Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tókanisaka basali ya ntango nyonso

Tókanisaka basali ya ntango nyonso

“Totikaka te kokanisa mosala na bino ya sembo mpe mosala makasi na bino ya bolingo.”​—1 TES. 1:3.

1. Ntoma Paulo alobaki nini mpo bandeko oyo basalelaki Yehova na mpiko nyonso?

NTOMA Paulo akanisaki baoyo basalaki mosala makasi mpo na nsango malamu. Akomaki ete: “Totikaka te kokanisa mosala na bino ya sembo mpe mosala makasi na bino ya bolingo mpe koyika mpiko na bino mpo na elikya na bino epai ya Nkolo na biso Yesu Kristo liboso ya Nzambe mpe Tata na biso.” (1 Tes. 1:3) Kutu, Yehova ye moko akanisaka mosala makasi ya bolingo ya baoyo nyonso basalelaka ye na bosembo, ezala makambo na bango ya bomoi etindaka bango básala mingi to moke.​—Ebr. 6:10.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Bandeko na biso mosusu mingi, basaleli ya Yehova, ya ntango ya kala mpe ya lelo, bamipimelaki makambo mingi mpo na kosalela Yehova na ntango nyonso. Tólobela naino bamosusu oyo basalaki mosala yango na siɛklɛ ya liboso. Tokolobela balolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso na eleko na biso mpe tokomona ndenge oyo tokoki kokanisaka bandeko wana ya bolingo oyo bamipesi mpo na kosalela Yehova lolenge wana.

BAKRISTO YA SIƐKLƐ YA LIBOSO

3, 4. (a) Bandeko mosusu basalaki misala nini na siɛklɛ ya liboso? (b) Bamposa na bango ya mosuni ezalaki kokokisama ndenge nini?

3 Mwa moke nsima ya batisimo na ye, Yesu abandisaki mosala moko oyo esengelaki kokende na mokili mobimba. (Luka 3:21-23; 4:14, 15, 43) Nsima ya liwa na ye, bantoma na ye bazwaki mokumba ya kopalanganisa mosala yango ya kosakola. (Mis. 5:42; 6:7) Bakristo mosusu, na ndakisa Filipe, asalaki lokola mopalanganisi ya nsango malamu mpe misionɛrɛ na Palestine. (Mis. 8:5, 40; 21:8) Ntoma Paulo ná basusu bakendeki mosika mpenza. (Mis. 13:2-4; 14:26; 2 Ko. 1:19) Bamosusu, na ndakisa Silvano (Silasi), Marko mpe Luka, basalaki mosala ya bakomi. (1 Pe. 5:12) Bakristo ya basi basalaki ná bandeko mibali wana ya sembo. (Mis. 18:26; Rom. 16:1, 2) Mosala kitoko oyo basalaki esalisi mpo ete Makomami ya Grɛki ezala kitoko na kotánga, mpe emonisaka ete Yehova akanisaka basaleli na ye mpo na malamu.

4 Ndenge nini basali ya ntango nyonso ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kozwa lisungi ya mosuni? Na bantango mosusu, bandeko bazalaki koyamba bango mpe kosalisa bango na balolenge mosusu, kasi bazalaki kosɛnga lisalisi yango te. (1 Ko. 9:11-15) Bato mosusu mpe masangá ezalaki kopesa lisungi na bolingo na bango moko. (Tángá Misala 16:14, 15; Bafilipi 4:15-18.) Ntoma Paulo ná baninga na ye ya mobembo bazalaki mpe kosala mwa mosala ya mosuni ya ntango mokuse mpo na kokokisa bamposa na bango mosusu.

BASALELI YA NTANGO NYONSO NA MIKOLO NA BISO

5. Makambo nini ndeko mobali moko ná mwasi na ye balobi mpo na bomoi na bango na mosala ya ntango nyonso?

5 Lelo oyo mpe, bandeko mingi basalaka balolenge ekeseni ya mosala ya ntango nyonso. (Talá etanda “ Misala ndenge na ndenge ya ntango nyonso.”) Ndenge nini batalelaka misala yango oyo baponaka kosala na bomoi na bango? Ezali motuna oyo okoki kotuna bango moko, mpe na ntembe te, okomona ete kosala mosala yango ekomemela yo matomba. Na ndakisa: Ndeko moko oyo asalaki lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mobongisi-nzela monene, misionɛrɛ mpe mosangani ya libota ya Betele na mokili mosusu alobi ete: “Namiyokaka ete kosala mosala ya ntango nyonso, ezali moko ya bikateli ya malamu mingi oyo nazwaki. Ntango nazalaki na mbula 18, nazalaki kobunda mpo na kozwa ekateli soki nakotánga na iniversite, nakosala mosala ya mosuni bomoi mobimba mpe mosala ya mobongisi-nzela. Makambo oyo namoni eteyi ngai ete Yehova abosanaka te milende oyo moto asalaka mpo na kosalela ye na mosala ya ntango nyonso. Nakokaki te kosalela makoki oyo Yehova apesá ngai na lolenge ya malamu soki nazwaki ekateli ya kosala mosala ya mokili bomoi mobimba.” Mwasi na ye alobi boye: “Mosala nyonso oyo bapesaki ngai, esalisi ngai nakola. Tomoni mpenza libateli mpe litambwisi ya Yehova mbala na mbala mpe na balolenge ebele oyo ekokaki kosalema te soki totikalaki kaka na mwa esika kitoko oyo tozalaki. Natɔndaka Yehova mokolo na mokolo mpo na bomoi oyo tozali na yango na mosala ya ntango nyonso.” Okosepela kotalela bomoi na yo ndenge wana?

6. Bandeko nyonso bakoki kotya motema ete Yehova atalelaka bango ndenge nini?

6 Ya solo, bandeko mosusu bazali na makambo oyo ezali kopesa bango nzela te ya kosala mosala ya ntango nyonso sikoyo. Tokoki kotya motema ete Yehova azwaka na motuya mosala oyo basalelaka ye na molimo na bango mobimba mpe na milende oyo basalaka. Kanisá na bandeko oyo ntoma Paulo atángi bankombo na bango na mokanda Filemo 1-3, ná mpe baoyo nyonso bazalaki na lisangá ya Kolose. (Tángá.) Ntoma Paulo abosanaki bango te, Yehova mpe abosanaki bango te. Ndenge moko, Tata na biso ya likoló abosanaka te mosala na yo. Kasi, ndenge nini okoki kosunga baoyo bazali lelo kosala mosala ya ntango nyonso?

KOSUNGA BABONGISI-NZELA

7, 8. Mosala ya mobongisi-nzela esɛngaka nini, mpe ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa babongisi-nzela?

7 Ndenge moko na bapalanganisi ya nsango malamu ya siɛklɛ ya liboso, babongisi-nzela ya molende balendisaka mpenza masangá. Babongisi-nzela mingi basalaka makasi balekisa ngonga 70 sanza na sanza na mosala ya kosakola. Ndenge nini okoki kosalisa bango?

8 Mobongisi-nzela moko ya mwasi na nkombo Shari alobaki boye: “Babongisi-nzela bamonanaka bato ya makasi, mpe babimaka na mosala ya kosakola mokolo na mokolo. Atako bongo, bazalaka na mposa bálendisa bango.” (Rom. 1:11, 12) Ndeko mwasi mosusu oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mwa bambula alobaki mpo na babongisi-nzela ya lisangá na bango boye: “Basalaka mingi mpe bazalaka molende. Soki bandeko mosusu bazali komema bango na motuka na mosala ya kosakola, kobenga bango mpo na kolya mwa eloko, kokabela bango mwa lomeya to kosunga bango na makambo mosusu oyo esɛngaka mbongo, bazalaka na botɔndi mingi. Esalisaka bango bámona ete tómibanzabanzaka mpenza mpo na bango.”

9, 10. Bandeko mosusu basalá nini mpo na kosalisa babongisi-nzela ya lisangá na bango?

9 Okosepela kosalisa babongisi-nzela na mosala ya kosakola? Mobongisi-nzela moko na nkombo Bobbi amilelaki boye: “Tozalaka na mposa makasi ya bandeko ya kobima na bango na mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ.” Mobongisi-nzela mosusu kaka ya lisangá yango abakisi boye: “Kozwa moto ya kobima na ye nsima ya midi nde mama ya likambo.” Ndeko mwasi moko oyo azali sikoyo kosala na Betele ya Brooklyn alobeli na esengo nyonso ntango azalaki mobongisi-nzela. Alobi boye: “Ndeko mwasi moko oyo azalaki na motuka alobaki, ‘Ntango nyonso oyo omoni ete ozangi moto ya kobima na ye, bengá ngai, mpe tokobima.’ Asalisaki ngai mingi na mosala ya mobongisi-nzela.” Mpe ndeko Shari apesi likanisi oyo: “Nsima ya mosala, babongisi-nzela ya minzemba bazalaka mbala mingi bango moko. Okoki kobengaka bango na bantango mosusu ntango bosalaka losambo na kati ya libota. Kobengaka bango mpe ntango bosalaka makambo mosusu ekoki mpe kosalisa bango bátikala makasi.”

10 Ndeko mwasi moko aumeli na mosala ya mobongisi-nzela mbula soki 50. Kasi, soki akanisi ndenge azalaki kosakola elongo na bandeko basi mosusu ya minzemba, alobaka boye: “Bankulutu na biso bazalaki kokende kotala babongisi-nzela nsima ya basanza nyonso mibale. Bazalaki kotuna bango soki bazali malamu, mosala ya mosuni ezali kotambola ndenge nini mpe bazalaki koluka koyeba soki bazali na likambo moko oyo ezali kotungisa bango. Bamonisaka ete balingaka mpenza biso. Bazalaki koya kotala biso na apartema mpo na koyeba soki tozali na mposa ya lisalisi to te.” Yango ekoki kotinda yo omona na makanisi ndenge ntoma Paulo apesaki botɔndi mpo na makambo oyo libota ya moto moko esalaki mpo na ye na Efese.​—2 Tim. 1:18.

11. Mosala ya mobongisi-nzela monene esɛngaka nini?

11 Masangá mosusu esepelaka mpenza kozala na babongisi-nzela monene. Bandeko yango basalaka makasi bálekisa ngonga 130 sanza na sanza na mosala ya kosakola. Lokola balekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola mpe mpo na kosalisa na makambo mosusu, bazalaka na ntango moke to mpe na ntango te mpo na kosala mosala ya mosuni. Biro ya filiale epesaka bango mwa mbongo mpo bátya makanisi na bango nyonso kaka na mosala na bango.

12. Ndenge nini bankulutu ná bandeko mosusu bakoki kosalisa babongisi-nzela monene?

12 Ndenge nini tokoki kosalisa babongisi-nzela monene? Nkulutu moko oyo azalaka ná bango mingi alobi boye: “Bankulutu balingaka kosolola na bango, koyeba bomoi na bango, mpe na nsima koluka koyeba ndenge ya kosunga bango. Batatoli mosusu balobaka ete babongisi-monene bazali malamu mpo bazwaka mwa mbongo, kasi bandeko ya masangá bakoki kosalisa bango na balolenge mingi.” Ndenge moko na babongisi-nzela ya sanza na sanza, babongisi-nzela monene basepelaka mpe mingi soki bandeko ya lisangá bazali kobima na bango na mosala ya kosakola. Okoki kopesa bango mabɔkɔ?

KOSUNGA BAKƐNGƐLI-BATAMBOLI

13, 14. (a) Likambo nini tokoki kobosana te mpo na bakɛngɛli-batamboli? (b) Okanisi ete okoki kosala nini mpo na kosalisa bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango?

13 Mbala mingi, bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango bamonanaka lokola bato oyo bazali makasi na elimo to balendá. Tokoki kosala nini soki babɛli, bakɔti lopitalo mpe esɛngi básala bango lipaso to bázwa lisalisi moko boye ya monganga? Bayokaka mpenza malamu ntango bandeko ya lisangá basalisi bango na makambo mosusu mpe bakokisi mpenza bamposa na bango. Tokoki komona na makanisi ndenge Luka “monganga mpe ndeko ya bolingo,” mokomi ya mokanda ya Misala, amibanzabanzaki mpo na ntoma Paulo mpe baninga na ye bakɛngɛli-batamboli mosusu.​—Kol. 4:14; Mis. 20:5–21:18.

14 Bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango bazalaka na mposa mpe básepelaka kozala na baninga ya motema. Mokɛngɛli-motamboli moko akomaki boye: “Baninga na ngai bayebaka ntango nini nazali na mposa ya lisalisi. Batunaka mituna na bososoli, mpe yango esalisaka ngai naloba makambo oyo ezali kotungisa ngai. Ndenge bayokaka ngai na likebi mpenza esalisaka ngai mingi.” Bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango basepelaka mingi ndenge bandeko bamibanzabanzaka mpo na bango.

KOSUNGA BANDEKO YA BETELE

15, 16. Mosala nini bandeko ya Betele mpe oyo basalaka na Bandako ya mayangani basalaka, mpe ndenge nini tokoki kosunga bango?

15 Na mokili mobimba, bandeko oyo basalaka na Betele mpe na Bandako ya mayangani basalisaka mingi mpenza mpo ete mosala ya Bokonzi na mikili oyo filiale na bango ezali kokamba ekende liboso. Soki bandeko ya Betele bazalaka na lisangá to zongazonga na bino, ndenge nini okoki komonisa ete okanisaka bango?

16 Ntango bakómaki na Betele, ekoki kozala ete batungisamaki ndenge batikaki bato ya mabota mpe baninga na bango. Bazalaka mpenza na botɔndi soki bandeko mosusu ya Betele mpe masangá na bango ya sika basalisi bango! (Mrk. 10:29, 30) Ndenge programɛ ya mosala na bango ezalaka, epesaka bango nzela ya koyangana na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ mpe kobimaka na mosala ya kosakola. Kasi, soki mosala eyei mingi, ekómaka mpe ete bálekisa ngonga oyo esɛngami. Soki masangá eyebi likambo yango malamu mpe ezali komonisa botɔndi mpo na bandeko ya Betele mpe mosala oyo bazali kosala, moto nyonso akozwa matomba.​—Tángá 1 Batesaloniki 2:9.

KOSUNGA BASALI YA NTANGO NYONSO OYO BAKEI NA MIKILI MOSUSU

17, 18. Bandeko oyo bakendeke kosala na mikili mosusu basalaka misala nini?

17 Bandeko oyo bakendeke kosala na mikili mosusu bakoki kokutana na makambo mosusu oyo ekeseni mpenza na oyo ya mikili na bango. Makambo yango ekoki kozala: bilei, minɔkɔ ya koloba, mimeseno mpe bongo na bongo. Mpo na nini bandimaka koyoka mpasi ya bambongwana wana?

18 Bamosusu bazali bamisionɛrɛ oyo bakendeke kosakola libosoliboso epai bandeko mingi bakoki kozwa litomba na formasyo ya ntina mingi oyo bazwaki. Biro ya filiale epesaka bango bisika ya kolala oyo ekoki te kobenda likebi ya bato mpe mwa mbongo mpo na bamposa na bango. Bapesaka bandeko mosusu oyo basalaka na mikili ya bapaya misala na biro ya filiale, kotonga bandako mosusu ya biro ya filiale, babiro ya kobongola mikanda na bingumba, Bandako ya mayangani to ya Bokonzi. Bapesaka bango bilei, bisika ya kolala oyo ebendaka likebi ya bato te to mpe basalelaka bango makambo mosusu. Ndenge moko na bandeko ya Betele, bango mpe bayanganaka na makita na masangá oyo batindaka bango mpe babimaka na mosala ya kosakola, mpe na ndenge yango, bazalaka lipamboli na makambo mingi.

19. Likambo nini tokoki kobosana te mpo na baoyo bazali kosala na mikili mosusu?

19 Ndenge nini okoki kobosanaka te basali wana ya ntango nyonso? Tóbosana te ete mbala mingi na ebandeli, mbala mosusu bakokoka naino te biloko mosusu oyo bolyaka. Okoki komonisa ete ozali kobosana bango te soki ntango ozali kobenga bango mpo na kolya mwa eloko, otuni bango liboso soki eloko nini basepelaka kolya to oyo bakolinga komeka kolya. Zalá motema molai na bango ntango bazali koyekola monɔkɔ mpe mimeseno na bino. Ekoki kosɛnga mwa ntango liboso ete bábanda kokanga ntina ya makambo nyonso oyo ozali koloba, kasi okoki kosalisa bango na boboto nyonso mpo bábengaka maloba malamu. Bazalaka na mposa ya koyekola!

20. Wapi lolenge malamu mpenza oyo tokoki kokanisa bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso mpe baboti na bango?

20 Bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bakoki kokóma mibange, ata mpe baboti na bango. Soki baboti bazali Batatoli ya Yehova, na ntembe te mposa na bango ezalaka ete bana na bango bákoba na mosala ya ntango nyonso. (3 Yoa. 4) Ya solo, soki baboti na bango bazali na mposa ya lisalisi, bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso bakosala nyonso oyo bakoki mpe bakosalisa bango mbala nyonso oyo likoki ezali. Kasi, bandeko mosusu ya libota bakoki kosalisa baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso soki bazali kosunga baboti oyo bakómi mibange. Tóbosana te ete bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bazali na mikumba minene mpenza na mosala ya ntina mingi oyo eleki misala mosusu nyonso. (Mat. 28:19, 20) Yo ná lisangá na bino, bokoki kosunga ata mwa moke baboti ya bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso soki bazali na mposa ya lisalisi?

21. Bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso bayokaka ndenge nini mpo na lisalisi mpe bilendiseli oyo bandeko mosusu bapesaka?

21 Bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso, basalaka yango te mpo na kozwa mbongo, kasi nde mpo na kopesa Yehova mpe basusu. Bazalaka na botɔndi mpenza na lisalisi nyonso oyo okoki kopesa. Ndeko mwasi moko oyo asalaka na mokili ya bapaya amonisi makanisi ya basali mingi ya ntango nyonso boye: “Ata mwa mokanda ya botɔndi emonisaka ete basusu babosani yo te mpe ete basepelaka na mosala oyo ozali kosala.”

22. Ndenge nini otalelaka mosala ya ntango nyonso?

22 Kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso ezali mosala oyo ememaka mpenza mapamboli na bomoi. Ezalaka na mikakatano na yango, esalisaka moto ayekola makambo mingi mpe epesaka esengo. Mpe ezali mpenza kobongisa biso mpo na mosala kitoko mpe ya esengo ya libela na libela oyo ezali kozela basaleli nyonso ya sembo ya Yehova na Bokonzi ya Nzambe. Tiká ete biso nyonso ‘tótikaka te kokanisa mosala ya sembo mpe ya makasi ya bolingo’ ya bandeko oyo bazali kosala mosala ya ntango nyonso.​—1 Tes. 1:3.