LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mai 2014

Nimero oyo ekomonisa mayele misato oyo tokoki kosalela na mosala na biso ya kosakola mpo na kopesa biyano oyo ekondimisa bato na mituna oyo ebimisaka ntembe. Mpo na nini ezali na ntina ete tókangama na ebongiseli ya Nzambe?

‘Bilei na ngai ezali kosala mokano ya Nzambe’

Mokonzi Davidi, ntoma Paulo, mpe Yesu Kristo basepelaki kosala mokano ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kokoba komonisa molende na mosala ya kosakola na bateritware ya mpasi?

Ndenge nini tosengeli “kopesa moto mokomoko eyano”?

Ndenge nini tokoki kokanisaka na bato malamumalamu na Makomami ntango tokutani na mituna ya ntembe? Talelá mayele misato oyo tokoki kosalelaka mpo na kopesa biyano oyo ekondimisa bato.

Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola

Ndenge nini tosengeli kotalela moto nyonso oyo tozali kokutana na ye na mosala ya kosakola? Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 7:12 eyokani na mosala na biso ya kosakola?

LISOLO YA BOMOI

Yehova asalisaki ngai mingi

Kenneth Little amonisi lolenge oyo Yehova Nzambe asalisaki ye alongola ezaleli na ye ya malilimalili mpe komimona ete azali na ntina te. Luká koyeba ndenge Nzambe apambolaki milende na ye.

Yehova azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo

Ndenge nini masolo ya Yisraele ya kala mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso emonisi ete lelo oyo basaleli ya Yehova awa na mabele bakosala makambo na molɔngɔ?

Ozali kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova?

Mosika te, Armagedone ekotya nsuka na mokili oyo mabe. Mpo na nini ezali na ntina ete tókangama kaka na ebongiseli oyo Nzambe azali kosalela lelo oyo awa na mabele?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Mosala ya kobuka mbuma ezali naino mingi”

Batatoli ya Yehova koleka 760 000 bazali kosakola nsango malamu na Brésil. Ndenge nini bayekoli ya Biblia babandaki mosala ya kobuka mbuma na Amerika ya Sudi?