Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate

Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate

“Kristo . . . anyokwa- maki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.”​—1 PE. 2:21.

1, 2. (a) Bampate ezalaka ndenge nini soki ebatelami malamu? (b) Mpo na nini bato mingi na ntango ya Yesu bazalaki lokola bampate oyo ezangá mobateli?

BAMPATE ezalaka nzoto kolɔngɔnɔ soki mobateli ya bampate azali kotyela yango likebi. Buku moko oyo elobeli mosala ya kobɔkɔla bampate elobi ete soki mobateli ya bampate azali kosuka kaka na kotika etonga na esika ya kolya matiti kasi azali kokokisa bamposa na yango mosusu te, nsima ya mwa bambula, bampate ezalaka lisusu makasi te mpe ekómaka kobɛlabɛla. Nzokande, soki mobateli ya bampate azali kotyela mpate mokomoko likebi, bampate nyonso ya etonga ekozala makasi.

2 Ezali mpe bongo na lisangá. Soki babateli ya bampate bazali kotyela mpate mokomoko ya etonga oyo Nzambe apesi bango likebi, bandeko nyonso bakozala makasi na elimo. Na ntembe te, ozali koyeba lisusu ete Yesu ayokelaki ebele ya bato mawa mpo “banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Bakómaki ndenge wana mpo na nini? Mpo bato oyo bazalaki na mokumba ya koteya bango Mibeko ya Nzambe bazalaki makambo makasimakasi, bazalaki kosɛnga bango makambo oyo bango moko bazalaki kosala te, mpe bazalaki kosalela te makambo oyo bazalaki koteya. Na esika básalisa bampate mpe báleisa yango na elimo, bakonzi ya mangomba na Yisraele bazalaki nde kotyela bato “mikumba ya kilo” na mapeka.​—Mat. 23:4.

3. Likambo nini bankulutu ya lisangá basengeli kobosana te wana bazali kokokisa mokumba na bango ya babateli ya bampate?

3 Babateli ya bampate ya mikolo na biso, elingi koloba bankulutu, bazali na mokumba monene. Bampate oyo bango bazali kobatela ezali bampate ya Yehova mpe ya Yesu, “mobateli ya mpate oyo aleki malamu.” (Yoa. 10:11) Bampate yango ‘esombamaki na ntalo moko’ oyo Yesu afutaki na ‘makila na ye ya motuya.’ (1 Ko. 6:20; 1 Pe. 1:18, 19) Alingaka bampate yango mingi, yango wana andimaki kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na bango. Bankulutu basengeli ntango nyonso koyeba ete bazali babateli ya bampate basungi, na nse ya bokonzi ya Mwana ya Nzambe, Yesu Kristo, “mobateli monene ya bampate” oyo atondi na bolingo.​—Ebr. 13:20.

4. Tokotalela nini na lisolo oyo?

4 Ndenge nini bankulutu basengeli kosalela bampate makambo? Biblia elendisi bandeko ya lisangá ‘bátosaka baoyo bazali kokamba bango.’ Kasi elobi mpe ete bankulutu basengeli te ‘komikómisa bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe.’ (Ebr. 13:17; tángá 1 Petro 5:2, 3.) Na yango, ndenge nini bankulutu bakoki kokamba lisangá kozanga ete bámikómisa bakonzi ya etonga? Na maloba mosusu, ndenge nini bankulutu bakoki kokokisa bamposa ya bampate kozanga ete bálekisa ndelo na bokonzi oyo Nzambe apesi bango?

“AKOMEMA YANGO NA NTOLO NA YE”

5. Maloba ya elilingi oyo ezali na Yisaya 40:11 emonisi nini mpo na Yehova?

5 Mosakoli Yisaya alobaki mpo na Yehova ete: “Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye. Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.” (Yis. 40:11) Maloba wana ya elilingi emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bandeko ya lisangá oyo balɛmbi na elimo to oyo bazali na mposa ya libateli. Kaka ndenge mobateli ya bampate ayebaka mposa ya mpate mokomoko ya etonga na ye mpe alukaka mbala moko kokokisa yango, Yehova ayebi malamu bamposa ya bandeko nyonso ya lisangá mpe akokisaka yango na esengo nyonso. Kaka ndenge mobateli ya bampate amemaka mwana mpate oyo ebotami sika na kati ya elamba na ye soki esengeli, Yehova​—“Tata ya motema mawa mingi”—​akobatela biso na bantango ya mpasi. Akobɔndisa biso ntango tokutani na komekama ya makasi to ntango tozali na mposa makasi ya lisalisi.​—2 Ko. 1:3, 4.

6. Ndenge nini nkulutu akoki kolanda ndakisa ya Yehova?

6 Nkulutu, okoki kozwa liteya moko kitoko na ndakisa ya Tata na biso ya likoló! Lokola Yehova, nkulutu asengeli kotya likebi na bamposa ya bampate. Soki ayebi mikakatano mpe bamposa oyo bampate bazali na yango, akoyeba ntango nini mpe ndenge nini akoki kolendisa mpe kosalisa bampate yango. (Mas. 27:23) Ezali polele ete nkulutu asengeli kosololaka malamu na bandeko ya lisangá. Atako nkulutu asengeli koboya kokɔta na makambo ya bato, asengeli kotya likebi na makambo oyo azali komona mpe koyoka na lisangá, mpe na boboto nyonso, koluka “kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu.”​—Mis. 20:35; 1 Tes. 4:11.

7. (a) Na mikolo ya Ezekiele mpe Yirimia, babateli ya mpate bazalaki kosalela bampate ya Nzambe makambo nini? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova atalelaki babateli ya mpate oyo bazangaki bosembo?

7 Tólobela ezaleli ya babateli ya bampate oyo Yehova aboyaki. Na mikolo ya Ezekiele mpe Yirimia, Yehova abimisaki mabe ya baoyo bazalaki na mokumba ya kobatela bampate na ye, kasi basalaki yango na ndenge ya malamu te. Ntango moto moko te azalaki kobatela etonga, bampate ezalaki konyokwama mpe kopanzana. Na esika báleisa bampate, babateli wana ya bampate bazalaki nde kobuba bampate mpe “komileisa bango moko.” (Ezk. 34:7-10; Yir. 23:1) Lelo oyo, Nzambe atalelaka mpe ndenge wana bakonzi ya mangomba ya bokristo. Kasi ezali mpe komonisa ete bankulutu basengeli kokipe malamu etonga ya Yehova Nzambe mpe kotyela yango likebi oyo esengeli.

“NAPESI BINO NDAKISA”

8. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu na oyo etali kosembola bizaleli ya mabe?

8 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, bandeko mosusu bakangaka mbala moko te ntina ya makambo oyo Yehova azali kosɛnga. Ntango mosusu balandaka toli ya Biblia te mpo na kozwa bikateli, to mpe basalaka makambo oyo ezali komonisa ete bakɔmɛli te na elimo. Bankulutu basengeli kosala nini? Basengeli komekola motema molai oyo Yesu amoniselaki bayekoli na ye. Bayekoli bazalaki koluka koyeba nani na kati na bango akozala monene koleka na Bokonzi ya Nzambe. Kasi, Yesu azalaki kosilikela bango te; akobaki koteya bango mpe kopesa bango toli na boboto na oyo etali komonisa ezaleli ya komikitisa. (Luka 9:46-48; 22:24-27) Ntango Yesu asukolaki bango makolo, apesaki bango ndakisa ya komikitisa, ezaleli oyo bankulutu basengeli komonisa.​—Tángá Yoane 13:12-15; 1 Pe. 2:21.

9. Esɛngaki Yesu asembola makanisi nini oyo bantoma bazalaki na yango?

9 Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mokumba ya mobateli ya mpate ekesanaki na ndenge oyo Yakobo ná Yoane bazalaki kotalela yango liboso. Bantoma wana mibale basɛngaki Yesu atya bango na esika ya lokumu na Bokonzi ya likoló. Kasi, Yesu asembolaki makanisi na bango; alobaki ete: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bayokisaka bango bokonzi na bango. Ezali bongo te epai na bino; kasi moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.” (Mat. 20:25, 26) Bantoma basengelaki kobundisa mposa ya ‘kolakisa bokonzi na bango.’

10. Yesu alingi ete bankulutu básalela bampate makambo ndenge nini, mpe ntoma Paulo atiká ndakisa nini na likambo yango?

10 Yesu alingi ete bankulutu básalela bampate makambo ndenge ye moko asalaki yango. Bankulutu basengeli ntango nyonso kosalela bandeko na bango, kasi te kokonza bango. Ntoma Paulo azalaki kosalela bandeko na ye na komikitisa nyonso, mpo ayebisaki bankulutu ya lisangá ya Efese ete: “Boyebi malamu ndenge, banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia, nazalaki elongo na bino ntango nyonso, nazalaki kosalela Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka.” Mposa ya ntoma Paulo ezalaki ete bankulutu wana bámipesa na kosalela bandeko na komikitisa nyonso. Alobaki boye: “Namonisaki bino na makambo nyonso ete na kosaláká mosala makasi ndenge wana nde bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu.” (Mis. 20:18, 19, 35) Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti ete azali mokonzi ya kondima na bango te. Kasi azalaki nde mosaleli ya Nzambe lokola bango, mpe alingaki kosalisa bango básalela Nzambe na esengo. (2 Ko. 1:24) Ntoma Paulo atikelá bankulutu ya lelo ndakisa malamu na oyo etali komikitisa mpe kosala mosala makasi.

‘KANGAMÁ MAKASI NA LILOBA YA SEMBO’

11, 12. Ndenge nini nkulutu akoki kosalisa ndeko moko azwa ekateli?

11 Nkulutu asengeli ‘kokangama makasi na liloba ya sembo na ndenge na ye ya koteya.’ (Tito 1:9) Kasi, asengeli kosala yango na “elimo ya boboto.” (Gal. 6:1) Na esika aluka kotindika bandeko na makasi mpo básala boye to boye, nkulutu ya malamu alukaka nde kosimba mitema. Nkulutu akoki komonisa ndeko moko toli ya Biblia oyo asengeli kolanda ntango alingi kozwa ekateli moko ya monene mpe akoki kotalela elongo na ye makanisi oyo mikanda ya moombo ya sembo ebimisá mpo na likambo yango. Akoki kosɛnga ndeko yango akanisa makambo oyo ekateli na ye ekosala na boyokani na ye na Yehova. Nkulutu akoki mpe komonisa ndeko yango ete ezali na ntina aluka litambwisi ya Nzambe na libondeli liboso azwa ekateli. (Mas. 3:5, 6) Nsima ya kosolola na ndeko yango makambo ya ndenge wana, nkulutu akotika ye azwa ekateli ye moko.​—Rom. 14:1-4.

12 Bankulutu basengeli kosala kaka makambo oyo Biblia epesi bango nzela. Yango wana, ezali na ntina mingi ete básalelaka Biblia malamu mpe bálanda oyo elobi. Kosala bongo esalisaka bankulutu básalela te bokonzi na bango na ndenge ya mabe. Kutu, bankulutu bazali kaka babateli ya mpate basungi, mpe ndeko mokomoko na kati ya lisangá akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpe Yesu mpo na bikateli oyo azali kozwa.​—Gal. 6:5, 7, 8.

“BANDAKISA YA ETONGA”

Bankulutu basalisaka mabota na bango bámibongisa mpo na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 13)

13, 14. Na makambo nini nkulutu asengeli kozala ndakisa mpo na etonga?

13 Nsima ya kopesa bankulutu toli ete ‘bámikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe,’ ntoma Petro alendisaki bango ‘bákóma nde bandakisa ya etonga.’ (1 Pe. 5:3) Ndenge nini nkulutu akoki kozala ndakisa mpo na etonga? Tótalela masɛngami mibale oyo ndeko mobali asengeli kokokisa ntango azali “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli.” Asengeli kozala “moto ya makanisi malamu” mpe “moto oyo akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza.” Soki nkulutu azali tata ya libota, asengeli kotambwisa libota malamu, mpo “soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?” (1 Tim. 3:1, 2, 4, 5) Mpo na kozwa mokumba ya mokɛngɛli, ndeko mobali asengeli kozala na makanisi ya malamu, elingi koloba asengeli kokanga malamu ntina ya mitinda ya Biblia mpe koyeba ndenge ya kosalela yango na bomoi na ye moko. Asengeli kozala moto ya motema mpiɔ ntango mokakatano ebimi kasi te moto oyo azwaka bikateli mbangumbangu. Soki bandeko ya lisangá bazali komona bizaleli wana epai ya nkulutu, bakobanda kotyela ye motema.

14 Bankulutu basengeli mpe kopesa ndakisa na oyo etali kozala molende na mosala ya kosakola. Na likambo yango, Yesu atikelá bankulutu ndakisa. Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezalaki na ntina mingi na bomoi ya Yesu awa na mabele. Alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosala mosala yango. (Mrk. 1:38; Luka 8:1) Lelo oyo, basakoli balendisamaka mingi ntango babimi na mosala ya kosakola elongo na nkulutu, bazali komona molende na ye na mosala wana oyo ekobikisa bato, mpe komekola mayele na ye ya koteya. Ntango bankulutu bazali kosalela ntango mpe makasi na bango na mosala ya kosakola nsango malamu, atako bazalaka na makambo mingi ya kosala, yango elendisaka bandeko ya lisangá bámonisa mpe molende ya ndenge wana. Bankulutu bakoki mpe kopesa ndakisa malamu epai ya bandeko na oyo etali kobongisa makita, kopesa biyano mpe kosala misala mosusu, na ndakisa kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe kobongisa yango.​—Ef. 5:15, 16; tángá Baebre 13:7.

Bakɛngɛli bapesaka ndakisa na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 14)

“BÓSALISA BATO YA BOLƐMBU”

15. Mpo na bantina nini bankulutu bakendaka kotala bandeko?

15 Mobateli malamu ya bampate asalisaka nokinoki mpate oyo ezoki to ebɛli. Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli kosalisa nokinoki ndeko oyo azali konyokwama to oyo azali na mposa ya lisalisi na elimo. Bandeko oyo bakómi mibange mpe baoyo bazali kobɛla balingaka tósalisa bango na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo, kasi balingaka mingimingi tósalisa bango na makambo ya elimo mpe tólendisa bango. (1 Tes. 5:14) Bilenge mosusu bakutanaka na mikakatano, na ndakisa kobundisa “bamposa ya bolenge.” (2 Tim. 2:22) Na yango, bankulutu basengeli kokendaka kotala bandeko ya lisangá mbala na mbala mpo na koyeba makambo oyo bazali kokutana na yango mpe kolendisa bango na batoli ya Biblia. Soki bankulutu bazali kopesa bandeko na bango lisalisi nokinoki, makambo mingi ekosila liboso ete ekóma minene.

16. Ntango ndeko moko ya lisangá azali na mposa ya lisalisi ya elimo, ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa ye?

16 Bongo soki ndeko moko akutani na makambo oyo ezali kotya boyokani na ye na Yehova na likama? Yakobo akomaki boye: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.” (Yak. 5:14, 15) Ata soki ndeko oyo azali na maladi ya elimo ‘abengi bankulutu ya lisangá te,’ bankulutu basengeli kosalisa ye nokinoki ntango kaka bayebi likambo yango. Ntango bankulutu bazali kobondela elongo na bandeko to bazali kobondela mpo na bango, mpe bazali kosalisa bango ntango bazali na mposa ya lisalisi, bakomonisa ete bazali babateli malamu ya bampate oyo balendisaka bandeko na bango mpo bákoba kosalela Nzambe na esengo.​—Tángá Yisaya 32:1, 2.

17. Matomba nini ekomonana soki bankulutu bazali komekola “mobateli monene ya bampate”?

17 Na makambo nyonso oyo basalaka na kati ya ebongiseli ya Yehova, bankulutu basalaka makasi bámekola Yesu Kristo, “mobateli monene ya bampate.” Mibali yango oyo bakɔmɛli na elimo basalisaka etonga ekoba kokola mpe ezala makasi. Mpo na nyonso wana, tosengeli kozala na botɔndi mpe kosanzola Yehova, Mobateli ya mpate oyo akokani na mosusu te.