Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema
“Bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema, ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.”—NZ. 19:7.
1. Makambo nini toyekolaka mbala na mbala na makita na biso, mpe yango esalisaka biso na nini?
NTANGO ozali kobongisa boyekoli moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mbala mosusu esilá kokómela yo oloba: ‘Namoni lokola toyekolá likambo oyo liboso!’ Soki oyanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova banda mwa bambula, mbala mosusu omonaka ete ezali na makambo mosusu oyo ezongelamaka mbala na mbala. Na ndakisa, toyekolaka mbala na mbala makambo etali Bokonzi ya Nzambe, lisiko, mosala ya kosakola, mpe bizaleli lokola bolingo mpe kondima. Koyekola makambo yango mbala na mbala esalisaka biso tózala ntango nyonso na kondima makasi mpe ‘tókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te.’—Yak. 1:22.
2. (a) Mbala mingi, makundoli ya Nzambe elakisaka nini? (b) Ndenge nini makundoli ya Nzambe ekeseni na oyo ya bato?
2 Mbala mingi, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “makundoli” elakisaka mibeko, mitindo, mpe malako oyo Nzambe apesaka basaleli na ye. Mbala mingi mibeko ya bato esɛngaka kosembola yango to kobongola yango; nzokande mibeko mpe malako ya Yehova ezalaka ntango nyonso ya kotyela motema. Atako mibeko yango mosusu epesamaka mpo na eleko to likambo moko boye, ata mokolo moko te eyaka komonana ete ezalaki mabe to ebongaki te. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Boyengebene ya makundoli na yo ezali mpo na seko.”—Nz. 119:144.
3, 4. (a) Makundoli ya Yehova ekoki mpe kozala nini? (b) Matomba nini Bayisraele balingaki kozwa soki bátosaka mitinda ya Nzambe?
3 Na bantango mosusu, makundoli ya Yehova ezalaka mpe makebisi. Mbala mingi, Nzambe azalaki kopesa ekólo Yisraele makebisi na nzela ya basakoli na ye. Na ndakisa, mwa moke liboso ete Bayisraele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Moize akebisaki bango boye: “Bókeba noki motema na bino elengolama, mpe bópɛngwa mpe bósambela banzambe Mib. 11:16, 17) Biblia emonisi ete Nzambe apesaki basaleli na ye makebisi mingi mpo na kosalisa bango.
mosusu mpe bógumbamela bango, mpe noki nkanda ya Yehova engalela bino.” (4 Yehova azalaki mbala na mbala kolendisa Bayisraele bábanga ye, báyoka mongongo na ye, mpe básantisa nkombo na ye. (Mib. 4:29-31; 5:28, 29) Soki bátosaka makebisi wana, Nzambe alingaki kopambola bango mingi.—Lev. 26:3-6; Mib. 28:1-4.
NDENGE BAYISRAELE BATALELAKI MAKUNDOLI YA NZAMBE
5. Mpo na nini Yehova abundelaki Mokonzi Hizikiya?
5 Na lisolo mobimba ya Bayisraele, Nzambe akokisaki bilaka nyonso oyo apesaki bango. Na ndakisa, ntango Senakeribe mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda mpe alukaki kokweisa Mokonzi Hizikiya, Yehova atindaki anzelu moko mpo na kosalisa bato na ye. Na butu moko mpamba, anzelu ya Nzambe abomaki “elombe nyonso, mobali ya nguya” na kaa ya basoda ya Asiri, mpe Senakeribe azongaki na nsɔni na mboka na ye. (2 Nt. 32:21; 2 Bak. 19:35) Mpo na nini Nzambe abundelaki Mokonzi Hizikiya? Mpamba te Hizikiya “akangamaki se na Yehova. Apɛngwaki te mpo na kotika kolanda ye, kasi akobaki kotosa mitindo na ye.”—2 Bak. 18:1, 5, 6.
6. Ndenge nini Mokonzi Yosiya amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema?
6 Ndakisa ya moto mosusu oyo atosaki mitinda ya Yehova ezali Mokonzi Yosiya. Kobanda ntango azalaki na mbula mwambe mpamba, “asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova . . . Apɛngwaki te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.” (2 Nt. 34:1, 2) Yosiya amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema na ndenge alongolaki losambo ya bikeko na mokili na bango mpe azongisaki losambo ya solo. Likambo wana oyo Yosiya asalaki ememelaki ye moko mpe ekólo mobimba mapamboli.—Tángá 2 Ntango 34:31-33.
7. Nini ezalaki kosalema soki Bayisraele baboyi koyoka makundoli ya Nzambe?
7 Kasi likambo ya mawa, bato ya ekólo ya Nzambe batyelaki makundoli ya Yehova motema mobimba ntango nyonso te. Na boumeli ya bankama ya bambula, ntango mosusu bazalaki kotosa Yehova, ntango mosusu bazalaki kotosa ye te. Soki kondima na bango elɛmbi, mbala mingi bazalaki “komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.” (Ef. 4:13, 14) Mpe ndenge Nzambe ayebisaki bango yango liboso, soki baboyi kotyela makundoli na ye motema, bazalaki kobuka mbuma mabe.—Lev. 26:23-25; Yir. 5:23-25.
8. Ndenge nini ndakisa ya Bayisraele ekoki kosalisa biso?
8 Ndenge nini ndakisa ya Bayisraele ekoki kosalisa 2 Pe. 1:12) Tokoki komona makundoli ya Nzambe mbala nyonso oyo totángi Liloba na ye Biblia. Lokola tokelamá na bonsomi ya kopona, tokoki komona malamu tótosa mibeko ya Yehova to mpe tokoki kolanda nzela oyo emonani malamu na miso na biso moko. (Mas. 14:12) Tótala sikoyo ntina oyo tosengeli kotyela makundoli ya Yehova motema mpe matomba oyo tokoki kozwa soki tobateli yango.
biso? Kaka ndenge ezalaki mpo na bango, lelo oyo biso mpe tozwaka toli mpe disiplini. (TOSÁ NZAMBE MPO OZALA NA BOMOI
9. Ntango Bayisraele bazalaki na esobe, ndenge nini Yehova amonisaki bango ete azalaki kosunga bango?
9 Ntango Bayisraele babandaki mobembo na bango oyo eumelaki mbula 40 na ‘esobe moko ya monene mpe ya nsɔmɔ,’ Yehova alimbwelaki bango te na bosikisiki ndenge oyo akotambwisa bango, akobatela bango, mpe akokokisa bamposa na bango. Atako bongo, mbala na mbala amonisaki bango ete soki batyeli ye motema mpe batosi malako na ye bakozwa matomba mingi. Na ndenge azalaki kotambwisa bango na likonzí ya lipata na moi, mpe na likonzí ya mɔtɔ na butu, Yehova azalaki kokundwela Bayisraele ete azalaki kosunga bango na mobembo wana ya mpasi. (Mib. 1:19; Kob. 40:36-38) Azalaki mpe kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo. “Bilamba na bango ekufaki te, mpe makolo na bango evimbaki te.” Ya solo, “bazangaki eloko te.”—Neh. 9:19-21.
10. Ndenge nini Yehova azali kokamba basaleli na ye lelo oyo?
10 Etikali moke biso basaleli ya Nzambe tókɔta na mokili ya sika ya boyengebene. Ondimaka mpenza ete Yehova azali kopesa biso oyo tosengeli na yango mpo tóbika na ‘bolɔzi monene’ oyo ezali koya? (Mat. 24:21, 22; Nz. 119:40, 41) Ya solo, lelo oyo Yehova azali te kosalela likonzí ya lipata to likonzí ya mɔtɔ mpo na kokamba biso tii na mokili ya sika. Kasi, azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kosalisa biso tózala ekɛngɛ. Na ndakisa, mbala na mbala balendisaka biso tókómisa makasi boyokani na biso na Nzambe na nzela ya kotánga Biblia biso moko, kosala Losambo na kati ya libota, koyangana na makita pɔsɔ nyonso mpe kobima mosala ya kosakola. Osili kobongola makambo mosusu na bomoi na yo mpo olanda malako wana? Kosala bongo ekosalisa yo okóma na kondima makasi oyo ekosalisa yo okɔta na mokili ya sika.
11. Makambo nini emonisi ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso?
11 Longola kosalisa biso tózala ekɛngɛ na elimo, ebongiseli ya Yehova epesaka biso mpe malako oyo etali bomoi ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, balendisaka biso tózala na bokatikati mpo na ndenge ya kotalela biloko ya mokili mpe tózala na bomoi ya mindɔndɔ te mpo tókima mitungisi mosusu. Bapesaka mpe biso malako na makambo etali kolata mpe kosala monzɛlɛ, kopona kominanola ya malamu, mpe koluka koyeba bambula boni tosengeli kolekisa na kotánga kelasi. Kanisá mpe makambo oyo bakundwelaka biso mpo na ndenge ya kokima makama oyo ekoki kobima na bandako, na mituka, na Bandako ya Bokonzi mpe ndenge ya kosala soki likama ebimi na mbalakaka. Batoli ya ndenge wana emonisi ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso.
MAKUNDOLI ESALISAKI BAKRISTO YA LIBOSO BÁTIKALA SEMBO
12. (a) Likambo nini Yesu azongelaki mbala na mbala epai ya bayekoli na ye? (b) Likambo nini oyo emonisaki komikitisa etikalaki libela na makanisi ya Petro, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?
12 Na siɛklɛ ya liboso, bazalaki mbala na mbala kokundwela basaleli ya Nzambe makambo. Mbala na mbala, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kozala na komikitisa. Kasi, asukaki kaka te na koyebisa bango soki kozala na komikitisa elimboli nini; amonisaki bango yango na misala. Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu ayanganisaki bantoma na ye mpo na fɛti ya Elekeli. Ntango bantoma bazalaki kolya, Yesu Yoa. 13:1-17) Likambo wana oyo emonisaki komikitisa etikalaki libela na makanisi na bango. Mbula soki 30 na nsima, ntoma Petro, oyo azalaki elongo na Yesu mokolo wana, apesaki baninga na ye bandimi toli na likambo etali komikitisa. (1 Pe. 5:5) Ndakisa ya Yesu esengeli kotinda biso nyonso tózalaka na komikitisa na boyokani na biso na basusu.—Flp. 2:5-8.
atikaki bango na mesa, atɛlɛmaki, mpe asukolaki bango makolo; yango ezalaki mingimingi mokumba ya mosaleli. (13. Yesu azalaki kokundwela bayekoli na ye ete basengeli komonisa ezaleli nini ya ntina?
13 Likambo mosusu oyo Yesu azongelaki mingi epai ya bayekoli na ye ezalaki ntina ya kozala na kondima makasi. Mokolo moko ntango bayekoli na ye balongaki te kobengana demo oyo akɔtelaki mwana moko ya mobali, batunaki Yesu ete: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa ye te?” Yesu alobaki na bango ete: “Mpo bozali na kondima moke. Mpo ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, . . . ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.” (Mat. 17:14-20) Na boumeli ya ntango nyonso oyo asalaki mosala na ye, Yesu azalaki koteya bayekoli na ye ete kondima ezali ezaleli moko ya ntina mingi. (Tángá Matai 21:18-22.) Okendaka na mayangani nyonso, ezala ya minene mpe ya mike, mpe oyanganaka na makita nyonso ya lisangá, mpo ozwa libaku ya kokómisa kondima na yo makasi? Mayangani wana ezalaka kaka ntango ya esengo te; epesaka mpe biso mabaku ya komonisa ete totyelaka Yehova motema.
14. Lelo oyo, mpo na nini tosengeli komonisa bolingo lokola oyo Kristo amonisaki?
14 Makomami ya Grɛki ya bokristo ezali na mikapo ebele oyo ekundwelaka biso ete tosengeli kolingana. Yesu alobaki ete mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali ete “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:39) Moyekoli Yakobo, oyo azalaki ndeko ya Yesu, abengaki bolingo “mobeko ya mokonzi.” (Yak. 2:8) Ntoma Yoane akomaki ete: “Bandeko ya bolingo, nazali kokomela bino, mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala oyo bozwaki banda na ebandeli.” (1 Yoa. 2:7, 8) Yoane alingaki koloba nini ntango alobelaki “mobeko ya kala”? Azalaki kolobela mobeko ya bolingo. Ezalaki “ya kala” mpamba te Yesu alobelaki yango bambula mingi liboso, “banda na ebandeli.” Kasi, mobeko yango ezalaki mpe “ya sika” mpo ezalaki kosɛnga komonisa bolingo ya komipimela, oyo ekosɛnga bayekoli bámonisa ntango bakokutana na makambo oyo bakutanaki na yango liboso te. Lokola tozali bayekoli ya Kristo, tosengeli kosepela mingi na makundoli wana oyo esalisaka biso tókima elimo ya moimi oyo etondi na mokili, oyo ekoki kopekisa biso tólinga bazalani na biso.
15. Mokumba ya Yesu ya libosoliboso awa na mabele ezalaki nini?
15 Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. Amonisaki yango ntango abikisaki bato ya maladi mpe ntango asekwisaki bakufi. Kasi, mokumba ya Yesu ya libosoliboso ezalaki ya kobikisa bato te. Mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya nde esalisaki bato na ndenge ya malamu koleka. Na ndenge nini? Na ndakisa, toyebi ete bato oyo Yesu abikisaki mpe asekwisaki na siɛklɛ ya liboso, nsukansuka banunaki mpe bakufaki; kasi baoyo bandimaki nsango oyo ateyaki bazwaki elikya ya bomoi ya seko.—16. Lelo oyo, nini emonisi ete Batatoli ya Yehova bazali kotosa etinda ya Yesu ya kokómisa bato bayekoli?
16 Mosala ya kosakola oyo Yesu abandaki na siɛklɛ ya liboso ezali kosalema lelo oyo na mokili mobimba. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Mat. 28:19) Tozali mpenza kokokisa mokumba yango lelo oyo! Batatoli ya Yehova koleka milio 7 bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na molende na mikili koleka 230, mpe bazali koyekola Biblia na bamilio ya bato pɔsɔ na pɔsɔ. Mosala ya kosakola ezali mpenza komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka.
KOTYELA YEHOVA MOTEMA LELO OYO
17. Toli nini Paulo ná Petro bapesaki?
17 Tomoni polele ete makundoli esalisaki bakristo ya liboso bátikala makasi na kondima. Kanisá ndenge oyo Timote alendisamaki ntango ntoma Paulo, oyo azalaki mokangami na bolɔkɔ moko na Roma, ayebisaki ye ete: “Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba oyo oyokaki epai na ngai.” (2 Tim. 1:13) Nsima ya kolendisa bandeko na ye bakristo bámonisa bizaleli lokola koyika mpiko, bolingo ya bondeko, mpe komipekisa, ntoma Petro alobaki ete: “Ntango nyonso nakosepela kokundwela bino makambo wana, atako boyebi yango mpe bopikami makasi na solo oyo bozali na yango.”—2 Pe. 1:5-8, 12.
18. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kotalela makundoli oyo bazalaki kozwa?
18 Ezali solo ete mikanda oyo Paulo ná Petro bakomaki ekokanaki na “maloba oyo elobamaki kala na basakoli basantu.” (2 Pe. 3:2) Bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso bazalaki nde kosilika soki bayoki makambo ya ndenge wana? Te, mpamba te yango ezalaki komonisa bolingo ya Nzambe, oyo esalisaki bango ‘bákoba kokola na kati ya boboto monene mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.’—2 Pe. 3:18.
19, 20. Mpo na nini tosengeli kotyela makundoli ya Yehova motema, mpe kosala bongo epesaka biso matomba nini?
19 Lelo oyo, tozali na bantina mingi ya kotya motema na makundoli ya Yehova, oyo ezali na Liloba na ye, Biblia, oyo elobaka ntango nyonso solo. (Tángá Yosua 23:14.) Biblia emonisi ndenge oyo Nzambe asalelaki bato ya kozanga kokoka makambo na boumeli ya bankóto ya bambula. Makambo nyonso wana ekomamá mpo na litomba na biso. (Rom. 15:4; 1 Ko. 10:11) Tozali mpe komona ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Bisakweli ezali lokola makundoli oyo epesami bambula mingi liboso. Na ndakisa, bamilio ya bato basangani na losambo ya solo ya Yehova, ndenge esakolamaki ete ekosalema na “eleko ya nsuka ya mikolo.” (Yis. 2:2, 3) Makambo mabe oyo ezali kosalema na mokili lelo ezali mpe kokokisa bisakweli ya Biblia. Mpe ndenge tolobaki yango liboso, mosala ya kosakola oyo ezali kosalema lelo na mokili mobimba ezali kokokisa mbala moko maloba ya Yesu.—Mat. 24:14.
20 Mozalisi na biso amonisi ete tokoki mpenza kotyela ye motema. Matomba nini tokozwa soki totyeli makundoli na ye motema? Ndeko mwasi moko na nkombo Rosellen asalaki bongo. Alobi boye: “Ntango nabandaki kotyela Yehova motema mobimba, nakómaki komona polele ete azalaki kolinga ngai, kosunga ngai, mpe kopesa ngai makasi.” Biso mpe tokozwa matomba soki tozali koyoka makundoli ya Yehova.