Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Ayebaki nzela’

‘Ayebaki nzela’

NDEKO Guy Hollis Pierce, ya lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova asilisaki bomoi na ye awa na mabele mokolo ya mibale, 18/03/2014. Azalaki na mbula 79 ntango elikya na ye ya kosekwa mpe kozala moko ya bandeko ya Kristo ekokisamaki.​—Ebr. 2:10-12; 1 Pe. 3:18.

Ndeko Guy Pierce abotamaki na engumba Auburn, na etúká ya Californie, na États-Unis, mokolo ya 06/11/1934, mpe azwaki batisimo na mobu 1955. Abalaki mwasi na ye ndeko Penny na mobu 1977 mpe babotaki bana. Kokokisa na ndenge esengeli mokumba na ye ya libota, esalisaki ye azala tata moko malamu mpenza. Na mobu 1982, ye ná mwasi na ye ndeko Penny bazalaki babongisi-nzela, mpe na mobu 1986 babandaki mosala ya zongazonga na États-Unis mpe basalaki mosala yango mbula 11.

Na mobu 1997, ndeko Guy Pierce ná mwasi na ye Penny bakómaki kosala na Betele ya États-Unis. Ndeko Pierce asalaki na Departema ya mosala, mpe na mobu 1998 batyaki ye mosungi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi na Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele. Liyebisi ete ndeko Pierce akómi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesamaki mokolo ya 02/10/1999, na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Na bambula oyo euti koleka, asalaki na komite oyo etalelaka bandeko ya Betele, komite ya bokomi mikanda, komite ya kobimisa mikanda mpe na komite ya batambwisi.

Bato ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge bazalaki kopusana penepene ya ndeko Pierce mpo azalaki moto moko oyo alingaki mingi kosɛka na bato mpe kosala mwa masɛki. Kasi bizaleli mpenzampenza oyo esalaki ete bandeko básepela na ye ezalaki bolingo, komikitisa, botosi na ye na mibeko mpe mitinda, mpe kondima makasi epai ya Yehova. Ndeko Guy Pierce azalaki koloba ete ata soki ekoki kosalema ete moi ebima te, bilaka ya Yehova ekozanga te kokokisama, mpe azalaki kosepela koyebisa bato ya mokili mobimba solo yango.

Ndeko Pierce azalaki mosaleli ya Yehova ya molende, azalaki kolamuka na ntɔngɔ makasi mpe mbala mingi azalaki kotikala kosala tii na butu makasi. Asalaki mibembo na mikili mingi mpo na kolendisa bandeko, mpe azalaki kozanga ntango te mpo na kosolola na ndeko mokomoko ya Betele mpe bandeko mosusu oyo bazalaki koluka boninga, toli mpe lisalisi epai na ye. Ata nsima ya bambula ebele, bandeko mingi babosanaka te ezaleli na ye ya koyamba bapaya, kozala na baninga mpe kolendisa basusu na Makomami.

Ndeko mpe moninga na biso Guy Pierce atiki mwasi, bana motoba, bana ya bana na ye mpe bankɔkɔ. Azalaki mpe na bana ebele ya elimo. Diskur ya bokundi ebembe mpo na ndeko Pierce esalemaki mokolo ya pɔsɔ, 22/03/2014. Ndeko Mark Sanderson nde asalaki diskur yango. Na kati ya makambo mosusu oyo alobaki, alobelaki elikya ya ndeko Pierce ya kokende na likoló mpe atángaki maloba oyo ya Yesu ete: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. . . . Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpe esika ngai nazali bino mpe bózala wana. Mpe epai nazali kokende bino boyebi nzela.”​—Yoa. 14:2-4.

Ya solo, tozangi mpenza ndeko Pierce. Kasi, tozali na esengo mpo ete ‘ayebaki nzela’ ya ‘esika na ye ya kofanda’ ya libela.