Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakisá molende na mosala ya kokebisa bato!

Bakisá molende na mosala ya kokebisa bato!

Bato mingi basepelaka na filme moko ya kala oyo emonisaka engumba San Francisco ndenge ezalaki na ebandeli ya bambula 1900. Mpo na kozwa bilili ya makambo ndenge na ndenge oyo bato bazalaki kosala, batyaki kamera moko liboso ya engbunduka moke oyo ezalaki kotambola na engumba yango mpe batalisaki yango na balabala monene. Filme yango elakisaka biloko lokola makalo oyo bampunda ezalaki kobenda, mituka ya ntango wana, basombi-biloko mpe bana oyo bazalaki kotɛka bazulunalo.

Kasi, bato mingi balingaka filme yango mpo ekoki mpenza kozala ete bazwaki bilili yango na sanza ya minei 1906, mwa moke liboso ya koningana ya mabele oyo esalemaki mpe mɔtɔ oyo epelaki mokolo ya 18 ya sanza yango. Balobaka ete makama yango ebomaki bankóto ya bato mpe ebebisaki eteni wana ya engumba yango. Ekoki kozala ete bilongi ya bato mosusu oyo ezali na filme yango bakufaki mokolo wana. Scott Miles, nkɔkɔ ya moko ya bato oyo basalaki filme yango, alobaki boye: “Bato oyo balakisaka na filme yango bayebaki ata moke te ete likama ezalaki koyela bango. Epesaka mawa mpenza.”

Na 1906, koningana ya mabele mpe mɔtɔ ebebisaki na mbalakaka eteni monene ya engumba San Francisco

Lelo oyo, likambo moko ya ndenge wana ezali koleka. Biso mpe tokoki kaka koyokela bazalani na biso mawa mingi. Bazali kosala misala na bango ya mokolo na mokolo mpe bazali koyeba te likama oyo ezali koyela bango: kobomama ya mokili oyo mpe nsuka ya bomoi na bango. Nzokande, na bokeseni na koningana ya mabele oyo bato bayebaka te ete ezali koya, tokoki kosalela mwa ntango oyo etikali mpo na kokebisa bazalani na biso mpo na mokolo ya kosambisa ya Yehova. Na ntembe te, olekisaka mwa ntango pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola ndako na ndako, kasi okoki kobakisa molende mpo na kokebisa bato?

YESU AZALAKI KOLEKISA MABAKU YA KOSAKOLA TE

Yesu azali ndakisa malamu mpamba te azalaki kolekisa ata libaku moko te mpo na kosakola. Azalaki koteya moto nyonso oyo akutani na ye, ezala mokɔngɔli-mpako oyo amonaki ntango azalaki koleka na nzela, to mwasi oyo akutanaki na ye na libulu ya mai ntango azalaki kopema na moi. (Luka 19:1-5; Yoa. 4:5-10, 21-24) Yesu azalaki kobosana ata ntango na ye ya kopema mwa moke mpo na koteya basusu. Azalaki koyokela bato mawa, yango wana azalaki kopesa bango litatoli malamumalamu. (Mrk. 6:30-34) Lelo oyo, ndenge nini tokoki komekola Yesu, oyo ayebaki ete ntango oyo etikalaki ezalaki mokuse?

BASALELAKA MABAKU NYONSO

Melika afandaka na apartema moko oyo ezalaka mpasi mpo mopaya akɔta. Bato mingi oyo bafandaka kuna bazali bana-kelasi oyo bautá na mikili mosusu; basalelaka batelefone ya mabɔkɔ, mpe bankombo na bango ezali te na buku ya bafandi ya bandako yango. Mpo na kopesa litatoli na bato oyo bafandaka na baapartema yango, Melika asalelaka mabaku oyo akutanaka na bango na bisika oyo balekaka mpo na kokɔta na baapartema na bango to na ascenseur. Alobi boye: “Namonaka yango ete ezali teritware na ngai.” Melika atambolaka na mikanda na minɔkɔ ndenge na ndenge, mpe bato mingi bandimaka kozwa batrakte mpe bazulunalo. Atindaka bango mpe bákɔta na site Internet na biso jw.org. Yango esalisaki ye abanda koyekola Biblia na bato mingi.

Sonia mpe alukaka mabaku ya koteya moto nyonso oyo akutanaka na ye. Asalaka na lopitalo moko, mpe amityelá mokano ya kopesa litatoli epai ya moninga na ye mokomoko ya mosala. Liboso azwaki naino ntango ya koyeba bamposa ya moto mokomoko mpe makambo oyo esepelisaka ye. Na nsima, akómaki koluka moto moko mpo na kosolola na ye masolo ya Biblia na ntango ya bopemi. Na ndenge yango, Sonia abandaki koyekola Biblia na bato mibale. Azali mpe kokana ete na mikolo ezali koya, na ntango ya bopemi, akobanda mpe kokende na esika oyo bato bazelaka liboso ya kokɔta epai ya monganga mpo na kopesa bango litatoli.

SALELÁKÁ MABAKU NYONSO

Moto moko oyo abikaki na koningana ya mabele wana ya 1906 alobaki ete: “Ezali likama oyo eleki monene na makama nyonso oyo esalemá na bitúká to bingumba mosusu.” Nzokande, etikali moke makama nyonso oyo esalemá ekomonana moke liboso ya mokolo monene ya kosambisa oyo ekokómela “baoyo bayebi Nzambe te.” (2 Tes. 1:8) Yehova alingi mpenza ete bato bábongola makanisi mpe mitema na bango mpe báyoka nsango ya likebisi oyo Batatoli na ye bazali kosakola.​—2 Pe. 3:9; Em. 14:6, 7.

Okoki kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli ntango ozali kosala misala na yo ya mokolo na mokolo?

Ozali na libaku malamu ya kofungola bato miso na ntango oyo ya mpasi mpenza mpe kosalisa bango bátika koluka matomba na bango moko, kasi báluka nde Yehova. (Sef. 2:2, 3) Okoki kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli na baninga na yo ya mosala, ya kartye, mpe na bato oyo okutanaka na bango mokolo na mokolo? Okobakisa molende na mosala ya kokebisa bato?