Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Yehova asalisaki ngai mingi

Yehova asalisaki ngai mingi

Mokolo moko na ntɔngɔ mpe ntango malili ezalaki makasi, ngai ná mwasi na ngai Evelyn, tokitaki na engbunduka na Hornepayne, na nɔrdi ya Ontario, na Canada. Ndeko moko ayaki kozwa biso, mpe nsima ya komɛla ti elongo na libota na ye, totambolaki na kati ya nɛjɛ mpe tosakolaki ndako na ndako. Nsima ya midi, nasalaki diskur na ngai ya liboso ya mokɛngɛli ya zongazonga. Tozalaki kaka biso mitano, moto mosusu ayaki te.

ATAKO mokolo oyo nasalaki diskur wana ya liboso na mobu 1957 bato bazalaki mingi te, kasi yango etungisaki ngai te. Nazalaki moto ya malilimalili. Kutu, ntango nazalaki elenge, nazalaki kobatama soki bapaya bayei epai na biso, ata soki nayebi bango.

Kasi, likambo ya kokamwa, mikumba mingi oyo nakokisi na ebongiseli ya Yehova, ezalaki kosɛnga ngai nasala elongo na bato mosusu, ezala baninga mpe bato oyo nayebi te. Kasi, nakobaki kobunda etumba mpo nalonga ezaleli na ngai wana ya malilimalili mpe komimona ete nazali na ntina te, mpe nakoki te kotombola mapeka ndenge nalongaki na mikumba oyo nazwaki. Kutu, namonaki nde bosolo ya elaka oyo ya Yehova ete: “Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Yis. 41:10) Lolenge moko ya ntina mpenza oyo Yehova asalisaki ngai ezali na nzela ya lisalisi ya Batatoli mosusu. Tiká nabɛtɛla bino lisolo ya bamosusu na bango, kobanda na ntango oyo nazalaki naino mwana.

AZALAKI KOSALELA BIBLIA MPE MWA BUKU MOKO YA MOINDO

Na kati ya ferme na biso na sudi-wɛsti ya Ontario

Mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ na bambula ya 1940, moi ezalaki makasi, Elsie Huntingford ayaki na ferme na biso na sudi-wɛsti ya Ontario. Mama ayambaki ye na porte. Papa azalaki mpe malilimalili lokola ngai. Ngai ná ye tofandaki na kati mpe tozalaki koyoka. Lokola tokanisaki ete ndeko Huntingford ayaki kotɛkɛla biso biloko mpe ete mama alingi asomba biloko oyo tosengeli na yango te, tata akendeki na porte koyebisa ye ete tozali na mposa na yango te. Ndeko Huntingford atunaki boye: “Bino bosepelaka te koyekola Biblia?” Papa ayanolaki ete: “Mpo na nini te, tosepelaka na yango.”

Ezalaki mpasi ndeko Huntingford akutana na biso na ntango ya malamu. Mpo baboti na ngai bazalaki bandimi ya molende mpenza ya Église unie du Canada, kasi bautaki kolongwa kuna. Mpo na nini? Mpo na porte ya monene ya église, sango atyaki liste ya bato oyo bapesaki makabo kobanda na moto oyo apesaki mingi tii na nse. Lokola baboti na ngai bazalaki bazwi te, bankombo na bango ezalaki pene ya nsuka mpenza, mpe bakonzi ya lingomba bazalaki kotinda bango na makasi bábakisa. Mpo azalaki na mposa ya kobatela mosala na ye, sango mosusu andimaki ete azalaki te koteya makambo oyo andimaka. Yango wana, tolongwaki na lingomba yango kasi tozalaki koluka epai wapi tokokokisa mposa na biso ya koyeba Nzambe.

Lokola mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Canada, ndeko Huntingford azalaki koyekola na libota na biso, azalaki kosalela kaka Biblia mpe makambo mosusu oyo ezalaki na mwa buku moko ya moindo. Ntango ayaki koyeba ete tokoki soki moke te kotɛka ye epai ya bakonzi, abandaki koyekola na biso na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tozalaki kobomba malamumalamu mikanda yango soki tosilisi koyekola. *

Baboti na ngai bayokaki nsango malamu na nzela ya mosala ya kosakola ndako na ndako mpe babatisamaki na mobu 1948

Atako botɛmɛli mpe mikakatano mosusu ezalaki, ndeko Huntingford azalaki kosakola nsango malamu na molende. Molende na ye esepelisaki ngai mpe etindaki ngai nazwa ekateli mpo na solo. Mbula moko nsima ya batisimo ya baboti na ngai, ngai mpe nabatisamaki. Nazwaki batisimo mokolo ya 27/02/1949, na saani oyo bato oyo babɔkɔlaka banyama bazalaki kosalela mpo na kotyela banyama na bango mai. Nazalaki na mbula 17. Na nsima, nazalaki na mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso.

YEHOVA ASALISAKI NGAI NAZALA NA MPIKO

Nakamwaki ntango babengaki ngai na Betele na mobu 1952

Nazalaki kobanga kobanda mosala ya mobongisi-nzela mbala moko. Mpo na mwa ntango, nasalaki na banki mpe na biro moko mpo namonaki ete esengeli nazala na mwa mbongo oyo ekosalisa ngai nasala mosala ya mobongisi-nzela malamu. Kasi, lokola nazalaki naino elenge mpe nakɔmɛlaki te na makanisi, nasilisaki mwa mbongo yango noki. Ndeko moko na nkombo Ted Sargent alendisaki ngai ete nazala na mpiko mpe natyela Yehova motema. (1 Nt. 28:10) Maloba wana ya boboto esalisaki ngai, mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya zomi na moko na mobu 1951. Nazalaki kaka na dolare 40 na mabɔkɔ, velo oyo basalelá mpe sakosi ya sika. Kasi Yehova azalaki kosalisa ngai ntango nyonso mpo nazanga eloko te. Nazalaka mpenza na botɔndi ndenge Ted alendisaki ngai nabanda mosala ya mobongisi-nzela! Yango ememelaki ngai mapamboli mosusu.

Mokolo moko na mpokwa, na sanza ya mwambe ya mobu 1952, babengaki ngai na telefone na Toronto. Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Canada ebengaki ngai nabanda kosala na Betele na sanza ya libwa. Atako nazalaki malilimalili mpe naya naino te na Betele, nasepelaki makasi ntango babongisi-nzela bayebisaki ngai makambo ya kitoko ya Betele. Namiyokaki mbala moko lokola na ndako.

“MONISÁ BANDEKO ETE OMIBANZABANZAKA MPO NA BANGO”

Mbula mibale nsima ya kokɔta Betele, nakómaki mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu) na esika ya ndeko Bill Yacos, na lisangá moko ya Toronto. Lokola nazalaki kaka na mbula 23, nazalaki komimona lokola mwana moko ya ferme oyo ayebi naino makambo te. Kasi, na komikitisa mpe na bolingo nyonso, ndeko Yacos alakisaki ngai oyo nasengeli kosala. Mpe Yehova asalisaki ngai mingi.

Ndeko Yacos, azalaki mobali moko makasi mpe mokuse, azalaki ntango nyonso komungamunga na bato, mpe azalaki kosepela na bato. Azalaki kolinga bandeko mpe bandeko bazalaki kolinga ye. Azalaki kotala bango mbala na mbala na bandako na bango kasi te kaka ntango bazali na makambo. Ndeko Bill Yacos alendisaki mpe ngai ete nasala kaka bongo mpe nasala elongo na bandeko mibali mpe basi na mosala ya kosakola. Alobaki ete: “Ken, monisáká bandeko ete omibanzabanzaka mpo na bango. Mpe yango ekozipa ebele ya mabunga na biso.”

MWASI NA NGAI AMONISAKA BOLINGO YA SOLOSOLO

Yehova asalisi ngai mpenza kobanda sanza ya yambo ya mobu 1957. Na sanza yango, nabalaki Evelyn, oyo akɔtaki na kelasi ya mbala ya 14 ya Gileadi. Liboso tóbalana, azalaki kosala na teritware oyo balobaka Lifalanse na Québec. Na ntango wana, Lingomba ya Katolike nde ezalaki kokonza makambo na Québec. Mokumba ya Evelyn ezalaki mpasi mingi, kasi akangamaki na yango mpe na Yehova.

Ngai ná Evelyn tobalanaki na mobu 1957

Evelyn atikalaki mpe sembo epai na ngai. (Ef. 5:31) Kasi, bosembo na ye emekamaki ntango kaka tobalanaki! Tosengelaki kosala mobembo na Floride, na États-Unis, kasi mokolo moko nsima ya libala na biso, Betele esɛngaki ngai nalanda formasyo ya pɔsɔ moko na Betele ya Canada. Na ntembe te, formasyo yango ebebisaki programɛ na biso, kasi ngai ná Evelyn tozalaki na mposa ya kosala likambo nyonso oyo Yehova akosɛnga biso tósala. Tokataki konjɛ na biso ya libala. Na boumeli ya pɔsɔ wana, Evelyn azalaki kosakola mosika te na biro ya filiale. Atako teritware yango ezalaki ndenge moko te ná oyo ya Québec, kasi ayikaki mpiko.

Ntango formasyo yango esilaki, bayebisaki ngai ete nakómi mokɛngɛli ya zongazonga na nɔrdi ya Ontario. Nautaki kobala, nakokisi kaka mbula 25 mpe nayebaki naino makambo mingi te, kasi totyelaki Yehova motema mpe tokendeki. Na eleko oyo malili ezalaki makasi na Canada, tozwaki engbunduka moko na butu elongo na bakɛngɛli-batamboli mosusu oyo bayebaki mosala yango malamu mpe bazalaki kozonga na bateritware na bango. Balendisaki biso mingi! Ndeko moko kutu atingamaki kaka tózwa esika na ye ya kolala na engbunduka oyo afutelaki mbongo, mpo tótɛlɛma te butu mobimba. Na ntɔngɔ, mikolo 15 ya mpamba nsima ya libala na biso, totalaki mwa etuluku moko na Hornepayne, ndenge nayebisaki yango na ebandeli.

Bambongwana ebele ezalaki kozela ngai ná Evelyn. Ntango nazalaki kosala lokola mokɛngɛli ya etúká na bambula 1960, nazwaki mokanda mpo nakɔta kelasi ya mbala ya 36 ya Gileade. Kelasi yango esengelaki koumela sanza zomi, kobanda na sanza ya mibale 1961 na Brooklyn, New York. Atako nasepelaki makasi, kasi esengo yango ekitaki lokola namonaki te nkombo ya Evelyn na kati. Lokola basi mosusu, basɛngaki Evelyn akoma mokanda mpo na komonisa ete andimi tókabwana mpo na sanza zomi. Evelyn alelaki, kasi toyokanaki ete nakɔta kelasi yango, mpe azalaki na esengo ete nakozwa formasyo moko kitoko na Gileade.

Na ntango wana, Evelyn azalaki kosala na Betele ya Canada. Azalaki na libaku malamu ya kozala na shambrɛ moko ná ndeko Margaret Lovell, ndeko yango atyami mafuta na elimo. Na ntembe te, ngai ná Evelyn tokabwanaki mpenza ntango molai. Kasi, na lisalisi ya Yehova, tokangamaki na mikumba wana oyo tozwaki mpo na ntango mokuse. Elimo wana oyo amonisaki ya komipimela ntango oyo tokokaki kozala elongo mpo ete tókóma bato oyo babongi mpenza mpo na Yehova mpe ebongiseli na ye, esimbaki mpenza motema na ngai.

Nsima ya kolekisa soki sanza misato ya Gileade, ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba misala ya Batatoli ya Yehova na ntango wana, asɛngaki ngai likambo moko oyo nazalaki kutu te kokanisa na ntango wana. Asɛngaki ngai soki nakoki kokata formasyo na Gileadi mpe kozonga na Canada mpo napesa mabɔkɔ mpo na mwa ntango na Betele kotángisa na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi. Ndeko Knorr ayebisaki ngai ete soki nasepeli nakei, soki te nakoki kotika. Nakoki kozonga lisusu na Gileade kosilisa formasyo soki nalingi mpe na nsima, bakoki kotinda ngai na mosala ya misionɛrɛ. Amonisaki mpe ete soki nandimi kozonga na Canada, bakobenga ngai lisusu te na Gileade, ntango mosusu, nalingaki koyeba te epai wapi to mosala nini nakosala na nsima na Canada. Atikaki ngai nasolola likambo yango ná Evelyn.

Lokola Evelyn ayebisaki ngai lolenge atalelaka mikumba na ebongiseli ya Yehova, nayebisaki mbala moko ndeko Knorr ete, “Tokosepela kosala eloko nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ekolinga tósala.” Tozalaki ntango nyonso komona ete atako tozalaka na makambo oyo tosepelaka na yango, tosengeli kokende epai nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ekotinda biso.

Na sanza ya minei 1961, natikaki Brooklyn mpe nazongaki na Canada mpo na kotángisa na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi. Na nsima, tokómaki basangani ya libota ya Betele. Kasi, nakamwaki mpo nazwaki mokanda mpo na kokɔta kelasi ya mbala ya 40 ya Gileade, oyo esengelaki kobanda na mobu 1965. Na mbala oyo mpe, esengelaki Evelyn akoma mokanda mpo na komonisa ete andimi tókabwana mpo na mwa ntango. Kasi mwa bapɔsɔ na nsima, tosepelaki makasi ntango ye mpe azwaki mokanda mpo tókɔta kelasi elongo.

Ntango tokómaki kuna, ndeko Knorr ayebisaki biso ete bana kelasi lokola biso oyo bayebaki koloba Lifalanse bakotindama na Afrika. Kasi, mokolo tosilisaki, batindaki biso lisusu na Canada! Batyaki ngai mokambi ya filiale (lelo oyo mokambi ya komite ya filiale). Lokola nazalaki kaka na mbula 34, nayebisaki ndeko Knorr ete, “Nazali naino elenge.” Kasi ayebisaki ngai ete nakitisa motema. Mpe banda na ebandeli, nazalaki kokutana na mikóló, bandeko oyo baumeli mingi na Betele liboso ya kozwa bikateli ya minene.

BETELE, ESIKA YA KOYEKOLA MPE KOTEYA

Kosala na Betele epesi ngai mabaku mingi ya kozwa mayele epai ya basusu. Namemyaka mpe nasepelaka mingi na bandeko mosusu ya komite ya filiale. Nayekoli mpe makambo mingi epai ya ebele ya bandeko mibali mpe basi, bilenge to mikóló, oyo balekisi bomoi na bango awa na Betele mpe baoyo tokutani na bango na masangá ndenge na ndenge oyo batindaki biso.

Nazali kotambwisa losambo ya ntɔngɔ na Betele ya Canada

Mosala ya Betele epesi mpe ngai libaku ya koteya basusu mpe kolendisa kondima na bango. Ntoma Paulo ayebisaki Timote ete: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki.” Alobaki mpe ete: “Makambo oyo oyokaki epai na ngai oyo batatoli mingi mpe balobeli, pesá bato ya sembo makambo yango, bongo bango mpe bakoyeba mpenza koteya bato mosusu.” (2 Tim. 2:2; 3:14) Ntango mosusu bandeko batunaka ngai mateya nini nazwi na boumeli ya mbula 57 oyo nalekisi na Betele. Nalobaka na mokuse ete, “Ndimáká mbala moko kosala likambo nyonso oyo ebongiseli ya Yehova elingi osala, tyeláká ye motema mpo asalisa yo.”

Soki nakanisi mokolo ya liboso oyo nakómaki na Betele, ngai moto oyo nazalaki malilimalili mpe oyo ayebaki makambo te, namonaka lokola ezali kaka lobi. Kasi, na bambula wana nyonso, Yehova azalaki ‘kosimba lobɔkɔ na ngai ya mobali.’ Mingimingi boboto mpe lisalisi na ntango ebongi ya Batatoli mosusu, Yehova azali koloba na ngai ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’​—Yis. 41:13.

^ par. 10 Na mokolo ya 22/05/1945, guvɛrnema ya Canada epesaki biso lisusu nzela ya kosala mosala na biso.