Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mayele ya kokesenisa makambo esalisa yo

Mayele ya kokesenisa makambo esalisa yo

Na ntembe te, oyebi ete Yesu azalaki Moteyi monene, elingi koloba alekaki bateyi nyonso oyo baleká awa na mabele. Mbala mosusu, omekaka kolanda mayele mosusu oyo ye azalaki kosalela mpo na koteya, na ndakisa kotuna mituna mpe kopesa bandakisa. Kasi, oyebaka mpe ete mbala mingi azalaki kokesenisa makambo ntango azali koteya?

Bato mingi, ntango bazali koloba, bakesenisaka makambo. Kutu, yo mpe osalaka yango, mbala mingi ozanga ete okanisa. Na ndakisa, okoki koloba ete: “Balobaki ete bambuma nyonso eteli; kasi oyo wana eteli naino te.” To mpe, “Na bomwana na ye azalaki nsɔninsɔni, kasi sikoyo afungwamá.”

Mpo na kokesenisa makambo mibale, esengeli liboso koloba likambo to likanisi moko, na nsima kosalela maloba lokola kasi to nzokande, mpo na komonisa bokeseni na likambo to likanisi oyo elandi. Moto akoki mpe kobakisa likanisi moko ya sika to konyata likanisi oyo abimisaki liboso. Mayele wana esalisaka moto oyo azali koloba abimisa makambo polele mpe ekoki kosalisa bato bákanga ntina ya likambo oyo azali koloba.

Atako na minɔkɔ mosusu bato basalelaka mayele ya kokesenisa makambo te, ezali malamu tóyeba ntina na yango. Mpo na nini? Mpamba te Biblia, Liloba ya Nzambe, esalelaka yango mingi. Mbala mingi, Yesu azalaki komonisa bokeseni kati na makambo mibale. Na ndakisa, alobaki ete: “Bapelisaka mwinda mpe batyaka yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda kasi na nse ya ekɔlɔ ya komekela te.” “Nayaki mpo na kobebisa [Mibeko] te, kasi mpo na kokokisa yango.” “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi . . . ” “Boyokaki ete balobi, ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’ Nzokande, ngai nalobi na bino: Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.”​—Mat. 5:15, 17, 27, 28, 38, 39.

Mikanda mosusu ya Biblia esaleli mpe mayele ya kokesenisa makambo. Yango ekoki kosalisa yo okanga ntina ya likambo moko boye to oyeba ndenge eleki malamu ya kosala likambo moko. Soki ozali moboti, talelá bokeseni oyo ezali na maloba oyo: “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Soki ntoma Paulo akomaki ete tata (to mama) asengeli kobɔkɔla mwana na disiplini ya Nzambe, toli yango elingaki kaka kozala ya bwanya mpe ya solo. Nzokande, likanisi yango ebimisami polele na ndenge akesenisi makambo mpe alobi ete ‘bósilikisa bango te kasi bóbɔkɔla bango na makebisi ya Yehova.’

Na vɛrsɛ mosusu, Paulo akomaki boye: “Tozali kobunda etumba ná makila mpe mosuni te, kasi . . . ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Ef. 6:12) Na ntembe te, ndenge oyo akesenisi makanisi na vɛrsɛ yango ekoki kosalisa yo omona polele ete etumba oyo ozali kobunda ezali ya lisɛki te. Ozali kobunda na bato lokola yo te; kasi nde na mampinga ya bilimo mabe.

MAYELE YA KOKESENISA MAKAMBO EKOKI KOSALISA YO

Kaka na mokanda ya Baefese, Paulo asalelaki mayele ya kokesenisa makambo na bavɛrsɛ ebele. Koyekola yango ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo Paulo alobaki mpe, na ntembe te, tóyeba malamumalamu oyo tosengeli kosala.

Soki otaleli etanda oyo etángi bavɛrsɛ mosusu ya Baefese mokapo 4 mpe 5 epai Paulo amonisi bokeseni, okosepela na yango mingi mpe ekosalisa yo. Ntango ozali kotánga mokomoko ya makanisi yango, kanisá bomoi na yo moko. Omituna boye: ‘Na bosembo nyonso, elimo nini namonisaka? Nasalaka nini soki likambo ya boye to likambo mosusu ya ndenge yango ebimi? Bato mosusu bakoloba ete nasalaka makambo nini kati na makanisi mibale oyo ekeseni?’ Soki omoni ete makanisi oyo ekeseni emonisi yo likambo moko oyo osengeli kobongisa, salá makasi obongisa yango. Tiká mayele ya kokesenisa makambo esalisa yo.

Bokoki mpe kosalela etanda yango na losambo na kati ya libota. Liboso, bato nyonso ya libota bakoki kotánga makambo yango oyo bakesenisi. Na nsima, moto moko akoki koyebisa eteni ya liboso ya vɛrsɛ moko, mpe kotikela bato mosusu bámeka kobimisa bokeseni oyo ezali na eteni ya mibale. Yango ekoki kopesa libota na bino libaku ya kosolola mpo na komonisa ndenge bokoki kosalela eteni ya mibale malamu koleka. Ya solo, kotalela bokeseni ndenge wana ekoki kosalisa bilenge mpe mikóló bákoba komonisa bizaleli ya bokristo na kati ya libota mpe na bisika mosusu.

Bokeseni oyo ezali na eteni ya mibale elobi nini?

Wana ozali komesana mpe koyeba ntina ya kokesenisa makambo, okobanda mpe koyeba yango mbala moko soki omoni yango na Biblia, mpe okomona ete ekoki kosalisa yo mingi na mosala ya kosakola. Na ndakisa, na mosala ya kosakola, okoki koloba na moto ete: “Bato mingi balobaka ete moto nyonso azalaka na molimo oyo ekufaka te, kasi talá oyo Liloba ya Nzambe elobi awa.” To, ntango ozali koyekola na moto Biblia, okoki kotuna ye: “Bato mingi na mboka na biso balobaka ete Nzambe ná Yesu bazali moto moko; nzokande, totángi nini na Biblia? Bongo yo moko okanisaka nini?”

Na bisika mingi, Biblia ekesenisi makambo mpo na koteya biso, mpe yango ekoki kosalisa biso tótambola na nzela ya Nzambe. Tokoki mpe kosalela mayele wana ya kokesenisa makambo mpo na kosalisa basusu báyeba solo ya Biblia.