LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Février 2014

Nimero oyo elobeli makambo kitoko oyo ezali na Nzembo 45. Ekosalisa mpe biso tózala na botɔndi epai na Yehova Nzambe, mpo azali Mosungi, Mobateli mpe Moninga na biso ya motema.

Kumisá Kristo​Mokonzi ya nkembo!

Makambo ya esengo oyo mokanda ya Nzembo 45 elobeli, ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo oyo?

Sepelá na libala ya Mwana-Mpate!

Nani azali mwasi ya libala, mpe ndenge nini Kristo abongisaki ye mpo na libala? Banani bakozala mpe na esengo mpo na libala yango?

Mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá apambwamaki mpo na kondima na ye

Lisekwa ya mwana na ye, ezali moko ya makambo oyo elendisaki mpenza kondima na ye. Mateya nini tokoki kozwa epai na ye?

Yehova azali Mosungi mpe Mobateli na biso

Sepelá na Yehova Nzambe oyo azali Tata na biso ya likoló. Yekolá ndenge ya kokómisa makasi boyokani na yo na Nzambe oyo azali Mosungi Monene mpe Mobateli.

Yehova azali moninga na biso ya motema

Talá ndakisa ya Abrahama mpe Gideone oyo bazalaki baninga ya Yehova ya motema. Masɛngami nini tosengeli kokokisa mpo tókóma baninga ya Yehova?

Mituna ya batángi

Nini esalisaki Bayuda ya siɛklɛ ya liboso ‘bázela’ Masiya?

‘Moná esengo ya Yehova’

Davidi mokonzi ya Yisraele ya kala asepelaki na ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na losambo ya solo. Ndenge nini tokoki kosepela na losambo ya solo lelo oyo?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Filme moko oyo esali sikoyo mbula 100

Kobanda “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” ebimá, mpo na kosalisa bato bákóma kondima mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, ekoki sikoyo mbula 100.