Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

“Bana ya Nzambe ya solo” oyo Ebandeli 6:2, 4 elobi ete bazalaki liboso ya Mpela, ezalaki banani?

Emonani ete na Biblia, maloba yango emonisaka bana ya Nzambe ya elimo. Nini emonisi yango?

Ebandeli 6:2 elobi boye: “Bana ya Nzambe ya solo babandaki kotala bana basi ya bato, bamonaki ete bazali kitoko; mpe babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki.”

Na Makomami ya Ebre, maloba “bana ya Nzambe ya solo” mpe “bana ya Nzambe” ezali na Ebandeli 6:2, 4; Yobo 1:6; 2:1; 38:7; mpe na Nzembo 89:6. Bavɛrsɛ yango emonisi nini mpo na “bana [yango] ya Nzambe”?

Ezali polele ete “bana ya Nzambe ya solo” oyo Yobo 1:6 elobeli ezalaki bikelamu ya elimo oyo bayanganaki liboso ya Nzambe. Satana, oyo autaki “kotambolatambola na mabele,” azalaki mpe kati na bango. (Yobo 1:7; 2:1, 2) Ndenge moko mpe, Yobo 38:4-7 elobeli ‘bana ya Nzambe’ oyo ‘bagangaki na esengo’ ntango Nzambe ‘atyaki libanga ya litumu’ ya mabele. Na ntembe te, ezalaki baanzelu, mpamba te na ntango wana moto akelamaki naino te. “Bana ya Nzambe” oyo Nzembo 89:6 elobeli ezali mpe kaka bikelamu oyo bazalaka na Nzambe na likoló, kasi bato te.

Bongo “bana ya Nzambe ya solo” oyo lisolo ya Ebandeli 6:2, 4 elobeli ezali banani? Na kolanda makambo oyo touti kolobela, tokoki mpenza kokanisa ete lisolo yango elobeli bana ya Nzambe ya elimo oyo bayaki awa na mabele.

Bato mosusu bakokaka te kondima ete baanzelu bakoki koyoka mposa ya kosangisa nzoto. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 22:30 emonisi ete libala mpe kosangisa nzoto ezalaka te na likoló. Atako bongo, na ntango ya kala, baanzelu bazalaki ntango mosusu kolata nzoto ya mosuni; bazalaki kutu kolya mpe komɛla elongo na bato. (Eba. 18:1-8; 19:1-3) Na yango, tokoki mpenza kokanisa ete na ntango oyo balati nzoto ya mosuni, baanzelu bakokaki kosangisa nzoto na basi.

Makambo mosusu oyo Biblia elobeli endimisi biso ete baanzelu mosusu basalaki mpenza bongo. Yuda 6, 7 elobi ete lisumu ya bato ya Sodoma, oyo basalelaki nzoto ya mosuni na ndenge ebongi te, ekokani na lisumu ya “baanzelu oyo babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza.” Baanzelu wana bakokani na bato ya Sodoma mpo “basalaki pite koleka mpe balandaki nzoto ya mosuni mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te.” Lisolo mosusu ya ndenge wana oyo ezali na 1 Petro 3:19, 20 elobeli baanzelu oyo bazangaki botosi na “mikolo ya Noa.” (2 Pe. 2:4, 5) Na yango, makambo oyo baanzelu wana oyo bazangaki botosi na mikolo ya Noa basalaki ezali lokola lisumu ya bato ya Sodoma ná Gomora.

Tokoki mpenza koloba bongo soki tondimi ete “bana ya Nzambe ya solo” oyo Ebandeli 6:2, 4 elobeli ezalaki baanzelu oyo balataki nzoto ya mosuni mpe basangisaki nzoto na basi.

Biblia elobi ete Yesu “akendaki kosakwela bilimo oyo ezali na bolɔkɔ.” (1 Pe. 3:19) Yango elingi koloba nini?

Ntoma Petro alobi ete bilimo yango ezali bikelamu oyo “kala batosaki te ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa.” (1 Pe. 3:20) Ezali polele ete Petro azalaki kolobela bikelamu ya elimo oyo baponaki kolanda Satana na botomboki na ye. Yuda alobeli baanzelu oyo “babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza,” mpe alobi ete Nzambe “abombi bango na minyɔlɔlɔ ya seko na kati ya molili tuu mpo na lisambisi ya mokolo yango monene.”​—Yuda 6.

Ndenge nini bikelamu ya elimo bazangaki botosi na mikolo ya Noa? Liboso ya Mpela, bilimo wana ya mabe balataki nzoto ya mosuni​—likambo oyo Nzambe abongisaki te mpo na bango. (Eba. 6:2, 4) Lisusu, baanzelu wana oyo basangisaki nzoto na basi basalaki likambo oyo ebongaki te. Ntango Nzambe asalaki bikelamu ya elimo, ezalaki te mpo básangisaka nzoto na basi. (Eba. 5:2) Baanzelu wana ya mabe, oyo bazangaki botosi, bakobomama na ntango oyo Nzambe atye. Mpo na sikoyo, ndenge Yuda amonisi yango, bazali na kati ya “molili tuu,” na maloba mosusu, na bolɔkɔ ya elimo.

Ntango nini mpe ndenge nini Yesu akendaki kosakwela “bilimo [yango] oyo ezali na bolɔkɔ”? Petro akomaki ete likambo yango esalemaki ntango Yesu “azongisamaki na bomoi na elimo.” (1 Pe. 3:18, 19) Tóbosana mpe te ete Petro alobi ete Yesu ‘akendaki kosakola.’ Ndenge Petro asalelaki vɛrbɛ oyo emonisaki ete likambo yango eleká, emonisi ete Yesu akendaki kosakola liboso Petro akoma mokanda na ye ya liboso. Na yango, emonani lokola ete nsima ya lisekwa na ye, na ntango moko boye, Yesu akendaki koyebisa bilimo wana etumbu oyo bakozwa. Ezalaki te nsango moko oyo epesaki bango elikya. Ezalaki nde nsango ya lisambisi. (Yona 1:1, 2) Lokola Yesu amonisaki kondima mpe bosembo tii na liwa mpe na nsima asekwaki​—na ndenge yango amonisaki ete Zabolo azalaki na bokonzi likoló na ye te—​Yesu azalaki na bokonzi ya kopesa nsango ya lisambisi ndenge wana.​—Yoa. 14:30; 16:8-11.

Na mikolo ezali koya, Yesu akokanga Satana ná baanzelu yango mpe akobwaka bango na libulu mozindo. (Luka 8:30, 31; Em. 20:1-3) Kasi, liboso ntango yango ekoka, bilimo yango oyo bazangaki botosi bazali na mokili tuu ya elimo, mpe nsuka na bango eyebani: bakobomama.​—Em. 20:7-10.