Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:
Ndenge nini bakristo batalelaka momeseno ya kofungola Biblia ata na lokasa nini, mpe kotánga vɛrsɛ ya liboso oyo okomona?
Bato mingi bandimaka ete soki ofungoli Biblia ata na lokasa nini, vɛrsɛ ya liboso oyo okomona ekosalisa yo na likambo oyo ozali na yango. Bakristo ya solo basalelaka maji te mpo na koyeba avenire. Bayekolaka nde Biblia mpo na kozwa boyebi ya solosolo mpe litambwisi ya Nzambe.—15/12, lokasa 3.
“Mokili” oyo ekoleka ezali nini?
“Mokili” oyo ekoleka ezali bato nyonso ya mokili oyo bomoi na bango eyokani te na mokano ya Nzambe. (1 Yoa. 2:17) Mabele mpe bato ya sembo bakobika.—1/1, nkasa 5-7.
Atako akufá, ndenge nini Abele azali naino koloba na biso? (Ebr. 11:4)
Abele azali koloba na biso na nzela ya kondima na ye. Tosengeli koluka komekola kondima na ye. Ndakisa na ye ezali malamu mpo na biso.—1/1, lokasa 12.
Makambo nini tosengeli kotika te ete ekómisa biso mosika na Nzambe?
Makambo yango mosusu ezali: Mosala na biso, masano mpe kominanola oyo toponaka, kokangama na ndeko na biso moko ya libota oyo abimisami na lisangá, kosalela mingi baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo, komitungisa koleka ndelo mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, kokanisa ete mbongo ezali eloko oyo eleki ntina, mpe komizwa na valɛrɛ mingi to kokanisa ete makanisi na biso nde ezali na ntina mingi.—15/1, nkasa 12-21.
Komikitisa ya Moize ekoki koteya biso nini?
Na esika atika ete bokonzi oyo azalaki na yango ekómisa ye lolendo, atyelaki nde Nzambe motema. Tosengeli soki moke te kotika ete nguya, bokonzi, to makoki na biso ekómisa biso lolendo, kasi tosengeli nde kotyela Yehova motema. (Mas. 3:5, 6)—1/2, lokasa 5.
Bato oyo bakosekwa bakofanda wapi?
Mwa ndambo ya bato—144 000—bakokende kofanda na likoló. Nzokande, bato mingi oyo bakosekwa bakozonga na bomoi awa na mabele na elikya ya kofanda wana libela na libela.—1/3, lokasa 6.
Na ndimbola nini Bayisraele ‘bakatamaki ngenga na motema te’? (Yir. 9:26)
Bazalaki na mitema makasi mpe ya botomboki; basengelaki kolongola makambo oyo ezalaki kosala ete bákóma mitema makasi, elingi koloba makanisi, mayoki, to bamposa na bango oyo eyokanaki te na oyo ya Nzambe. (Yir. 5:23, 24)—15/3, nkasa 9-10.
Na ndenge nini Yesu azalaki ndakisa malamu na oyo etali kozala na bomoi ya esengo?
Kosala mokano ya Nzambe ezalaki na ntina mingi na bomoi ya Yesu. Alingaki Tata na ye mpe bato mingi. Na yango, Yesu ayebaki ete Tata na ye azalaki kolinga ye mpe kondima ye. Yango nde esalaki ete azala na bomoi ya esengo.—1/4, nkasa 4-5.
Eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele esalemi na nini?
Esalemi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bakomite ya filiale, bakɛngɛli-batamboli, masangani ya bankulutu, masangá, mpe Motatoli mokomoko.—15/4, lokasa 29.
Mpo na nini tokoki koloba ete bitumbu ya Nzambe emonisaki te ete azali motema mabe?
Yehova asepelaka na liwa ya moto mabe te. (Ezk. 33:11) Bitumbu oyo apesaki bato na ntango ya kala emonisi ete na bolingo nyonso, akebisaka bato liboso ya kopesa etumbu. Yango ekoki kopesa biso elikya ete tokobika ntango Nzambe akopesa bato mabe etumbu na mikolo ezali koya.—1/5, nkasa 5-6.
Na Yisraele, bazalaki nde kokakisa basali-mabe na nzete mpo na koboma bango?
Te. Bikólo mosusu na ntango ya kala bazalaki kosala ndenge wana kasi Bayisraele te. Na ntango ya bana ya Yisraele, bazalaki liboso kobamba basali-mabe mabanga kino bakokufa. (Lev. 20:2, 27) Na nsima, bazalaki kobaka nzoto na bango na nzete mpo na kokebisa Bayisraele mosusu.—15/5, lokasa 13.
Mpo na nini ezali mpasi kimya ezala na mokili?
Atako bato basalá makambo mingi, bazali te na likoki ya komitambwisa bango moko. (Yir. 10:23) Satana azali kotambwisa mokili oyo, yango wana bato bakokoka te kotya kimya. (1 Yoa. 5:19)—1/6, lokasa 16.