LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Septembre 2014

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 27/10 tii na 30/11/2014.

Ozali koluka mikumba?

Ndenge nini okoki koluka yango na lolenge oyo ebongi?

Ondimaka mpenza ete ozali na kati ya solo? Mpo na nini?

Lisolo oyo ekolobela makambo mosusu oyo etindaka bato mingi bándima ete Batatoli ya Yehova bazali na kati ya solo. Tokotalela mpe bantina oyo Batatoli bandimaka mpenza ete bazali na kati ya solo.

Salelá Yehova na bosembo ata na “malɔzi mingi”

Moto nyonso akutanaka na malɔzi mpo tozali na mokili ya Satana. Wapi minyoko oyo Satana asalelaka? Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na yango?

Baboti​—Bóbatela bana na bino

Baboti bazali na mokumba ya kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Lisolo oyo elobeli balolenge misato oyo baboti bakoki kobatela mpe kosalisa bana na bango bálinga Yehova.

Mituna ya batángi

Maloba oyo Mokonzi Davidi alobaki na Nzembo 37:25 mpe oyo Yesu alobaki na Matai 6:33 elimboli ete Yehova akoki soki moke te kopesa nzela ete mokristo akufa nzala?

Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi

Liwa mpe makambo nyonso oyo ememaka yango epesaka mpenza mpasi. Mpo na nini bato bakufaka? Ndenge nini “liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi”? (1 Bakorinti 15:26) Talá ndenge biyano na motuna yango emonisi bosembo, bwanya mpe mingimingi bolingo ya Yehova.

Tókanisaka basali ya ntango nyonso

Basaleli mingi ya Yehova basalaka mosala makasi na mosala ya ntango nyonso. Tosengeli kosala nini mpo tókanisaka ‘mosala na bango ya sembo’ mpe ‘mosala makasi na bango ya bolingo’?​—1 Batesaloniki 1:3.