Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Micronésie
KATHERINE akolaki na États-Unis mpe ntango akómaki na mbula 16 azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Azalaki mpenza komipesa na mosala ya kosakola, kasi nsango malamu oyo azalaki komemela bato ezalaki kobota mbuma mingi te epai azalaki kosala yango. Alobi boye: “Natángaki masolo ya bato oyo babondelaki Nzambe ete atindela bango moto moko mpo aya kosalisa bango báyeba ye. Nazalaki mbala mingi na elikya ete nakokutana na bato ya lolenge wana, kasi esalemaki te.”
Nsima ya kosakola na boumeli ya bambula na teritware yango, Katherine abandaki kokanisa ete esengeli alongwa wana mpe akende na teritware oyo bato mingi bakoyoka nsango ya Bokonzi. Kasi, azalaki komituna soki akokoka kosala yango. Kaka mbala moko nde na bomoi na ye atikaki libota na ye, mpe ezalaki kaka mpo na pɔsɔ mibale, mpe azalaki na susi na bango mokolo na mokolo. Atako bongo, mposa makasi oyo azalaki na yango ya koyoka esengo ya kosalisa baoyo bazali koluka Yehova nde elongaki. Nsima ya kotalela bisika ndenge na ndenge oyo akokaki kokende, akomelaki biro ya filiale ya Guam mpe bayebisaki ye makambo nyonso oyo asengelaki na yango. Na sanza ya nsambo ya mobu 2007, ntango akómaki na mbula 26, Katherine akendeki na Saipan, esanga moko oyo ezali na Océan Pacifique, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 10 000 ya epai azalaki kofanda. Makambo elekaki ndenge nini kuna?
EYANO NA MABONDELI MIBALE
Mwa moke nsima ya kokóma na lisangá ya sika, Katherine akutanaki na Doris, mwasi moko oyo azalaki na mbula 40 to koleka, mpe mwasi yango andimaki koyekola Biblia. Nsima ya koyekola na Doris mikapo misato ya liboso ya buku Biblia eteyaka, Katherine abandaki komitungisa. Alobi boye: “Doris azalaki moyekoli moko malamu mpenza, mpe nalingaki te kobebisa libaku wana. Naino nayekolá na moto Biblia te mpe nakanisaki ete Doris azali na mposa ya ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli mpo ayekola na ye, ntango mosusu moto ya bambula na ye.” Katherine abondelaki Yehova asalisa ye azwa ndeko mwasi oyo abongi mpo apesa ye Doris. Na nsima, amonaki malamu ayebisa Doris ete moto mosusu akobanda koyekola na ye.
Ndeko Katherine alobi ete: “Liboso nayebisa ye likambo yango, Doris ayebisaki ngai ete alingi ayebisa ngai likambo moko. Nsima ya koyoka ye, nayebisaki ye ndenge Yehova asalisaki ngai nalonga likambo wana ntango nakutanaki na yango. Apesaki ngai mpenza mersi.” Na nsima, Doris ayebisaki Katherine ete: “Yehova azali kosalela yo mpo na kosalisa ngai. Mokolo ya liboso oyo oyaki epai na ngai, nazalaki
kotánga Biblia na boumeli ya bangonga. Nazalaki kolela, mpe nazalaki kosɛnga Nzambe atinda moto aya kosalisa ngai nayeba Biblia. Na nsima, obɛtaki na porte na ngai. Yehova ayanolaki na libondeli na ngai!” Mpisoli ebimaka na miso ya Katherine ntango abɛtaka lisolo ya likambo wana. Alobi boye: “Maloba ya Doris ezalaki mpenza eyano na libondeli na ngai. Yehova amonisaki ngai ete nazali na makoki ya kokoba koyekola na Doris.”Doris azwaki batisimo na mobu 2010, mpe lelo oyo ye moko mpe ayekolaka Biblia na bato ebele. Katherine alobi boye: “Nazalaka mpenza na botɔndi ndenge mposa oyo nazalaki na yango banda kala ya kosalisa moto oyo asepeli na solo akóma mosaleli ya Yehova ekokisamaki!” Lelo oyo, Katherine azali na esengo mpe azali mobongisi-nzela monene na esanga pasifike ya Kosrae.
MIKAKATANO MISATO MPE NDENGE YA KOLONGA YANGO
Bandeko koleka 100 oyo bautaki na mikili mosusu (oyo bazali na bambula kobanda 19 tii 79) bapesaki mabɔkɔ epai mposa ezalaki monene mpenza na Micronésie. Erica, oyo akendeki na Guam na mobu 2006 ntango azalaki na mbula 19 alobeli ndenge basakoli wana ya molende bayokaki. Alobi boye: “Kosala mosala ya mobongisi-nzela na teritware oyo bato bazali na mposa makasi ya solo, ezali malamu mingi. Nazali na botɔndi mingi ndenge Yehova asalisaki ngai nasala mosala yango. Ezali mpenza mosala kitoko ya kosala na bomoi!” Lelo oyo, Erica azali na esengo mpe azali mobongisi-nzela monene na Ebeye na bisanga Marshall. Kasi, kosala na mikili mosusu, ezalaka mpe na mikakatano na yango. Tólobela misato na yango mpe tótala ndenge baoyo bakendeki na Micronésie balongaki yango.
Ndenge ya kobikela. Nsima ya kokóma na esanga ya Palau na mobu 2007, ndeko Simon oyo azali na mbula 22 amonaki mbala moko ete mwa mbongo oyo akobanda kozwa ekozala na nse mpenza na oyo azalaki kozwa na ekólo na ye Angleterre. “Nayekolaki ete nasengeli kosomba bisombela te. Sikoyo, naponaka na likebi mpenza biloko nini ya kolya nasomba, mpe natambolaka naino liboso nasomba oyo ya malamu. Soki eloko moko ebukani, nalukaka biteni na yango mpe nalukaka moto oyo akoki kosalisa ngai na kobongisa yango.” Ndenge nini kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ esalisaki ye? Simon alobi boye: “Esalisaki ngai nayekola nini ezali mpenza na ntina na bomoi mpe ndenge nakoki kobika na makoki moke. Namonaki mpenza lobɔkɔ ya Yehova mbala ebele. Na boumeli ya mbula nsambo oyo nasali awa, nazangá eloko ya kolya te mpe esika ya kolala.” Na ntembe te, Yehova asungaka baoyo bazalaka na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo balingaka koluka liboso Bokonzi.—Mat. 6:32, 33.
Susi ya mboka na ngai. Erica alobi ete: “Nalingaka libota na ngai mingi mpe nazalaki kobanga ete susi ya mboka na ngai ekobebisela ngai mosala.” Asalaki nini mpo amibongisa? “Liboso nakende, natángaki masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelaki likambo etali kozala na susi ya mboka to ya libota. Yango ebongisaki mpenza motema na ngai mpo nalonga mokakatano yango. Na lisolo moko oyo natángaki, mama moko akitisaki mwana na ye ya mwasi motema ete Yehova
asungaka bato, mpe alobaki ete ‘Yehova akoki kobatela yo malamu mingi koleka ngai.’ Maloba wana elendisaki ngai mingi.” Hannah ná mobali na ye, Patrick, bazali kopesa mabɔkɔ na Majuro na bisanga Marshall. Mpo susi ya mboka na ye to ya bato ya libota emɛla ye te, Hannah atyaka mingi likebi epai ya bandeko ya lisangá na ye. Alobi boye: “Napesaka Yehova mersi mbala na mbala mpo na libota ya bandeko ya mokili mobimba mpo bango mpe bazali bato ya libota na ngai. Soki bámoniselaka ngai bolingo te mpe básalisaka ngai te, nalingaki soki moke te kosala epai mposa ezali monene.”Kozwa baninga ya sika. Simon alobi boye: “Soki okómi na ekólo moko sika, okomona ete makambo mingi ezali ndenge moko te. Ntango mosusu nakokaka te kosala mwa masɛki mpo bato bákanga mpenza ntina na yango.” Erica alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki komiyoka lokola mwana etike, kasi yango esalisaki ngai natala soki makanisi na ngai ezali kokende wapi. Nakendeki te mpo na matomba na ngai moko, kasi mpo na kosala mingi mpo na Yehova.” Abakisi ete: “Na nsima, nakómaki na baninga ya malamu, oyo nalingaka mingi.” Simon asalaki makasi ayekola monɔkɔ ya Palauan, mpe yango esalisaki ye ‘afungwama’ epai ya bandeko. (2 Ko. 6:13) Milende wana ya koyekola monɔkɔ yango esalaki ete bandeko bálinga ye mingi. Ya solo, ntango bato oyo bayei sika mpe bankolo-mboka bazali kosala elongo, bango nyonso bazwaka matomba, elingi koloba bakómaka mpenza baninga ya solosolo. Matomba nini mosusu baoyo bazali komipesa na bolingo na bango moko mpo na kosala epai mposa ezali monene bazwaka?
‘OKOBUKA MINGI’
Ntoma Paulo alobaki ete: “Moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.” (2 Ko. 9:6) Etinda oyo balobeli na vɛrsɛ oyo ekoki mpenza kosalelama mpo na baoyo bamipesaka mingi na mosala ya Yehova. Bambuma nini ya malamu ‘babukaki mingi’ na Micronésie?
Na Micronésie, mabaku ya kobanda koyekola Biblia na bato mpe ya komona ndenge bato oyo bazali koyekola mpe kosalela solo ya Liloba ya Nzambe bazali kokende liboso na elimo, ezali naino mingi. Patrick ná Hannah basakolaki mpe na Angaur, mwa esanga moko oyo ezali na bato 320. Nsima ya kosakola kuna na boumeli ya sanza mibale, bakutanaki na mama moko. Andimaki mbala moko boyekoli ya Biblia, andimaki mbala moko solo mpe asalaki bambongwana minene na bomoi na ye. Hannah alobi ete: “Nsima ya boyekoli nyonso, soki tolongwe epai na ye na bavelo na biso, tozalaki kotalana mpe koloba: ‘Mersi Yehova!’” Hannah abakisi boye ete: “Nayebi ete Yehova akokaki kobenda mwasi wana epai na ye na lolenge moko to mosusu, kasi lokola tozali kosala epai mposa ezali monene, tozali na likoki ya kozwa mpe kosalisa moto ya ndenge wana oyo azali lokola mpate ayeba Yehova. Wana moko ya matomba kitoko oyo tozwi na bomoi na biso mobimba!” Erica alobi ete, “Ntango osalisi moto moko ayeba Yehova, okozwa esengo oyo ezangi nsuka!”
YO MPE OKOKI KOKENDE?
Na mikili mingi, mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene. Okoki kozala na kati ya bato oyo bazali kokende na bisika oyo mposa ezali makasi? Bondelá Yehova akolisa mposa oyo ozali na yango ya kosala lisusu mingi. Sololá likambo yango ná bankulutu ya lisangá, to ná mokɛngɛli ya zongazonga, to ná bandeko oyo bazwá libaku ya kosala na mokili oyo mposa ya basakoli ezalaki makasi. Ntango obandi komibongisa, komelá biro ya filiale oyo etalelaka makambo ya teritware oyo olingi kokende, mpe sɛngá báyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli na yango. * Ntango mosusu yo mpe okoki kosangana na bankóto ya bandeko mibali mpe basi: bilenge mpe mikóló, minzemba to bato babalá, oyo bazali komipesa na bolingo na bango moko mpe bazali koyoka esengo ya ‘kobuka mingi.’
^ par. 17 Talá lisolo ‘Okoki koleka na Masedonia?’ na Mosala na Biso ya Bokonzi ya 8/11.