Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa

Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa

MOZALISI na biso apesá bato likabo moko ya motuya mingi: bonsomi ya kopona. Kasi, apambolaka mpenza baoyo basalelaka bonsomi na bango na ndenge ebongi mpo ete losambo ya solo ekende liboso, mpe apambolaka baoyo basalaka nyonso, mpo na kosantisa nkombo na ye mosantu mpe bapesaka mabɔkɔ na mokano na ye monene. Yehova alingaka te ete tótosa mpo bazali kokanela biso mpe bazali kotinda biso na makasi. Kasi, asepelaka mingi nde na ezaleli ya komipimela oyo eutaka na bolingo mpe na botɔndi makasi.

Na ndakisa, ntango Bayisraele bazalaki na esobe ya Sinai, Yehova ayebisaki bango bátonga esika ya losambo. Alobaki boye: “Bózwela Yehova likabo na kati na bino. Moto nyonso oyo motema na ye elingi amema yango likabo ya Yehova.” (Kobima 35:5) Moyisraele mokomoko asengelaki kopesa eloko nyonso oyo azalaki na makoki ya kopesa, mpe likabo mokomoko, ezala ya ndenge nini to ya motuya nini, ekokaki kosalelama na lolenge oyo ebongi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Matomba nini emonanaki?

“Moto nyonso oyo motema na ye etindaki ye,” “moto nyonso oyo elimo na ye etindaki ye,” mpe “moto nyonso oyo motema na ye elingaki,” apesaki likabo ya bolingo malamu. Mibali mpe basi bazalaki komema na motema moko eloko mpo na mosala ya Yehova, na ndakisa: babrɔshe ya monzɛlɛ, biloko ya matoi, mpɛtɛ, wolo, palata, motako, nsinga ya bulé, lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, biloko oyo epakolami langi ya motane makasi, lini ya kitoko, nsuki ya ntaba, mposo ya mpate-mobali oyo epakolami langi ya motane, mposo ya nyama ebengami fɔkɛ, nzete ya akasia, mabanga ya ntalo, mafuta ya balsame mpe mafuta. Na nsuka, “biloko ekokaki mpo na mosala nyonso oyo esengelaki kosalema, mpe elekaki kutu koleka.”​—Kob. 35:21-24, 27-29; 36:7.

Eloko esepelisaki Yehova mingi ezalaki te makabo oyo epesamaki, kasi nde ezaleli ya komipimela ya baoyo bapesaki mabɔkɔ mpo na losambo ya pɛto. Bapesaki mpe ntango mpe makasi na bango. Biblia emonisi ete “basi nyonso oyo bazalaki na motema ya bwanya bazalaki kosala nsinga na mabɔkɔ na bango.” Ya solo, “basi nyonso ya bwanya oyo mitema na bango ezalaki kotinda bango, bazalaki kosala nsinga na nsuki ya ntaba.” Kasi, Yehova apesaki Bezalele “bwanya, na mayele, na boyebi mpe ayeba lolenge nyonso ya misala ya mabɔkɔ.” Kutu, Nzambe apesaki Bezalele ná Oholiabe makoki mpenza oyo basengelaki na yango mpo na kosala mosala nyonso oyo apesaki bango.​—Kob. 35:25, 26, 30-35.

Ntango Yehova asɛngaki Bayisraele ete bápesa makabo, atyaki motema mobimba ete “moto nyonso oyo motema na ye elingaki” akopesa mabɔkɔ mpo na losambo ya solo. Na nsima, apambolaki mpenza baoyo bamipimelaki mpo na kopesa makabo na ndenge atambwisaki bango mpe asalaki ete báyoka esengo mingi. Yehova amonisaki ete ntango apamboli basaleli na ye mpo na ezaleli na bango ya komipimela, akoki komindimisa ete biloko to makoki ya kokokisa mokano na ye ezanga te. (Nz. 34:9) Lokola ozali kosalela Yehova na elimo ya komipimela, akopambola yo mpenza mpo na yango.