Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova?

Ozali kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova?

“Miso ya Yehova ezali kotala bayengebene.”​—1 PE. 3:12.

1. Ebongiseli nini ezwaki esika ya Yisraele ya lipɛngwi oyo ezalaki komema nkombo ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

YEHOVA nde atambwisaki makambo mpo lisangá ya bokristo esalema na siɛklɛ ya liboso mpe losambo ya solo ezongisama na eleko na biso. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, ebongiseli oyo esalemaki na bayekoli ya liboso ya Kristo ezwaki esika ya ekólo ya Yisraele ya lipɛngwi oyo ezalaki komema nkombo ya Yehova. Ebongiseli wana ya sika oyo Nzambe apambolaki mpenza, ebikaki ntango Yerusaleme ebomamaki na mobu 70 T.B. (Luka 21:20, 21) Nyonso wana ezalaki elilingi ya makambo oyo esengelaki kosalema epai ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso. Mosika te, ebongiseli oyo ya Satana ekokóma na nsuka na yango, kasi eteni ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele, ekobika ntango mikolo oyo mabe ekosuka. (2 Tim. 3:1) Nini ekoki kotinda biso tóndima likambo yango?

2. Yesu alobaki nini na ntina etali “bolɔzi monene,” mpe ndenge nini ekobanda?

2 Mpo na komonisa ete kozala na ye ekomonana te na miso ya bato mpe mpo na kolobela nsuka ya makambo oyo, Yesu alobaki ete: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” (Mat. 24:3, 21) Bolɔzi monene yango ekobanda ntango Yehova akosalela banguya ya politiki mpo na koboma “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Em. 17:3-5, 16) Nini ekosalema na nsima?

SATANA AKOSALA LIKAMBO OYO EKOMEMA NA ARMAGEDONE

3. Nsima ya kobomama ya lingomba ya lokuta, Satana, bato mpe bibongiseli na ye mosusu bakoluka kosala basaleli ya Yehova nini?

3 Nsima ya kobomama ya lingomba ya lokuta, Satana, bato mpe bibongiseli mosusu ndenge na ndenge ya mokili na ye bakobundisa basaleli ya Yehova. Na ndakisa, mpo na “Goge ya mokili ya Magoge,” Makomami esakoli ete: “Okoya lokola mbula ya mopɛpɛ makasi. Okokóma lokola mapata mpo na kozipa mokili, yo ná bituluku na yo nyonso mpe ebele ya bato ya bikólo elongo na yo.” Lokola Batatoli ya Yehova bazali na basoda te mpe bazali bato ya kimya mpenza awa na mabele, ekomonana ete ekozala mpasi te mpo na kosala bango mabe. Kasi ekozala mpenza libunga monene koluka kosala bango mabe!​—Ezk. 38:1, 2, 9-12.

4, 5. Yehova akosala nini ntango Satana akoluka koboma basaleli na ye?

4 Nzambe akosala nini na milende oyo Satana akomonisa mpo na koboma basaleli na ye? Yehova akokɔtela bango, akomonisa ete ye nde azali na lotomo ya kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova akomona ete kobundisa basaleli na ye ezali kobundisa ye moko. (Tángá Zekaria 2:8.) Na yango, Tata na biso ya likoló akosala na lombangu mpo na kosunga biso. Lobiko yango ekomonana polele ntango Yehova akoboma mokili oyo ya Satana na Armagedone, “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”​—Em. 16:14, 16.

5 Mpo na Armagedone, Biblia esakoli ete: “‘Yehova azali na likambo ná bikólo. Ye moko akosamba ná ekelamu nyonso ya mosuni. Bongo bato mabe akopesa bango na mopanga,’ yango nde liloba ya Yehova. “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Talá! mpasi moko ezali kobima longwa na ekólo moko kino na ekólo mosusu, mpe mopɛpɛ moko monene mpe ya makasi ekobima longwa na nsukansuka ya mabele. Mpe baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele. Bakolela bango te, mpe bakoyanganisama te mpe bakokundama te. Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.’” (Yir. 25:31-33) Armagedone ekotya nsuka na mokili oyo mabe. Mokili oyo ya Satana ekozala lisusu te, kasi eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ekotikala.

MPO NA NINI EBONGISELI YA YEHOVA EZALI LELO OYO KOKENDE LIBOSO?

6, 7. (a) “Ebele mpenza ya bato” bauti wapi? (b) Bokoli nini emonani na boumeli ya bambula oyo euti koleka?

6 Eteni ya ebongiseli ya Nzambe oyo ezali awa na mabele ezali kokende liboso mpo azali kondima bato oyo bazali na kati na yango. Biblia elobi na biso boye: “Miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango.” (1 Pe. 3:12) Na kati ya bayengebene yango, tokoki mpe kotánga “ebele mpenza ya bato” oyo “bauti na bolɔzi monene.” (Em. 7:9, 14) Bato yango bazali te “mwa ebele.” Bazali nde “ebele mpenza,” elingi koloba ebele mpenza ya bato. Ozali komimona na kati ya ebele mpenza ya bato wana oyo bakobika na “bolɔzi monene”?

7 Ebele mpenza wana ya bato bauti wapi? Bazali kosangisama elongo mpo na kokokisa eteni moko ya elembo ya Yesu oyo etali kozala na ye. Alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Na mikolo oyo ya nsuka, wana nde mosala ya ntina mingi oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kosala. Lokola mosala ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba mpe mpo na mateya ya Batatoli ya Yehova, bamilio ya bato bayekoli kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:23, 24) Na ndakisa, na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, kobanda na bambula ya mosala 2003 tii 2012, bato koleka 2 707 000 babatisamaki mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali sikoyo koleka 7 900 000, mpe bamilio ya bato bazali kosangana ná bango, mingimingi ntango bakanisaka liwa ya Nkolo mbula na mbula. Totutaka ntolo te mpo na ebele wana ya bato, mpo ‘Nzambe nde moto azali kokolisa.’ (1 Ko. 3:5-7) Kasi, emonani polele ete motángo ya ebele mpenza ya bato ezali se kobakisama mpe ezali kokóma monene mbula na mbula!

8. Nini esali ete bokoli monene esalema na eteni ya ebongiseli ya Yehova na mikolo na biso?

8 Motángo ya basaleli ya Nzambe ebakisami mpenza makasi mpo Yehova ye moko nde azali kosunga Batatoli na ye. (Tángá Yisaya 43:10-12.) Biblia esakolaki bokoli yango na maloba oyo: “Oyo ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.” (Yis. 60:22) Na ebandeli, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaki lokola “oyo ya moke,” kasi motángo na bango ebakisamaki ntango Bayisraele mosusu ya elimo bayaki na ebongiseli ya Nzambe. (Gal. 6:16) Lokola Yehova apamboli ebongiseli na ye na boumeli ya bambula oyo eleki, bokoli yango ezali mpe kokoba na ndenge ebele mpenza ya bato bazali koyanganisama.

OYO YEHOVA AZALI KOSƐNGA BISO

9. Tosengeli kosala nini soki tolingi kosepela na makambo oyo Liloba ya Nzambe elaki?

9 Ezala tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo to na kati ya ebele mpenza ya bato, tokoki kosepela na makambo kitoko oyo Liloba ya Nzambe elaki. Kasi, mpo na kosala yango, tosengeli kokokisa masɛngami ya Yehova. (Yis. 48:17, 18) Tótalela naino Bayisraele na ntango ya Mobeko ya Moize. Moko ya bantina ya mobeko yango ezalaki mpo na kobatela Bayisraele mpe kopesa bango malako na makambo etali kosangisa nzoto, mimbongo, kobatela bana, ndenge ya kosalela Bayisraele mosusu makambo, mpe bongo na bongo. (Kob. 20:14; Lev. 19:18, 35-37; Mib. 6:6-9) Kokokisa mpe masɛngami ya Nzambe ememelaka mpe biso matomba, na ntembe te, tomonaka te ete kosala mokano na ye ezali kilo. (Tángá 1 Yoane 5:3.) Na yango, ndenge Mobeko ezalaki kobatela Bayisraele, soki biso mpe tozali kotosa mibeko ya Yehova Nzambe mpe mitinda na ye, tokobatelama mpe tokozala “makasi na kondima.”​—Tito 1:13.

10. Mpo na nini tosengeli kobombaka ntango mpo na koyekolaka Biblia mpe kosalaka Losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ?

10 Eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali kokende liboso na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, bososoli na biso ya mateya ya Biblia ezali se kokóma polele. Esengeli mpenza kozala bongo, mpo “nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” (Mas. 4:18) Kasi ekozala malamu tómituna boye: ‘Nazali kosalela bingɛngiseli ya mateya ya Makomami oyo tozali kozwa? Natángaka Biblia mokolo na mokolo? Natángaka na molende mikanda na biso? Ngai ná libota na ngai tosalaka Losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ?’ Mingi kati na biso tokondima ete ezali mpasi te kosala makambo yango. Mbala mingi, esɛngaka kaka kobomba ntango mpo na kosala yango. Mpe ezali mpenza na ntina ete tózwa boyebi ya sikisiki ya Makomami, tósalelaka yango, mpe tókende liboso na elimo, mingimingi sikoyo lokola bolɔzi monene ezali se kokóma pene!

11. Bafɛti ya Bayisraele ezalaki komemela bango matomba nini, mpe makita ná mayangani na biso ya minene ememelaka biso matomba nini?

11 Ebongiseli ya Yehova ezali mpenza kosala mpo na bolamu na biso ndenge elendisaka biso tólanda toli oyo ya ntoma Paulo ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Ebr. 10:24, 25) Bafɛti oyo Bayisraele bazalaki kosala mbula na mbula mpe mayangani mosusu mpo na losambo, ezalaki kolendisa bango na elimo. Na ndakisa, milulu yango lokola fɛti ya mwa ndako ya matiti oyo esalemaki na mikolo ya Nehemia ezalaki mpenza bantango ya esengo. (Kob. 23:15, 16; Neh. 8:9-18) Tozwaka mpe matomba ya ndenge wana na makita mpe mayangani na biso ya minene. Tosengeli mpenza kozalaka na makita mpe mayangani yango mpo tókola na elimo mpe tózala na esengo.​—Tito 2:2.

12. Ndenge nini tosengeli kotalela mosala ya kosakola Bokonzi?

12 Lokola tozali na kati ya ebongiseli ya Nzambe, tozali na esengo ya kopesa mabɔkɔ na “mosala mosantu ya nsango malamu.” (Rom. 15:16) Kosala “mosala [yango] mosantu” ekómisaka biso “bato oyo bazali kosala elongo” na Yehova, “Mosantu.” (1 Ko. 3:9; 1 Pe. 1:15) Kosakola nsango malamu esalaka ete nkombo mosantu ya Yehova esantisama. Mpe ezali mpenza libaku malamu ndenge Nzambe apesi biso “nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo.”​—1 Tim. 1:11.

13. Mpo tózala makasi na elimo mpe tózwa bomoi tosengeli kosala nini?

13 Nzambe alingaka ete tókangama na ye mpe tópesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge ya ebongiseli na ye mpo tózala makasi na elimo. Moize ayebisaki Bayisraele ete: “Nazali mpenza kozwa likoló ná mabele batatoli liboso na bino lelo, ete natye bomoi ná liwa liboso na yo, lipamboli ná elakeli mabe; mpe osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo, na kolingáká Yehova Nzambe na yo, koyokáká mongongo na ye mpe kokangamáká na ye; mpo azali bomoi mpe bolai ya mikolo na yo, mpo ofanda na mabele oyo Yehova Nzambe alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete akopesa bango.” (Mib. 30:19, 20) Tokozwa bomoi kaka soki tozali kosala mokano ya Yehova, tozali kolinga ye, mpe na limemya nyonso tozali koyoka mongongo na ye mpe tozali kokangama na ye.

14. Ndenge nini ndeko moko atalelaki eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo emonanaka?

14 Ndeko Pryce Hughes, oyo akangami mpenza na Nzambe mpe atamboli elongo na ebongiseli na ye, akomaki boye: “Nazali mpenza na botɔndi ndenge natambwisaki bomoi na ngai na boyokani ya mikano ya Yehova na mikolo wana, elingi koloba liboso mpenza ya mobu 1914 . . . Soki ezalaki na eloko moko oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ngai, ezalaki kokoba kokangama na eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, kasi te na makanisi ya bato. Nsima ya kobongisa makanisi na ngai na likambo yango, nazwaki ekateli ya kotikala sembo na ebongiseli ya Yehova. Ndenge nini mosusu moto akoki kondimama na Yehova mpe kozwa mapamboli na ye?”

KOBÁ KOKENDE LIBOSO ELONGO NA EBONGISELI YA NZAMBE

15. Pesá ndakisa moko ya Makomami oyo emonisi ndenge oyo tosengeli kotalelaka bingɛngiseli oyo tozwaka mpo na kososola Biblia.

15 Soki mokomoko na biso alingi ete andimama na Yehova mpe apambola ye, asengeli kopesa ebongiseli na ye mabɔkɔ mpe kondima bingɛngiseli oyo tozwaka mpo tósosola Biblia malamu. Na ndakisa: Nsima ya liwa ya Yesu, Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo, oyo bazalaki na molende mpo na Mibeko, bazalaki na mokakatano mpo na kotika yango. (Mis. 21:17-20) Kasi, mokanda oyo Paulo atindelaki Baebre esalisaki bango bándima ete basantisamaki te na nzela ya bambeka oyo ‘ezalaki kopesama na kolanda Mibeko,’ kasi nde “na likabo ya nzoto ya Yesu Kristo mbala moko mpo na libela.” (Ebr. 10:5-10) Na ntembe te, mingi na kati ya bakristo yango ya Bayuda babongolaki makanisi na bango mpe bakendaki liboso na elimo. Biso mpe tosengeli koyekolaka na molende mpe kozala na makanisi malamu ntango tozali kozwa bingɛngiseli mpo na kososola Liloba ya Nzambe to mpo na mosala na biso ya kosakola.

16. (a) Makambo nini ekosala ete bomoi na mokili ya sika esepelisaka mingi? (b) Nini ozali kozela na motema likoló na mokili ya sika?

16 Baoyo nyonso bakotikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye, bakokoba kozwa mapamboli na ye. Bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa libula elongo na Kristo kuna na likoló. (Rom. 8:16, 17) Soki tozali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele, kanisá esengo oyo okozala na yango ntango okofanda na Paradiso. Lokola tozali na kati ya ebongiseli ya Yehova, oyo nde esengo tozali na yango sikoyo ya koyebisa basusu mokili ya sika oyo Nzambe alaki! (2 Pe. 3:13) Mokanda ya Nzembo 37:11 elobi ete: “Bato ya komikitisa bakozwa mabele mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Bato “bakotonga bandako mpe bakofanda kuna” mpe “bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.” (Yis. 65:21, 22) Monyoko, bobola mpe nzala ekozala lisusu te. (Nz. 72:13-16) Babilone Monene akokosa lisusu moto te, mpo akozala lisusu te. (Em. 18:8, 21) Bakufi bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko. (Yis. 25:8; Mis. 24:15) Oyo nde bilikya kitoko ezali kozela bamilio ya bato oyo bamipesá na Yehova! Mpo ete mokomoko na biso amona kokokisama ya bilaka oyo na miso, asengeli kokoba kokola na elimo, kokende liboso elongo na ebongiseli ya Nzambe, mpe kosala ntango nyonso makasi ete atikala te nsima na yango.

Omimonaka na kati ya Paradiso? (Talá paragrafe 16)

17. Ndenge nini tosengeli kotalela losambo ya Yehova mpe ebongiseli na ye?

17 Lokola ebongiseli oyo ekómi mpenza na nsuka, tiká ete tózala na ekateli ya kotikala sembo mpe komonisa botɔndi mpenza mpo na ebongiseli oyo Nzambe azwá mpo na losambo. Yango nde ezaleli oyo Davidi, moko ya bakomi ya nzembo amonisaki, ntango ayembaki ete: “Nasɛngi Yehova eloko moko​—Yango nde nakoluka, ete nafanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na komona bisengo ya Yehova mpe kotala na botɔndi tempelo na ye.” (Nz. 27:4) Tiká ete mokomoko na biso akangama na Nzambe, akoba kotambola elongo na basaleli na ye mpe akoba kokende liboso elongo na eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele.