Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzete oyo bakati ekoki kobimisa lisusu bitape ya sika?

Nzete oyo bakati ekoki kobimisa lisusu bitape ya sika?

SOKI okokanisi nzete kitoko ya sɛdrɛ ya Libá na nzete ya olive oyo egumbamágumbamá, okoki komona lokola ete oyo ya olive ezali kitoko te. Kasi, banzete ya olive ezali na likoki ya kokola malamu ata ntango makambo ebebi. Banzete yango mosusu eumelaka mbula soki 1 000. Misisa ya nzete ya olive epanzanaka mosika mpenza na kati ya mabele, mpe nzete yango ekoki kokola ata soki mobimbi na yango ebebi. Ntango nyonso oyo misisa na yango ekozala na bomoi, nzete yango ekokola lisusu.

Moto ya sembo Yobo andimisamaki ete ata soki akufi, akozonga lisusu na bomoi. (Yobo 14:13-15) Asalelaki ndakisa ya nzete, ekoki kozala nzete ya olive mpo na komonisa ete atyaki motema ete Nzambe azali na likoki ya kosekwisa ye. Yobo alobaki ete: “Ata kutu mpo na nzete, elikya ezalaka. Soki bakati yango, ekobimisa lisusu bitape ya sika.” Soki mbula ebɛti nsima ya elanga, nzete ya olive oyo ekaukaki ekoki kozonga lisusu na bomoi mpe kobimisa “etape lokola nzete ya sika.”​—Yobo 14:7-9.

Ndenge kaka mosali-bilanga azalaka na mposa makasi ya komona nzete ya olive oyo bakati ezonga na bomoi, ndenge moko mpe Yehova azalaka na mposa makasi ya kosekwisa basaleli na ye mpe ebele mosusu ya bato. (Matai 22:31, 32; Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Kanisá naino esengo oyo tokozala na yango ntango tokoyamba bato oyo bakufá mpe tokomona bango lisusu na bomoi!