana ya liboso ezali na litomba nini mpo na ngai?” Ɛɛ, Esau aponaki saani ya supu ya lantiye na esika ya lotomo na ye ya mwana ya liboso! Mpo andima mpenza ete Esau atɛkɛli ye lotomo yango, Yakobo atyaki ye mbamba ete: “Libosoliboso, lapelá ngai ndai!” Kozanga kokakatana, Esau atɛkaki lotomo na ye ya mwana ya liboso. Nsima na yango, “Yakobo apesaki Esau limpa ná supu ya lantiye, mpe abandaki kolya mpe komɛla. Na nsima, atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela akei. Boye Esau atyolaki lotomo ya mwana ya liboso.”​—Eba. 25:29-34.

9 Bambula mingi na nsima, ntango Yisaka amonaki ete etikali moke akufa, Rebeka azwaki bibongiseli mpo Yakobo azwa mpenza lotomo ya mwana ya liboso, oyo Esau abungisaki. Na nsima, ntango Esau ayaki koyeba ete azwaki ekateli ya bozoba, abondelaki Yisaka ete: “Tata na ngai, pambolá ngai, ɛɛ, ngai mpe! . . . Obombeli ngai limpamboli ata moko te?” Ntango Yisaka ayebisaki ye ete akoki te kobongola lipamboli oyo asilaki kopesa Yakobo, “Esau atombolaki mongongo mpe abandaki kolela.”​—Eba. 27:30-38.

10. Ndenge nini Yehova azalaki kotalela Esau ná Yakobo, mpe mpo na nini?

10 Lisolo wana ya Esau emonisi ete azalaki na ezaleli ya ndenge nini? Amonisaki ete mpo na ye, kokokisa bamposa na ye ya mosuni ezalaki na ntina mingi koleka kozwa mapamboli oyo libula na ye ekokaki komemela ye. Esau azwaki na motuya te lotomo na ye ya mwana ya liboso mpe emonani ete azalaki mpenza kolinga Nzambe te. Lisusu, Esau akanisaki te makambo oyo ekateli na ye ekokaki kobimisela bakitani na ye. Nzokande, Yakobo azalaki kozwa libula na ye na motuya mingi. Na ndakisa, alandaki toli oyo baboti na ye bapesaki ye mpo na kopona mwasi. (Eba. 27:46–28:3) Lokola Yakobo azwaki ekateli wana oyo esɛngaki ete azala na motema molai mpe amipimela, akómaki moko ya bankɔkɔ ya Masiya. Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela Esau ná Yakobo? Na nzela ya mosakoli Malaki, Yehova alobaki ete: “Nalingaki Yakobo, mpe nayinaki Esau.”​—Mal. 1:2, 3.

11. (a) Ndenge nini ndakisa ya Esau ekoki mpe koteya biso bakristo? (b) Mpo na nini Paulo atángi mpe pite ntango alobeli likambo oyo Esau asalaki?

11 Liteya nini bakristo bakoki kozwa na makambo oyo Biblia elobi mpo na Esau? Ntoma Paulo ayebisaki bandeko na ye bakristo bákeba ete “moto ya pite azala te to moto oyo amemyaka makambo mosantu te, lokola Esau, oyo akabaki lotomo na ye ya mwana ya liboso.” (Ebr. 12:16) Likebisi yango etaleli mpe bakristo lelo oyo. Tosengeli ntango nyonso kozwa makambo mosantu na motuya mpo bamposa ya nzoto elonga biso te mpe tóbungisa te libula na biso ya elimo. Kasi, mpo na nini Paulo atángi mpe pite ntango alobeli likambo oyo Esau asalaki? Mpamba te soki moto azali na makanisi ya mosuni, ekozala mpasi te atyola makambo mosantu mpo na kokokisa bamposa ya mbindo, lokola kosala pite.

BÓNGISÁ MOTEMA NA YO BANDA SIKOYO

12. (a) Ndenge nini Satana amekaka biso? (b) Pesá bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso ntango tolingi kozwa bikateli ya minene.

12 Na ntembe te, biso basaleli ya Yehova toboyaka kosala makambo oyo ekoki kosala ete tókwea na etamboli ya mbindo. Kutu, tobondelaka Yehova Nzambe atika nzela te ete tókwea soki moto moko atindi biso tóbuka mibeko na ye. (Mat. 6:13) Kasi Satana alukaka ntango nyonso kolɛmbisa biso na elimo ntango tozali kosala makasi tótikala sembo na mokili oyo mabe. (Ef. 6:12) Lokola Zabolo azali nzambe ya mokili oyo mabe, ayebi mitambo nini akoki kotyela bato mpo na kotinda bango báluka kokokisa bamposa na bango ya nzoto. (1 Ko. 10:8, 13) Na ndakisa, kanisá ete okutani na likambo moko oyo epesi yo libaku ya kokokisa mposa moko ya mbindo. Okozwa ekateli nini? Okozala lokola Esau mpe okoloba ete: ‘Pesá ngai yango noki!’ To okolonga nde komekama yango mpe okokima yango, ndenge Yozefe mwana ya Yakobo asalaki ntango mwasi ya Potifare alukaki kokweisa ye?​—Tángá Ebandeli 39:10-12.

13. (a) Na ntango na biso, ndenge nini bandeko mingi basalaki lokola Yozefe, kasi ndenge nini basusu basalaki lokola Esau? (b) Ndakisa ya bandeko oyo basalaki lokola Esau emonisi biso ete tosengeli kosala nini?

13 Bandeko basi mpe bandeko mibali mingi bakutanaki na makambo oyo esɛngaki bápona kosala lokola Esau to lokola Yozefe. Mingi na bango bazwaki bikateli ya malamu mpe yango esepelisaki motema ya Yehova. (Mas. 27:11) Nzokande, bandeko mosusu oyo bamekamaki baponaki kosala lokola Esau, mpe batyaki libula na bango ya elimo na likama. Kutu, mbula na mbula, bandeko mingi bakɔtaka komite ya kosambisa mpe babimisamaka na lisangá mpo bakweaki na etamboli ya mbindo. Yango wana, ezali na ntina ete tóbongisa mitema na biso sikoyo, liboso ete tókutana na makambo oyo ekoki komeka bosembo na biso! (Nz. 78:8) Tótalela makambo mibale oyo ekoki kosalisa biso tókwea te ntango tokokutana na komekama mpe tózwa bikateli ya malamu na mikolo ezali koya.

KANISÁ LIBOSO MPE MIBONGISÁ

Tokomibongisa mpo na kotɛmɛla masɛnginya soki tozali koluka bwanya ya Yehova

14. Kokanisa malamumalamu na mituna nini ekoki kosalisa biso ‘tóyina oyo ezali mabe’ mpe ‘tókangama na oyo ezali malamu’?

14 Likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ezali ya kokanisa makambo mabe oyo lisumu na biso ekoki kobimisa. Tokozwa libula na biso ya elimo na motuya mingi soki tozali kolinga mingi Yehova, oyo apesi biso libula yango. Soki tolingaka moto, tokolinga te kosala likambo oyo ekosala ye mpasi. Tokosala nde makasi mpo moto yango asepela na biso. Yango wana, ekozala malamu tózwa mwa ntango mpo na kokanisa makambo mabe oyo ekoki kokómela biso mpe basusu soki tokwei na misala ya mbindo. Tosengeli komituna boye: ‘Etamboli na ngai ya mabe ekobebisa te boyokani na ngai ná Yehova? Bato ya libota na ngai bakomiyoka ndenge nini soki nasali likambo wana ya mabe? Bandeko ya lisangá bakomiyoka ndenge nini mpo na yango? Likambo yango ekoki nde kobɛtisa basusu libaku?’ (Flp. 1:10) Tokoki mpe komituna boye: ‘Nakolinga ete mpasi wana nyonso ekómela ngai kaka mpo na bisengo ya ntango mokuse ya etamboli na ngai ya mbindo? Nakolinga mpenza kosuka lokola Esau, oyo alelaki makasi ntango amonaki bozoba oyo asalaki?’ (Ebr. 12:17) Kokanisa malamumalamu na mituna wana ekosalisa biso ‘tóyina oyo ezali mabe,’ mpe ‘tókangama na oyo ezali malamu.’ (Rom. 12:9) Soki tolingaka mpenza Yehova, tokosala makasi mpo tóbatela libula na biso.​—Nz. 73:28.

15. Nini ekosalisa biso tózwa makasi ya kotɛmɛla makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova?

15 Likambo ya mibale oyo tosengeli kosala ezali ya komibongisa malamu mpo tókwea te na komekama. Yehova azwá bibongiseli mingi mpo na kosalisa biso tómibongisa mpo tókoka kotɛmɛla makambo ya mokili oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. Kati na bibongiseli yango, tokoki kotánga boyekoli ya Biblia, makita ya lisangá, mosala ya kosakola, mpe libondeli. (1 Ko. 15:58) Mbala nyonso oyo tofungolelaka Yehova mitema na libondeli mpe ntango nyonso oyo tomipesaka mingi na mosala ya kosakola, ezali lokola nde tozali kokolisa makoki na biso ya kotɛmɛla masɛnginya. (Tángá 1 Timote 6:12, 19.) Makasi oyo tozalaka na yango mpo na kotɛmɛla masɛnginya etalelaka mingimingi milende oyo biso moko tosalaka. (Gal. 6:7) Likambo yango emonisami polele na mokapo ya mibale ya mokanda ya Masese.

‘KOBÁ KOLUKA YANGO’

16, 17. Tosengeli kosala nini mpo tókóma na makoki ya kozwa bikateli ya malamu?

16 Masese mokapo ya 2 elendisi biso tózwa bwanya mpe makoki ya kokanisa. Bizaleli wana ekosalisa biso tóyeba kokesenisa oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe, mpe ekosalisa biso tóyekola komipekisa na esika ya koluka kokokisa bamposa na biso na ndenge ya mabe. Kasi tokolonga kosala bongo kaka soki tozali mpenza na mposa ya kosala milende. Mpo na komonisa bosolo ya likambo yango, Biblia elobi ete: “Mwana na ngai, soki okoyamba maloba na ngai mpe okobomba mitindo na ngai malamumalamu epai na yo, mpo na litoi na yo otyela bwanya likebi, mpo obalusa motema na yo epai ya bososoli; lisusu, soki okobelela mpo na mayele mpe okobimisa mongongo na yo mpo na bososoli, soki okobi koluka yango lokola palata, mpe okobi kolukaluka yango lokola biloko ya motuya oyo ebombani, boye okokanga ntina ya kobanga Yehova, mpe okozwa boyebi ya Nzambe. Mpo Yehova ye moko apesaka bwanya; boyebi ná bososoli eutaka na monɔkɔ na ye.”​—Mas. 2:1-6.

17 Na yango, tomoni polele ete mpo tókóma na makoki ya kozwa bikateli ya malamu, tosengeli kosala makambo oyo bavɛrsɛ wana ya Masese elobi. Tokokoka kotɛmɛla masɛnginya kaka soki tozali kotika ete maloba ya Yehova ebongisa bomoto na biso ya kati, soki tozali kobondela mbala na mbala mpo na kosɛnga Yehova atambwisa biso, mpe soki tozali kokoba koluka boyebi ya Nzambe lokola biloko ya motuya oyo ebombani.

18. Ozwi ekateli ya kokoba kosala nini, mpe mpo na nini?

18 Yehova apesaka boyebi, mayele, bososoli, mpe bwanya na bato oyo basalaka milende mpo na koluka makabo yango. Soki tozali komipesa mingi mpo na koluka yango mpe kosalela yango, tokokóma lisusu pene na Yehova, oyo apesaka yango. Mpe boyokani makasi oyo tokokóma na yango ná Yehova Nzambe ekobatela biso ntango tokokutana na komekama. Kopusana penepene na Yehova mpe kobanga ye ekobatela biso mpo tósala makambo ya mabe te. (Nz. 25:14; Yak. 4:8) Tiká ete boninga na biso ná Yehova mpe bwanya oyo apesaka biso etinda biso tókoba kozwa bikateli oyo ekosepelisa motema ya Yehova mpe tóbatela libula na biso.