Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge oyo bato ya ntango ya kala bazalaki kopasola bilamba na bango ezalaki kolimbola nini?

MAKOMAMI elobeli masolo ya bato mingi oyo bapasolaki bilamba na bango. Likambo yango ekoki kokamwisa batángi mingi ya Biblia lelo oyo, kasi mpo na Bayuda likambo yango ezalaki komonisa ete moto ayoki mpasi mingi na motema, azali na mawa to mpo ayoki nkanda.

Na ndakisa Rubene “apasolaki bilamba na ye” ntango amonaki ete likanisi na ye ya kobikisa leki na ye Yozefe esimbaki te mpo bandeko na ye batɛkaki ye na boombo. Tata na bango Yakobo, “apasolaki bilamba na ye” ntango akanisaki ete nyama mabe moko ya zamba ebomi Yozefe. (Eba. 37:18-35) Yobo ‘apasolaki elamba na ye’ ntango bayebisaki ye ete bana na ye nyonso bakufi. (Yobo 1:18-20) Momemi-nsango moko oyo azalaki na ‘bilamba epasukapasuka’ atɛlɛmaki liboso ya Eliya, nganga-nzambe monene mpo na koyebisa ye ete Bayisraele balongaki te na etumba, bana na ye mibale ya mibali babomamaki, mpe babɔtɔlaki sanduku ya kondimana. (1 Sa. 4:12-17) Ntango mokonzi Yosiya ayokaki maloba ya mibeko oyo batángelaki ye mpe amonaki mabunga oyo bato na ye basalaki, “apasolaki bilamba na ye.”​—2 Bak. 22:8-13.

Ntango bazalaki kosambisa Yesu, nganga-nzambe monene Kaifa “apasolaki bilamba na ye ya likoló” ntango ayokaki maloba oyo ye amonaki ete ezali kofinga. (Mat. 26:59-66) Masolo ya kala ya Barabi elobaki ete moto nyonso oyo ayoki bazali kofinga nkombo ya Nzambe asengeli kopasola bilamba na ye. Nzokande, mikanda na bango mosusu oyo ebimaki nsima ya kobebisama ya tempelo ya Yerusaleme elobaki ete “moto nyonso oyo ayoki bazali kofinga nkombo ya Nzambe na mikolo na biso asengeli te kopasola bilamba na ye, mpo soki asali yango, bilamba na ye ekokóma mikemike.”

Kasi, kopasola bilamba ezalaki mpenza na ntina na miso ya Nzambe kaka soki moto oyo asali bongo amonisi mawa ya solosolo. Yango wana, Yehova ayebisaki bato na ye ‘bápasola mitema na bango, kasi bilamba na bango te; mpe bázongela ye.’​—Yoe. 2:13.