Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likabo moko kitoko mpo na bandeko ya Japon

Likabo moko kitoko mpo na bandeko ya Japon

NA LIKITA moko ya ntina mingi oyo esalemaki na Nagoya, na Japon mwa 28/04/2013, ndeko Anthony Morris ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi apesaki liyebisi oyo ya esengo ete: Buku moko ebimi na monɔkɔ ya Japon. Ezali na motó ya likambo Biblia​Evanzile ya Matai. Bato koleka 210 000 bayanganaki na likita yango mpe bamosusu balandaki na nzela ya nsinga. Nsima ya koyoka liyebisi yango, bayangani bamonisaki esengo na bango na kobɛta mabɔkɔ ntango molai.

Buku yango ebimisamaki na nzela ya Libongoli ya Mokili ya Sika. Kasi, buku wana ya nkasa 128 ezali buku moko oyo ekeseni na mosusu nyonso. Ndeko Morris alimbolaki ete buku yango ebongisami mpo na kosalisa bato ya Japon. Buku yango ekeseni ná mosusu na nini? Basengelaki na yango mpo na nini? Mpe bato basalaki nini?

BUKU YANGO EKESENI NÁ MOSUSU NA NINI?

Lolenge Evanzile yango ya Matai esalemaki, ekamwisaki bato mingi. Balɛtrɛ oyo ekomamaka na Japonais ezalaka ya kolala to kotɛlɛma, mpe makomi mingi oyo ezali na bazulunalo mpe babuku, ezala mpe na mikanda na biso, ekomamá na balɛtrɛ oyo elalá. Kasi, buku wana ya sika ekomami na balɛtrɛ ya kotɛlɛma, ndenge ebele ya bazulunalo mpe mikanda mosusu ya Japon ekomamaka. Mpo na bato mingi ya Japon, lolenge wana ya kokoma ezalaka pɛtɛɛ mpo na kotánga. Lisusu, maloba oyo ezali likoló ya makomi, bakómisaki yango mitó ya makambo mpo na kosalisa batángi bámona makambo ya ntina kozanga mikakatano.

Bandeko ya Japon babandaki mbala moko kotánga mokanda wana ya Matai. Ndeko mwasi moko ya bambula 80 alobaki boye: “Natángá mokanda ya Matai mbala ebele liboso, kasi ndenge ekomami na balɛtrɛ ya kotɛlɛma mpe na mitó ya makambo esalisi ngai nakanga mpenza ntina ya Lisolo likoló ya ngomba malamu mpenza.” Elenge mwasi moko akomaki boye: “Natángá evanzile ya Matai kaka na lolenge moko. Nazalaki kosalela oyo ya balɛtrɛ elalá, kasi bato mingi ya Japon basepelaka na balɛtrɛ oyo etɛlɛma.”

EBONGISAMI MPO NA JAPON

Mpo na nini buku wana ya Biblia ezali na ntina mingi mpo na Japon? Atako bato mingi ya Japon bayebi makambo mingi te ya Biblia, kasi basepelaka kotánga yango. Bato mingi oyo bamoná naino Biblia te, bakozala sikoyo na libaku ya kosimba ata mwa eteni na yango na mabɔkɔ mpe kotánga yango.

Mpo na nini baponaki mokanda ya Matai? Ntango bato mingi ya Japon bayokaka liloba “Biblia,” bakanisaka Yesu Kristo. Baponaki mokanda ya Matai mpo elobeli molɔngɔ ya libota ya Yesu mpe kobotama na ye, lisolo na ye likoló ya ngomba mpe esakweli ya ntina mingi oyo apesaki mpo na mikolo ya nsuka. Masolo wana nyonso esepelisaka bato ya Japon.

Basakoli ya Japon babandaki na mpiko nyonso kokabola buku wana ya sika ndako na ndako mpe ntango bazalaki kozongela bato. Ndeko mwasi moko akomaki ete: “Nazali sikoyo na mabaku ebele ya kopesa bato ya teritware na biso Liloba ya Nzambe. Kutu, napesaki moto buku moko ya Matai nsima ya midi ya likita wana ya ntina mingi!”

BATO BASALAKI NINI?

Ndenge nini basakoli balakisaka buku wana ya sika? Bato mingi ya Japon bayebi maloba lokola “porte ya moke,” ‘mayaka liboso ya ngulu,’ mpe “bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda.” (Matai 6:34; 7:6, 13) Bakamwaki koyeba ete Yesu Kristo nde alobaki maloba wana. Ntango bamonaka maloba wana na Matai, mingi balobaka: “Nazalaki koluka kotánga Biblia ata mwa mbala moko.”

Ntango basakoli bazongelaka bato oyo bazwaki buku Matai, mbala mingi bato yango bayebisaka bango ete batángaki mbala moko makambo mingi to mpe basilisaki yango nyonso. Mobali moko ya bambula 60 ayebisaki mosakoli moko boye: “Natángaki yango mbala ebele mpe elendisi ngai mpenza. Nasɛngi bino bóteya ngai makambo mingi na Biblia.”

Basakoli bakabolaka mpe buku ya Matai na bisika oyo bato mingi bazalaka. Ntango azalaki kosakola, ndeko mwasi moko apesaki elenge mwasi moko oyo andimaki buku yango adrɛsi na ye ya Internet. Ngonga moko na nsima, mwasi yango atindelaki ndeko na biso mesaje mpe alobaki ete atángi buku yango ndambo mpe azali na mposa ya koyeba makambo mosusu. Pɔsɔ moko na nsima, mwasi yango abandaki koyekola, mpe mosika te abandaki koyangana na makita.

Babuku ya Matai koleka 1 600 000 etindami na masangá ya Japon. Sanza na sanza, Batatoli bazali kokabwela bato bankóto ya buku yango. Maloba ya ebandeli ya buku yango emonisi makanisi ya bakomi na yango na maloba oyo: “Tozali mpenza na elikya ete kotánga mwa eteni oyo ekosalisa yo osepela lisusu mingi na Biblia.”