Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?

“Tokobimisela ye babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe na kati ya bato.”​—MIKA 5:5.

1. Mpo na nini mwango ya mokonzi ya Siri mpe ya Yisraele ekokaki kolonga te?

NA ELEKO moko kati na mobu 762 L.T.B. mpe mobu 759 L.T.B., mokonzi ya Yisraele ná mokonzi ya Siri balingaki kobundisa bokonzi ya Yuda. Mokano na bango ezalaki nini? Kokɔta na Yerusaleme, kolongola Mokonzi Ahaze, mpe kotya moto mosusu mokonzi na esika na ye, moto oyo mbala mosusu azalaki na libota ya Mokonzi Davidi te. (Yis. 7:5, 6) Kasi mwango na bango ekokaki kolonga te. Yehova alakaki ete kaka moto ya libota ya Davidi nde asengelaki kofanda na kiti ya bokonzi na ye, mpe maloba na ye ezangaka kokokisama te.​—Yos. 23:14; 2 Sa. 7:16.

2-4. Ndenge nini Yisaya 7:14, 16 ekokisamaki (a) na siɛklɛ ya mwambe L.T.B.? (b) na siɛklɛ ya liboso T.B.?

2 Na ebandeli, emonanaki lokola ete ndenge Siri esanganaki na Yisraele, bakolonga etumba. Na etumba moko mpamba, Ahaze abungisaki basoda 120 000! Maaseya, “mwana ya mokonzi” mpe abomamaki. (2 Nt. 28:6, 7) Kasi Yehova azalaki komona nyonso wana. Akanisaki lisusu elaka oyo apesaki Davidi; na yango atindaki mosakoli Yisaya na nsango moko ya kolendisa mpenza.

3 Yisaya alobaki boye: “Talá! Elenge mwasi akozwa mpenza zemi, mpe akobota mwana mobali, mpe akopesa ye nkombo Emanuele. . . . Liboso mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona malamu, mabele ya bakonzi mibale oyo ozali koyokela nsɔmɔ mpe mpii [Siri mpe Yisraele] ekosundolama mpenza.” (Yis. 7:14, 16) Mbala mingi, tosalelaka eteni ya liboso ya esakweli wana mpo na Masiya, mpe yango ezali solo. (Mat. 1:23) Kasi, lokola “bakonzi mibale,” elingi koloba mokonzi ya Siri mpe mokonzi ya Yisraele, bazalaki lisusu kobundisa Yuda te na siɛklɛ ya liboso T.B., na ntembe te esakweli oyo elobeli Emanuele ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mikolo ya Yisaya.

4 Mwa moke nsima ya kosakola nsango wana ya ntina mingi, mwasi ya Yisaya azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali na nkombo Mahere-shalale-hashe-baze. Ekoki kozala ete Emanuele oyo Yisaya asakolaki ezalaki nde mwana wana. * Na ntango ya kala, soki mwana abotami, bazalaki kopesa ye nkombo moko boye, mbala mosusu mpo na kokanisa likambo moko ya ntina mingi, kasi okomona baboti mpe bandeko ya mwana yango bazali kobenga ye na nkombo mosusu. (2 Sa. 12:24, 25) Toyebi mpenza te soki bazalaki kobenga Yesu na nkombo Emanuele.​—Tángá Yisaya 7:14; 8:3, 4.

5. Ekateli nini ya mabe Mokonzi Ahaze azwaki?

5 Wana Yisraele mpe Siri ekanelaki Yuda, ekólo Asiri mpe ezalaki koluka kobɔtɔla etúká yango. Asiri ezalaki ekólo moko ya nkanza mpe ezalaki kokóma na nguya mingi. Yisaya 8:3, 4 emonisi ete Asiri esengelaki komema “biloko ya Damasi” mpe “biloko oyo bapunzi na Samaria” liboso ya kobundisa Yuda, bokonzi ya sudi. Na esika ya kotya motema na esakweli oyo Nzambe apesaki na nzela ya Yisaya, Ahaze mokonzi ya Yuda oyo azangaki kondima, asalaki nde boyokani na Baasiri, oyo nsukansuka bakómaki konyokola bango. (2 Bak. 16:7-10) Ahaze asalaki bozoba mpenza; akokisaki malamu te mokumba na ye ya mobateli ya mpate. Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Liboso ya kozwa bikateli ya minene, natyelaka nani motema: Nzambe to bato?’​—Mas. 3:5, 6.

MOBATELI YA MPATE YA SIKA ASALI MAKAMBO NDENGE MOSUSU

6. Boyangeli ya Ahaze mpe oyo ya Hizikiya ekesanaki na nini?

6 Ahaze akufaki na mobu 746 L.T.B., mpe mwana na ye Hizikiya akómaki mokonzi na esika na ye. Na ntango wana, bato ya Yuda bakómaki babola mpe batikaki kosambela Yehova. Likambo nini Hizikiya asalaki libosoliboso na bokonzi na ye? Alukaki nde komatisa nkita ya ekólo Yuda? Te. Hizikiya azalaki moto ya elimo, mobateli malamu ya bato ya ekólo na ye. Likambo ya libosoliboso oyo asalaki ezalaki nde kozongisa losambo ya solo mpe kosalisa bato bázongisa boyokani ya malamu na Yehova. Ntango Hizikiya asosolaki oyo Nzambe azalaki kosɛnga ye asala, atosaki kozanga koumela. Azali ndakisa malamu mpenza mpo na biso!​—2 Nt. 29:1-19.

7. Mpo na nini Balevi bazalaki na mposa ya lisalisi ya mokonzi ya sika?

7 Balevi basengelaki kokokisa mokumba ya ntina mingi na mosala monene ya kozongisa losambo ya solo. Yango wana, Hizikiya asalaki likita ná Balevi mpe alakaki bango ete akosalisa bango. Meká komona na makanisi ndenge oyo mpisoli ya esengo ezalaki kobima na miso ya Balevi ya sembo oyo bazalaki na likita yango, ntango bayokaki mokonzi azali koloba na bango ete: “Bino nde Yehova aponi mpo na kotɛlɛma liboso na ye mpo bósalela ye.” (2 Nt. 29:11) Balevi bazwaki etinda ya polele ya kosalisa bato básambela Nzambe ya solo!

8. Hizikiya asalaki lisusu nini mpo na kozongisa losambo ya solo na Yuda, mpe yango ebimisaki matomba nini?

8 Hizikiya abengisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Yisraele na fɛti moko monene ya Elekeli. Nsima ya Elekeli, basalaki fɛti ya bagato ezangá levire, oyo eumelaki mikolo nsambo. Bato basepelaki na fɛti yango mingi, yango wana babakisaki mikolo mosusu nsambo. Biblia elobi ete: “Esengo monene ezalaki na Yerusaleme, mpo banda mikolo ya Salomo mwana ya Davidi mokonzi ya Yisraele, likambo ya boye emonaná naino te na Yerusaleme.” (2 Nt. 30:25, 26) Na ntembe te, bafɛti yango elendisaki mpenza bato nyonso ya Yuda na elimo. Mokanda ya 2 Ntango 31:1 elobi ete: “Ntango kaka basilisaki nyonso wana, . . . babandaki kobuka makonzí ya losambo, kokata banzete ya losambo, kokweisa bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo.” Na ndenge yango, bato ya Yuda babandaki kozongela Yehova. Yango esalisaki bango bámibongisa mpo na komekama monene oyo bakutanaki na yango nsima.

MOKONZI AMILƐNGƐLI MPO NA ETUMBA

9. (a) Myango oyo Yisraele esalaki esukaki ndenge nini? (b) Na ebandeli, Senakeribe asalaki nini ntango ayaki kobundisa Yuda?

9 Kaka ndenge Yisaya asakolaki, bato ya Asiri balongaki Yisraele, bokonzi ya nɔrdi mpe bamemaki bafandi na yango na boombo; na yango, mwango oyo Yisraele ezalaki na yango ya kotyela Yuda mokonzi oyo auti na libota ya Davidi te ekɔtaki mai. Bongo myango ya bato ya Asiri? Balukaki sikoyo kobundisa Yuda. Biblia elobi ete: “Na mbula ya zomi na minei ya Mokonzi Hizikiya, Senakeribe mokonzi ya Asiri amataki kobundisa bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe azwaki yango.” Balobaka ete Senakeribe akweisaki bingumba 46 ya Yuda. Kanisá ndenge oyo olingaki komiyoka soki ozalaki kofanda na Yerusaleme na ntango wana! Basoda ya Asiri, oyo bazalaki se kopusana, bazalaki kokweisa engumba mokomoko ya Yuda!​—2 Bak. 18:13.

10. Mpo na nini Mika 5:5, 6 esengelaki kolendisa Hizikiya?

10 Hizikiya ayebaki ete likama ezali koya, kasi abangaki te mpe akendaki te koluka lisalisi ya bikólo ya bapakano, ndenge tata na ye Ahaze asalaki; atyelaki nde Yehova motema. (2 Nt. 28:20, 21) Ekoki kozala ete ayebaki maloba ya Mika, mosakoli mosusu ya ntango wana, oyo asakolaki mpo na Asiri ete: “Nzokande moasiri, . . . tokobimisela ye babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe na kati ya bato. Mpe bakokamba mpenza mokili ya Asiri na mopanga.” (Mika 5:5, 6) Na ntembe te, maloba wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, esengelaki kolendisa mpenza Hizikiya mpo emonisaki ete Yehova akosalela basoda ya lolenge mosusu mpo na kokweisa bato ya Asiri.

11. Ntango nini esakweli oyo elobeli babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe ekokokisama na monene na yango?

11 Esakweli oyo elobeli babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe esengelaki kokokisama na monene na yango bambula mingi mpenza nsima ya kobotama ya Yesu, “mokonzi na Yisraele, oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala.” (Tángá Mika 5:1, 2.) Yango ekozala na mikolo ezali koya, ntango “Moasiri” ya ntango na biso akobundisa basaleli ya Yehova. Banani oyo Yehova akosalela na nzela ya Mwana na ye, oyo azali koyangela sikoyo, mpo na kobunda na monguna yango? Tokozwa eyano nsima. Liboso, tótalela liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo Hizikiya asalaki ntango basoda ya Asiri bayaki kobundisa bango.

HIZIKIYA AZWI BIBONGISELI OYO ESENGELI

12. Hizikiya ná bato oyo bazalaki elongo na ye basalaki nini mpo na kobatela basaleli ya Nzambe?

12 Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso na makambo oyo biso moko tokokoka te, kasi mposa na ye ezalaka ete tósala oyo tokoki. Hizikiya asololaki na “bankumu na ye mpe mibali na ye ya nguya,” mpe bazwaki mokano “mpo bákanga mai ya maziba oyo ezalaki libándá ya engumba . . . Lisusu, [Hizikiya] azwaki mpiko mpe atongaki efelo oyo ebukanaki mpe atɛlɛmisaki manɔ́ngi likoló na yango, mpe efelo mosusu libándá; . . . mpe asalaki ebele ya bibundeli ya kobwakela ná banguba.” (2 Nt. 32:3-5) Mpo Yehova abatela mpe atambwisa bato na ye na ntango wana, asalelaki mibali ya mpiko lokola Hizikiya, bankumu na ye, mpe basakoli ya sembo.

13. Likambo nini oyo eleki ntina Hizikiya asalaki mpo na kobongisa bato na ye mpo na etumba oyo ezalaki koya? Ndenge nini maloba ya Hizikiya esalisaki bato?

13 Likambo oyo Hizikiya asalaki na nsima ezalaki na ntina mingi koleka kokanga mai to kotonga bifelo mpo na kobatela engumba. Lokola Hizikiya azalaki mokɛngɛli ya malamu, ayanganisaki bato na ye mpe alendisaki bango na maloba oyo: “Bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te mpo na mokonzi ya Asiri . . . , mpo baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na ye. Lobɔkɔ ya moto nde ezali elongo na ye, kasi Yehova Nzambe na biso azali elongo na biso mpo na kosalisa biso mpe kobundela biso bitumba.” Hizikiya akundwelaki bato ete Yehova akobundela bango. Ntango bayokaki bongo, “bato balendisamaki na maloba ya Hizikiya mokonzi ya Yuda.” Tósimba ete “maloba ya Hizikiya” nde elendisaki bato. Hizikiya, bankumu na ye mpe mibali na ye ya nguya, bakisá mpe mosakoli Mika ná mosakoli Yisaya, bamonisaki ete bazali babateli malamu ya mpate, kaka ndenge Yehova asakolaki na nzela ya mosakoli na ye.​—2 Nt. 32:7, 8; tángá Mika 5:5, 6.

Maloba ya Hizikiya elendisaki bato (Talá paragrafe 12, 13)

14. Rabashake alobaki nini, mpe bato basalaki nini?

14 Mokonzi ya Asiri atyaki kaa na ye na Lakishi, na sudi-wɛsti ya Yerusaleme. Longwa na Lakishi, mokonzi atindaki bamemi-nsango misato na Yerusaleme mpo báyebisa bato ete bámitika na mabɔkɔ na ye. Molobeli na ye, oyo bazalaki kobenga Rabashake, asalelaki mayele ndenge na ndenge. Alobaki na bato na monɔkɔ ya mboka na bango, na Ebre; ayebisaki bango bápesa mokonzi na bango mokɔngɔ mpe bámipesa na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Akosaki bango ete akomema bango na mboka mosusu epai bakozala na bomoi ya malamu koleka. (Tángá 2 Bakonzi 18:31, 32.) Na nsima, Rabashake alobaki ete kaka ndenge banzambe ya bikólo mosusu balongaki te kobatela basambeli na bango, Yehova mpe akokoka te kobikisa Bayuda na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Bato bamonisaki bwanya na ndenge balandaki te maloba mpe bifundeli wana ya lokuta. Mbala mingi, basaleli ya Yehova basalaka mpe bongo lelo oyo.​—Tángá 2 Bakonzi 18:35, 36.

15. Bato ya Yerusaleme basengelaki kosala nini, mpe ndenge nini Yehova abikisaki engumba yango?

15 Ya solo, Hizikiya amitungisaki; kasi na esika aluka ekólo mosusu ya makasi esalisa ye, alukaki lisalisi ya Yehova na nzela ya mosakoli Yisaya. Yisaya ayebisaki Hizikiya boye: “[Senakeribe] akokɔta na engumba oyo te, akobwakela yango mpe likula te.” (2 Bak. 19:32) Bato ya Yerusaleme basengelaki kaka kozala na mpiko mpe kolɛmbisa mabɔkɔ te. Yehova nde alingaki kobundela Yuda. Mpe asalaki yango! Biblia elobi: “Esalemaki boye: na butu yango, anzelu ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000) na kaa ya bato ya Asiri.” (2 Bak. 19:35) Bato ya Yerusaleme babikaki mpo Hizikiya akangaki mai ya maziba to atongaki bifelo te, kasi nde mpo Yehova abundelaki bango.

MATEYA MPO NA BISO

16. Lelo oyo, banani bazali (a) bafandi ya Yerusaleme (b) “Moasiri” (c) babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe?

16 Esakweli oyo elobeli babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe ezali kokokisama na monene na yango na mikolo na biso. Na ntango ya kala, bato ya Asiri babundisaki bafandi ya engumba Yerusaleme. Mosika te, “Moasiri” ya ntango na biso akobundisa basaleli ya Yehova, bato oyo bazali komonana lokola bazangi libateli, mpe akoluka kosilisa bango. Biblia elobeli etumba yango, elobeli mpe etumba ya ‘Goge ya Magoge,’ etumba ya “mokonzi ya nɔrdi,” mpe etumba ya “bakonzi ya mabele.” (Ezk. 38:2, 10-13; Dan. 11:40, 44, 45; Em. 17:14; 19:19) Ezali bitumba ebele to etumba kaka moko? Toyebi mpenza te. Ntango mosusu Biblia elobeli kaka etumba moko na bankombo ekeseni. Banani oyo Yehova akosalela mpo na kobundisa monguna yango ya nsɔmɔ, elingi koloba “Moasiri”? Bato oyo mbala mosusu tozalaki kokanisa te: “babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe”! (Mika 5:5) Babateli ya mpate mpe bankumu yango oyo Yehova atye ezali bankulutu ya masangá. (1 Pe. 5:2) Lelo oyo, Yehova atye ebele ya mibali ya sembo mpo bábatela basaleli na ye mpe básalisa bango bábanga te ntango “Moasiri” ya ntango na biso akobundisa bango. * Esakweli ya Mika elobi ete babateli yango “bakokamba mpenza mokili ya Asiri na mopanga.” (Mika 5:6) Ezali polele ete moko ya ‘bibundeli ya etumba na bango’ ezali “mopanga ya elimo,” Liloba ya Nzambe.​—2 Ko. 10:4; Ef. 6:17.

17. Mateya nini minei bankulutu bakoki kozwa na lisolo oyo touti kotalela?

17 Bankulutu, bokoki kozwa mateya ya ntina mingi na lisolo oyo touti kotalela: (1) Likambo ya ntina koleka oyo nkulutu akoki kosala mpo amibongisa mpo na etumba ya “Moasiri” ezali ya kolendisa kondima na ye mpe kosalisa bampate básala mpe bongo. (2) Nkulutu asengeli kondimisama mpenza ete Yehova akobikisa biso ntango “Moasiri” akobundisa biso. (3) Na ntango yango, makambo mosusu oyo ebongiseli ya Yehova ekoyebisa biso tósala mpo tóbika ekoki kokamwisa biso to komonana ntina te na miso na biso. Biso nyonso tosengeli kotosa nokinoki malako nyonso oyo tozwi, ezala tosepeli na yango to te. (4) Moto nyonso oyo atyaka elikya na kotánga bakelasi, na biloko ya mokili, to na bibongiseli ya bato, sikoyo nde ntango oyo asengeli kobongola makanisi na ye. Sikoyo ezali ntango oyo bankulutu basengeli kosalisa nokinoki ndeko nyonso oyo azali kokakatana mpo na kotyela Yehova motema mobimba.

18. Ndenge nini komanyola lisolo oyo ekoki kosalisa biso na mikolo ezali koya?

18 Ekozala na ntango moko oyo biso basaleli ya Nzambe tokomonana lokola tozangi libateli, ndenge ezalaki mpo na Bayuda oyo bazalaki na Yerusaleme na mikolo ya Hizikiya. Na ntango wana, maloba ya Hizikiya ekopesa biso makasi. Tóbosana te ete “lobɔkɔ ya moto nde ezali elongo na [banguna na biso], kasi Yehova Nzambe na biso azali elongo na biso mpo na kosalisa biso mpe kobundela biso bitumba”!​—2 Nt. 32:8.

^ par. 4 Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “elenge mwasi” na Yisaya 7:14 elimbolaka mwasi oyo abalá to mpe mwasi oyo azali naino ngɔndɔ. Na yango, liloba yango moko ekokaki kosalelama ezala mpo na mwasi ya Yisaya to mpo na Maria, elenge mwasi Moyuda oyo azalaki ngɔndɔ.

^ par. 16 Mbala mingi, Biblia esalelaka motángo nsambo mpo na kolobela eloko oyo ezali ya kokoka. Motángo mwambe (nsambo bakisá moko) emonisaka na bantango mosusu ebele ya biloko.