Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Ntango nini bazalaki koboma mwana-mpate ya Elekeli mokolo ya 14 Nisana?

Mabongoli mosusu ya Biblia elobaka ete ezalaki kobomama “katikati ya mpokwa mibale,” elingi koloba ntango moi elali to na mpokwa, nsima ya kolala ya moi, kasi liboso ete molili makasi ekɔta. (Kob. 12:6)​—15/12, nkasa 18-19.

Mitinda nini ya Biblia bilenge bakoki kosalela mpo na kozwa bikateli ya malamu?

Ezali misato (1) Koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. (Mat. 6:19-34) (2) Kozwa esengo na kosalela basusu. (Mis. 20:35) (3) Kosepela kosalela Nzambe na bolenge na yo. (Mos. 12:1)​—15/1, nkasa 19-20.

Batambwisi-mpunda minei oyo bazali kotambola kobanda mobu 1914 ezali banani?

Yesu, motambwisi-mpunda ya mpɛmbɛ, asalaki mosala ya kobengana Satana ná bademo na ye na likoló. Motambwisi-mpunda ya langi motane ngwaa ezali elilingi ya bitumba oyo ezali konyokola bato. Motambwisi-mpunda ya moindo azali elilingi ya nzala. Motambwisi-mpunda ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu azali kosalela bamaladi ndenge na ndenge mpo na koboma, mpe bamilio ya bato bakwei na nse ya mabele. (Em. 6:2-8)​—1/2, nkasa 6-7.

Ntango nini “libala ya Mwana-Mpate” ekosalema? (Em. 19:7)

“Libala ya Mwana-Mpate” ekosalema ntango Mokonzi, Yesu Kristo, akosilisa bolongi na ye, elingi koloba nsima ya kobomama ya Babilone Monene mpe ya etumba ya Armagedone.​—15/2, lokasa 10.

Mpo na nini Bayuda na mikolo ya Yesu “bazalaki kozela” Masiya? (Luka 3:15)

Tokoki te kondima ete Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bakangaki ntina ya esakweli ya Danyele oyo etali Masiya ndenge biso toyebi yango. (Dan. 9:24-27) Ntango mosusu, ekoki kozala ete bayokaki nsango oyo anzelu ayebisaki babateli ya mpate mosusu to likambo oyo mosakoli ya mwasi Ana alobaki ntango amonaki Yesu wana azali bebe na tempelo. Lisusu, banganga-minzoto bayaki koluka “moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda.” (Mat. 2:1, 2) Na nsima, Yoane Mobatisi amonisaki ete mosika te Kristo akomonana.​—15/2, nkasa 26-27.

Ndenge nini tokoki kosala te ete Ɛɛ na biso ekóma Te? (2 Ko. 1:18)

Na ntembe te, makambo mosusu oyo tokanaki te ekoki kosala ete tókokisa te maloba na biso. Kasi soki topesi elaka to tolapi ndai, tosengeli kosala nyonso mpo tókokisa yango.​—15/3, lokasa 32.

Ndenge nini tokoki kolonga motambo ya kotala pornografi?

Makambo misato ya ntina ekoki kosalisa biso (1) Kolongola mbala moko miso na biso soki tomoni bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto. (2) Tóbatela makanisi na biso na kotyáká likebi na makambo ya ntina mpe tóbondelaka Nzambe. (3) Tosengeli koboya bafilme to basite oyo ekolakisa pornografi.​—1/4, nkasa 10-12.

Makama nini ekoki kobima soki mokristo moko atiki libota na ye mpe akei mokili mosusu mpo na koluka mbongo?

Ntango baboti bazali esika moko te, bana bakoki kotungisama na makanisi mpe bizaleli na bango ekoki kobeba. Bakoki kobanda kokangela moboti to baboti na bango nkanda. Mpe mwasi to mobali oyo azali mosika na molongani na ye akoki komekama mpo na kokwea na ekobo.​—15/4, nkasa 19-20.

Mpo na nini bazalaki kobuka makolo ya bato mabe oyo bazalaki koboma likoló ya nzete?

Baroma babomaki bato mabe mosusu likoló ya nzete. Bayuda basɛngaki ete makolo ya bato mabe oyo bazalaki ngambo na ngambo ya Yesu ebukama. Yango ezalaki mpasi mpo na bato yango bápema mpema, mpe bazalaki kokufa noki. Yango wana, basengelaki te kotikala likoló ya nzete butu mobimba. (Mib. 21:22, 23)​—1/5, lokasa 11.

Mituna nini minei tosengeli kobosana te na mosala na biso ya kosakola?

Bato oyo nalingi kokende kosakwela bazali banani? Nakokutana na bango wapi? Ntango nini ebongi mpo na kokutana na bango? Ndenge nini nasengeli kobanda lisolo ná bango?​—15/5, nkasa 12-15.

Mpo na nini tokoki koloba ete likaya ebomaka mpenza?

Na boumeli ya siɛklɛ oyo eleki, ebomi bato 100 000 000. Mikolo oyo, ezali koboma bato soki 6 000 000 mbula na mbula.​—1/6, lokasa 3.