Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ondimaka mpenza ete ozali na kati ya solo? Mpo na nini?

Ondimaka mpenza ete ozali na kati ya solo? Mpo na nini?

“Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—ROM. 12:2.

1. Makambo nini bakonzi ya mangomba ya bokristo basalaki na ntango ya etumba?

MOKANO ya Nzambe ezalaka ete bakristo ya solo bákende bitumba mpe báboma bato ya bikólo mosusu? Yango nde likambo oyo bato mingi oyo bamibengaka bakristo basali na boumeli ya mbula 100 oyo euti koleka. Basango ya Katolike bapambolaki basoda mpe bibundeli na bango mpo bábunda ná bakristo ya katolike ya ekólo mosusu. Bapastɛrɛ ya Protesta basalaki mpe bongo mpo na Baprotesta ya bikólo na bango. Kobomama ya nsɔmɔ oyo esalemaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba emonisaki mpenza likambo yango.

2, 3. Batatoli ya Yehova basalaki nini na boumeli ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba mpe na nsima na yango, mpe mpo na nini?

2 Batatoli ya Yehova basalaki nini na ntango wana ya etumba? Masolo ya kala emonisi ete bakɔtaki na bitumba te. Nini etindaki bango básala bongo? Ezali libosoliboso mpo balandaka ndakisa ya Yesu mpe mateya na ye. Alobaki ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Lisusu bazwaki na motema moko toli oyo ntoma Paulo akomaki na mokanda na ye epai ya bakristo ya Korinti.​—Tángá 2 Bakorinti 10:3, 4.

3 Na yango, bakristo ya solo oyo lisosoli na bango eteyami na Biblia, bayekolaka bitumba te mpe bakɔtaka na yango te. Lokola basalaka bongo, yango esalaki ete bankóto ya Batatoli, bilenge mpe mikóló, basi mpe mibali bákutana na minyoko. Basalisá mingi na bango misala ya makasi na bakaa mpe na babolɔkɔ. Basusu kutu babomamaki na Allemagne na ntango ya banazi. Atako bakutanaki na minyoko makasi na Mpoto, Batatoli babosanaki soki moke te mokumba na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova. Na bosembo mpenza basakolaki na babolɔkɔ, na bakaa ya bakangami, mpe na bamboka oyo bamemaki bango. * Bambula na nsima, na mobu 1994, Batatoli ya Yehova bakɔtaki te na bitumba ya bana mboka oyo esalemaki na Rwanda. Bakɔtaki mpe te na bitumba oyo esopaki makila mingi oyo eutaki kosalema na mikili ya Balkans ntango ekólo Yougoslavie ya kala ekweaki.

4. Lokola Batatoli ya Yehova bakɔtaka te na bitumba, yango etindi bato bándima likambo nini?

4 Lokola baboyaki mpenza kokɔta na bitumba, yango esalaki ete bankóto ya bato na mokili mobimba bándima ete Batatoli ya Yehova bazalaka na bolingo ya solo mpo na Nzambe mpe bazalani na bango. Na maloba mosusu, bamonisaka mpenza bizaleli ya bakristo ya solo. Kasi, ezali mpe na makambo mosusu ya losambo na biso oyo endimisaka bato ete biso Batatoli ya Yehova, tozali mpenza bakristo ya solo.

MOSALA MONENE YA KOTEYA BATO OYO ESALEMÁ NAINO TE

5. Mbongwana nini bayekoli ya Kristo ya liboso basalaki?

5 Kobanda na ebandeli ya mosala na ye, Yesu amonisaki ntina ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Aponaki bayekoli 12 mpo bábanda mosala oyo esengelaki kosalema na mokili mobimba; na nsima, apesaki bayekoli 70 formasyo. (Luka 6:13; 10:1) Bayekoli yango babongisamaki mpo na kosakola nsango malamu epai ya basusu, kasi naino epai ya Bayuda. Na nsima, likambo ya kokamwa esalemaki! Bayekoli ya Yesu basengelaki kokende kosakola nsango yango epai ya bato ya bikólo oyo bakatamaki ngɛnga te. Ezalaki mpenza mbongwana moko monene mpo na Bayuda wana oyo bazalaki bayekoli ya molende!​—Mis. 1:8.

6. Nini etindaki ntoma Petro andima ete Yehova aponaka bilongi te?

6 Ntoma Petro atindamaki na ndako ya Korneyi, moto ya ekólo mosusu oyo akatamaki ngɛnga te. Na nsima, ntoma Petro amonaki ete Nzambe aponaka bilongi te. Korneyi ná bato ya ndako na ye bazwaki batisimo. Lingomba ya bokristo ebandaki kopalangana mpe epai ya bato mosusu; bato ya bikólo nyonso bakokaki koyoka solo mpe kondima yango. (Mis. 10:9-48) Sikoyo basengelaki kosakola na mokili mobimba.

7, 8. Ebongiseli ya Yehova esalaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Soki totali lisolo ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso, tokomona ete na molende nyonso, bandeko oyo bazali kokamba basali nyonso mpo ete mosala ya kosakola mpe koteya nsango malamu esalema na mokili mobimba. Lelo oyo, Batatoli ya molende soki milio 8 bazali kosala nyonso mpo na kopalanganisa nsango ya Kristo na minɔkɔ koleka 600, mpe minɔkɔ mosusu mingi ekobakisama! Batatoli ya Yehova bayebani mpenza mpo na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako, na babalabala, mpe ntango mosusu na ndenge batandaka mikanda na mesa to na mwa bashario.

8 Babongoli koleka 2 900 bazwi formasyo oyo ebongi mpo na kobongola Biblia mpe mikanda na biso. Basukaka kaka te na kobongola na minɔkɔ oyo eyebani mingi. Basalaka mpe milende mpo na kobongola na bankama ya minɔkɔ oyo eyebani mpenza te, kasi elobamaka na bamilio ya bato. Na ndakisa, na Espagne, bamilio ya bato ya Catalogne balobaka monɔkɔ na bango Catalan mokolo na mokolo. Kala mingi te, bazongelaki lisusu koloba monɔkɔ ya Catalan mpe minɔkɔ mosusu oyo eutá na monɔkɔ yango na bisika lokola Andorre, Alicante, bisanga Baléares, mpe Valence. Batatoli ya Yehova bazali sikoyo kobimisa mikanda na Catalan mpe makita ezali kosalema na monɔkɔ yango mpe ezali kosimba mpenza mitema ya Bato oyo balobaka monɔkɔ yango.

9, 10. Nini emonisi ete ebongiseli ya Nzambe etyelaka bamposa ya elimo ya bato nyonso likebi?

9 Mosala yango ya kobongola mpe ya koteya ezali kosalema na mikili ndenge na ndenge. Na Mexique balobaka monɔkɔ ya Espagnole, kasi ezali mpe na ebele ya bana-mboka oyo balobaka minɔkɔ mosusu. Ba-Maya mpe bazali na kati ya bato yango. Filiale ya Mexique etindaki ekipi ya babongoli ya monɔkɔ yango ekende na esika oyo bakoki kolobaka mpe koyokaka monɔkɔ yango mokolo na mokolo. Ndakisa mosusu ezali ya Népali, monɔkɔ oyo elobamaka na Népal, ekólo oyo ezali na bato koleka milio 29. Minɔkɔ soki 120 elobamaka na ekólo yango, kasi bato koleka milio 10 nde balobaka Népali mpe bato mingi mosusu balobaka mpe monɔkɔ yango. Mikanda na biso ezali mpe kobimisama na monɔkɔ yango.

10 Ebongiseli ya Yehova ezali mpenza kozwa etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba na lisɛki te, ndenge mosala oyo baekipi ya babongoli ezali kosala na mokili mobimba emonisi yango. Bamilio ya bamilio ya batrakte, mwa ba buku, mpe bazulunalo ekabolami na mokili mobimba ofele epai ya bato. Mbongo mpo na kosala mosala yango eutaki na makabo oyo Batatoli ya Yehova bapesaki, mpo balandaka etinda oyo ya Yesu ete: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Mat. 10:8.

Ekipi moko ya babongoli ezali kobongisa ndenge ya kobongola mikanda na monɔkɔ moko ya Allemagne (Talá paragrafe 10)

Mikanda na monɔkɔ moko ya Allemagne esalisaka mpenza na Paraguay (Talá mpe elilingi ya ebandeli)

11, 12. Mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba endimisi bato mosusu likambo nini?

11 Lokola bazali bakristo oyo bamipesá na mosala ya kosakola mpe ya koteya, Batatoli ya Yehova bandimisamá ete bazali na kati ya solo, yango wana bamipimelaka makambo mingi mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya mabota mpe bikólo mosusu. Mingi na bango bakómisá bomoi na bango pɛpɛlɛ, bayekolá minɔkɔ mosusu, mpe basalá makasi bámesana na mimeseno ya bikólo mosusu mpo na kosala mosala wana ya ntina mingi. Mosala yango ya kosakola mpe ya koteya oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali mpe likambo mosusu oyo endimisaka bato ebele ete Batatoli ya Yehova bazali bayekoli ya solo ya Yesu Kristo.

12 Batatoli basalaka nyonso wana mpo bandimisamá ete bazali na kati ya solo. Kasi makambo mosusu nini endimisaka bamilio ya bato ete Batatoli ya Yehova bazali na kati ya solo?​—Tángá Baroma 14:17, 18.

MPO NA NINI BANDIMAKA BONGO?

13. Likambo nini Batatoli ya Yehova basalaka mpo na kobatela ebongiseli ya Yehova pɛto?

13 Tokoki kozwa matomba na maloba ya bakristo ya ntango na biso oyo bamipesá mpe bandimisamá ete bazali na kati ya solo. Mosaleli moko ya Yehova oyo aumeli mingi na solo amonisi ndenge ayokaka na maloba oyo: “Milende esalemaka mpenza mpo ebongiseli ya Yehova ezala pɛto mpe na mbindo te, ata soki esɛngi kopesa moto boye to boye toli to disiplini.” Nini esalisaka bango bábatela bopɛto yango? Balandaka mibeko oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe ndakisa oyo Yesu ná bayekoli na ye batiká. Yango wana, na lisolo ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso, emonani ete kaka bato moke nde babimisamaki na lisangá mpo baboyaki kotosa mitinda ya Nzambe. Kasi ebele ya Batatoli, ezala mpe baoyo kala bazalaki na bomoi oyo ebongi te na miso ya Nzambe kasi babongwaná, bazali sikoyo na bomoi moko ya pɛto mpe oyo ebongi.​—Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.

14. Bato mingi oyo babimisamá na lisangá basalaki nini, mpe yango ebimisaki matomba nini?

14 Kasi tokoloba nini mpo na baoyo babimisamaki na lisangá mpo na kotosa etinda ya Makomami? Bankóto ya bato yango babongolaki bizaleli na bango wana oyo eyokani te na mitinda ya bakristo mpe bazongisamaki na lisangá. (Tángá 2 Bakorinti 2:6-8.) Kotosa mitinda ya Biblia na likambo etali bizaleli malamu esalá ete lisangá ya bokristo ezala pɛto mpe bato batyelaka yango motema. Lokola Batatoli ya Yehova bakangamaka na mitinda ya Nzambe, yango esali ete bákesana mpenza na mangomba mingi oyo ekangaka miso na mabe; mpe likambo yango endimisá bato mingi ete basaleli ya Yehova bazali mpenza na kati ya solo.

15. Nini endimisaki ndeko moko ete azali na kati ya solo?

15 Mpo na nini Batatoli mosusu oyo baumeli mingi na lisangá bandimaka ete bazali na kati ya solo? Ndeko mobali moko oyo azali na mbula 54 alobi boye: “Bandá bolenge na ngai, kondima na ngai esimbamá na makambo oyo misato ya ntina mingi: (1) ete Nzambe azali; (2) ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo santu; mpe (3) ete azali kosalela mpe kopambola lisangá ya bokristo ya Batatoli ya Yehova lelo oyo. Wana nazalaki kokoba koyekola na boumeli ya bambula, nalukaki ntango nyonso koyeba soki makambo yango misato ya ntina mingi ezali kaka bongo mpe namitunaki soki esimbamaki mpenza na makambo ya solo. Mbula na mbula, nakómaki na bilembeteli mingi oyo emonisaki ete makambo yango misato ya ntina mingi ezali mpenza solo mpe yango elendisaka kondima na ngai mpe endimisaka ngai mpenza ete tozali na kati ya solo.”

16. Makambo nini ndeko mwasi moko alobaki mpo na solo?

16 Ndeko mwasi moko oyo abalá mpe asalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York alobaki boye mpo na ebongiseli ya Yehova: “Ezali ebongiseli kaka moko oyo esakolaka na molende nyonso nkombo ya Yehova. Yango wana tokoki kokamwa te ndenge nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 7 000 na Biblia! Nasepelaka na toli oyo ezali na 2 Ntango 16:9 oyo elobaka ete: ‘Miso ya Yehova ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.’ Abakisi boye: “Solo elakisi ngai ndenge ya kokóma na motema mobimba mpo Yehova akoka komonisa mpenza makasi na ye epai na ngai. Boyokani na ngai ná Yehova ezali likambo eleki ntina. Mpe nasepelaka na mokumba oyo Yesu azali na yango ya kopesa boyebi ya solosolo ya Nzambe oyo esalisaka ngai.”

17. Nini etindaki moto moko oyo azalaki kondima te ete Nzambe azali akóma kondima, mpe mpo na nini?

17 Moto moko oyo azalaki kondima te ete Nzambe azali alobi boye: “Bozalisi endimisaka ngai mpenza ete Nzambe alingaka bato básepela na bomoi mpe akotika te ete bampasi eumela libela na libela. Lisusu, wana mokili ezali se kotangwa mosika na Nzambe, basaleli ya Yehova bazali se kokóma na kondima makasi, molende mpe bolingo. Kaka elimo ya Yehova nde ekoki kosala likamwisi ya ndenge wana na mikolo na biso.”​—Tángá 1 Petro 4:1-4.

18. Makambo oyo bandeko mibali mibale balobi esali yo ndenge nini?

18 Motatoli mosusu oyo aumelá mingi amonisi bantina oyo andimaka solo oyo toteyaka: “Koyekola solo na boumeli ya mbula mingi endimisi ngai ete Batatoli ya Yehova basali mpenza milende mpo na kolanda ndenge mpenza lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso ezalaki. Na mibembo oyo nasali, namoni mpenza bomoko oyo Batatoli ya Yehova bazalaka na yango. Solo ya Biblia epesá ngai esengo.” Ntango batunaki ndeko mobali moko oyo azali na mbula koleka 60 eloko nini endimisaki ye ete azali na kati ya solo, abendaki likebi na ndakisa ya Yesu Kristo mpe alobaki ete: “Toyekolaki malamumalamu bomoi mpe mosala ya Yesu mpe tosepelaki na ndakisa na ye. Tobongisaki makambo mingi na bomoi na biso mpo tópusana lisusu penepene na Nzambe na nzela ya Kristo Yesu. Tondimisami ete mbeka ya lisiko ya Yesu ezali na ntina mpo na kozwa lobiko. Mpe toyebi ete asekwisamaki na bakufi. Tozali na bilembeteli ya bato ebele oyo bamonaki likambo yango.”​—Tángá 1 Bakorinti 15:3-8.

KOYEBA SOLO ETINDI BISO TÓSALA NINI?

19, 20. (a) Ntoma Paulo abendaki likebi ya lisangá ya Roma na mokumba nini? (b) Mokumba nini biso bakristo tozali na yango?

19 Lokola tozali bakristo oyo balingaka bazalani na bango, tosengeli te kobomba solo oyo toyebi mpo na biso moko. Ntoma Paulo alobaki na bandeko na ye ya lisangá ya Roma boye: “Soki bozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na bino mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, mpe bozali kondima na motema na bino ete Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, bokobika. Mpo na motema nde moto andimaka mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto alobaka polele mpo na lobiko.”​—Rom. 10:9, 10.

20 Lokola tozali Batatoli ya Yehova oyo bamipesá na ye, tondimisami ete tozali na kati ya solo mpe toyebi ete tozali na mokumba ya koteya bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangela. Wana tozali kokokisa mokumba na biso ya kosakola, tósala ete bato básepelaka kaka te na mateya na ya Biblia, kasi bámona mpe na bilongi na biso ete tondimaka mpenza makambo yango.

^ par. 3 Talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 191-198, 448-454.