Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá apambwamaki mpo na kondima na ye

Mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá apambwamaki mpo na kondima na ye

MWASI moko oyo mobali akufá ayambi mwana na ye kaka moko. Ezo’lekela ye. Mwa ntango moke liboso, amemaki ebembe ya mwana na ye na mabɔkɔ mpe azalaki kolela. Sikoyo, mwasi yango azali kotala mwana na ye oyo asekwi mpe azali na esengo mpe azali komungamunga. Mopaya oyo ayaki epai ya mwasi yango alobaki boye: “Talá, mwana na yo azali na bomoi.”

Likambo yango esalemaki esili koleka mbula soki 3 000. Okoki kotánga lisolo yango na mokanda ya 1 Bakonzi mokapo 17. Mopaya oyo ayaki na ndako ya mwasi yango ezalaki Eliya, mosakoli ya Nzambe. Mpe mama yango ezalaki nani? Ezali mwasi moko oyo mobali na ye akufá, oyo nkombo na ye eyebani te; kasi azalaki kofanda na engumba Zarefate. Lisekwa ya mwana na ye, ezali moko ya makambo oyo elendisaki mpenza kondima na ye. Wana tokotalela lisolo na ye, tokozwa mateya mingi ya ntina.

ELIYA AKUTANI NA MWASI MOKO OYO MOBALI AKUFÁ OYO AZALI NA KONDIMA

Yehova alobaki ete na eleko moko ya boyangeli ya mokonzi mabe Ahaba, mbula ekobɛta te na boumeli ya ntango molai. Nsima ya kosakola likambo yango, Nzambe abatelaki Eliya mpo Ahaba asala ye mabe te mpe aleisaki ye na ndenge ya kokamwa na limpa mpe misuni oyo bayanganga ememelaki ye. Na nsima, Yehova ayebisaki Eliya ete: “Tɛlɛmá, kende na Zarefate ya Sidone, mpe fandá kuna. Talá! Nakopesa mpenza mitindo na mwasi moko, oyo mobali akufá, ete apesaka yo bilei.”​1 Bak. 17:1-9.

Ntango Eliya akómaki na Zarefate, amonaki mwasi yango azali kolɔkɔta mwa nkoni. Ezalaki nde mwasi oyo akokaki kopesa mosakoli Eliya bilei? Ndenge nini akokaki kosala yango lokola ye moko azalaki mobola? Atako Eliya azalaki mpenza kondima te, kasi abandaki kosolola ná mwasi yango. Alobaki boye: “Nabondeli yo, yelá ngai mwa mai na mbɛki namɛla.” Ntango azalaki kokende kozwela ye mai, Eliya abakisaki ete: “Nabondeli yo, yelá ngai mwa limpa.” (1 Bak. 17:10, 11) Kopesa mopaya mai ezalaki mpasi te mpo na mwasi wana, kasi kopesa ye limpa, ezalaki mpenza mama na likambo.

Mwasi yango alobaki boye: “Lokola Yehova Nzambe na yo azali solo na bomoi, nazali na gato ya libungutulu te, kaka mwa farini na elokó ya monene mpe mwa mafuta na elokó ya moke; mpe talá nazali kolɔkɔta mwa nkoni, nakokende mpe nakosala mwa eloko mpo na ngai ná mwana na ngai ya mobali; tokolya yango mpe tokokufa.” (1 Bak. 17:12) Soki tokanisi na lisolo ya mwasi oyo mpe Eliya tokomona nini?

Mwasi yango andimaki ete Eliya azali Moyisraele oyo abangaka Nzambe. Yango emonani na maloba oyo alobaki ete “lokola Yehova Nzambe na yo azali solo na bomoi.” Emonani ete atako ayebaki mwa moke Nzambe ya Yisraele, kasi azalaki te kobenga Yehova “Nzambe na ngai.” Azalaki kofanda na Zarefate, engumba ya Sidone, to emonani lokola ete ezalaki kotambwisama na Sidone, engumba ya Fenisia. Ekoki kozala ete basambeli ya Baala bazalaki kofanda na Zarefate. Kasi, Yehova amonaki likambo moko ya ntina mingi epai ya mwasi wana.

Atako epai mwasi yango azalaki kofanda basambeli ya bikeko bazalaki mingi, kasi ye amonisaki kondima. Yehova atindaki Eliya epai ya mwasi yango mpo na bolamu na ye mpe ya Eliya ye moko. Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi na likambo yango.

Bato nyonso te ya Zarefate oyo bazalaki kosambela Baala nde bazalaki mabe mpenza. Ntango Yehova atindaki Eliya epai ya mwasi wana, amonisaki ete amonaka makanisi malamu oyo bato oyo bakómi naino te basaleli na ye bazalaka na yango. Ya solo, “na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye [Nzambe] mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​Mis. 10:35.

Na nini ebele ya bato oyo bazali na teritware na yo bakokani na mwasi wana ya Zarefate? Atako basambeli ya lingomba ya lokuta bazali zingazinga na bango, ekoki kozala ete bazalaka na mposa makasi ya eloko moko kitoko. Ekoki kozala ete bazali na mwa boyebi ya Yehova to te, mpe ntango mosusu bakoki kozala na mposa ya lisalisi soki bakoyamba losambo ya solo. Ozali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosalisa bango?

“SALELÁ NGAI NAINO MWA GATO YA LIBUNGUTULU”

Tótalela na likebi mpenza likambo oyo Eliya asɛngaki mwasi wana asala. Mwasi yango autaki koyebisa Eliya ete soki abongisi biloko mpo na ye mpe mwana na ye, mpe soki balei yango, na nsima bakokufa. Kasi Eliya alobaki nini? “Kobanga te. Kende, salá ndenge olobi. Kasi na oyo ezali wana, salelá ngai naino mwa gato ya libungutulu, mpe memelá ngai yango, bongo na nsima, okoki kosala mwa eloko mpo na yo ná mwana na yo. Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Farini ya elokó ya monene ekosila te, mpe mafuta ya elokó ya moke ekozanga te tii mokolo oyo Yehova akopesa mbula makasi na mabele.’”​1 Bak. 17:11-14.

Bato mosusu bakokaki koloba, ‘Tópesa yo biloko nyonso oyo totikali na yango? Tiká masɛki wana.’ Kasi mwasi wana asalaki bongo te. Atako ayebaki Yehova mingi te, andimelaki Eliya mpe asalaki ndenge asɛngaki ye. Kondima na ye emekamaki mpenza mpe azwaki ekateli ya malamu mpenza!

Kondima oyo mwasi wana amonisaki epai ya Yehova, Nzambe ya Eliya, ebatelaki ye ná mwana na ye

Nzambe atikaki te mwasi wana atako azalaki mobola. Ndenge kaka Eliya alakaki, Yehova akómisaki mwa biloko ya mwasi yango ebele mpo esalisa Eliya, mwasi yango mpe mwana na ye tii ntango mbula ekobanda kobɛta. Ya solo, “Farini ya elokó ya monene esilaki te, mpe mafuta ya elokó ya moke ezangaki te, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Eliya.” (1 Bak. 17:16; 18:1) Soki mwasi yango aboyaka kolanda makambo oyo Eliya alobaki, mwa gato ya libungutulu oyo asalaki na farini mpe mafuta oyo atikalaki na yango elingaki kozala bilei na ye ya nsuka. Kasi, amonisaki kondima, atyelaki Yehova motema mpe apesaki Eliya bilei liboso.

Liteya oyo tokoki kozwa awa ezali ete Nzambe apambolaka baoyo bamonisaka kondima na misala. Ntango bosembo na yo emekami mpe omonisi kondima, Yehova akosalisa yo. Akozala Mosungi, Mobateli mpe Moninga mpo na kosalisa yo olonga komekama na yo.​Kob. 3:13-15.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 1898, na Lingelesi elobelaki liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya mwasi wana oyo mobali akufá ete: “Lokola mwasi wana azalaki na kondima oyo esengeli mpo na kotosa, yango wana ebongaki mpenza ete Nkolo asunga ye na nzela ya mosakoli; soki amonisaka kondima te, mwasi mosusu alingaki komonana oyo alingaki kotosa. Ndenge moko mpe biso, na mobembo na biso ya bakristo, Nkolo azali komema biso na esika oyo kondima na biso emekamaka. Soki tomonisi kondima, tokozwa mapamboli, kasi soki te, tokozanga mapamboli yango.”

Ntango tokutani na komekama, tosengeli koluka toli na Makomami mpe na mikanda na biso. Na nsima, tosengeli kosala na boyokani ya litambwisi ya Yehova atako ekoki kozala mpasi mpo na kondima likambo yango. Tokozwa mpenza mapamboli soki tosali na boyokani ya maloba oyo ya Salomo: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”​Mas. 3:5, 6.

‘OYEI EPAI NA NGAI MPO NA KOBOMA MWANA NA NGAI?’

Kondima ya mwasi yango elingaki komekama lisusu. Biblia elobi ete: “Nsima ya makambo oyo, mwana ya mwasi yango, nkolo ndako, abɛlaki, mpe maladi na ye ekómaki makasi kino atikalaki lisusu na mpema te.” Lokola azalaki koluka ntina oyo mwana na ye akufi, mwasi yango atunaki Eliya boye: “Ngai na yo likambo nini, Ee moto ya Nzambe ya solo? Oyei epai na ngai nde kokundolela ngai libunga na ngai mpe koboma mwana na ngai.” (1 Bak. 17:17, 18) Maloba wana ya mpasi elimboli nini?

Mwasi yango akanisaki nde lisumu moko oyo etungisaki lisosoli na ye? Akanisaki ete Nzambe abomaki mwana na ye mpo na mabe moko oyo asalaki mpe atindaki Eliya amemela ye nsango ya liwa? Biblia elobi yango te, kasi likambo ya ntina ezali ete: Mwasi yango alobaki mabe ata mbala moko te mpo na Nzambe.

Eliya ayokaki mpasi na motema mpo na liwa ya mwana wana mpe na likanisi oyo mama ya mwana wana azalaki na yango ete koya ya Eliya nde epesaki ye mpasi wana nyonso. Eliya amemaki ebembe ya mwana yango na shambrɛ ya likoló. Na nsima, abondelaki boye: “Ee Yehova Nzambe na ngai, opesa lisusu mpasi na mwasi oyo mobali akufá, esika nazali kofanda mopaya, na kobomáká mwana na ye?” Mosakoli Eliya asengelaki kokoka te nsɔni oyo likambo wana elingaki kobwaka na nkombo ya Nzambe soki apesaki nzela ete mwasi wana ya boboto mpe moyambi ya bapaya anyokwama mingi lisusu. Na yango, Eliya abondelaki ete: “Ee Yehova Nzambe na ngai, nabondeli yo, salá ete molimo ya mwana oyo ezonga kati na ye.”​1 Bak. 17:20, 21.

“TALÁ, MWANA NA YO AZALI NA BOMOI”

Yehova azalaki koyoka. Mwasi yango apesaki Eliya bilei mpe amonisaki kondima na misala. Emonani ete Nzambe apesaki nzela ete mwana yango akufa na maladi wana, mpo ayebaki ete lisekwa, lisekwa ya liboso oyo Makomami elobeli, ekosalema mpe ekopesa mabota oyo ekoya na nsima elikya. Ntango Eliya abondelaki, Yehova azongisaki mwana yango na bomoi. Kanisá naino esengo oyo mwasi yango ayokaki ntango Eliya alobaki ete: “Talá, mwana na yo azongi na bomoi”! Mwasi yango alobaki na Eliya ete: “Sikoyo, ya solo, nayebi ete ozali moto ya Nzambe mpe ete liloba ya Yehova oyo ezali na monɔkɔ na yo ezali solo.”​1 Bak. 17:22-24.

Mokanda ya 1 Bakonzi mokapo 17 elobeli lisusu te mwasi yango. Kasi, lokola Yesu alobelaki ye na ndenge ya malamu, ekoki kozala ete alekisaki mikolo ya nsuka ya bomoi na ye lokola mosaleli ya sembo ya Yehova. (Luka 4:25, 26) Lisolo na ye eteyi biso ete Nzambe apambolaka baoyo basalaka malamu mpo na basaleli na ye. (Mat. 25:34-40) Emonisi mpe ete Nzambe asungaka bato ya sembo, ata na ntango ya mikakatano makasi. (Mat. 6:25-34) Lisolo yango emonisi mpe polele ete Yehova azali na mposa mpe likoki ya kosekwisa bato bakufá. (Mis. 24:15) Ya solo, makambo oyo kitoko emonisi mpenza bantina oyo tosengeli kokanisaka mwasi wana ya Zarefate.