Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Moná esengo ya Yehova’

‘Moná esengo ya Yehova’

Mikakatano ekoki kopesa moto mpasi na motema. Tokoki kobanda kokanisa kaka yango, ekoki kolɛmbisa biso mpe kotinda biso tótalela bomoi na ndenge ya malamu to te. Davidi, mokonzi ya Yisraele akutanaki na mikakatano mingi. Nini esalisaki ye alonga yango? Na moko ya nzembo, Davidi apesi eyano oyo: “Na mongongo na ngai, nabelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi; na mongongo na ngai, nabandaki kobelela Yehova mpo amonisela ngai boboto. Nazalaki kosopa motungisi na ngai liboso na ye; nakobaki koyebisa ye mpasi na ngai, ntango elimo na ngai elɛmbaki makasi na kati na ngai. Bongo yo moko oyebaki nzela na ngai.” Na komikitisa nyonso, Davidi abondelaki Nzambe asalisa ye.​Nz. 142:1-3.

Na ntango ya mikakatano, Davidi abondelaki Yehova na komikitisa nyonso ete asalisa ye

Na nzembo mosusu, Davidi ayembaki boye: ‘Nasɛngi Yehova eloko moko​yango nde nakoluka, ete nafanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo namona esengo ya Yehova mpe natala na botɔndi tempelo na ye.’ (Nz. 27:4) Davidi azalaki Molevi te, kasi meká komona na makanisi ndenge atɛlɛmi libándá ya lopango mosantu pene na tempelo, esika ya losambo ya solo. Mpo na komonisa botɔndi monene oyo azalaki na yango, asepelaki kolekisa ndambo ya mikolo ya bomoi na ye kuna mpo ‘amona esengo ya Yehova.’

Liloba ‘esengo’ ezali ezaleli ya moto oyo azali kosepela. Davidi azalaki ntango nyonso kosepela na ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na losambo. Ekozala malamu tómituna boye, ‘Makanisi na ngai ezalaka lokola oyo ya Davidi?’

ZALÁ NA “BOTƆNDI” MPO NA EBONGISELI YA NZAMBE

Na mikolo na biso, ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopusana penepene na ye ezali te na tempelo, ndenge ezalaki kala. Na esika na yango, ezali nde tempelo monene ya elimo, elingi koloba ebongiseli moko mosantu ya losambo ya solo. * Soki tozali na “botɔndi” na ebongiseli yango, biso mpe tokoki ‘komona esengo ya Yehova.’

Tólobela etumbelo ya motako, oyo bazalaki kosalela mpo na kopesa likabo ya kotumba, oyo ezalaki liboso ya monɔkɔ ya tabernakle. (Kob. 38:1, 2; 40:6) Etumbelo yango ezalaki komonisa bolingo oyo Nzambe azalaki na yango ya kondima mbeka ya Yesu. (Ebr. 10:5-10) Likambo yango ezali mpenza na ntina mpo na biso! Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango tozalaki banguna, tozongisaki boyokani na Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.” (Rom. 5:10) Soki tomonisi kondima na makila oyo Yesu asopaki, tokoki kozala na lipamboli ya kozala baninga ya Nzambe. Soki tosali bongo, ‘Yehova akozala moninga na biso ya motema.’​Nz. 25:14.

Lokola ‘masumu na biso ebomami,’ tokómi na ‘bileko ya kopema oyo eutaka epai ya Yehova.’ (Mis. 3:19) Tozali lokola moto ya bolɔkɔ oyo azali koyoka mawa mpo na makambo oyo asalá mpe ntango azali kozela ete báboma ye, asali bambongwana minene. Ntango zuzi moko ya motema boboto amoni bongo, alimbisi ye mpe alongoli etumbu ya liwa oyo bakatelaki ye. Na ntembe te, moto wana ya bolɔkɔ akoyoka motema ekiti mpe akosepela! Ndenge moko na zuzi wana, Yehova amonisaka motema boboto epai ya bato oyo babongoli motema mpe alongolaka etumbu ya liwa.

SEPELÁ NA LOSAMBO YA SOLO

Na kati ya makambo oyo etali losambo ya solo oyo Davidi akokaki komona na ndako ya Yehova, ezalaki ndenge ebele ya Bayisraele mosusu bazalaki koyangana, kotánga mpe kolimbola Mobeko na miso ya bato, kotumba mpaka ya malasi mpe ndenge banganga-nzambe mpe Balevi bazalaki kosala mosala mosantu. (Kob. 30:34-38; Mit. 3:5-8; Mib. 31:9-12) Makambo wana oyo etalaki losambo ya solo na Yisraele ezali na boyokani na makambo mosusu na mikolo na biso.

Ndenge kaka ezalaki kosalema na ntango ya kala, lelo mpe “ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” (Nz. 133:1) Bokoli esalemi mingi na kati ya “lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Pe. 2:17) Na makita na biso, totángaka Liloba ya Nzambe mpe tolimbolaka yango. Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesaka biso programɛ moko kitoko ya mateya. Tozwaka mpe mikanda ndenge na ndenge oyo esalisaka biso mpe mabota na biso mpo na koyekola. Ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alobaki boye: “Kokanisa na Liloba ya Yehova mpe ndimbola na yango, koluka bososoli esalisi ngai ete nasalela mingi ntango na ngai na makambo ya Nzambe mpe nazala na esengo.” Soki tosali bongo, ‘boyebi ekokóma elɛngi na molimo na biso.’​Mas. 2:10.

Lelo oyo, ebele ya mabondeli ya basaleli ya Nzambe ekendeke epai ya Yehova mokolo na mokolo. Mpo na Yehova, mabondeli yango ezali lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko. (Nz. 141:2) Ezali mpenza esengo mpo na biso koyeba ete Yehova asepelaka mingi ntango tobondelaka ye na komikitisa nyonso!

Moize abondelaki boye: “Yehova Nzambe na biso asepela na biso, mpe longisá mosala ya mabɔkɔ na biso.” (Nz. 90:17) Soki tozali kosala mosala ya kosakola na molende, Yehova apambolaka yango. (Mas. 10:22) Ekoki kozala ete tosalisi bato mosusu báyekola solo. To ekoki kozala ete toyiki mpiko na mosala ya kosakola na boumeli ya bambula mingi atako bato bazali kosepela te to tozali na maladi, basusi mpe minyoko. (1 Tes. 2:2) Atako bongo, tomonaki mpenza ‘esengo ya Yehova’ mpe tomonaki ete tata na biso ya likoló asepelaka mpenza na milende oyo tosalaka, boye te?

Davidi ayembaki boye: “Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai mpe ya kɔpɔ na ngai. Ozali kosimba makasi likabo na ngai. Bisika oyo omeki na nsinga mpo na kopesa ngai libula esepelisi ngai.” (Nz. 16:5, 6) Davidi azalaki na botɔndi mingi mpo na “ndambo ya likabo” na ye, elingi koloba, ndenge azalaki na boyokani malamu ná Yehova mpe libaku malamu ya kozala mosaleli na ye. Lokola Davidi, tokoki kokutana na mikakatano, kasi tozali na mapamboli mingi ya elimo! Na yango, tiká ete tókoba ntango nyonso kosepela na losambo ya solo mpe tózala na “botɔndi” mpo na tempelo ya Yehova ya elimo.

^ par. 6 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1996, nkasa 14-24.