Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozwaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi?’

Ozwaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi?’

TOZALI mpenza kobika na eleko moko ya yikiyiki. (2 Tim. 3:1-5) Mokolo na mokolo bolingo na biso mpo na Yehova mpe ekateli na biso ya kotosa mibeko na ye ya boyengebene emekamaka. Yesu asakolaki mpo na eleko yango mpe akitisaki bayekoli na ye motema ete bakozwa lisalisi oyo esengeli mpo na koyika mpiko tii na nsuka. (Mat. 24:3, 13; 28:20) Mpo na kosalisa bango, atyaki moombo ya sembo mpo apesaka bango ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’​—Mat. 24:45, 46.

Kobanda ntango moombo ya sembo atyamaki na mobu 1919, bamilio ya “basali ya ndako” ya minɔkɔ nyonso bayanganisami na ebongiseli ya Nzambe mpe bazali kolya bilei ya elimo. (Mat. 24:14; Em. 22:17) Kasi, mikanda to bisaleli mosusu ezalaka te na minɔkɔ mosusu, mpe bato nyonso te nde bakoki kotánga yango na internet to na baaparɛyi mosusu. Na ndakisa bato mingi bazali te na bavideo to masolo mosusu oyo ebimaka na site na biso ya internet jw.org. Yango elingi nde koloba ete bato mosusu bazwaka te bilei oyo basengeli na yango mpo bázala makasi na elimo? Mpo na kozwa eyano oyo ebongi, tótalela biyano na mituna minei ya ntina mingi.

1. Eloko ya libosoliboso na bilei ya elimo oyo Yehova apesaka biso ezali nini?

Ntango Satana amekaki Yesu abongola mabanga na mampa, Yesu ayanolaki ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:3, 4) Maloba ya Yehova ekomamá na Biblia. (2 Pe. 1:20, 21) Yango wana, Biblia ezali eloko ya libosoliboso na bilei na biso ya elimo.​—2 Tim. 3:16, 17.

Ebongiseli ya Yehova ebimisá Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba to ndambo na minɔkɔ koleka 120, mpe mbula na mbula minɔkɔ mingi ezali kobakisama. Longola libongoli yango, bamiliare ya mabongoli mosusu ya Biblia ebimá na mobimba to ndambo na bankóto ya minɔkɔ. Likambo yango eyokani na mokano ya Yehova oyo ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Mpe lokola “ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na [Yehova],” tosengeli kozala na elikya ete akobenda baoyo “bayebi bobola na bango ya elimo” na ebongiseli na ye mpe akopesa bango bilei ya elimo.​—Ebr. 4:13; Mat. 5:3, 6; Yoa. 6:44; 10:14.

2. Ndenge nini mikanda na biso ekokisaka mokumba ya kopesa bilei ya elimo?

Mpo moto akóma na kondima makasi, asengeli te kosuka na kotánga Biblia. Asengeli kokanga ntina ya makambo oyo azali kotánga mpe kosalela makambo oyo ayekoli. (Yak. 1:22-25) Mokube Moetiopia na siɛklɛ ya liboso asepelaki na likambo yango. Ntango azalaki kotánga Liloba ya Nzambe, Filipe mopalanganisi ya nsango malamu atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Mokube yango alobaki: “Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” (Mis. 8:26-31) Filipe asalisaki mokube wana mpo azwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Mokube yango asepelaki mingi na makambo oyo ayekolaki mpe azwaki batisimo. (Mis. 8:32-38) Ndenge moko mpe, mikanda na biso esalisaki biso tózwa boyebi ya sikisiki ya solo. Esimbaki mpenza motema na biso mpe elendisaki biso tósalela makambo oyo toyekolaki.​—Kol. 1:9, 10.

Na nzela ya mikanda yango, basaleli ya Yehova bazwaka ebele ya bilei ya elimo mpo na kolya mpe komɛla. (Yis. 65:13) Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 210 mpe elimbolaka bisakweli ya Biblia, esalisaka biso tóyeba mateya mozindo ya solo, mpe elendisaka biso tósalelaka mitinda ya Biblia mokolo na mokolo. Zulunalo Lamuká! ebimisamaka na minɔkɔ soki 100 mpe esalisaka biso tóyeba lisusu mingi biloko oyo Yehova akelá mpe emonisaka ndenge oyo tokoki kosalela batoli ya Biblia. (Mas. 3:21-23; Rom. 1:20) Moombo ya sembo abimisaka mikanda na biso na minɔkɔ koleka 680! Obombaka ntango mokolo na mokolo mpo na kotángaka Biblia? Otángaka zulunalo nyonso ya sika mpe mikanda nyonso ya sika oyo ebimaka mbula na mbula na monɔkɔ oyo olobaka?

Longola kobimisa mikanda, ebongiseli ya Yehova ebongisaka badiskur oyo esalemaka na makita mpe mayangani na biso. Osepelaka na badiskur, badrame, bilakiseli, mpe mituna-lisolo oyo esalemaka na mayangani yango? Yehova abongiselaka biso mpenza fɛti ya elimo!​—Yis. 25:6.

3. Soki ozwaka te mikanda nyonso na monɔkɔ na yo, okokufa nzala na elimo?

Ezali bongo te. Esengeli kokamwisa biso te soki na ntango mosusu, basaleli mosusu ya Yehova bazwaka bilei ya elimo mingi koleka basusu. Mpo na nini? Tózwa ndakisa ya bantoma. Bazwaki malako mingi koleka bayekoli mosusu ya siɛklɛ ya liboso. (Mrk. 4:10; 9:35-37) Atako bongo, bayekoli wana mosusu bazalaki te kolya mabe na elimo; bazalaki kozwa bilei oyo basengelaki na yango.​—Ef. 4:20-24; 1 Pe. 1:8.

Lisusu, tosengeli koyeba ete makambo mingi oyo Yesu alobaki to asalaki ntango azalaki awa na mabele ekomamá te na baevanzile. Ntoma Yoane akomaki ete: “Ya solo, ezali mpe na makambo mosusu mingi oyo Yesu asalaki, oyo, soki mpenza nyonso ekomamaka mokomoko, nakanisi, mokili yango moko elingaki kokoka te barulo oyo ekomami.” (Yoa. 21:25) Atako bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso bayebaki makambo mingi na ntina na ye koleka biso, yango elingi koloba te ete biso toyebi eloko te. Yehova azwaki bibongiseli mpo tóyeba makambo mingi oyo etali Yesu mpe mpo tólanda matambe na ye malamumalamu.​—1 Pe. 2:21.

Kanisá mpe mikanda oyo Ntoma Paulo atindaki na masangá na siɛklɛ ya liboso. Ekoki kozala na mokanda moko oyo Ntoma Paulo akomaki, oyo ezali te na Biblia. (Kol. 4:16) Bilei na biso ya elimo ezali mabe mpo totángaka te mokanda yango? Te. Yehova ayebi oyo tosengeli na yango mpe apesi biso ebele ya bilei ya elimo mpo tózala makasi.​—Mat. 6:8.

Yehova ayebi oyo tosengeli na yango mpe apesi biso ebele ya bilei ya elimo mpo tózala makasi

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mosusu bazali na bilei ya elimo ebele koleka basusu. Olobaka monɔkɔ oyo ezali na mikanda mingi te? Soki ezali bongo, yebá ete Yehova amibanzabanzaka mpo na yo. Yekoláká mikanda oyo bozali na yango, mpe soki likoki ezali, yanganáká na makita na monɔkɔ oyo oyebi. Mpe zalá na elikya ete Yehova akosalisa yo ozala makasi na elimo.​—Nz. 1:2; Ebr. 10:24, 25.

4. Soki ozali te na likoki ya kotánga mikanda oyo ebimi na site na biso jw.org, okolɛmba na elimo?

Na site na biso, totyaka masolo ya bazulunalo mpe ya mikanda mosusu. Site yango ezali mpe na masolo oyo esalisaka babalani, bilenge, mpe bato oyo bazali na bana ya mike. Mabota mingi bazwaka matomba ntango basalelaka masolo yango na losambo na kati ya libota. Lisusu, site na biso elobelaka makambo mosusu ya ntina mingi, na ndakisa likita ya kopesa bana kelasi ya Gileade diplome, likita ya nsuka mbula, mpe esalisaka bandeko ya mokili mobimba báyeba bisika oyo makama lokola koningana ya mabele to mpela ekómeli bandeko mosusu mpe ndenge makambo na biso oyo ezali na batribinale ezali kokende. (1 Pe. 5:8, 9) Site yango ezali mpe esaleli moko ya nguya mpenza mpo na mosala ya kosakola, ezali kosala ete nsango malamu esakolama ata na mikili oyo mosala na biso epekisami.

Na yango, okoki kozala makasi na elimo ata soki osalelaka site yango te. Moombo ya sembo asali mosala makasi mpo na kobimisa ebele ya mikanda mpo mosali nyonso ya ndako aleisama malamu na elimo. Yango wana, osengeli kaka te kosomba baaparɛyi ya mikolo oyo kaka mpo na kokɔta na jw.org. Bandeko mosusu bakoki kozwa bibongiseli mpo na kobimisa masolo mosusu oyo ebimaka na site na biso mpe bakoki kopesa yango na baoyo bazali na likoki ya kosalela internet te, kasi masangá esengeli kosalaka bongo te.

Tozali na botɔndi epai ya Yesu na ndenge azali kokokisa elaka na ye ya koleisa biso na elimo. Lokola mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi ezali kokende nokinoki, tosengeli kozala na elikya ete Yehova akokoba kopesa biso ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’