Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo

Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo

“Nakómisi makundoli na yo eloko na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”​—NZ. 119:111.

1. (a) Bato basalaka nini soki bakundweli bango likambo moko, mpe mpo na nini? (b) Moto ya lolendo asalaka ndenge nini soki bapesi ye toli?

BATO nyonso bayokaka toli ndenge moko te. Soki moto oyo azali na bokonzi akundweli biso likambo moko, mbala mingi toyokelaka ye; kasi soki ezali moninga na biso to moto oyo azali na nse na biso, tokoki koboya koyokela ye. Ndenge oyo bato bayokaka na motema ntango bakebisi bango to bapesi bango disiplini ekesanaka mpe mingi. Bato mosusu bayokaka mawa, basusu balɛmbaka nzoto, mpe basusu bayokaka nsɔni; kasi, ezali mpe na baoyo bayokaka ete balendisami mpe balukaka kobongisa. Mpo na nini bokeseni wana? Ntina moko ezali lolendo. Moto ya lolendo, soki bapesi ye toli, akanisaka ete toli yango etali ye te, yango wana ayokaka yango te; na ndenge yango, azangaka liteya oyo akokaki kozwa na toli yango.​—Mas. 16:18.

2. Mpo na nini bakristo ya solo basepelaka na toli oyo euti na Liloba ya Nzambe?

2 Kasi, biso bakristo ya solo tosalaka bongo te; tosepelaka na toli, mingimingi soki euti na Liloba ya Nzambe. Makambo oyo Yehova akundwelaka biso esalisaka biso tózala na bososoli; eteyaka biso mpe esalisaka biso tókima mitambo lokola kolinga mingi biloko ya mokili, pite mpe ekobo, komɛla bangi mpe kolangwa masanga. (Mas. 20:1; 2 Ko. 7:1; 1 Tes. 4:3-5; 1 Tim. 6:6-11) Longola yango, ‘toyokaka malamu na motema’ mpo totyaka likebi na makundoli ya Nzambe.​—Yis. 65:14.

3. Makanisi nini ya mokomi ya nzembo tosengeli komekola?

3 Mpo tóbatela boyokani na biso na Tata na biso ya likoló, tosengeli kokoba kotosa malako ya Yehova oyo etondi na bwanya na bomoi na biso mobimba. Ekozala malamu mingi soki tozali na makanisi lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Nakómisi makundoli na yo eloko na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo ezali esengo ya motema na ngai”! (Nz. 119:111) Yo mpe osepelaka na mibeko ya Yehova, to ntango mosusu omonaka nde ete ezali mpasi mpo na kotosa yango? Ata soki na bantango mosusu omonaka ete ezalaka mpasi mpo ondima toli oyo bapesi yo, kolɛmba nzoto te. Okoki koyekola kotyela bwanya ya Nzambe motema mobimba! Tótalela ndenge misato oyo tokoki kosala yango.

LIBONDELI EKOSALISA YO OYEKOLA KOTYELA NZAMBE MOTEMA

4. Likambo nini ebongwanaki te na bomoi ya Davidi?

4 Na bomoi ya Mokonzi Davidi, ezalaki na bantango ya bisengo mpe bantango ya mpasi; kasi ezalaki na likambo moko oyo ebongwanaki te: azalaki ntango nyonso kotyela Mozalisi na ye motema mobimba. Alobaki ete: “Ee Yehova, nazali kotombolela yo molimo na ngai. Ee Nzambe na ngai, natyeli yo motema na ngai.” (Nz. 25:1, 2) Nini esalisaki Davidi atyelaka Tata na ye ya likoló motema mobimba ndenge wana?

5, 6. Liloba ya Nzambe eyebisi nini mpo na boyokani oyo Davidi azalaki na yango na Yehova?

5 Bato mingi babondelaka Nzambe kaka ntango bakutani na mikakatano. Okanisi boni soki ozali na moninga moko to ndeko moko ya libota, oyo abengaka yo to alobisaka yo kaka soki azali na mposa ya mbongo to soki alingi ete osalisa ye likambo moko boye? Kende kende, okoki kobanda komituna soki alingaka yo mpenza na bolingo ya solo. Kasi, Davidi azalaki bongo te. Boyokani oyo azalaki na yango na Yehova emonisaki ete azalaki kondimela mpe kolinga Nzambe na ye bomoi na ye mobimba: ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo.​—Nz. 40:8.

6 Yoká maloba oyo Davidi akumisaki na yango Yehova mpe apesaki ye matɔndi: “Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba, yo oyo lokumu ezali kolobelama kuna na likoló!” (Nz. 8:1) Omoni te ete maloba wana emonisi boyokani makasi oyo Davidi azalaki na yango na Tata na ye ya likoló? Ndenge oyo Davidi azalaki kosepela mingi na bonene mpe nkembo ya Yehova ezalaki kotinda ye asanzola Ye “mokolo mobimba.”​—Nz. 35:28.

7. Matomba nini tozwaka soki tozali kopusana penepene na Nzambe na nzela ya libondeli?

7 Ndenge moko na Davidi, tosengeli kobondela Yehova mbala na mbala mpo tóyekola kotyela ye motema mobimba. Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Kopusana penepene na Nzambe na nzela ya libondeli ezali mpe lolenge moko ya ntina mingi oyo tozwaka elimo santu.​—Tángá 1 Yoane 3:22.

8. Mpo na nini tosengeli koboya kozongelaka kaka maloba moko na mabondeli na biso?

8 Ntango obondelaka, ozongelaka kaka bafraze oyo omesaná na yango to osalelaka kaka maloba moko mbala na mbala? Soki ezali bongo, liboso ya kobondela, zwáká mwa miniti mpo na kokanisa makambo nini okoloba. Soki ozongelaka kaka maloba moko mbala nyonso oyo ozali kosolola na moninga to ndeko moko ya libota, akosepela na yango? Te, kutu akoki nde kobanda koboya koyoka yo. Ezali solo ete Yehova akoboya ata mokolo moko te koyoka libondeli oyo euti na motema ya mosaleli na ye ya sembo. Atako bongo, tosengeli koboya momeseno ya kozongelaka kaka maloba moko ntango tozali kosolola na ye.

9, 10. (a) Makambo nini tokoki kolobela na mabondeli na biso? (b) Nini ekoki kosalisa biso tóbongisa mabondeli na biso?

9 Ezali polele ete soki tolingi kopusana penepene ya Yehova, mabondeli na biso esengeli kozala ya likolólikoló te. Soki tozali mpenza kofungwela Yehova motema, tokopusana mpenza penepene na ye mpe tokobanda kotyela ye motema mobimba. Kasi makambo nini tosengeli kolobela na mabondeli na biso? Liloba ya Nzambe epesi eyano oyo: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” (Flp. 4:6) Ya solo, na mabondeli na biso, tokoki kolobela likambo nyonso oyo etali boyokani na biso na Nzambe to bomoi na biso.

10 Tokoki koyekola makambo mingi soki totaleli maloba ya basi ná mibali ya sembo ya ntango ya kala, oyo mabondeli na bango ekomamá na Biblia. (1 Sa. 1:10, 11; Mis. 4:24-31) Mokanda ya Nzembo etondi na mabondeli mpe banzembo oyo euti na motema mpo na kokumisa Yehova. Banzembo mpe mabondeli yango emonisi mayoki nyonso oyo moto azalaka na yango, ezala ya mawa to ya esengo. Koyekola maloba wana oyo bato ya sembo basalelaki ekoki kosalisa biso tóbongisa mabondeli oyo tosalaka epai ya Yehova.

MANYOLÁKÁ MAKUNDOLI YA NZAMBE

11. Mpo na nini tosengeli komanyola batoli ya Biblia?

11 Davidi alobaki ete: “Bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema, ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.” (Nz. 19:7) Ya solo, ata soki tozangi mayele, tokoki kokóma na bwanya soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe. Kasi, ezali na batoli mosusu ya Biblia oyo esɛngaka komanyola yango mpo tózwela yango mpenza matomba. Na ndakisa, komanyola mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tótikala sembo ntango tokutani na komekama na eteyelo to na mosala, tótosa mobeko ya Nzambe na likambo etali makila, tómikɔtisa te na makambo ya politiki, mpe tósalela mitinda ya Biblia na oyo etali molato mpe monzɛlɛ. Koyeba makanisi ya Nzambe na makambo wana ekosalisa biso tómibongisa liboso ete tókutana na komekama. Na nsima, na kati ya motema na biso, tokoki kozwa ekateli ya kosala boye to boye soki tokutani na mokakatano moko. Komibongisa liboso ndenge wana ekoki kosalisa biso tósala te mabunga oyo ekopesa biso mpasi.​—Mas. 15:28.

12. Komanyola mituna nini ekoki kosalisa yo obatela makundoli ya Nzambe?

12 Wana ozali kozela ete bilaka ya Nzambe ekokisama, bomoi na yo ezali komonisa ete ozali ekɛngɛ na elimo? Na ndakisa, ondimaka mpenza ete etikali moke Babilone Monene ebebisama? Mapamboli oyo tokozwa na mikolo ezali koya, na ndakisa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, ezali kaka solo na miso na yo ndenge ezalaki ntango oyebaki yango mpo na mbala ya liboso? Ozali kaka kobatela molende na yo na mosala ya kosakola to okómá nde kotya makambo na yo moko na esika ya liboso? Bongo elikya ya lisekwa, kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolongisama ya bokonzi na ye, ozali kokoba komona ete ezali makambo ya ntina mingi? Komanyola mituna ya ndenge wana ekoki kosalisa yo osala lokola mokomi ya nzembo, ‘okómisa makundoli ya Nzambe eloko na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’​—Nz. 119:111.

13. Mpo na nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki te kokanga ntina ya makambo mosusu? Pesá ndakisa.

13 Ekoki kozala na makambo mosusu na Biblia oyo tokangi naino malamu ntina na yango te mpo ntango ekoki naino te mpo Yehova alimbola yango polele. Yesu azalaki koyebisa bayekoli na ye mbala na mbala ete asengelaki konyokwama mpe kobomama. (Tángá Matai 12:40; 16:21.) Kasi bantoma bazalaki kokanga ntina ya maloba na ye te. Bayaki kokanga ntina na yango kaka nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, ntango abimelaki bayekoli mosusu, mpe “afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.” (Luka 24:44-46; Mis. 1:3) Ndenge moko mpe, bayekoli ya Kristo bayaki kokanga ntina ete Bokonzi ya Nzambe ekotyama nde na likoló kaka na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango elimo santu ekitelaki bango.​—Mis. 1:6-8.

14. Ndakisa nini ya malamu bandeko na biso na ebandeli ya siɛklɛ ya 20 batikelá biso?

14 Ndenge moko mpe, na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bakristo ya solo bazalaki na bilikya mosusu ya lokuta mpo na makambo oyo esengelaki kosalema na “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1) Na ndakisa, na mobu 1914, bato mosusu bakanisaki ete etikali moke bákende likoló. Ntango bamonaki ete elikya yango ekokisamaki te, bakobaki komipesa na koyekola Makomami mpe bayaki kososola ete nsango malamu esengelaki naino kosakolama. (Mrk. 13:10) Yango wana na mobu 1922, Joseph Rutherford, oyo na ntango wana azalaki kokamba mosala ya kosakola, ayebisaki bato oyo bayanganaki na liyangani oyo esangisaka bandeko ya mikili ndenge na ndenge, oyo esalemaki na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, ete: “Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino nde bapalanganisi ya nsango na ye. Na yango, bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Banda wana, kosakola “nsango malamu ya bokonzi” ekómá elembo mpo na koyeba basaleli ya Yehova lelo oyo.​—Mat. 4:23; 24:14.

15. Komanyola makambo oyo Nzambe esaleli bato na ye ezali na matomba nini?

15 Soki tozali komanyola makambo malamu oyo Yehova asaleli basaleli na ye, ezala na ntango ya kala to na mikolo na biso, yango ekosalisa biso tótyela ye motema mobimba ete azali na likoki ya kokokisa makambo oyo akani mpo na mikolo ezali koya. Lisusu, makundoli ya Yehova esalisaka biso tóbosana te bisakweli oyo tozali kozela ete ekokisama. Kosala bongo ekosalisa biso tótyela bilaka ya Nzambe motema mobimba.

MAKAMBO YA LOSAMBO EKOSALISA YO OTYELA YEHOVA MOTEMA

16. Komipesa na mosala ya Nzambe ememaka mapamboli nini?

16 Nzambe na biso Yehova azali Nzambe ya nguya, Nzambe oyo asalaka. Mokomi ya nzembo atunaki ete: “Ee Yah, nani azali makasi lokola yo?” Mpe abakisaki ete: “Lobɔkɔ na yo ezali makasi, lobɔkɔ na yo ya mobali etombolami.” (Nz. 89:8, 13) Lokola Yehova azali Nzambe oyo asalaka, asepelaka na milende oyo tosalaka mpo mosala na ye ekende liboso, mpe apambolaka biso mpo na yango. Amonaka ete basaleli na ye nyonso​—mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló—​bakangaka mabɔkɔ te, ‘balyaka limpa ya gɔigɔi te.’ (Mas. 31:27) Ntango tozali komipesa na mosala na ye, tozali komekola Mozalisi na biso. Kosalela Yehova na motema na biso mobimba ememelaka biso esengo, mpe esepelisaka motema na Ye.​—Tángá Nzembo 62:12.

17, 18. Ndenge nini misala oyo emonisaka kondima ekoki kosalisa biso tókóma kotyela malako ya Yehova motema mingi? Pesá ndakisa.

17 Ndenge nini misala oyo emonisaka kondima esalisaka biso tótyela Nzambe motema mobimba? Tótalela likambo oyo esalemaki liboso ete Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka. Yehova apesaki banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku ya kondimana malako ete bátambola tii bakokɔta na Ebale Yordani. Kasi, ntango Bayisraele bapusanaki pembeni, bamonaki ete ebale yango etondi na mai mpo na bambula oyo ezalaki kobɛta na eleko yango. Basalaki nini? Batyaki bahema na bango na libongo, bafandaki wana, mpo na kozela bapɔsɔ to basanza tii mai ekokita? Te, batyelaki nde Yehova motema mobimba mpe balandaki malako na ye. Nini esalemaki? Lisolo yango elobi: “Mpe ntango . . . makolo ya banganga-nzambe oyo bamemaki Sanduku yango ekɔtaki na ebandeli ya mai . . . mai oyo ezalaki kouta na likoló ebandaki kotɛlɛma esika moko. . . . Bato bakatisaki liboso ya Yeriko. Na ntango yango, banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku ya kondimana ya Yehova batɛlɛmaki kaka, kozanga koningana, na mabele oyo ekauki na katikati ya Yordani, wana Yisraele mobimba ezalaki kokatisa na mabele oyo ekauki.” (Yos. 3:12-17) Kanisá esengo oyo Bayisraele bayokaki ntango bamonaki ebele ya mai wana etɛlɛmi! Ya solo, kondima na bango epai ya Yehova ekómaki lisusu makasi mpo balandaki malako na ye.

Okotyela Yehova motema ndenge basaleli na ye basalaki na mikolo ya Yosua? (Talá paragrafe 17, 18)

18 Ya solo, Yehova asalaka lisusu makamwisi ya ndenge wana te mpo na basaleli na ye lelo oyo, kasi apambolaka biso soki tomonisi kondima mpe tolandi malako na ye. Elimo santu ya Nzambe ezali kopesa biso nguya ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Mpe Yesu Kristo, Motatoli ya Yehova ya libosoliboso, ayebisaki bayekoli na ye ete akosunga bango na mosala yango ya ntina mingi; alobaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso . . . nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:19, 20) Batatoli mingi oyo liboso bazalaki nsɔninsɔni to bazalaki kobanga kosolola na bato bakoki koyebisa ndenge oyo elimo santu ya Nzambe epesaki bango mpiko ya kopesa litatoli ata epai ya bato oyo bayebi te.​—Tángá Nzembo 119:46; 2 Bakorinti 4:7.

19. Ata soki tozali lisusu te na likoki ya kosala mingi na mosala ya Nzambe, elikya nini tozali na yango?

19 Bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali bazali lisusu na likoki ya kosala mingi te na mosala ya Nzambe mpo na maladi to bobange. Atako bongo, bakoki kozala na elikya ete “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso” ayebi bomoi ya mokristo mokomoko. (2 Ko. 1:3) Asepelaka na nyonso oyo tosalaka mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. Biso nyonso tosengeli kobosana te ete tokobika libosoliboso mpo na kondima na biso na mbeka ya lisiko ya Kristo, wana tozali kosala nyonso oyo tokoki.​—Ebr. 10:39.

20, 21. Na makambo nini tokoki komonisa ete totyelaka Yehova motema?

20 Losambo na biso esɛngaka tósalela ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso na motema na biso mobimba. Tolingaka komipesa na motema na biso mobimba na “mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.” (2 Tim. 4:5) Kutu, tosalaka yango na esengo nyonso mpo esalisa bato “bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Emonani polele ete kokumisa mpe kosanzola Yehova ebongisaka boyokani na biso na ye. (Mas. 10:22) Mpe esalisaka biso tótyela Mozalisi na biso motema mobimba.​—Rom. 8:35-39.

21 Ndenge tomoni yango, kotyela malako ya Yehova motema eyaka kaka yango moko te; tosengeli koyekola yango. Na yango, bondeláká mingi mpo okóma kotyela Yehova motema mobimba. Manyoláká ndenge oyo Yehova akokisaki bilaka na ye na ntango ya kala mpe ndenge akosala yango na mikolo ezali koya. Mpe kobá komipesa na makambo ya losambo mpo oyekola kotyela Yehova motema mobimba. Ya solo, makundoli ya Yehova ekoumela libela na libela. Soki obateli yango, yo mpe okozala na bomoi libela na libela!